Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • be liteya 4 lok. 93-lok. 96 par. 2
  • Kokakatana na maloba te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kokakatana na maloba te
  • Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Masolo mosusu
  • Kozanga kokakatana na maloba, koloba lokola lisolo mpe kotosa ebengeli ya maloba
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Tólobaka malamu mikolo nyonso
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • ‘Yekola kotanga na miso ya bato mingi’
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Koloba ndenge omeseni koloba
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Makambo mosusu
Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
be liteya 4 lok. 93-lok. 96 par. 2

LITEYA 4

Kokakatana na maloba te

Osengeli kosala nini?

Osengeli kotánga mpe koloba polele mpo na kobimisa maloba mpe makanisi na yo. Ntango ozali koloba kozanga kokakatana, okokatakata maloba na yo te to maloba na yo ekobima malɛmbɛmalɛmbɛ te, to mpe na mpasi te. Okobɛtabɛta mabaku te na maloba na yo mpe okolukaluka makanisi ya koloba te.

Yango ezali na ntina nini?

Ntango molobi azali kokakatana na maloba, makanisi ya bato oyo bazali koyoka ye ekoki koyengayenga mpe akoki mbala mosusu koteya bango makanisi oyo ebongi te. Makambo oyo azali koloba ekoki kosimba mitema ya bato oyo bazali koyoka te.

NTANGO otángaka na mongongo makasi, obɛtaka mabaku na maloba mosusu? To ntango otɛlɛmi liboso ya bato mpo na kosala lisukulu, omonaka ete ozali ntango nyonso kolukaluka maloba oyo osengeli koloba? Soki ezali bongo, mbala mosusu mokakatano na yo ezali ete ozali kokakatana na maloba. Moto oyo alobaka kozanga kokakatana abimisaka maloba mpe makanisi na ye polele, mpe emonanaka ete azali koloba na mpasi te. Yango elingi koloba te ete azali kolobaloba, to azali koloba mbangumbangu to mpe azali kokanisa te liboso ya koloba. Maloba na ye ezali kosepelisa bato mpe ezali kitoko. Na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, batyaka mpenza likebi ete tólobaka kozanga kokakatana.

Makambo mingi ekoki kosala ete moto akakatana na maloba. Okosepela kotalela malamu mwa makambo yango oyo elandi? (1) Ntango ozali kotánga na miso ya bato, soki oyebi maloba mosusu te, yango ekoki kosala ete okakatana. (2) Soki ozali kopemapema na maloba mingi, yango ekoki kosala ete okatakata maloba mpe ozongela yango. (3) Soki omibongisi te, yango mpe ekoki kosala ete okakatana na maloba. (4) Ntango ozali koloba liboso ya bato, soki obongisaki makanisi na yo malamu te, yango ekosala ete okakatana na maloba. (5) Soki moto ayebi maloba mingi te na lokota oyo azali koloba, yango ekosala ete akakatana mpe alukaluka maloba oyo asengeli koloba. (6) Soki ozali konyata maloba mingi, yango ekoki kosala ete okakatana na maloba. (7) Okoki mpe kokakatana na maloba soki omeseni te na mibeko ya lokota oyo ozali koloba.

Soki ozali kokakatana na maloba, bato oyo bazali na kati ya Ndako ya Bokonzi bakobima te mpo na komonisa yo ete basiliki, kasi makanisi na bango ekoyengayenga. Yango ekosala ete makambo mingi oyo okoloba, etikala na bɔɔngɔ na bango te.

Epai mosusu, tosengeli kokeba ete ntango tozali koloba malamu mpe tozali kokakatana te, maloba na biso ekóma ya lolendo te, to mpe etungisa bato oyo bazali koyoka biso te. Lokola touti bisika ndenge na ndenge, soki mbala mosusu, bato oyo bazali koyoka yo bamoni ete maloba na yo ezali kozokisa bango to ezali sembo te, okokokisa mokano na yo te. Tomoni ete ntoma Paulo, atako ayebaki koloba, asololaki na Bakolinti “na kati ya bolɛmbu mpe na kati na kobanga mpe na kolɛnga makasi” mpo abenda likebi na bango likoló na ye moko te.​—1 Kol. 2:3.

Makambo oyo osengeli koboya. Bato mingi, ntango bazali koloba, bazalaka na momeseno mabe ya koloba “Ɛɛ” mbala na mbala. Bato mosusu bameseni koloba mbala na mbala “sikoyo,” ntango balingi kobanda koloba, to mpo na kokangisa makanisi na bango, balobaka mbala na mbala “omoni,” “boyebi” to “bongo.” Mbala mosusu oyebi te ete osalelaka maloba oyo mingi. Meká kosɛnga na moto moko alanda yo ntango ozali koloba mpe azongelaka maloba wana ntango nyonso oyo ozali koloba yango. Okokamwa.

Bato mosusu, ntango batángaka to balobaka, bazongelaka liloba moko mbala mibale to misato. Elingi koloba, soki abandi koloba mpe akómi na katikati ya fraze, atɛlɛmi mpo na kozongela likambo oyo alobaki.

Nzokande, bato mosusu balobaka mbangu mingi te, kasi babandaka na likanisi moko, nde na katikati, bakati mpo na kolobela likanisi to likambo mosusu. Ata soki olobaka na mpasi te, soki ozali kokatakata makanisi na yo, yango ekosala ete okakatana na maloba.

Ndenge ya kobongisa yango. Soki mokakatano na yo ezali ete ozali kolukaluka maloba oyo osengeli koloba, osengeli kosala mpenza milende mpo oyekola maloba mingi lisusu. Ntango ozali kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, Lamuká! to mikanda mosusu, tyá mpenza likebi na maloba oyo omeseni na yango te. Luká yango na diksionɛrɛ, luká ndimbola na yango mpe kangá maloba yango mpo obakisa yango na maloba oyo oyebi. Soki ozali na diksionɛrɛ te, tuná moto moko oyo alobaka lokota yango malamu.

Soki okómi na momeseno ya kotángaka na mongongo makasi, yango ekosalisa yo oyeba koloba malamu mpenza. Tyá likebi na maloba ya mpasi mpe zongelá yango mbala mingi.

Mpo otángaka kozanga kokakatana, osengeli koyeba ndenge maloba elandanaka na kati ya fraze. Mbala mingi esɛngaka kotánga maloba mingi mpo na kokanga likanisi oyo mokomi akomi. Tyá mpenza likebi na ndenge maloba yango elandani. Tyá bilembo wana, soki yango ekosalisa yo. Mokano na yo ezali kaka te ete otánga maloba ndenge esengeli, kasi obimisa mpe makanisi yango polele. Soki osilisi kotalela fraze moko, talelá oyo elandi tii okosilisa koyekola paragrafe mobimba. Luká koyeba ndenge makanisi elandani na paragrafe yango. Na nsima, meká kotánga yango na mongongo makasi. Zongelá kotánga paragrafe yango mbala mingi tii okobanda kotánga yango kozanga kobɛta mabaku mpe kozanga kotɛlɛmatɛlɛma na bisika oyo ebongi te. Na nsima, talelá baparagrafe mosusu.

Soki osilisi, luká kotánga mwa mbangu. Soki oyebi sikoyo ndenge maloba elandani na kati ya fraze moko, okokoka komona maloba mingi na mbala moko mpe okomesana komona maloba oyo elandi liloba oyo ozali kotánga, liboso kutu okóma wana. Yango ekosala mpenza ete otángaka malamu koleka.

Soki ozali komeka mbala na mbala kotánga kozanga ete omibongisa liboso, yango ekoki kosalisa yo mpenza. Na ndakisa, kozanga ete omibongisa liboso, tángá na mongongo makasi mokapo ya mokolo mpe makanisi oyo babimisi mpo na yango. Salá bongo mokolo na mokolo. Mesenisá liso na yo na kotalaka na mbala moko maloba mingi oyo ekobimisa makanisi oyo bakomi, na esika ya kolanda liloba mokomoko.

Ntango ozali kosolola na bato, mpo okakatana te, osengeli kokanisa liboso ya koloba. Salá ete ekóma momeseno na yo mokolo na mokolo. Poná likanisi oyo olingi koloba mpe ndenge oyo okolobela yango. Na nsima, bandá koloba. Koloba mbangumbangu te. Salá makasi osilisaka koloba makanisi na yo kozanga ete okata yango to kozanga ete oleka mbala moko na likanisi mosusu. Mbala mosusu okomona malamu ete osalelaka bafraze ya mikuse mpe ezangi mindɔndɔ.

Soki oyebi mpenza likambo oyo olingi koloba, okozanga maloba te mpo na koloba likambo yango. Mbala mingi, ezalaka na ntina ete opona maloba oyo okosalela. Ya solo, ntango ozali komeka lisolo na yo, ekozala malamu oluka naino koyeba soki likambo olingi koloba ezali polele na makanisi na yo mpe na nsima kanisá maloba oyo okobimisa. Soki ozali ntango nyonso kokanisa likambo oyo olingi koyebisa bato na esika ete okanisa kaka maloba oyo ozali kobimisa, okomona ete okobanda kolukaluka maloba te mpe makanisi oyo ozali kobimisa ekouta mpenza na motema na yo. Kasi soki ozali kaka kokanisa maloba na esika ya makanisi oyo olingi kobimisa, elobeli na yo ekozala lokola moto oyo ayebi te nini akoloba. Soki ozali komeka kosala boye mbala na mbala, okokóma koloba kozanga kokakatana mpe yango ezali na ntina mingi mpo na koyeba koloba mpe kotánga malamu.

Ntango Moize azwaki mokumba ya kokende koloba mpo na Yehova epai ya libota ya Yisalaele mpe liboso ya Farao, mokonzi ya Ezipito, amonaki mpenza ete akokoka te. Mpo na nini? Mpamba te ayebaki koloba malamu te mpe mbala mosusu azalaki na likukuma. (Ex. 4:10; 6:12) Moize alukaki kopesa bantina oyo ekomonisa ete akokoka te, kasi Nzambe andimaki ata moko na yango te. Yehova atindelaki ye Alona mpo azala lokola molobeli ya Moize, kasi asalisaki mpe Moize ye moko aloba. Mbala na mbala, Moize alobaki malamu mpenza kaka liboso ya mwa ndambo ya bato te, kasi mpe liboso ya libota mobimba. (Det. 1:1-3; 5:1; 29:2; 31:1, 2, 30; 33:1) Soki osali mpenza makasi yo moko ete obanda koloba kozanga kokakatana mpe soki otyeli Yehova motema, yo mpe okoki kosalela makoki na yo ya koloba mpo na kokumisa Nzambe.

OYO OKOKI KOSALA SOKI OZALI NA LIKUKUMA

Makambo mingi ekoki kosala ete moto azala na likukuma. Mbala mosusu toli oyo ezali kosalisa moto oyo ekobonga te mpo na moto mosusu. Kasi mpo okóma koloba malamu mpe ozala na esengo, ezali na ntina mingi ete otika te kosala milende.

Obangaka to olɛngaka ntango okanisi ete okopesa eyano na makita? Bondelá Yehova asalisa yo. (Filp. 4:6, 7) Tyá makanisi na yo ete olingi kokumisa Yehova mpe kosalisa basusu. Kokanisa te ete mokakatano na yo ekosila kaka mbala moko, kasi talelá nde batoli oyo ozali kozwa mpo na mokakatano yango. Ntango okomona ndenge Yehova azali kopambola yo mpe ndenge bandeko bazali kolendisa yo, okolinga kosala milende mingi lisusu.

Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ezali kopesa yo libaku ya koyeba koloba na miso ya bato mingi. Mbala mosusu okokamwa na komona ete ozali koloba malamu na miso ya bato mingi oyo bazali kosunga yo mpe balingi ete okóma koloba malamu. Yango ekoki kosalisa yo, na mabaku mosusu, oloba kozanga kobanga.

Soki okosala lisolo, omibongisa malamu mpenza. Tyá likebi na yo kaka na ndenge ozali koloba. Lobá na esengo mpenza. Soki likukuma ezwi yo ntango obandi koloba, salá makasi mpenza ozala kimya, koganga te mpe lobá malɛmbɛmalɛmbɛ. Kokanga mino te. Lobáká ndambo ndambo. Kosalela maloba lokola “emm” to “aah” mingi te.

Bato mosusu ya likukuma, ntango bayebi maloba oyo ekangaka bango, balingaka koloba yango te, mpe na esika na yango, basalelaka maloba mosusu oyo ezali na ndimbola moko na yango. Bamosusu basepelaka koluka ebengeli oyo epesaka bango mpasi mingi mpe bazongelaka yango mbala na mbala.

Ntango obandi kosolola na moto, soki likukuma ekangi yo, kokata lisolo te. Okoki kolendisa moto oyo ozali kosolola na ye aloba tii ntango yo okokoka kozongela maloba na yo. Okoki kokoma mwa maloba yango to kolakisa ye yango na kati ya mokanda moko, soki esengeli.

NDENGE YA KOSALA YANGO

  • Ntango ozali kotánga bazulunalo mpe mikanda, tyá likebi na maloba ya sika, luká mpenza ndimbola na yango mpe na nsima, salelá yango.

  • Mokolo na mokolo, meká kotánga na mongongo makasi na boumeli ya miniti mitano to zomi.

  • Soki ozwi mokumba ya kotánga, bongisá yango malamumalamu. Tyá mpenza likebi na maloba mingi na mbala moko oyo ezali kobimisa likanisi ya fraze. Luká koyeba ndenge makanisi elandani wana.

  • Ntango ozali kosolola na bato mokolo na mokolo, kanisáká liboso mpe na nsima lobeláká makanisi na yo nyonso kozanga kokatakata yango.

DEVUARE: Talelá malamu Basambisi 7:1-25, yekolá paragrafe mokomoko. Luká mpenza kokanga ntina ya makambo oyo ezali wana. Salelá diksionɛrɛ mpo na koluka maloba oyo oyebi ndimbola na yango te. Tángá nkombo ya moto to ya esika mokomoko na mongongo makasi. Na nsima, tángá paragrafe na mongongo makasi; luká kotánga yango malamu mpenza, kozanga ete osala foti. Soki omoni ete otángi paragrafe yango malamu, kende na oyo elandi, saláká bongo tii na nsuka. Na nsima, tángá mokapo mobimba. Zongelá yango, kasi mbala oyo, tángá yango mwa mbangu. Zongelá yango lisusu mpe na bisika oyo esengeli, tángá yango mbangu, kasi mbangu mingi te mpo obɛta mabaku te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto