Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • sg liteya 6 nk. 29-33
  • ‘Yekola kotanga na miso ya bato mingi’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Yekola kotanga na miso ya bato mingi’
  • Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Masolo mosusu
  • Omipesa na kotánga
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Ndenge nini okoki kotanga mpe kosimba makambo otangi
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Konyata makanisi ya ntina
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Koyeba konyata maloba ya ntina
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Makambo mosusu
Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
sg liteya 6 nk. 29-33

Liteya 6

‘Yekola kotanga na miso ya bato mingi’

1, 2. Mabaku nini tozali na yango ya kotanga na miso ya bato mingi?

1 Ntoma Paulo apesaki Timote toli na maloba oyo: “Otyaka motema na kotanga Makomi polele”, kolobaka mpe na ye ete alakisa kotanga na bandeko na ye baklisto mpo ete bazwa makoki nyonso masengeli na bango na mosala ya Nzambe. (1 Tim. 4:13) Toli oyo epemami ezali na motuya lelo mpo na ministre nyonso ya Nzambe, mpe ebongi malamu ete toyoka yango.

2 Ministre ya Nzambe azali na mabaku mingi ya kotanga na miso ya bato. Na boyekoli ya Mosenzeli mpe na boyekoli ya mokanda, mikapo mpe baparagrafe ezali kotangama na mongongo makasi. Bakotangaka mpe mikapo na likita ya mosala, na Eteyelo ya mosala ya Nzambe mpe na kati na mosala ya kosakola. Na yango, ministre nyonso azali na litomba, mpo na ye moko mpe mpo na baoyo bazali koyoka ye, ete azala motangi malamu na miso ya bato.

3. Mpo na nini komibongisa liboso ezali na ntina?

3 Tokotangaka na mongongo makasi mpo na litomba ya moto moko to ya bato mingi. Nzokande, ndenge nini bayoki bakokoka kozwela yango litomba soki motangi azali kobebisa maloba, soki azali kopema na bisika bisengeli te to azali komonisa te wapi maloba ya ntina, na motindo boye ete fraze mobimba ezali molili? Ndenge nini bayoki bakokoka kolanda ye soki azali kotanga na móto te mpe mongongo se ndenge moko longwa na ebandeli kino nsuka? Mpo na kotanga malamu na miso ya bato mingi esengeli komibongisa liboso. Soki topesameli mokumba ya kotanga na mongongo makasi, esengeli ete tobwaka naino miso na makambo tokotanga, ata ezali bobele kotanga baparagrafe na boyekoli ya mokanda. Soki bongo te, bayangani bakokoka kozwela yango litomba mpenza te, mpo ete tokoki kotangela bango maloba na ndenge ya libunga. Ntina wana esengeli ete ministre moklisto nyonso ayekola kotanga na miso ya bato mingi.​—Hab. 2:2.

4, 5. Bizaleli nini tosengeli kozala na yango mpo na kotanga na miso ya bato mingi na motindo boye ete bayoki bakanga ntina mpe bapusama na kosala eloko?

4 Bizaleli bisengeli. Na ntango ozali kotanga na mongongo makasi, zala na esengo. Tanga na móto, kobimisaka mayoki na maloba oyo ozali kotanga. Na motindo yango botangi na yo ekozala mpio te mpe ekozala lokola eloko ekufi te. Kokitisa mongongo te, soki te makambo mosusu ya ntina makoyokama te. Ebongi otanga na mongongo makasi kino bayoka yo kuna na nsuka. Koluka te ete bato babenda nkingo mpo na kobelemisa matoi ete bayoka na nzela nyonso makambo ozali kotanga.

5 Ebongi otanga polele kozanga komela maloba, soki te bato bakoyeba te eloko nini otangi. Nzokande, olekisa mpe ndelo te na eloko yango oyo babengi prononciation, mpamba te ekoki kopengwisa likebi ya bayoki. Oluka bobele ete bayangani nyonso bayoka polele liloba mokomoko oyo ozali kotanga. Soki maloba mosusu mazali koyokama malamu te, mbala mingi ezalaka mpo ete motangi akitisi motó na ye na ntolo. Tombola motó na ntango ozali kotanga. Fungola monoko malamu mpo ete maloba makoka koleka kozanga nkaka.

6. Ndenge nini tokoki kosala mpo na konyata maloba ya ntina kati na botangi, mpe ndenge nini kopema to poze esalisaka mpo na yango?

6 Likambo mosusu ya ntina, ezali ete omonisa na etangeli na yo maloba nini to milongo nini ezali na ntina koleka. Na motindo yango, kotanga na yo ekoyebana ntina polele. Kotombola mongongo to kotelema na liloba esengeli te, ekoki kobongola ndimbola ya fraze mobimba kati na elimo ya bayoki. Ntango mosusu tokotombola mongongo, to kokitisa mongongo to kobongola mongongo bobele na liloba moko, nzokande mbala mingi esengeli kosala bongo na etuluku moko ya maloba, to mpe na fraze mobimba. Ndimbola ya makambo tozali kotanga nde ekosalisa biso toyeba maloba nini tosengeli konyata; ndimbola ya fraze moko mpamba te kasi ya likambo mobimba oyo tozali kotanga. Kotelema mwa moke to poze na bisika bisengeli ekoki mpe komonisa bayoki wapi makambo ya ntina. Nzokande kotelema mwa molai ekomonisa ete likanisi moko ya ntina esuki wana.

7. Ndenge nini tokoki kosala mpo etangeli na biso ezala lokola lisolo?

7 Motangi malamu akosala nyonso ete mongongo na ye ezala ndenge moko te longwa ebandeli kino nsuka; akozala kobongola mpe vitese ya maloba na ye. Kozanga kosala boye, botangi ekozala elengi mingi te. Kosalela mabongwani ndenge nyonso na etangeli na yo ekosalisa yo ete otanga lokola moto azali nde kosolola.

8. Mabaku nini mapesameli biso ya kotanga diskur?

8 Kotanga diskur. Moko na mabaku ya ntina mapesameli biso ya kotanga na miso ya bato mingi ezali ntango bapesi biso diskur moko ete totanga yango. Esengeli kosalema na bantango mosusu. Na ndakisa, la Société asengaka ete badiskur mosusu ya ntina esalema na mokolo moko na masangá nyonso ya libota ya Nzambe kati na mokili. Na ba assemblées minene, ezalaka mpe na badiskur oyo esengeli bobele kotangama, mpamba te bakomi-nsango bakoki koluka kokamata ndambo na yango mpo na kokoma yango na bazulunalo na bango, to mpe lisolo yango eleki makasi mpe ebongi se na botangi.

9, 10. Wapi mokakatano eleki monene na ntango tozali kotanga diskur na mongongo makasi, mpe ndenge nini tokoki kolonga mokakatano yango?

9 Mokakatano monene ezali ya kotanga diskur yango na motindo boye ete eyebana te ete ozali kotanga. Nzokande, ata okotanga lokola ete yo moko nde ozali koloba, mongongo esengeli kozala likoló. Ya solo, bafraze kati na diskur ekomami na lokasa ekeseni na oyo tomeseni kosalela na ntango tolobaka; oyo ya diskur ekomami ezali milai mpe makasi. Vokabilere na yango eponami malamu mpe etongeli ya bafraze ekeseni na ndenge tomeseni koloba. Mbala mosusu okanisi ete diskur na yo ekoleka malamu soki osali yango na maloba na yo moko. Nzokande soki okosala ekzersise mingi, okomesena mpe bokoli na yo ekomonana mpo na oyo etali kotanga diskur na miso ya bato.

10 Mpo na kolonga osengeli komibongisa. Kamata ntango ete omimesenisa na diskur. Tanga diskur yango mbala mingi mpo makanisi ya ntina masimbama polele kati na elimo na yo. Soki okutani na maloba oyo oyebi yango te, tala ndimbola na yango kati na diksionere mpe zwa note na ndenge esengeli kolobama to prononciation. Na nsima, omimesenisa kotanga diskur yango na mongongo makasi mpo ete elimo ya moto oyo akomaki yango ekotela yo. Bandeko mosusu basalaka ekzersise ya kotanga na liboso ya talatala mpo ete bamesena kotalaka bayoki na bango; toloba ete kotala bayoki ezali na ntina, mingimingi soki diskur esengeli kosalema na salle moko moke.

11. Bilembo nini tokoki kotya kati na diskur ekomami mpo esalisa biso?

11 Ezali litomba na kotya bilembo to mikoloto na nse na maloba ya ntina oyo, kati na etangeli na yo, okolinga konyata yango mpo na kokesenisa yango na maloba mosusu. Batangi mosusu bamonaka malamu kokabola bafraze milai na biteni na yango mpe kotya bilembo ya mikoloto etelemi, na esika oyo mokomoko na yango esuki. Bipai mosusu, bituluku ya maloba oyo ezali kwokoso to tomeseni na yango mingi te mpe esengeli kotangama mbala moko ekoki kokangisama kati na yango na bilembo ya kokangisa mpo ekundola yo ete okotelema te na etuluku wana ya maloba. Kosalaka bongo, etangeli na yo ekozala lokola lisolo mpe maloba makobunga ntina te. Tya mpe bilembo na bisika oyo oyebi ete okopema mwa molai. Kotelema kati na botangi ebendaka likebi ya bayoki mpo bazali kozela soki okoloba nini na nsima, ezali mpe komonisa makanisi mosusu ya ntina mpe ezali kotikela bayoki ntango ya komela yango. Osengeli mpe koluka makanisi ya ntina kati na diskur mpe kotyela yango bilembo, mpo ete okoka konyata yango na etangeli na yo, mpe na nsima kobongola vitese ya botangi na yo.

12-15. Mpo na nini eleki ntina na komilengela malamu mpo ya botangi Biblia?

12 Botangi ya Biblia. Bato banso, bana mpe mikóló, basengeli kotanga Biblia. Mbala mingi topesamelaka mokumba ya kotanga yango na mongongo makasi. Programme ya Eteyelo ya mosala ya Nzambe ekozalaka mpe na botangi kati na yango. Epai mosusu, biso banso totangaka mikapo ya Biblia ntango tosololaka na bato na mosala ya kosakola. Kasi totangaka mikapo yango malamu? Tomeseni kotanga yango lokola lisolo mpe kozanga kokakatana na motindo boye ete tonyata soki mpe tobimisa polele maloba oyo tozali na yango mposa mpo na kolongisa likanisi na biso?

13 Na ntembe te tosengeli komilengela mpo na botangi Biblia. Kobosana te ete ezali Liloba na Nzambe, nkasa na yango etondi na maloba kitoko mpe ya kokamwa oyo ezali kolamusa mayoki mpe ezali kopusa bato na kokanisa na motindo ya kolongobana. Tosengeli kotanga yango malamu mpo ete bayoki na biso bakoka kozwela yango litomba. Soki tomiyebeli ete bakosenga biso kotanga Biblia na mongongo makasi, esengeli tomibongisa malamu liboso mpo ete totanga kozanga kokakatana maloba nyonso oyo tomeseni na yango te.

14 Omikundola libaku kitoko oyo bana na Yisraele bazwaki, nsima na kozonga na Yelusaleme uta na boombo na Babilone, bayanganaki na etando monene oyo ezalaki liboso na Ekuke na Mai mpo na koyoka na likebi nyonso maloba na Nzambe na bango. Balevite oyo baponamaki mpo na botangi yango, bazalaki na bopoto mpe kozanga komilengela? Biblia eyanoli: “Batangaki kati na mokanda na Mobeko na Nzambe polele; mpe bapesaki ntina ete basosola litangi.” (Nehemia 8:8) Batangi oyo bazalaki na limemya mozindo mpo na Oyo-Aleki-Likoló mpe bamonisaki limemya yango na ndenge bazalaki kotanga maloba na ye mpo na baninga na bango ya losambo.

15 Ezala ete tozali kotanga na mongongo makasi mpo na biso moko to mpo na libota na biso, to na Salle du Royaume to na mosala ya ndako na ndako, tosala yango ntango nyonso na mokano ya koluka kobimisa malamumalamu ntina nyonso lokola ekomamaki na ebandeli, komonisaka mayoki na yango mpe nguya na yango ya kolendisa kondima. Nguya oyo ezali na botangi na miso ya bato mingi mpo na kopusa bato na kosala mosala emonisami na makasi nyonso na maloba malandi ya ntoma Yoane: “Esengo na motangi [na mongongo makasi] mpe na bayoki na maloba na kosakola oyo, mpe baoyo batosi makambo masili kokomama kati na yango, mpo ete elaka ezali penepene.”​—Emon. 1:3.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto