Mokapo ya mibale
Kumisá Yehova Nzambe kaka moko ya solo
1. Nani azali Nzambe kaka moko ya solo?
BIBLIA elobi ete atako ezali na biloko mingi oyo ebengami banzambe, “mpo na biso ezali mpenza na Nzambe kaka moko Tata.” (1 Bakolinti 8:5, 6) “Nzambe kaka moko” yango ezali bongo Yehova, Mozalisi ya biloko nyonso. (Deteronome 6:4; Emoniseli 4:11) Yesu abengaki ye “Nzambe na ngai mpe Nzambe na bino.” (Yoane 20:17) Azalaki na makanisi ndenge moko na Moize oyo alobaki kala ete: “[Yehova] azali Nzambe [ya solo]; mosusu azali te.” (Deteronome 4:35) Yehova aleki biloko nyonso oyo bato bazali kosambela, ezala bikeko, bato oyo bamikómisi banzambe, to monguna na ye Satana Zabolo, “nzambe ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” (2 Bakolinti 4:3, 4) Na bokeseni na nyonso wana, Yehova azali, ndenge Yesu abengaki ye, “Nzambe kaka moko ya solo.”—Yoane 17:3.
2. Lokola tozali koyekola makambo ya Nzambe, yango esengeli kosala nini na bomoi na biso?
2 Bato ya botɔndi oyo bazali koyekola bizaleli kitoko ya Nzambe, bakisa mpe makambo oyo asali mpe oyo akosala mpo na biso, bazali kopusana penepene na ye. Wana bolingo oyo balingaka Yehova ezali kokola, bakómi na mposa makasi ya kokumisa ye. Ndenge nini? Bazali koyebisa bato mosusu makambo oyo etali ye. Baloma 10:10 elobi ete: “Na monɔkɔ nde moto asalaka eyambweli mpo na lobiko.” Lolenge mosusu ya kokumisa ye ezali komekola ye na maloba mpe na misala. Baefese 5:1 elobi ete: “Bókóma bamekoli ya Nzambe, lokola bana balingami.” Mpo na kosala yango malamumalamu, tosengeli mpenza koyeba Yehova ndenge azalaka.
3. Tángá bizaleli ya minene ya Nzambe.
3 Na Biblia mobimba, bisika oyo ezali komonisa bizaleli kitoko ya Nzambe ezali mingi. Bizaleli na ye ya minene minei yango oyo: bwanya, boyengebene, nguya mpe bolingo. “Na ye bwanya ezali.” (Yobo 12:13, NW) “Banzela na ye nyonso ezali boyengebene.” (Deteronome 32:4, NW) Azali na “makasi na kati ya nguya.” (Yisaya 40:26, NW) “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Kasi, kati na bizaleli ya minene minei ya Nzambe, oyo wapi eleki mpe ezali komonisa mpenza motindo ya Nzambe oyo ye azali?
“Nzambe azali bolingo”
4. Ezaleli nini mpenza etindaki Nzambe asala molɔ́ngɔ́ mpe bikelamu nyonso ya bomoi?
4 Tótalela nini etindaki Yehova asala molɔ́ngɔ́ mpe bikelamu ya mayele, ezala bikalemu ya elimo to bato. Ezalaki bwanya to nguya nde etindaki ye asala bikelamu yango? Te, mpamba te, atako Nzambe asalelaki bwanya mpe nguya na ye, yango te nde etindaki ye asala bikelamu yango. Mpe boyengebene na ye esɛngaki te ete apesa likabo ya bomoi. Nzokande, bolingo monene ya Nzambe etindaki ye asala bikelamu ya mayele mpo bango mpe báyoka bisengo ya bomoi lokola ye. Bolingo etindaki ye azwa mokano ete bato ya botosi báfanda na Paladiso libela na libela. (Genese 1:28; 2:15) Bolingo etindaki ye lisusu azwa bibongiseli mpo na kolongola etumbu oyo lisumu ya Adama ememelaki bato.
5. Engebene Biblia, Yehova azali komonisama mobimba na ezaleli nini, mpe mpo na nini?
5 Ya solo mpenza, kati na bizaleli nyonso ya Nzambe, oyo eleki ezali bolingo. Yango ezali lolenge na ye mpe bomoto na ye. Atako bwanya, boyengebene, mpe nguya na ye ezali na ntina mingi, Biblia elobi ata esika moko te ete Yehova azali moko na yango. Kasi Biblia elobi mpenza ete azali bolingo. Ɛɛ, Yehova alati mpenza bolingo. Yango ezali bolingo oyo etambwisami na mitinda, kasi na mayoki mpamba te. Bolingo ya Nzambe etambwisami na mitinda ya bosolo mpe bosembo. Ezali lolenge ya bolingo oyo eleki bolingo mosusu nyonso, lokola yango emonisami na ndakisa oyo Yehova ye moko apesaka. Bolingo ya ndenge wana elukaka mpenza matomba na yango moko te mpe emonisamaka ntango nyonso na misala.
6. Nini esalisaka biso tómekola Nzambe, atako aleki biso mosika?
6 Bolingo nde ezali ezaleli malamu oyo esalisaka biso tómekola Nzambe ya ndenge wana. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, oyo bakweaka na mabunga, mbala mosusu tokoki kokanisa ete tokoki soki moke te komekola Nzambe. Kasi, ndakisa mosusu oyo ezali komonisa bolingo monene ya Yehova yango oyo: Ayebi esika makoki na biso esuki mpe asɛngaka biso tósala makambo na ndenge ya kokoka te. Ayebi ete sikawa tozali mpenza mosika na ezaleli ya kokoka. (Nzembo 51:5) Yango wana Nzembo 130:3, 4 elobi ete: “Ɛ [Yehova] soko okotalaka bokesene, ɛ Nkolo, nani akotɛlɛma? Na yo nde kolimbisa ezali.” Ya solo mpenza, Yehova azali ‘Nzambe ya mawa mpe ya ngɔlu, ayokaka nkanda noki te mpe aleki na boboto.’ (Exode 34:6) ‘Yo ozali malamu, ɛ [Yehova], mpe olimbisaka mabe.’ (Nzembo 86:5) Ezali mpenza likambo ya kobɔndisa! Kosalela Nzambe ya boboto ndenge wana mpe kozwa matomba na bolingo mpe motema mawa na ye, ezali mpenza likambo ya malamu!
7. Ndenge nini tokoki komona bolingo ya Yehova na biloko oyo asalá?
7 Bolingo ya Yehova ekoki mpe komonana na biloko oyo asalá. Tókanisa naino biloko kitoko oyo Yehova apesá mpo na bolamu na biso, na ndakisa bangomba kitoko, bazamba, balaki, mpe mbu. Apesá biso mpe bilei ndenge na ndenge ya kitoko mpo na kosepelisa lolemo na biso mpe kosalisa nzoto na biso ezala malamu. Yehova asalá mpe mitindo ndenge na ndenge ya fololo mpe banyama ya kokamwa. Asalá biloko ebele oyo ezali kaka mpo na kosepelisa bato, atako asɛngisamaki te ete asala yango. Ya solo, lokola tozali na mokili oyo etondi na mabe, mpe lokola tozali naino na ezaleli na biso ya kozanga kokoka, tokoki te kosepela malamumalamu na biloko nyonso oyo Nzambe asalá. (Baloma 8:22) Kasi, tókanisa naino oyo Yehova akosala mpo na biso na Paladiso! Mokomi ya nzembo ayebisi biso ete: “Okozipola lobɔkɔ na yo mpe okosilisa mposa [ya malamu] na nyonso na bomoi.”—Nzembo 145:16.
8. Ndakisa nini eleki monene oyo ezali komonisa bolingo ya Yehova mpo na biso?
8 Ndakisa nini eleki monene oyo ezali komonisa bolingo ya Yehova mpo na bato? Biblia elobi ete: “Mpo ete Nzambe alingaki mokili mingi na boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye abomama te kasi azala na bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Yehova asalaki bongo mpo bato bazalaki na boboto? Baloma 5:8 epesi eyano: “Nzambe azali kolakisa biso bolingo na ye moko na likambo oyo ete, wana tozalaki naino basumuki, Klisto akufelaki biso.” Ya solo, Nzambe atindaki Mwana na ye, moto ya kokoka awa na mabele mpo na kopesa bomoi na ye lokola mbeka mpo na kosikola biso na bolɔkɔ ya lisumu mpe liwa. (Matai 20:28) Yango efungolaki nzela mpo bato oyo balingaka Nzambe bázwa bomoi ya seko. Likambo ya esengo, bolingo ya Nzambe emonisami mpe epai ya baoyo nyonso balingi kosala mokano na ye, mpamba te Biblia elobi ete: “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala boyengebene andimami na ye.”—Misala 10:34, 35.
9. Ndenge nini likambo oyo Yehova asali ndenge apesaki Mwana na ye lokola mbeka mpo na kosikola biso, esengeli kobongola bomoi na biso?
9 Ndenge Yehova apesi Mwana na ye lokola mbeka mpo na kosikola biso, mpe lokola likambo oyo asali efungoleli biso nzela ya bomoi ya seko, ndenge nini yango esengeli kobongola bomoi na biso sikawa? Likambo yango esengeli kokómisa bolingo na biso makasi mpo na Yehova, Nzambe ya solo. Esengeli mpe kopesa biso mposa makasi ya koyoka Yesu, momonisi ya Nzambe. “[Yesu] akufelaki bato nyonso mpo baoyo bazali na bomoi bákoka kozala na bomoi mpo na bango moko lisusu te, kasi mpo na moto oyo akufelaki bango mpe alamwisamaki.” (2 Bakolinti 5:15) Oyo nde likambo ya esengo ya kolanda matambe ya Yesu, mpamba te azalaki ndakisa na oyo etali komekola bolingo mpe motema mawa ya Yehova! Yango emonanaki ntango Yesu alobaki na bato ya komikitisa ete: “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe kokumbisama mikumba, mpe ngai nakopemisa bino. Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na elimo ya boboto mpe na komikitisa na motema, mpe bokozwa kopema mpo na milimo na bino. Mpo ekanganeli na ngai ezali ya pɛtɛpɛtɛ mpe mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ.”—Matai 11:28-30.
Tómonisela bato mosusu bolingo
10. Tángá mwa makambo mosusu oyo tokoki komonisa na yango bolingo mpo na baninga na biso baklisto.
10 Ndenge nini tokoki komonisela baninga na biso baklisto bolingo ndenge moko na oyo Yehova mpe Yesu Klisto bazali na yango mpo na biso? Tótala mitindo ndenge na ndenge oyo tokoki komonisa yango: “Bolingo ezali na motema molai mpe na boboto. Bolingo ezali na zuwa te, emikumisaka te, emivimbisaka na lolendo te, emitambwisaka na ndenge ya nsɔni te, elukaka matomba na yango moko te, esilikaka te. Ebombaka mabe na motema te. Esepelaka te na makambo ya kozanga boyengebene, kasi esepelaka nde na solo. Ekangaka motema na makambo nyonso, elikyaka makambo nyonso, mpe eyikaka mpiko na makambo nyonso. Bolingo esilaka soki moke te.”—1 Bakolinti 13:4-8; 1 Yoane 3:14-18; 4:7-12.
11. Epai ya banani tosengeli mpe komonisa bolingo na biso, mpe ndenge nini?
11 Tosengeli mpe komonisa bolingo na biso epai ya banani, mpe ndenge nini? Yesu alobaki ete: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, kobatisáká bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, koteyáká bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino etinda.” (Matai 28:19, 20) Yango ezali kosɛnga kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola nsango malamu epai ya bato oyo bakómi naino baninga na biso baklisto te, koyebisa bango nsango oyo etali mokili ya sika oyo ekómi pene, paladiso ya Nzambe. Yesu amonisaki polele ete bolingo na biso esengeli kosuka kaka te epai ya baoyo tozali na bango lingomba moko, mpamba te alobaki ete: “Soki bozali kolinga baoyo balingaka bino, mbano nini bozali na yango? Bakɔngɔli-mpako basalaka mpe bongo te? Mpe soki bozali kopesa mbote kaka na bandeko na bino, likambo nini ya kokamwa bozali kosala? Bato ya bikólo mosusu basalaka mpe bongo te?”—Matai 5:46, 47; 24:14; Bagalatia 6:10.
“Tokotambola na nkombo ya Yehova”
12. Mpo na nini nkombo ya Nzambe ebongi kaka na ye moko?
12 Lolenge mosusu ya kokumisa Nzambe ya solo ezali ya koyeba, kosalela, mpe koteya bato mosusu nkombo na ye, Yehova. Mokomi ya nzembo amonisaki mposa yango ntango alobaki ete: “Báyeba ete ezali bobele yo oyo azali na nkombo [Yehova] oyo-Aleki likoló na mokili mobimba.” (Nzembo 83:18) Nkombo Yehova elimboli “Akómisaka.” Ye akamataka mikano mpe asalaka ete mikano yango ekokisama. Bobele Nzambe ya solo nde akoki mpenza kozwa nkombo yango, mpamba te bato bakoki koyeba ata moke te soki milende na bango ekolonga. (Yakobo 4:13, 14) Kaka Yehova nde akoki koloba ete liloba na ye “ekolonga” na likambo oyo atindaki yango. (Yisaya 55:11) Bato mingi basepelaka ntango bamonaka mpo na mbala ya liboso nkombo ya Nzambe na Babiblia na bango mpe wana bayekolaka ndimbola na yango. (Exode 6:3) Kasi bakozwa matomba na boyebi yango kaka soki ‘batamboli na nkombo ya Yehova . . . libela na libela.’—Mika 4:5.
13. Koyeba nkombo ya Yehova mpe kotambola na nkombo na ye esɛngaka nini?
13 Nzembo 9:10 elobi mpo na nkombo ya Nzambe ete: “Baoyo bayebi nkombo na yo [bakotya motema epai na yo, NW].” Yango esɛngi makambo mingi koleka koyeba nkombo ya Yehova, mpo koyeba nkombo yango elimboli mbala moko te ete moto atyelaka ye motema. Koyeba nkombo ya Yehova elimboli kosepela mpe kozala na botɔndi mpo na motindo ya Nzambe oyo Yehova azali, kotosa bokonzi na ye, kotosa mibeko na ye, mpe kotyela ye motema na makambo nyonso. (Masese 3:5, 6) Ndenge moko mpe, ‘kotambola na nkombo ya Yehova’ esɛngaka komipesa na ye mpe kozala moko ya basambeli na ye, kosalela bomoi na biso mobimba na boyokani na mokano na ye. (Luka 10:27) Ozali kosala yango?
14. Soki tolingi kosalela Yehova libela na libela, longola likambo oyo ete yango ezali etinda, nini esengeli lisusu kotinda biso?
14 Mpo na kosalela Yehova libela na libela, tokosala yango te kaka mpo ezali etinda. Ntoma Paulo ayebisaki Timote oyo azalaki kosalela Yehova uta bambula mingi ete: “Saláká ngalasisi na mokano ya kokóma na ezaleli ya kokangama na Nzambe.” (1 Timote 4:7) Mpo na kokangama na moto, esɛngaka kozala na motema oyo etondi na botɔndi mpo na moto yango. “Kokangama na Nzambe” esɛngaka kopesa lokumu mpe limemya makasi na Yehova ye moko. Esɛngaka komonisa bolingo makasi, limemya mozindo mpo na ye mpe banzela na ye. Etindaka biso tóluka ete moto nyonso atalela nkombo na ye na limemya. Tosengeli kolona ezaleli ya kokangama na Nzambe na bomoi na biso soki tolingi kotambola na nkombo ya Yehova, Nzambe ya solo kaka moko, libela na libela.—Nzembo 37:4; 2 Petelo 3:11.
15. Ndenge nini tokoki kokangama kaka na Nzambe ye moko?
15 Mpo Nzambe andima losambo na biso, tosengeli kosambela kaka ye moko na motema mobimba, mpamba te azali “Nzambe ya zuwa.” (Exode 20:5) Tokokoka te kolinga Nzambe mpe kolinga mokili oyo mabe, oyo nzambe na yango ezali Satana. (Yakobo 4:4; 1 Yoane 2:15-17) Yehova ayebi malamumalamu lolenge ya moto oyo mokomoko na biso alingi kozala. (Yilimia 17:10) Soki tolingi mpenza boyengebene, akomona yango mpe akosalisa biso tóyika mpiko na komekama ya mokolo na mokolo. Wana azali kosunga biso na nzela ya elimo santu na ye, akosalisa biso tólonga mabe oyo etondi na mokili oyo. (2 Bakolinti 4:7) Akosalisa biso mpe tóbatela elikya na biso ya kozala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabele. Oyo nde elikya kitoko! Tosengeli mpenza kozala na botɔndi mpo na yango mpe kolinga kosalela Yehova, Nzambe ya solo, oyo apesi biso elikya yango.
16. Osengeli koyoka mposa ya kosala nini elongo na bamilio ya bato mosusu?
16 Bamilio ya bato na mabele mobimba basili kondima na esengo mpenza libyangi oyo mokomi ya nzembo akomaki: “[Kumisá Yehova, NW] esika moko na ngai; tókumisa nkombo na ye elongo.” (Nzembo 34:3) Yehova azali kobenga yo ozala kati na ebele ya bato ya bikólo nyonso oyo bazali se kokóma mingi mpe oyo bazali kokumisa nkombo na ye.
Bozongeli
• Yehova azali moto ya ndenge nini? Ndenge nini koyeba malamumalamu bizaleli na ye ezali komemela biso matomba?
• Ndenge nini tokoki kosalisa bato mosusu báyekola solo oyo etali Nzambe?
• Koyeba nkombo ya Yehova mpe kotambola na nkombo na ye esɛngaka nini?
[Bililingi na lokasa 14]
Na bolingo na ye monene, Yehova ‘akozipola lobɔkɔ na ye mpe akokokisa bamposa ya bikelamu nyonso ya bomoi’