Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wt mok. 14 nk. 128-135
  • Ndenge nini Yehova azali kotambwisa ebongiseli na ye?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini Yehova azali kotambwisa ebongiseli na ye?
  • Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tóluka koyeba eteni oyo emonanaka
  • Ebongiseli oyo etambwisami na Nzambe
  • Zwá libateli na ebongiseli ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Tótikala sembo epai ya Klisto ná moombo na ye ya sembo mpe ya mayele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • “Bókanisaka baoyo bazali kokamba bino”
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Tiká ete lisangá elendisama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
wt mok. 14 nk. 128-135

Mokapo ya zomi na minei

Ndenge nini Yehova azali kotambwisa ebongiseli na ye?

1. Makambo nini etali ebongiseli ya Yehova Biblia ezali komonisa, mpe mpo na nini ezali na ntina mpo na biso?

NZAMBE azalaka na ebongiseli moko boye? Makomami epemami eyebisi biso ete azalaka na yango. Na kati ya Liloba na ye, azali komonisa biso mwa moke eteni moko ya ebongiseli yango, eteni ya kokamwa oyo ezali na likoló. (Ezekiele 1:1, 4-14; Danyele 7:9, 10, 13, 14) Atako tokoki te komona eteni yango oyo emonanaka te, kasi esalaka mpenza makambo mingi mpo na basambeli ya solo lelo oyo. (2 Mikonzi 6:15-17) Ebongiseli ya Yehova ezali mpe na eteni mosusu oyo emonanaka, yango ezali awa na mabele. Biblia ezali kosalisa biso tóyeba yango mpe tóyeba ndenge nini Yehova azali kotambwisa yango.

Tóluka koyeba eteni oyo emonanaka

2. Lisangá nini ya sika Nzambe abimisaki?

2 Na boumeli ya mbula 1545, libota ya Yisalaele ezalaki lisangá ya Nzambe. (Misala 7:38) Kasi Yisalaele elongaki te kotosa mibeko ya Nzambe mpe ebwakaki Mwana na ye. Mpo na yango, Yehova abwakaki lisangá yango mpe asundolaki yango. Yesu ayebisaki Bayuda ete: “Talá! Ndako na bino esundolami na mabɔkɔ na bino.” (Matai 23:38) Na nsima, Nzambe abimisaki lisangá mosusu ya sika, mpe asalaki na yango kondimana ya sika. Lisangá yango esengelaki kozala na bato 144000 oyo Nzambe aponi mpo bázala elongo na Mwana na ye na likoló.​—Emoniseli 14:1-4.

3. Nini esalemaki na Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso oyo emonisaki ete Nzambe azali sikoyo kosalela lisangá moko ya sika?

3 Bato ya liboso mpenza ya lisangá yango ya sika bapakolamaki na elimo santu ya Yehova na Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.). Mpo na likambo yango ya monene, tozali kotánga boye: “Wana mokolo ya fɛti ya Pantekote ezalaki koleka bazalaki bango nyonso elongo na esika wana moko, mpe na mbala moko makɛlɛlɛ ebimaki na likoló lokola oyo ya mopɛpɛ oyo ezali kobɛta makasi, mpe etondaki na ndako mobimba epai bafandaki. Mpe ndemo lokola nde ya mɔtɔ emonanaki epai na bango mpe ekabwanaki, mpe mokomoko efandaki likoló ya moto na moto na kati na bango, mpe bango nyonso batondaki na elimo santu.” (Misala 2:1-4) Na yango, elimo ya Nzambe emonisaki bango polele ete bango nde bazali sikoyo etuluku ya bato oyo Nzambe akosalela mpo na kokokisa mokano na ye na nzela ya Yesu Klisto na likoló.

4. Lelo oyo banani bazali na kati ya ebongiseli ya Yehova oyo ezali komonana?

4 Lelo oyo, kaka batikali ya 144000 yango bazali awa na mabele. Kasi, na ndenge esakweli ya Biblia ezali kokokisama, “ebele ya bato” kati ya “bampate mosusu,” bakómi bamilio, bazali kosala elongo na batikali bapakolami. Yesu, Mobateli ya bampate oyo aleki malamu, asangisi bampate mosusu na batikali bapakolami mpo básala etonga kaka moko oyo ye azali Mobateli na yango. (Emoniseli 7:9; Yoane 10:11, 16) Bango nyonso bazali lisangá kaka moko oyo ezali na bomoko, yango nde ebongiseli ya Yehova oyo ezali komonana.

Ebongiseli oyo etambwisami na Nzambe

5. Nani azali kotambwisa ebongiseli ya Nzambe, mpe ndenge nini?

5 Elobeli “lisangá ya Nzambe ya bomoi” oyo ezali na kati ya Makomami ezali komonisa polele nani oyo azali kotambwisa yango. Ebongiseli yango ezali ya Teokrasi, elingi koloba etambwisami na Nzambe. Yehova azali kotambwisa basaleli na ye na nzela ya Yesu, moto oyo aponamaki mpo na kozala Mokambi oyo amonanaka te ya lisangá yango, mpe na nzela ya Biblia, Liloba na Ye oyo ye moko apemisaki yango.​—1 Timote 3:14, 15; Baefese 1:22, 23; 2 Timote 3:16, 17.

6. (a) Ndenge nini na ekeke ya liboso emonanaki polele ete lisangá ezalaki kotambwisama na likoló? (b) Nini ezali komonisa ete Yesu azali kaka Mokonzi ya lisangá?

6 Lolenge Nzambe atambwisaka ebongiseli na ye emonanaki polele na Pantekote. (Misala 2:14-18, 32, 33) Yango emonanaki polele ntango anzelu ya Yehova asalaki ete nsango malamu ekɔta na Afrika, ntango mongongo ya Yesu epesaki etinda wana Saulo ya Talasi abongwanaki, mpe ntango Petelo abandaki mosala ya kosakola epai ya Bapakano. (Misala 8:26, 27; 9:3-7; 10:9-16, 19-22) Kasi, na nsima, mongongo moko te eyokanaki lisusu longwa na likoló, anzelu moko te amonanaki lisusu, nguya ya kosala makamwisi na elimo santu epesamaki lisusu te. Nzokande, Yesu alakaki ete: “Talá! Nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na nsuka ya ebongiseli ya ntango oyo.” (Matai 28:20; 1 Bakolinti 13:8) Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bandimaka ete Yesu azali kotambwisa bango. Soki te, likoki ekokaki kozala te mpo na kosakola nsango ya Bokonzi na kati ya bato oyo batondi na koyina makasi.

7. (a) “Moombo ya sembo mpe ya mayele” ezali banani, mpe mpo na nini? (b) Bapesaki “moombo” yango mokumba nini?

7 Mwa moke liboso ya liwa na ye, Yesu ayebisaki bayekoli na ye likambo etali “moombo ya sembo mpe ya mayele” oyo ye Nkolo asengelaki kopesa ye mokumba moko monene. “Moombo” yango asengelaki kozala ntango Nkolo akokende na likoló mpe asengelaki kokoba kosala mosala makasi na ntango Klisto akozonga na Bokonzi kozanga komonana. Likambo yango ekokaki te kozala solo soki moombo yango ezalaki moto moko kaka, kasi ekokani mpenza na lisangá ya bapakolami ya Klisto. Lokola asombaki yango na makila na ye, Yesu alobelaki yango lokola “moombo” na ye. Apesaki basangani na yango etinda ya kokómisa bato bayekoli mpe koleisa bango mokemoke, kopesa bango “bilei na bango [ya elimo] na ntango oyo ebongi.”​—Matai 24:45-47; 28:19; Yisaya 43:10; Luka 12:42; 1 Petelo 4:10.

8. (a) Mikumba nini kelasi ya moombo azali na yango sikoyo? (b) Mpo na nini lolenge biso totalelaka nzela oyo Nzambe ateyaka biso ezali na ntina mingi?

8 Lokola kelasi ya moombo yango ezalaki kosala mosala ya Nkolo na bosembo mpenza na ntango ya bozongi na ye oyo ezangi komonana na 1914, emonani mpenza ete bapesaki bango mikumba minene koleka na 1919. Bambula oyo eleki banda wana, ezalaki ntango ya kosala mosala monene ya kosakola Bokonzi na mokili mobimba, mpe ebele ya bato oyo bazali basambeli ya Yehova bazali koyanganisama mpo na kobika na ntango ya bolɔzi monene. (Matai 24:14, 21, 22; Emoniseli 7:9, 10) Bango mpe bazali na mposa ya bilei ya elimo, mpe bazwaka yango na nzela ya kelasi ya moombo. Yango wana, mpo na kosepelisa Yehova, tosengeli kondima mateya oyo azali kopesa biso na nzela ya moombo yango mpe komitambwisa na boyokani na toli na ye.

9, 10. (a) Ebongiseli nini ezalaki na ekeke ya liboso mpo na kokata makambo etali mateya mpe kokamba mosala ya kosakola nsango malamu? (b) Ebongiseli nini ezali lelo mpo na kotambwisa mosala ya basaleli ya Nzambe?

9 Kasi, mbala mosusu mituna oyo etali mateya mpe lolenge ya kotambwisa makambo ebimaka. Esengeli kosala nini? Misala mokapo ya 15 ezali koyebisa biso ndenge ntembe moko oyo etalelaki Bapakano oyo bakómaki baklisto esilaki. Batindaki likambo yango epai ya bantoma mpe bankulutu na Yelusaleme, oyo bazalaki na lisangani ya mikóló-bakambi na ntango wana. Mibali yango bazalaki bato ya kokoka te, kasi Nzambe asalelaki bango. Batalelaki makomi oyo elobelaki likambo yango mpe batalelaki ndenge elimo ya Nzambe etambwisaki makambo ntango mosala ya kosakola ekɔtaki epai ya bapakano. Mpe na nsima bazwaki ekateli. Nzambe apambolaki ekateli na bango. (Misala 15:1-29; 16:4, 5) Lisangani ya mikóló-bakambi yango eponaki bato mpo na kosakola Bokonzi bipai mosusu.

10 Na mikolo na biso, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya ebongiseli ya Yehova oyo ezali komonana ezali na bandeko mibali bapakolami na elimo oyo bauti na mikili ndenge na ndenge mpe bazali kosala na biro monene ya Batatoli ya Yehova. Lokola Yesu Klisto azali kotambwisa bango, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali kokamba losambo ya pɛto na mikili nyonso, bazali kotambwisa mosala ya kosakola ya Batatoli ya Yehova oyo ezali kosalema na kati ya bankóto ya masangá na bango. Bandeko yango ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bazali na likanisi moko na ntoma Paulo, oyo akomelaki baninga na ye baklisto ete: “Ezali te ete tozali bakonzi ya kondima na bino, kasi tozali nde baninga ya mosala mpo na esengo na bino, mpo ezali na nzela ya kondima na bino nde botɛlɛmi.”​—2 Bakolinti 1:24.

11. (a) Ndenge nini bankulutu mpe basaleli na misala baponamaka? (b) Mpo na nini tosengeli kosala na bomoko elongo na baoyo baponami?

11 Batatoli ya Yehova na mokili mobimba batalelaka Lisangani ya Mikólo-Bakambi mpo na kopona bandeko oyo bakoki mpo na kozala bankulutu mpe basaleli na misala oyo bakobatela masangá. Masɛngami mpo na bandeko oyo bazali koponama elobelami na kati ya Biblia mpe masɛngami yango etalelaka ete mibali yango bazali bato ya kokoka te mpe basalaka mabunga. Bankulutu oyo batindaka nkombo ya bandeko oyo bango balingi ete bázwa mikumba, ezala mpe bandeko oyo baponaka bankulutu mpe basaleli na misala, bango nyonso bazali na mokumba monene liboso ya Nzambe. (1 Timote 3:1-10, 12, 13; Tito 1:5-9) Yango wana, babondelaka mpo na kozwa lisalisi ya elimo santu ya Nzambe mpe balukaka toli na Liloba na ye lipemami. (Misala 6:2-4, 6; 14:23) Tiká ete tómonisa botɔndi na biso mpo na “makabo oyo ezali bato,” oyo basalisaka biso nyonso tókóma na “bomoko na kati ya kondima.”​—Baefese 4:8, 11-16.

12. Ndenge nini Yehova azali kosalela basi na kati ya ebongiseli ya Teokrasi?

12 Makomami esɛngi ete mokumba ya kobatela lisangá epesama epai ya mibali. Yango ezali kokitisa basi te, mpamba te basusu kati na bango bazali basangoli ya libula ya Bokonzi ya likoló, mpe basalaka mingi koleka na mosala ya kosakola. (Nzembo 68:11) Ntango bazali mpe kokokisa malamumalamu mikumba na mabota na bango, basi bazali kopesa mabɔkɔ mpo na kobatela lokumu ya lisangá. (Tito 2:3-5) Kasi mokumba ya koteya na lisangá ezali ya mibali oyo baponami mpo na kokokisa yango.​—1 Timote 2:12, 13.

13. (a) Toli nini Biblia epesi bankulutu mpo na lolenge ya kotalela mikumba na bango? (b) Libaku malamu nini biso nyonso tozali na yango?

13 Na mokili, moto oyo azali na bokonzi, batalelaka ye na lokumu mingi, kasi ebongiseli ya Nzambe ezali na mobeko oyo: “Moto oyo azali komitambwisa lokola moto oyo azali mpenza moke na kati na bino nyonso azali moto oyo aleki monene.” (Luka 9:46-48; 22:24-26) Makomami epesi bankulutu toli bákeba ete bákóma bakonzi te ya baoyo bazali libula ya Nzambe, kasi bákóma nde ndakisa mpo na etonga. (1 Petelo 5:2, 3) Batatoli ya Yehova nyonso, kasi kaka mwa ndambo te, ezala mibali to basi, bango nyonso bazali na libaku malamu ya kozala bamonisi ya Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba; na komikitisa nyonso bazali kosakola nkombo na ye mpe koyebisa bato bipai nyonso makambo ya Bokonzi na ye.

14. Salelá bavɛrsɛ oyo batii awa, mpe talelá mituna oyo ezali na nsuka ya paragrafe.

14 Ezali malamu tómituna biso moko: ‘Nazali na botɔndi mpenza na ndenge Yehova azali kotambwisa ebongiseli na ye oyo ezali komonana? Bizaleli na ngai, maloba na ngai mpe misala na ngai ezali mpenza komonisa yango?’ Soki tokanisi malamumalamu makambo oyo elandi, yango ekoki kosalisa mokomoko na biso amitalela malamu.

Soki nazali mpenza kotosa Yesu lokola Mokonzi ya lisangá, bongo, ndenge yango emonisami na bavɛrsɛ oyo elandi, nini nasengeli kosala? (Matai 24:14; 28:19, 20; Yoane 13:34, 35)

Ntango nazali komonisa botɔndi mpo na bibongiseli ya elimo oyo ezali kouta na moombo mpe na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, nazali mpenza kotosa nani? (Luka 10:16)

Ndenge nini mokomoko kati na lisangá, mingimingi bankulutu, asengeli kotalela basusu? (Baloma 12:10)

15. (a) Ndenge tozali kotalela ebongiseli ya Yehova oyo ezali komonana, tozali komonisa nini? (b) Mabaku nini tozali na yango ya komonisa ete Zabolo azali mokosi mpe ya kosepelisa Yehova?

15 Yehova azali kotambwisa biso lelo na nzela ya ebongiseli na ye oyo ezali komonana mpe oyo Klisto azali mokambi na yango. Ndenge totalelaka ebongiseli yango emonisaka makanisi na biso mpo na likambo ya boyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba. (Baebele 13:17) Satana alobaka ete lobanzo na biso ezalaka kaka mpo na bamposa na biso moko. Kasi soki tozali kosala na lolenge nyonso oyo esɛngami mpe toboi makambo oyo ezali kobenda kaka likebi epai na biso moko, tokomonisa ete Zabolo azali mokosi. Soki tozali kolinga mpe kotosa baoyo bazali kokamba biso kasi tozali koboya ‘kokumisa bato mpo na litomba na biso moko,’ tokosepelisa Yehova. (Yuda 16; Baebele 13:7) Soki tozali sembo na ebongiseli ya Yehova, tokomonisa ete Yehova azali Nzambe na biso mpe ete tozali na bomoko kati na losambo na ye.​—1 Bakolinti 15:58.

Bozongeli

• Ebongiseli ya Yehova oyo ezali komonana ezali nini lelo oyo? Mokano na yango ezali nini?

• Nani aponami Mokonzi ya lisangá, mpe na nzela ya bibongiseli nini oyo ezali komonana azali kotambwisa biso na bolingo mpenza?

• Bizaleli nini ya malamu tosengeli komonisa epai na baoyo bazali na kati ya ebongiseli ya Yehova?

[Bililingi na lokasa 133]

Yehova atambwisaka biso na nzela ya ebongiseli na ye, oyo Klisto azali mokonzi na yango

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto