MOKAPO 3
“Bókanisaka baoyo bazali kokamba bino”
MALOBA yango ya ntoma Paulo, oyo ezali na Baebre 13:7, ekoki mpe kobongolama na: “Bókanisaka baoyo bazali baguvɛrnɛrɛ na bino.” Kobanda na Pantekote ya mobu 33 T.B., bantoma ya sembo ya Nkolo Yesu Kristo bakokisaki mokumba ya kozala lisangani ya mikóló-bakambi, oyo ezalaki kotambwisa makambo na lisangá ya bokristo oyo eutaki kosalema. (Mis. 6:2-4) Kasi na mobu soki 49 T.B., lisangani ya mikóló-bakambi ezalaki kaka bantoma ya Yesu te, bato mosusu mpe babakisamaki. Ntango batalelaki likambo etali kokatama ngenga, lisangani ya mikóló-bakambi esangisaki “bantoma mpe bankulutu na Yerusaleme.” (Mis. 15:1, 2) Bango nde bazalaki na mokumba ya kotalela makambo oyo etalaki bakristo na bisika nyonso. Batindaki mikanda mpe malako, oyo elendisaki masangá mpe esalisaki bayekoli bákoba kozala na bomoko na makanisi mpe na misala. Masangá ezalaki kotosa mpe kolanda malako ya lisangani ya mikóló-bakambi, mpe na ndenge yango, ezalaki kozwa lipamboli ya Yehova mpe kokola.—Mis. 8:1, 14, 15; 15:22-31; 16:4, 5; Ebr. 13:17.
2 Nsima ya liwa ya bantoma, lipɛngwi monene ebandaki. (2 Tes. 2:3-12) Ndenge Yesu asakolaki yango na lisese ya blé mpe matiti mabe, matiti mabe (bakristo ya lokuta) elonamaki na katikati ya blé (bakristo oyo batyami mafuta na elimo). Na boumeli ya basiɛklɛ ebele, batikaki bituluku yango nyonso ekola esika moko tii na eleko ya kobuka mbuma, to “bosukisi ya makambo ya ntango yango.” (Mat. 13:24-30, 36-43) Na boumeli ya ntango yango, Yesu azalaki kokoba kondima mokristo mokomoko oyo atyami mafuta na elimo, kasi lisangani ya mikóló-bakambi ezalaki te; awa na mabele, ezalaki te na nzela moko boye ya polele oyo Yesu azalaki kosalela mpo na kotambwisa bayekoli na ye. (Mat. 28:20) Kasi, asakolaki ete makambo ekobongwana na eleko ya kobuka mbuma.
3 “Nani azali mpenza moombo ya sembo mpe ya mayele?” Ezali na motuna wana nde Yesu abandaki lisese to ndakisa moko oyo ezalaki na kati ya “elembo” ya “bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” (Mat. 24:3, 42-47) Yesu amonisaki ete moombo ya sembo yango akozala na mosala mingi ya kopesa basaleli ya Nzambe bilei ya elimo “na ntango oyo ebongi.” Mpo na kokamba lisangá na siɛklɛ ya liboso, Yesu asalelaki etuluku ya bato, kasi moto moko te; ndenge moko mpe na bosukisi ya makambo ya ntango oyo, moombo ya sembo oyo Yesu azali kosalela ezali moto moko te.
NANI AZALI “MOOMBO YA SEMBO MPE YA MAYELE?”
4 Nani oyo Yesu atyaki mpo na koleisa bayekoli na ye? Ebongi kaka asalela bakristo oyo batyami mafuta na elimo awa na mabele. Biblia ebengi bango “bonganga-nzambe ya bokonzi,” oyo ezwi mokumba ya ‘“kosakola bizaleli malamu” ya moto oyo abengaki [bango] bálongwa na molili bákɔta na pole na ye ya kokamwa.’ (1 Pe. 2:9; Mal. 2:7; Em. 12:17) Moombo ya sembo ezali nde bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo awa na mabele? Te. Ntango Yesu asalaki likamwisi ya koleisa mibali soki 5 000, longola basi ná bana, akabolaki naino bilei yango epai ya bayekoli na ye, na nsima bayekoli bakabolaki yango epai ya ebele ya bato. (Mat. 14:19) Aleisaki ebele ya bato na nzela ya bato moke. Lelo oyo mpe, azali kopesa bilei ya elimo kaka ndenge wana.
5 Na yango, “kapita ya sembo, ya mayele,” ezali mwa etuluku moke ya bandeko mibali oyo batyami mafuta na elimo, oyo basalaka mosala ya kobongisa bilei ya elimo mpe kokabola yango na ntango oyo ya kozala ya Kristo. (Luka 12:42) Na eleko ya mikolo ya nsuka, bandeko yango oyo bazali “moombo ya sembo mpe ya mayele” basalaka elongo na biro monene. Lelo oyo, bandeko yango oyo batyami mafuta na elimo nde bazali Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova.
6 Kristo asalelaka lisangani yango mpo na koyebisa makambo etali kokokisama ya bisakweli ya Biblia mpe kopesa na ntango ebongi malako mpo na ndenge ya kosalela mitinda ya Biblia na bomoi ya mokolo na mokolo. Bilei yango ya elimo ekabolamaka na nzela ya masangá ya Batatoli ya Yehova. (Yis. 43:10; Gal. 6:16) Na ntango ya kala, moombo, to kapita, oyo bazalaki kotyela motema, azalaki kotambwisa misala na ndako ya nkolo na ye. Ndenge moko mpe, moombo ya sembo mpe ya mayele azali na mokumba ya kotambwisa ndako ya kondima. Na yango, moombo ya sembo akɛngɛlaka mpe biloko ya mosuni, mosala ya kosakola, kobongisama ya mayangani ya mike mpe ya minene, kotyama ya bakɛngɛli na mikumba ndenge na ndenge na ebongiseli ya Yehova, mpe kobimisama ya mikanda oyo elimbolaka Biblia; nyonso wana mpo na bolamu ya “basali ya ndako.”—Mat. 24:45.
7 Bongo, banani bazali “basali ya ndako”? Na mokuse, ezali bato oyo bazali koleisama. Liboso, basali nyonso ya ndako bazalaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Na nsima, ebele mpenza ya bato ya “bampate mosusu” bakɔtaki mpe na molɔngɔ ya basali ya ndako. (Yoa. 10:16) Bituluku yango nyonso mibale ezali kozwa bilei ya elimo kaka moko oyo moombo ya sembo azali kopesa.
8 Na bolɔzi monene, ntango Yesu akoya mpo na kokata makambo mpe kopesa mokili oyo mabe etumbu, akotya moombo ya sembo mpo “abatela biloko na ye nyonso.” (Mat. 24:46, 47) Bandeko oyo bazali moombo ya sembo bakozwa mbano na bango ya kokende na likoló. Elongo na bato mosusu oyo bazali na kati ya bato 144 000, bakoyangela elongo na Kristo na likoló. Atako moombo ya sembo mpe ya mayele akozala lisusu te awa na mabele, Yehova ná Yesu bakokoba kotambwisa bana-mboka ya Bokonzi ya Masiya awa na mabele na nzela ya “bankumu” oyo bakotyama.—Nz. 45:16.
MPO NA NINI TOSENGELI ‘KOKANISAKA BAOYO BAZALI KOKAMBA BISO’?
9 Ezali na bantina mingi oyo etindaka biso ‘tókanisaka baoyo bazali kokamba biso’ mpe tómonisaka ete totyelaka bango motema. Mpo na nini kosala bongo ezali mpo na litomba na biso? Ntoma Paulo alobaki ete: “Mpo bazali kokɛngɛla milimo na bino lokola bato oyo bakozongisa monɔkɔ; mpo básalaka yango na esengo kasi na komilelalela te, mpo ekozala likama mpo na bino.” (Ebr. 13:17) Ezali na ntina mingi tótosa mpe tólanda litambwisi ya baoyo bazali kokamba biso mpo bazali kokɛngɛla biso mpo na libateli mpe bolamu na biso ya elimo.
10 Na 1 Bakorinti 16:14, ntoma Paulo alobaki ete: “Makambo na bino nyonso esalema na bolingo.” Bolingo yango, ezaleli oyo eleki bizaleli mosusu, nde esimbaka bikateli oyo ezwamaka mpo na basaleli ya Nzambe. Mokapo ya 1 Bakorinti 13:4-8 elobi ete: “Bolingo ezali na motema molai mpe na boboto. Bolingo ezali na zuwa te, emikumisaka te, emivimbisaka na lolendo te, esalaka makambo ya nsɔni te, elukaka matomba na yango moko te, esilikaka te. Ebombaka mabe na motema te. Esepelaka na makambo ya kozanga boyengebene te, kasi esepelaka nde na solo. Ekangaka motema na makambo nyonso, endimaka makambo nyonso, elikyaka makambo nyonso, mpe eyikaka mpiko na makambo nyonso. Bolingo esilaka soki moke te.” Lokola bolingo nde esimbi bikateli nyonso oyo ezwamaka mpo na bolamu ya basaleli ya Yehova, tokoki koyoka ete litambwisi yango ebatelaka biso. Lisusu, yango emonisaka ete Yehova alingaka biso.
Ezali na ntina mingi tómikitisa liboso ya baoyo bazali kokɛngɛla biso mpo na bolamu na biso ya elimo
11 Kaka ndenge ezalaki na siɛklɛ ya liboso, bandeko mibali oyo Yehova azali kosalela mpo na kokamba basaleli na ye bazali bato ya kozanga kokoka. Kasi, Yehova asalelaki bato ya kozanga kokoka na ntango ya kala mpo na kokokisa mokano na ye. Noa atongaki masuwa mpe asakolaki mpo na mpela oyo esengelaki koya koboma bato mabe na ntango na ye. (Eba. 6:13, 14, 22; 2 Pe. 2:5) Moize aponamaki mpo na kobimisa libota ya Yehova na boombo na Ezipito. (Kob. 3:10) Bato ya kozanga kokoka batambwisamaki na elimo santu mpo na kokoma Biblia. (2 Tim. 3:16; 2 Pe. 1:21) Ndenge Yehova azali kosalela bato ya kozanga kokoka lelo oyo mpo na kokamba mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli esengeli te kotinda biso tótika kotyela ebongiseli na ye motema. Kutu, tosengeli nde kotyela yango motema lisusu mingi koleka mpo toyebi ete soki na lisungi ya Yehova te, mbɛlɛ ebongiseli yango ekokaka te kosala makambo nyonso oyo ezali kosala. Atako mikakatano mpe makambo ndenge na ndenge, moombo ya sembo amonisi ete elimo ya Nzambe nde ezali kotambwisa makambo. Na mikolo na biso, eteni ya ebongiseli ya Yehova oyo ezali awa na mabele ezwi ebele ya mapamboli. Yango wana, tozali kopesa yango mabɔkɔ mpe kotyela yango motema na biso mobimba.
NDENGE OYO TOMONISAKA ETE TOTYELAKA EBONGISELI YA YEHOVA MOTEMA
12 Bandeko oyo bazali na mikumba na lisangá bamonisaka ete batyelaka ebongiseli ya Yehova motema soki bandimi mikumba yango na esengo nyonso mpe bazali kokokisa yango na bosembo mpenza. (Mis. 20:28) Basakoli ya Bokonzi bazalaka molende na mosala ya kosakola ndako na ndako, kozongela bato, mpe kotambwisa boyekoli ya Biblia. (Mat. 24:14; 28:19, 20) Mpo tózwa mpenza matomba na ebele ya bilei ya elimo oyo moombo ya sembo azali kopesa, tobongisaka makita na biso ya bokristo mpe toyanganaka na makita yango, tokendaka mpe na mayangani, ezala ya mike to ya minene. Tozwaka matomba mingi mpe tolendisamaka mingi ntango tokutanaka elongo na bandeko na biso bakristo na mayangani mpe na makita yango.—Ebr. 10:24, 25.
13 Tomonisaka mpe ete totyelaka ebongiseli ya Yehova motema ntango topesaka makabo mpo na kosunga ebongiseli yango. (Mas. 3:9, 10) Ntango tomoni bandeko na biso bazali kokelela, tosalisaka bango nokinoki. (Gal. 6:10; 1 Tim. 6:18) Tosalaka bongo mpo na komonisa ete tolingaka mpenza bandeko na biso, tolukaka ntango nyonso mabaku ya komonisa Yehova mpe ebongiseli na ye ete tozali na botɔndi mpo na bolamu oyo tozwaka.—Yoa. 13:35.
14 Tomonisaka mpe ete totyelaka ebongiseli ya Yehova motema ntango tondimaka mpe totosaka bikateli oyo yango ezali kozwa. Yango esɛngi mpe kotosa na komikitisa nyonso litambwisi ya bakɛngɛli oyo bazali kokamba biso, na ndakisa bakɛngɛli ya zongazonga mpe bankulutu ya lisangá. Bandeko wana bazali mpe na kati ya ‘baoyo bazali kokamba biso,’ oyo tosengeli kotosa mpe komikitisa liboso na bango. (Ebr. 13:7, 17) Ata soki tokangi mpenza te ntina ya bikateli mosusu, toyebi ete kondima bikateli yango ekomemela biso bolamu oyo ekoumela. Yango wana, Yehova apambolaka biso mingi mpo totosaka Liloba na ye mpe ebongiseli na ye. Na ndenge yango, tomonisaka ete totosaka Nkolo na biso, Yesu Kristo.
15 Ya solo, tozali na bantina mingi ya kotyela moombo ya sembo mpe ya mayele motema. Satana, nzambe ya makambo ya ntango oyo, azali kosala nyonso mpo na kosambwisa nkombo ya Yehova mpe ebongiseli na ye. (2 Ko. 4:4) Kokwea te na mitambo ya Satana! (2 Ko. 2:11) Ayebi ete azali na “ntango mokuse” liboso ete bábwaka ye na libulu mozindo, mpe mokano na ye ezali ete abungisa ebele ya basaleli ya Yehova nzela. (Em. 12:12) Nzokande, wana Satana azali kosala milende nyonso wana, tiká ete tópusana lisusu penepene na Yehova. Tiká ete tótyela Yehova motema, mpe ebongiseli oyo azali kosalela mpo na kokamba bato na ye lelo oyo. Soki tosali bongo, tokozala na bomoko na bandeko ya mokili mobimba.