Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/3 nk. 8-12
  • “Moombo” oyo azali sembo mpe mayele

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Moombo” oyo azali sembo mpe mayele
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Moto moko to etuluku ya bato?
  • “Moombo” alongolami
  • “Moto na moto mosala na ye”
  • “Moombo” nsima ya mbula soki 1 900
  • “Nani azali mpenza moombo ya sembo mpe ya mayele?”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • “Bazali kokoba kolanda Mwana-mpate”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Nani azali moombo ya sembo mpe ya mayele?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
  • Kapita ya sembo mpe Lisangani Ya Mikóló-Bakambi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/3 nk. 8-12

“Moombo” oyo azali sembo mpe mayele

“Nani azali solo moombo ya sembo mpe ya mayele oyo nkolo na ye atye likoló ya basali ya ndako na ye?”​—MATAI 24:45.

1, 2. Mpo na nini lelo oyo ezali na ntina tózwaka ntango nyonso bilei ya elimo?

MOKOLO ya mibale, 11 Nisana ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), na nsima ya midi, bayekoli ya Yesu batunaki ye motuna moko oyo ezali na ntina mingi mpo na biso lelo oyo. Batunaki ye boye: “Nini ekozala elembo ya kozala na yo mpe ya bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo?” Na eyano na ye, Yesu asakolaki makambo minene mpenza. Asakolaki ntango moko oyo bitumba, nzala, koningana ya mabelé, mpe bamaladi ekozala. Mpe yango ekozala kaka “ebandeli ya bampasi.” Makambo ya mpasi koleka ekoya na nsima. Ekozala nsɔmɔ mpenza!​—Matai 24:3, 7, 8, 15-22; Luka 21:10, 11.

2 Makambo mingi oyo Yesu asakolaki ezali kokokisama banda 1914. Bato bazali koyoka mpenza “bampasi” yango. Atako bongo, baklisto ya solo basengeli kobanga te. Yesu alakaki ete akopesa bango bilei ya elimo. Lokola Yesu azali sikoyo na likoló, ebongiseli nini asali mpo biso awa na mabelé tózwaka bilei ya elimo?

3. Ebongiseli nini Yesu azwaki mpo biso tózwaka “bilei na ntango ebongi”?

3 Yesu ye moko apesaki eyano na motuna yango. Ntango azalaki kosakola makambo minene wana, atunaki motuna oyo: “Nani azali solo moombo ya sembo mpe ya mayele oyo nkolo na ye atye likoló ya basali ya ndako na ye, mpo na kopesa bango bilei na bango na ntango oyo ebongi?” Na nsima alobaki boye: “Esengo na moombo yango soki nkolo na ye ntango akoya akuti ye azali kosala bongo! Ya solo mpenza nazali koloba na bino ete, Akotya ye likoló ya biloko na ye nyonso.” (Matai 24:45-47) Tomoni ete esengelaki kozala na “moombo” moko oyo akozala na mokumba ya kopesa bilei ya elimo, “moombo” oyo asengeli kozala sembo mpe mayele. Moombo yango ekozala nde moto moko, to bato oyo bakobanda kokitana na mokumba yango, to ndenge nini? Lokola moombo ya sembo azali kopesa ebele ya bilei ya elimo, ezali na ntina tóyeba eyano na motuna yango.

Moto moko to etuluku ya bato?

4. Nini emonisi biso ete “moombo ya sembo mpe ya mayele” akoki kozala moto moko te?

4 “Moombo ya sembo mpe ya mayele” akoki kozala moto moko te. Mpo na nini? Mpamba te moombo yango abandaki kopesa bilei ya elimo na ekeke ya liboso, mpe Yesu alobaki ete asengelaki kokoba kosala bongo tii ntango Nkolo azongaki na 1914. Yango elingaki kosɛnga ete moto yango asalela Nzambe na bosembo na boumeli ya mbula soki 1 900. Ata kutu Metusela aumelaki bambula ebele ndenge wana te!​—Genese 5:27.

5. Limbolá ntina oyo tolobi ete “moombo ya sembo mpe ya mayele” ekoki kozala moklisto mokomoko te.

5 Ekoki nde kozala ete “moombo ya sembo mpe ya mayele” ezali moklisto mokomoko? Ezali solo ete baklisto nyonso basengeli kozala sembo mpe mayele; kasi, ezali polele ete Yesu azalaki na likanisi mosusu ntango alobelaki “moombo ya sembo mpe ya mayele.” Nini emonisi biso yango? Mpo alobaki ete “nkolo na ye ntango akoya” akotya ye “likoló ya biloko na ye nyonso.” Ndenge nini baklisto nyonso bakoki kozala likoló ya biloko nyonso ya Nkolo? Ekoki kosalema te!

6. Na ndenge nini ekólo Yisalaele esengelaki kozala “mosaleli,” to “moombo” ya Nzambe?

6 Na bongo, eyano ya malamu ezali ete “moombo ya sembo mpe ya mayele” oyo Yesu alobelaki ezali etuluku ya baklisto. Ekoki mpenza kosalema ete moombo yango azala etuluku moko ya baklisto? Ɛɛ. Mbula 700 liboso Klisto aya, Yehova abengaki ekólo mobimba ya Yisalaele ete “batatoli na ngai” mpe “moombo na ngai oyo naponi.” (Yisaya 43:10) Banda mobu 1513 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), ntango Yehova apesaki bango Mibeko ya Moize, tii na Pantekote ya mobu 33 T.B., moto mokomoko na ekólo Yisalaele azalaki na etuluku yango oyo Yehova abengaki moombo. Bayisalaele oyo bazalaki kotambwisa makambo ya ekólo to ebongiseli na yango ya koleisa bato na elimo bazalaki mingi te. Yehova azalaki kopona bakonzi, bazuzi, basakoli, banganga-nzambe, mpe Balevi mpo na kokokisa mikumba wana. Kasi, ekólo mobimba ya Yisalaele basengelaki kozala bamonisi ya bokonzi ya Yehova mpe koyebisa masanzoli na ye na bikólo mosusu. Mwana ya Yisalaele mokomoko asengelaki kozala motatoli ya Yehova.​—Deteronome 26:19; Yisaya 43:21; Malaki 2:7; Baloma 3:1, 2. 

“Moombo” alongolami

7. Mpo na nini ekólo ya Yisalaele ya kala ebongaki lisusu te kozala “mosaleli” ya Nzambe?

7 Lokola ekólo Yisalaele ezalaká kala “mosaleli” ya Nzambe, ezali kaka ekólo yango nde moombo oyo Yesu alobelaki? Te, mpamba te Yisalaele ya kala emimonisaki sembo te, mayele mpe te. Paulo alobelaki likambo yango na mokuse ntango azongelaki maloba oyo Yehova ayebisaki bato ya ekólo yango ete: “Nkombo ya Nzambe ezali kotukama mpo na bino na kati ya bikólo mosusu.” (Baloma 2:24) Botomboki ya Yisalaele oyo eumelaki bambula ebele elekaki ndelo ntango baboyaki Yesu, mpe na bongo, Yehova aboyaki bango.​—Matai 21:42, 43.

8. Ntango nini “mosaleli” moko aponamaki mpo na kozwa esika ya Yisalaele, mpe makambo elekaki ndenge nini?

8 Yango elingi koloba te ete lokola “mosaleli,” Yisalaele, atikalaki sembo te, basambeli ya sembo bakozwa lisusu bilei ya elimo te mpo na libela. Na Pantekote ya mobu 33 T.B., mikolo 50 nsima ya lisekwa ya Yesu, bayekoli na ye soki 120 oyo bazalaki na ndako ya etaze na Yelusaleme bazwaki elimo santu. Na ntango wana, ekólo moko ya sika ebotamaki. Bato ya ekólo yango basakolaki kobotama na yango ntango babandaki koyebisa bato ya Yelusaleme na mpiko nyonso “makambo minene ya Nzambe.” (Misala 2:11) Na bongo, ekólo yango ya sika, ekólo ya elimo, ekómaki “mosaleli” oyo asengelaki kosakola nkembo ya Yehova epai ya bato ya bikólo mosusu mpe kopesa bilei na ntango ebongi. (1 Petelo 2:9) Ekólo yango ezwaki nkombo oyo ebongi mpenza ya “Yisalaele ya Nzambe.”​—Bagalatia 6:16.

9. (a) Banani bazali “moombo ya sembo mpe ya mayele”? (b) Banani bazali “basali ya ndako”?

9 Moto mokomoko ya “Yisalaele ya Nzambe” azali moklisto oyo amipesi na Nzambe, azwi batisimo, apakolami na elimo santu mpe azali na elikya ya kozwa bomoi na likoló. Na yango, “moombo ya sembo mpe ya mayele” ezali bato nyonso oyo bazali na ekólo yango ya bapakolami na elimo oyo bazalaki awa na mabelé na bileko nyonso banda mobu 33 T.B. tii lelo oyo, se ndenge oyo mwana ya Yisalaele mokomoko oyo azalaki na bomoi ata na eleko nini banda mobu 1513 L.T.B. tii na Pantekote ya mobu 33 T.B. azalaki na kati ya mosaleli ya Nzambe. Kasi, banani bazali “basali ya ndako” oyo moombo azali kopesa bilei ya elimo? Na ekeke ya liboso, moklisto mokomoko azalaki na elikya ya bomoi na likoló. Yango wana, basali ya ndako ezalaki moklisto mopakolami mokomoko, kasi etuluku na bango mobimba te. Bango nyonso, ata mpe baoyo bazalaki na mikumba na kati ya lisangá, basengelaki na bilei ya elimo oyo moombo azalaki kopesa.​—1 Bakolinti 12:12, 19-27; Baebele 5:11-13; 2 Petelo 3:15, 16.

“Moto na moto mosala na ye”

10, 11. Nini emonisi biso ete bato nyonso oyo bazali na etuluku ya moombo bazali na mikumba ndenge moko te?

10 “Yisalaele ya Nzambe” nde ezali moombo ya sembo mpe ya mayele mpe ezali na mokumba oyo bapesi yango, kasi moto mokomoko ya etuluku yango azali mpe na mikumba. Maloba ya Yesu na Malako 13:34 emonisi yango polele. Alobaki boye: “Ezali lokola moto oyo asali mobembo na mboka mopaya oyo atiki ndako na ye mpe apesi bokonzi na baombo na ye, moto na moto mosala na ye, mpe asɛngi na mokɛngɛli ya ekuke ete akɛngɛlaka.” Elingi koloba ete moto mokomoko oyo azali na kati ya etuluku oyo tobengi moombo azali na mokumba ya kobakisa bozwi ya Klisto awa na mabelé. Akosala mosala ndenge oyo makoki na ye ezali kopesa nzela mpe na kotalela mikumba na ye.​—Matai 25:14, 15.

11 Lisusu, ntoma Petelo ayebisaki baklisto bapakolami ya ntango na ye boye: “Na kotalela lolenge oyo moto na moto azwi likabo, bósalela yango mpo na kosalelana bino na bino lokola bakapita malamu ya boboto monene ya Nzambe oyo emonisami na mitindo ndenge na ndenge.” (1 Petelo 4:10) Na bongo, bapakolami yango bazali na mokumba ya kosalisana na ndenge bazali kosalela makabo oyo Nzambe apesi bango. Lisusu, maloba ya Petelo ezali komonisa ete baklisto nyonso bakoki kozala na makoki mpe mikumba ndenge moko te. Kasi, moto mokomoko oyo azali na etuluku ya moombo akoki kopesa mabɔkɔ mpo ekólo yango ya elimo ekola. Na ndenge nini?

12. Ndenge nini moto mokomoko oyo azalaki na etuluku ya moombo, mwasi to mobali, azalaki kopesa mabɔkɔ na bokoli ya moombo yango?

12 Ya liboso, mokomoko asengeli kozala motatoli ya Yehova, elingi koloba asengeli kosakola nsango malamu ya Bokonzi. (Yisaya 43:10-12; Matai 24:14) Liboso Yesu amata na likoló, asɛngaki bayekoli na ye nyonso ya sembo, mibali mpe basi, bázala balakisi. Alobaki boye: “Na yango bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, kobatisáká bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, koteyáká bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino etinda. Mpe, talá! nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.”​—Matai 28:19, 20.

13. Libaku malamu nini bapakolami nyonso bazalaki na yango?

13 Ntango bazwi bayekoli ya sika, basengelaki koteya bango malamumalamu kotosa makambo oyo Klisto atindaki bayekoli na ye. Na nsima, baoyo bandimaki nsango yango bakómaki na makoki ya koteya basusu. Na bikólo mingi, bilei malamu ya elimo ekómaki kopesama epai ya bato oyo basengelaki mpe kokɔta na etuluku ya moombo. Bapakolami nyonso, mibali mpe basi, bazalaki kopesa mabɔkɔ mpo na kokokisa mokumba ya kokómisa bato bayekoli. (Misala 2:17, 18) Mosala yango esengelaki kosalema bongo banda ntango moombo abandaki mosala na ye tii na nsuka ya ebongiseli ya makambo.

14. Banani bazalaki na mokumba ya koteya na kati ya lisangá, mpe ndenge nini basi baklisto ya sembo oyo bazali bapakolami bazalaki kotalela likambo yango?

14 Bapakolami oyo bazwi batisimo sika bazalaki kokɔta na etuluku yango ya moombo, mpe ata soki nani ateyaki bango liboso, bakobaki koyoka mateya ya bankulutu oyo bakokisaki masɛngami ya Biblia. (1 Timote 3:1-7; Tito 1:6-9) Na ndenge yango, mibali yango bazalaki na libaku malamu ya kopesa mabɔkɔ mpo ekólo yango ekola. Baklisto ya basi ya sembo oyo bazalaki bapakolami bazalaki koyoka mabe te ndenge mokumba ya koteya na lisangá epesamaki kaka na mibali. (1 Bakolinti 14:34, 35) Kutu, bazalaki kosepela na mosala makasi ya mibali na kati ya lisangá mpe bazalaki na botɔndi mpo na mikumba oyo basi bakokaki kokokisa, na ndakisa mokumba ya komemela bato mosusu nsango malamu. Lelo oyo, bandeko basi ya molende oyo bazali bapakolami bazalaka na elimo ya komikitisa ndenge wana, ezala bankulutu na lisangá na bango bazali bapakolami to te.

15. Na ekeke ya liboso, bilei ya elimo ezalaki kouta libosoliboso wapi, mpe banani bazalaki kopesa yango?

15 Bilei ya elimo oyo ezalaki kopesama na ekeke ya liboso ezalaki libosoliboso mikanda ya bantoma mpe ya bayekoli mosusu oyo bazalaki kokamba lisangá. Mikanda oyo bakomaki, mingimingi oyo ezali na kati ya mikanda 27 ya Makomami ya Grɛki ya boklisto oyo ekomamaki na nguya ya elimo, ezalaki kotambola na masangá mpe ntembe ezali te ete bankulutu bazalaki kosalela yango mpo na koteya masangá. Na ndenge yango, bamonisi ya moombo bazalaki kopesa baklisto ya sembo bilei malamu ya elimo na bosembo. Moombo ya ekeke ya liboso akokisaki mokumba na ye na bosembo.

“Moombo” nsima ya mbula soki 1 900

16, 17. Ndenge nini moombo amonisaki ete azali sembo na mosala na ye tii na 1914?

16 Tokoloba boni lelo oyo? Ntango kozala ya Yesu ebandaki na 1914, akutaki nde etuluku ya baklisto bapakolami oyo bazalaki na bosembo mpenza kopesa bilei ya elimo na ntango ebongi? Ɛɛ. Etuluku yango ekokaki koyebana na mbuma malamu oyo ezalaki kobota. (Matai 7:20) Makambo oyo eleki banda na mbula wana ezali komonisa ete ezalaki mpenza bango.

17 Ntango Yesu ayaki, basali ya ndako soki 5 000 bazalaki kopalanganisa mateya ya solo ya Biblia. Basali bazalaki moke, kasi moombo asalelaki mayele ndenge na ndenge mpo na kopalanganisa nsango malamu. (Matai 9:38) Na ndakisa, basalaki ebongiseli ya kobimisa masolo ya Biblia na bazulunalo soki 2 000 ya mokili. Na ndenge yango, bankóto mingi ya bato bakokaki koyoka solo ya Liloba ya Nzambe. Lisusu, babimisaki filme moko oyo ezalaki koumela ngonga mwambe, ezalaki diapozitive ya langilangi mpe bililingi oyo ezali koningana. Filme yango esalisaki na koteya bato koleka milio 9 na kati ya bakɔntina misato nsango ya Biblia, banda na lisolo ya bozalisi tii na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto. Bazalaki mpe kokabola mikanda. Na ndakisa, na 1914, bakabolaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli soki 50 000.

18. Ntango nini Yesu atyaki moombo likoló ya biloko na ye nyonso, mpe mpo na nini?

18 Ntango Nkolo ayaki, akutaki mpenza moombo na ye ya sembo azali koleisa basali ya ndako mpe azali kosakola nsango malamu. Moombo yango asengelaki kozwa mikumba ya minene. Yesu alobaki boye: “Ya solo mpenza nazali koloba na bino ete, Akotya ye likoló ya biloko na ye nyonso.” (Matai 24:47) Yesu asalaki yango na 1919, nsima wana moombo yango alekaki na ntango moko ya komekama. Kasi, mpo na nini “moombo ya sembo mpe ya mayele” azwaki mikumba ya minene? Mpamba te abakisaki bozwi ya Nkolo. Yesu akómaki Mokonzi na 1914.

19. Limbolá ndenge oyo bamposa ya elimo ya “ebele ya bato” ekokisamaki.

19 Nkolo yango oyo azwaki bokonzi sika atyaki moombo ya sembo likoló ya biloko nini? Biloko na ye nyonso ya elimo awa na mabelé. Na ndakisa, Klisto akómaki mokonzi na 1914 mpe mbula soki 20 na nsima, eyebanaki soki banani babengami “ebele ya bato” oyo bazali na kati ya “bampate mosusu.” (Emoniseli 7:9; Yoane 10:16) Bato yango bazalaki bapakolami te to “Yisalaele ya Nzambe,” kasi mibali mpe basi ya sembo oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabelé, oyo balingaki Yehova mpe balingaki kosalela ye ndenge bapakolami basalelaki ye. Kutu, balobaki na “moombo ya sembo mpe ya mayele” ete: “Tokokenda na yo elongo, zambi toyoki ete Nzambe azali elongo na bino.” (Zekalia 8:23) Baklisto yango oyo bazwaki batisimo sika bazalaki kolya bilei ya elimo na mesa moko na basali oyo bazali bapakolami, mpe banda wana, bango nyonso bazali kolya esika moko. Ezali lipamboli monene mpo na “ebele ya bato”!

20. Mosala nini “ebele ya bato” basali mpo na kobakisa bozwi ya Nkolo?

20 “Ebele ya bato” basanganaki na esengo na moombo na mosala ya kosakola nsango malamu. Mosala na bango ya kosakola ebakisaki bozwi ya Nkolo awa na mabelé, mpe yango ebakisaki mikumba ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” Lokola bato oyo bazali na mposa ya solo bazalaki se kobakisama, esengelaki kozala na bandako minene mpo na kobimisa mikanda oyo basengelaki na yango. Bafiliale ya Batatoli ya Yehova esalemaki na mikili ndenge na ndenge. Bamisionɛrɛ batindamaki “tii na esika eleki mpenza mosika na mabelé.” (Misala 1:8) Bapakolami bazalaki soki 5 000 na 1914; nzokande, basanzoli ya Nzambe bakómi koleka milio 6 lelo oyo, mpe mingi bazali na kati ya “ebele ya bato.” Ya solo, bozwi ya Mokonzi ebakisami mingi banda azwaki bokonzi na 1914!

21. Wapi bandakisa mibale oyo tokolobela na boyekoli oyo ekolanda?

21 Makambo nyonso wana emonisi ete moombo azalaki ‘sembo mpe mayele.’ Nsima ya kolobela “moombo ya sembo mpe ya mayele,” Yesu apesaki bandakisa mibali oyo emonisaki bizaleli yango: ndakisa ya bangɔndɔ ya mayele mpe bangɔndɔ ya zoba mpe ndakisa ya talanta. (Matai 25:1-30) Likambo yango ebendi likebi na biso! Bandakisa yango ezali na ndimbola nini mpo na biso lelo oyo? Tokotalela motuna yango na lisolo oyo elandi.

Okanisi boni?

• Banani bazali “moombo ya sembo mpe ya mayele”?

• Banani bazali “basali ya ndako”?

• Ntango nini batyaki moombo ya sembo likoló ya bozwi ya Nkolo, mpe mpo na nini na ntango wana?

• Banda bambula mwa mingi sikoyo, banani bazali kopesa mabɔkɔ mpo na kobakisa bozwi ya Nkolo, mpe ndenge nini bazali kosala yango?

[Bililingi na lokasa 10]

Moombo ya ekeke ya liboso azalaki sembo na mosala na ye

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto