Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/6 nk. 20-24
  • Kapita ya sembo mpe Lisangani Ya Mikóló-Bakambi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kapita ya sembo mpe Lisangani Ya Mikóló-Bakambi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mosaleli ya Yehova na ntango ya kala
  • Moombo ya sembo amonani
  • Moombo ya sembo na ntango na biso
  • Makanisi oyo ebongi
  • “Moombo” oyo azali sembo mpe mayele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Tótikala sembo epai ya Klisto ná moombo na ye ya sembo mpe ya mayele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • “Nani azali mpenza moombo ya sembo mpe ya mayele?”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • “Moombo na Sembo” mpe College Central
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/6 nk. 20-24

Kapita ya sembo mpe Lisangani Ya Mikóló-Bakambi

“Nani azali mpenza kapita ya sembo, ya mayele, oyo nkolo na ye akotya likoló ya basaleli na ye nyonso mpo apesaka bango ndambo na bango ya bilei na ntango oyo ebongi?”​—LUKA 12:42.

1, 2. Motuna nini ya ntina mingi Yesu atunaki ntango azalaki kolobela elembo ya mikolo ya nsuka?

NTANGO azalaki kopesa elembo ya mikolo ya nsuka, Yesu atunaki boye: “Nani azali solo moombo ya sembo mpe ya mayele oyo nkolo na ye atye likoló ya basali ya ndako na ye, mpo na kopesa bango bilei na bango na ntango oyo ebongi?” Na nsima, Yesu alobaki ete moombo yango akozwa mbano mpo na bosembo na ye, akotyama likoló ya biloko nyonso ya Nkolo.​—Mat. 24:45-47.

2 Basanza mingi liboso, Yesu atunaki motuna moko ya ndenge wana. (Tángá Luka 12:42-44.) Abengaki moombo yango “kapita” mpe abengaki “basali ya ndako” “basaleli na ye.” Kapita azali mokambi to moto oyo atambwisaka makambo na ndako mpe azalaka likoló ya basali mosusu. Atako bongo, ye mpe azali mosali. Moombo to kapita yango nde nani, mpe ndenge nini apesaka ‘bilei na ntango ebongi’? Ezali na ntina ete biso nyonso tóyeba nzela oyo Nzambe azali kosalela mpo na kopesa bilei ya elimo.

3. (a) Ndenge nini balimboli ya maloba ya Biblia na mangomba ya boklisto bamekaki kolimbola maloba ya Yesu oyo etali “moombo”? (b) Nani azali “kapita” to “moombo,” mpe “basaleli” to “basali ya ndako” ezali banani?

3 Mbala mingi, balimboli ya maloba ya Biblia oyo bazali na mangomba ya boklisto balobaka ete maloba wana ya Yesu etali baoyo bazali na mikumba minene na kati ya bato oyo balobaka ete bazali baklisto. Nzokande Yesu, oyo azali “nkolo” na ndakisa wana, alobaki te ete ekozala na baombo ebele na mangomba ndenge na ndenge ya boklisto. Alobaki polele nde ete ekozala kaka na “kapita,” to “moombo” moko, oyo akotyama likoló ya biloko na ye nyonso. Na yango, ndenge zulunalo oyo elimbolá yango mbala na mbala, kapita ezali nde “etonga moke” to bayekoli oyo bapakolami na elimo. Na lisolo oyo ezali na Evanzile ya Luka, Yesu autaki kolobela nde bango. (Luka 12:32) “Basaleli” to “basali ya ndako” ezali kaka baklisto bapakolami, kasi nkombo wana ebendaka likebi na misala oyo bazali kokokisa moto na moto. Motuna oyo esengeli kobenda likebi na biso yango oyo: Moto mokomoko oyo azali na etuluku ya moombo asalaka mwa eloko na mosala ya kopesa bilei ya elimo na ntango oyo ebongi? Eyano ekomonana polele soki totaleli na mozindo oyo Makomami elobi.

Mosaleli ya Yehova na ntango ya kala

4. Ndenge nini Yehova abengaki ekólo Yisalaele ya kala, mpe likambo nini ya ntina tosengeli koyeba mpo na ekólo yango?

4 Yehova alobaki ete basaleli na ye, ekólo mobimba ya Yisalaele, bazali mosaleli na ye. “Bino [na boike] bozali batatoli [na boike] na ngai mpe [mosaleli, NW] [na booko] na ngai, oyo nasili kopona yo.” (Yis. 43:10) Bato nyonso ya ekólo batángamaki na kati ya mosaleli wana. Kasi, ezali na ntina tóyeba ete kaka banganga-nzambe ná Balevi oyo bazalaki banganga-nzambe te nde bazalaki na mokumba ya koteya ekólo Yisalaele.​—2 Nta. 35:3; Mki. 2:7.

5. Na kolanda maloba ya Yesu, mbongwana nini monene esengelaki kosalema?

5 Ekólo ya Yisalaele nde moombo oyo Yesu alobelaki? Te. Toyebi yango mpo na maloba oyo Yesu alobaki na Bayuda ya mikolo na ye ete: “Bokonzi ya Nzambe ekolongolama epai na bino mpe ekopesama na ekólo moko oyo ekobota bambuma na yango.” (Mat. 21:43) Emonanaki mpenza ete mbongwana esengelaki kosalema. Yehova asengelaki kosalela ekólo moko ya sika. Kasi, na oyo etali makambo oyo Nzambe azali kosɛnga bato, moombo oyo Yesu alobeli na lisese na ye asalaka lokola “mosaleli” ya Nzambe na Yisalaele ya kala.

Moombo ya sembo amonani

6. Ekólo nini ya sika ebimaki na Pantekote ya mobu 33 T.B., mpe banani bakómaki bato na yango?

6 Ekólo ya sika, “Yisalaele ya Nzambe,” esalemi na Bayisalale ya elimo. (Gal. 6:16; Lom. 2:28, 29; 9:6) Ebimaki na Pantekote ya mobu 33 T.B., ntango elimo santu ya Nzambe ekitelaki bayekoli. Na nsima, baklisto bapakolami nyonso bakómaki bato ya ekólo oyo ezali lelo oyo moombo oyo Nkolo Yesu Klisto atyaki. Moto mokomoko ya ekólo yango azwaki mokumba ya kosakola nsango malamu mpe kokómisa bato bayekoli. (Mat. 28:19, 20) Kasi, moto mokomoko ya etuluku yango asengelaki kosala mwa eloko na mosala ya kopesa bilei ya elimo na ntango oyo ebongi? Tótala ndenge Makomami eyanoli na motuna yango.

7. Na ebandeli, mosala ya libosoliboso ya bantoma ezalaki nini, mpe mokumba nini bazwaki na nsima?

7 Ntango Yesu aponaki bantoma na ye 12, mosala ya libosoliboso oyo atindaki bango ezalaki ya kosakwela basusu nsango malamu. (Tángá Malako 3:13-15.) Mosala yango ezalaki na boyokani na ndimbola ya libosoliboso ya liloba ya Grɛki apostolos, oyo euti na verbe moko oyo elimboli “motindami.” Nzokande, wana ntango elekaki mpe lisangá ya boklisto elingaki kobotama, mokumba ya ntoma ekómaki ‘mosala ya bokɛngɛli.’​—Mis. 1:20-26.

8, 9. (a) Bantoma 12 bazalaki komibanzabanza libosoliboso mpo na likambo nini? (b) Banani mosusu bazwaki mikumba minene, ndenge lisangani ya mikóló bakambi bandimaki yango?

8 Bantoma 12 bazalaki komibanzabanza libosoliboso mpo na likambo nini? Tokoki kozwa eyano na makambo oyo esalemaki nsima ya Pantekote. Ntango kowelana ebimaki na likambo etali kokabolela basi bakufelá mibali biloko ya mokolo na mokolo, bantoma 12 bayanganisaki bayekoli mpe balobaki boye: “Ezali kosepelisa biso te ete tótika liloba ya Nzambe mpo na kokabolaka biloko ya kolya na bamesa.” (Tángá Misala 6:1-6.) Na yango, bantoma baponaki mibali mosusu oyo bakɔmeli na elimo mpo bákokisa “mokumba oyo ya ntina,” mpo bantoma bákoka komipesa “na mosala ya ministre ya liloba.” Yehova apambolaki ebongiseli wana mpo “liloba ya Nzambe ekobaki kokola, mpe motángo ya bayekoli ekobaki kobakisama mingi mpenza na kati ya Yelusaleme.” (Mis. 6:7) Na yango, koleisa bato na elimo ezalaki libosoliboso mokumba ya bantoma.​—Mis. 2:42.

9 Na nsima, basusu bazwaki mikumba minene. Na lisalisi ya elimo santu, lisangá ya Antiokia etindaki Paulo ná Balanabasi bamisionɛrɛ. Bango mpe bakómaki kobengama bantoma, atako bazalaki te na kati ya bantoma 12 ya libosoliboso. (Mis. 13:1-3; 14:14; Gal. 1:19) Na nsima, lisangani ya mikóló-bakambi oyo ezalaki na Yelusaleme endimaki koponama na bango. (Gal. 2:7-10) Mwa moke nsima na yango, Paulo mpe akómaki kosala mwa eloko na mosala ya kokabola bilei ya elimo. Akomaki mokanda na ye ya liboso na lisalisi ya elimo santu.

10. Na ekeke ya liboso, baklisto bapakolami, bazalaki bango nyonso kosala mwa eloko na mosala ya kobongisa bilei ya elimo? Limbolá.

10 Kasi, baklisto bapakolami nyonso bazalaki kotambwisa mosala ya kosakola mpe kobongisa bilei ya elimo? Te. Ntoma Paulo alobi boye: “Ezali bato nyonso te nde bazali bantoma, boye te? Ezali bato nyonso te nde bazali basakoli, boye te? Ezali bato nyonso te nde bazali bateyi, boye te? Ezali bato nyonso te nde basalaka misala ya nguya, boye te?” (1 Kol. 12:29) Atako baklisto bapakolami nyonso bamipesaki na mosala ya kosakola, Nzambe asalelaki kaka mwa ndambo moke​—mibali mwambe mpamba na kati na bango—​mpo bákoma mikanda 27 ya Makomami ya Grɛki ya boklisto.

Moombo ya sembo na ntango na biso

11. Moombo atyamaki likoló ya “biloko” nini?

11 Maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 24:45 emonisi polele ete etuluku ya moombo ya sembo mpe ya mayele esengelaki kozala awa na mabelé na boumeli ya ntango ya nsuka. Emoniseli 12:17 ebengi bango ‘bato oyo batikalaki’ na momboto ya mwasi. Etuluku yango ya batikali, batyami bango nyonso likoló ya biloko nyonso ya Klisto awa na mabelé. “Biloko” oyo kapita ya sembo azali na mokumba ya kobatela ezali matomba ya Nkolo oyo ezali awa na mabelé, kati na yango bato oyo Bokonzi ekoyangela mpe bandako oyo etambwisaka mosala ya kosakola nsango malamu.

12, 13. Ndenge nini moklisto ayebaka ete abengami mpo na kokende likoló?

12 Ndenge nini moklisto ayebaka soki azali na elikya ya kokende likoló mpe soki azali na kati ya batikali ya Yisalaele ya elimo? Eyano ezali na maloba oyo ntoma Paulo akomelaki bato oyo bazalaki na elikya ya kokende likoló lokola ye: “Baoyo nyonso batambwisami na elimo ya Nzambe, bango bazali bana ya Nzambe. Mpo bozwaki te elimo ya boombo oyo ezali kopesa lisusu kobanga, kasi bozwaki nde elimo ya kokamatama lokola bana, oyo na nzela na yango togangaka ete: ‘Aba, Tata!’ Elimo yango moko epesaka litatoli elongo na elimo na biso ete tozali bana ya Nzambe. Boye, soki tozali bana, tozali mpe bazwi-ya-libula: ɛɛ bazwi-ya-libula ya Nzambe, kasi bazwi-ya-libula elongo na Klisto, soki tomoni mpasi elongo na ye mpo tózwa mpe nkembo elongo.”​—Lom. 8:14-17.

13 Vɛrsɛ yango emonisi polele ete bato yango bapakolami na elimo santu ya Nzambe mpe bazwi “kobengama” to “libyangi” ya likoló. (Ebe. 3:1) Nzambe nde abengaka bango. Bango mpe bandimaka na mbala moko kobotama bana ya Nzambe, kozanga komituna mituna, kobɛta ntembe to kobanga. (Tángá 1 Yoane 2:20, 21.) Na yango, bango moko te nde baponaka elikya yango, Yehova nde atyaka elembo, to elimo santu likoló na bango.​—2 Kol. 1:21, 22; 1 Pet. 1:3, 4.

Makanisi oyo ebongi

14. Baklisto bapakolami batalelaka libyangi na bango ndenge nini?

14 Ndenge nini baklisto bapakolami basengeli komitalela wana bazali kozela mbano na bango ya kokende likoló? Bayebaka ete atako bazwi libyangi moko ya ntina mingi, bayebaka ete ezali kaka libyangi. Basengeli kotikala sembo tii na liwa mpo bázwa libonza yango. Na komikitisa nyonso, bamiyokaka lokola Paulo, oyo alobaki boye: “Bandeko, nazali naino komimona te ete nasili kosimba yango; kasi ezali na likambo moko na ntina etali yango ete: Kobosanáká biloko oyo ezali na nsima mpe komitandoláká epai ya biloko oyo ezali na liboso, nazali kolanda kopota mbangu tii na ndelo ya nsuka mpo na kozwa libonza ya kobengama ya likoló na Nzambe na nzela ya Klisto Yesu.” (Filp. 3:13, 14) Batikali kati na bapakolami basengeli kosala nyonso mpo na ‘kotambola na ndenge oyo ebongi na kobengama oyo babengami na yango, na elimo mpenza ya komikitisa,’ mpe basengeli kosala bongo “na kobanga mpe na kolɛnga.”​—Ef. 4:1, 2; Filp. 2:12; 1 Tes. 2:12.

15. Ndenge nini baklisto basengeli kotalela baoyo balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo na Ekaniseli, mpe ndenge nini bapakolami bamitalelaka?

15 Bongo, ndenge nini baklisto mosusu basengeli kotalela moto oyo alobi ete akómi mopakolami mpe abandi kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli? Esengeli te kosambisa ye. Ezali likambo ya ye ná Yehova. (Lom. 14:12) Kasi, baklisto oyo bazali bapakolami ya solosolo basɛngaka te ete bátyelaka bango likebi koleka. Bakanisaka te ete lokola bazali bapakolami bazwi bososoli mingi koleka ata oyo ya baklisto mosusu ya “ebele ya bato” oyo basali bambula mingi na solo. (Emon. 7:9) Bakanisaka te ete bazali na elimo santu mingi koleka bandeko na bango ya “bampate mosusu.” (Yoa. 10:16) Balikyaka te ete bápesaka bango lokumu mingi; balobaka mpe te ete lokola balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo ya Ekaniseli, baleki bankulutu oyo batyamá na lisangá.

16-18. (a) Baklisto bapakolami nyonso basololaka bango na bango mpo na kobimisa bandimbola ya sika ya Biblia? Pesá ndakisa. (b) Mpo na nini ezali na ntina te ete Lisangani ya Mikóló-Bakambi etunaka bato nyonso oyo bazali bapakolami?

16 Baklisto bapakolami nyonso na mokili mobimba basololaka bango na bango mpo na kolobela bandimbola ya sika oyo bayekoli na Biblia? Te. Atako moombo ya sembo azali na mokumba ya kopesa moklisto mopakolami mokomoko bilei ya elimo, bango nyonso bazali na mikumba to misala ndenge moko te. (Tángá 1 Bakolinti 12:14-18.) Ndenge tomonaki yango liboso, na ekeke ya liboso, bango nyonso bamipesaki na mosala ya kosakola. Kasi, Nzambe asalelaki kaka mwa ndambo moke na kati na bango mpo na kokoma mikanda ya Biblia mpe kokɛngɛla lisangá ya boklisto.

17 Tópesa ndakisa: Na bisika mosusu Makomami elobi ete “lisangá” ezwi ekateli moko boye nsima ya kosambisa likambo. (Mat. 18:17) Nzokande, ezali kaka bankulutu nde bazwi ekateli yango mpo bazali bamonisi ya lisangá. Bankulutu basololaka na bandeko nyonso ya lisangá te mpo na kotuna makanisi na bango liboso ya kozwa ekateli. Na kolanda teokrasi, bazali kokokisa mokumba oyo bapesá bango; bazali kosala mpo na lisangá mobimba.

18 Ndenge moko mpe lelo oyo, kaka mwa ndambo moke ya baklisto bapakolami nde bazali bamonisi ya moombo ya sembo. Basali Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova. Baklisto bapakolami yango bakɛngɛlaka mosala ya Bokonzi mpe babongisaka bilei ya elimo. Nzokande, ndenge ezalaki na ekeke ya liboso, Lisangani ya Mikóló-Bakambi etunaka te likanisi ya moto mokomoko oyo azali na kati ya etuluku ya moombo ya sembo liboso ya kozwa bikateli. (Tángá Misala 16:4, 5.) Nzokande, baklisto bapakolami nyonso bamipesi mobimba na mosala ya kobuka mbuma oyo ezali kosalema sikoyo. Etuluku ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” ezali lokola nzoto kaka moko, kasi mokomoko azali na mikumba na ye.​—1 Kol. 12:19-26.

19, 20. Likanisi nini ya bokatikati ebele ya bato bazalaka na yango mpo na “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpe Lisangani ya Mikóló-Bakambi?

19 Makambo nyonso oyo toyekoli esengeli kotinda ebele ya bato oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabelé básala nini? Lokola bazali na kati ya biloko ya Mokonzi, bazali na esengo ya kotosa bibongiseli nyonso ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, oyo ezali momonisi ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” Ebele ya bato ya bampate mosusu basepelaka na bilei ya elimo oyo epesamaka na nzela ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Kasi, atako bamemyaka moombo ya sembo, ebele ya bato ya bampate mosusu bakebaka ete bátombola ata moto moko te oyo alobi ete azali na kati ya etuluku ya moombo ya sembo. Ata moklisto moko te oyo azali mopakolami ya solosolo akolinga to akolikya ete bápesa ye lokumu ya ndenge wana.​—Mis. 10:25, 26; 14:14, 15.

20 Tózala “basali ya ndako,” na kati ya batikali ya bapakolami, to tózala na kati ya ebele ya bato, ekateli na biso nyonso ezala ya kosala na bomoko elongo na kapita ya sembo mpe Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Tiká ete mokomoko na biso ‘akɛngɛlaka’ mpe atikala sembo tii na nsuka.​—Mat. 24:13, 42.

Ozali koyeba lisusu?

• Nani azali “moombo ya sembo mpe ya mayele,” mpe banani bazali basali ya ndako?

• Ndenge nini moto ayebaka ete abengami mpo na kokende likoló?

• Kobongisa bilei ya elimo ezali libosoliboso mokumba ya banani?

• Moklisto mopakolami asengeli komitalela ndenge nini?

[Elilingi na lokasa 23]

Lelo oyo, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali momonisi ya moombo ya sembo mpe ya mayele. Ebongiseli ya ndenge wana ezalaki mpe na ekeke ya liboso

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto