Etikali moke bampasi nyonso esila!
Ekoki kozala ete yo mpe osilá komituna motuna oyo: ‘Mpo na nini mokili etondi na bampasi?’ Makambo lokola bitumba, bobola, makama, kobomana, kozanga bosembo, maladi, mpe liwa ezali konyokola bato; mpe makambo yango ebandi lelo te. Na boumeli ya mbula nkama oyo euti koleka, bato banyokwamaki na ndenge oyo emonanaki naino liboso te. Bampasi nyonso wana ekosila mokolo mosusu?
Eyano oyo ekokitisa yo motema ezali ete bampasi ekosila, kutu kala mingi te! Biblia, Liloba ya Nzambe elobi boye: “Moto mabe akozala lisusu te . . . Nde bato ya komikitisa bakozwa mabelé, mpe bakosepela na kimya mingi.” Mpo na ntango boni? “Bato ya boyengebene bakozwa mabelé, mpe bakofanda wana libela na libela.”—Nzembo 37:10, 11, 29, NW.
Nzambe akolongola mabe mpe bampasi nyonso; na nsima, mabelé ekokóma paladiso. Na ntango yango, bato bakozala na bomoi ya seko, bakozala lisusu na maladi te mpe bakozala na esengo. Liloba ya Nzambe elobi boye: “[Nzambe] akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.”—Emoniseli 21:4.
Na mokili ya sika, ata bato oyo bakufá bakozonga na bomoi mpo bango mpe bázwa mapamboli wana: “Ekozala na lisekwa moko ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” (Misala 24:15) Yango wana Yesu Klisto ayebisaki mosali-mabe oyo abongolaki motema mpe amonisaki kondima epai na ye ete: “Okozala elongo na ngai na Paladiso.”—Luka 23:43.
Mpo na nini bampasi ekɔtaki na mokili?
Lokola mokano ya Nzambe ezalaki ete bato bázala na bomoi ya malamu ndenge wana, mpo na nini atikaki nzela ete bampasi ekɔta na mokili? Lisusu, mpo na nini atiki yango eumela mingi boye?
Nzambe akelaki Adama ná Eva na nzoto mpe bɔɔngɔ ya kokoka. Atyaki bango na elanga moko kitoko mpe apesaki bango mosala ya malamu mpenza. Biblia elobi boye: “Nzambe atalaki biloko nyonso esilaki ye kozalisa, mpe ezalaki malamu mingi.” (Genese 1:31) Soki batosaki Nzambe, balingaki kobota bana oyo balingaki kozala bato ya kokoka, mpe mabelé mobimba elingaki kokóma paladiso, esika bato balingaki kozala na bomoi ya seko, na kimya mpe na esengo.
Nzambe apesaki Adama ná Eva bonsomi ya kopona, likabo kitoko oyo moto nyonso azalaka na yango. Nzambe asalaki bango te mpo atambwisaka bango lokola barobo. Kasi, mpo bázala ntango nyonso malamu, basengelaki kosalela bonsomi wana na ndenge oyo ebongi, elingi koloba basengelaki kotosa mibeko na ye. Nzambe alobi boye: “Ngai nazali [Yehova], Nzambe na yo, ye oyo akolakisa yo mpo na litomba, ye oyo akokamba yo na nzela ekoki na yo kotambola na yango.” (Yisaya 48:17) Soki tosaleli bonsomi wana na ndenge oyo ebongi te, tokosuka mabe mpamba te Nzambe asalá biso te mpo tómitambwisa biso moko. Biblia elobi boye: “Nzela ya moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na [ye] ye moko.”—Yilimia 10:23.
Kasi, bankɔkɔ na biso ya liboso bakanisaki ete bakoki komitambwisa bango moko mpe kozala malamu. Ntango baboyaki ete Nzambe ayangela bango, atikaki kobatela bango mpe bakómaki bato ya kozanga kokoka. Nzoto na bango ebandaki kobeba mokemoke, bakómaki mibange mpe nsukansuka bakufaki. Lokola biso tozali bankɔkɔ na bango mpe tozali na makila na bango, batikelá biso ezaleli ya kozanga kokoka ná liwa.—Baloma 5:12.
Nani azali na lotomo ya koyangela bikelamu nyonso?
Mpo na nini Nzambe abomaki Adama ná Eva te mpe asalaki te mobali ná mwasi mosusu? Mpamba te ekelamu moko atyaki ntembe na lotomo ya Nzambe ya koyangela bikelamu nyonso. Yango ebimisaki motuna oyo: Nani azali na lotomo ya koyangela, mpe boyangeli ya nani ezali malamu? Na maloba mosusu, Bato bakoki kozala malamu koleka soki Nzambe ayangeli bango te? Nzambe asukolaki mabɔkɔ mpe atikelaki bango ntango oyo ekoki mpenza mpo mituna yango ezwa eyano; na ndenge yango alingaki emonana mpo na libela soki bato bakozala malamu koleka soki ye ayangeli bango to soki bamiyangeli bango moko. Esɛngaki Nzambe atika ntango molai mpenza mpo bato bámeka bibongiseli ndenge na ndenge ya politiki, ya nkita, mpe ya losambo.
Nyonso wana emonisi makambo nini? Banda bankóto na bankóto ya bambula oyo bato bazali na mokili, bampasi ebakisamaka se kobakisama. Na boumeli ya mbula nkama oyo eleki bato bakutani na bampasi na ndenge oyo emonanaki naino liboso te. Bamilio ya bato bakufaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Bato koleka milio 100 bakufaki na bitumba mosusu. Koboma bato mpe mobulu ezali se kobakisama. Ebele ya bato bazali kokóma baombo ya bangi. Bamaladi oyo ezwamaka na nzela ya kosangisa nzoto ezali se kopalangana. Mbula na mbula, bamilio ya bato bazali kokufa na nzala mpe na maladi. Bipai nyonso mabota ezali kopanzana mpe bizaleli ya malamu ezali kolimwa. Ata guvɛrnɛma moko te ezali kokoka kosilisa mikakatano yango. Moko te ekoki kosilisa konuna, maladi, mpe liwa.
Lelo oyo, bomoi ya bato ezali mpenza ndenge Biblia esakolaki. Liloba ya Nzambe ebengi ntango na biso “mikolo ya nsuka” ya ebongiseli ya makambo; yango ezali “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza.” Mpe ndenge kaka Biblia elobaki, ‘bato mabe mpe bakosi bakei lisusu mosika na kati ya mabe.’—2 Timote 3:1-5, 13.
Etikali moke bampasi esila
Makambo nyonso emonisi ete tokómi na nsuka ya eleko oyo moto amekimeki komiyangela ye moko, kasi yango ememeli ye bampasi mingi. Sikoyo emonani polele ete bato bakoki kolonga te soki bapesi Nzambe mokɔngɔ mpe baluki komiyangela bango moko. Kaka bokonzi ya Nzambe nde ekoki kotya kimya, bolamu, kosilisa bamaladi mpe kopesa bato bomoi ya seko. Boye, ntango oyo Yehova atiki nzela na mabe mpe na bampasi ekómi na nsuka. Etikali moke, Nzambe ye moko azwa makambo ya bato na mabɔkɔ mpe akoboma ebongiseli mobimba ya makambo oyo ekokisi bamposa ya bato te.
Biblia esakoli boye: “Na mikolo ya mikonzi yango [baguvɛrnɛma oyo ezali koyangela lelo] Nzambe ya lola akotɛlɛmisa bokonzi [moko na likoló oyo] ekobebisama soki moke te, . . . ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso [baguvɛrnɛma ya lelo], mpe ekotikala lobiko na lobiko.” (Danyele 2:44) Kolongisama ya bokonzi ya Yehova, elingi koloba lotomo na ye ya koyangela, na nzela ya Bokonzi ya likoló ezali moboko ya mateya ya Biblia. Ntango Yesu asakolaki likambo moko monene ya elembo ya “mikolo ya nsuka,” alobaki boye: “Nsango Malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.”—Matai 24:14.
Ntango nsuka yango ekoya, banani bakobika? Biblia epesi eyano oyo: “[Bato ya sembo] bakofanda na mokili mpe bato malamu bakotikala na yango. Kasi bato mabe bakolongolama na mokili mpe bato ya masumu bakopikolama wana.” (Masese 2:21, 22) Bato ya sembo ezali baoyo bazali koyekola mokano ya Yehova mpe bazali kotosa yango. Yesu Klisto alobaki boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Ya solo, “mokili ezali koleka . . . , kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.”—1 Yoane 2:17.
Soki liyebisi ezali te, bavɛrsɛ ya Makomami ya Liebele euti na Biblia ya Lingala haut fleuve, ebimeli ya 1970, na ekomeli ya mikolo oyo; bavɛrsɛ ya Makomami ya Grɛki ya boklisto euti na Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya boklisto. NW elakisi New World Translation of the Holy Scriptures—With References.