Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/5 nk. 4-8
  • Ntango oyo Nzambe atiki nzela na bampasi elingi kosuka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntango oyo Nzambe atiki nzela na bampasi elingi kosuka
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bonsomi ya kopona
  • Mibeko ya nani?
  • Likambo nini etambolaki malamu te?
  • Nani azali na lotomo ya kozala mokonzi?
  • Boyangeli ya Nzambe emonisami
  • Mokili ya sika mpe ya kitoko
  • Etikali moke bampasi nyonso esila!
    Etikali moke bampasi nyonso esila!
  • Bokonzi ya Nzambe—Boyangeli ya sika mpo na mabele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Koyika mpiko na bampasi ekoki komemela biso matomba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mokili ya sika ya kitoko mingi oyo Nzambe akosala
    Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/5 nk. 4-8

Ntango oyo Nzambe atiki nzela na bampasi elingi kosuka

BIPAI nyonso tozali komona se bampasi. Bato mosusu bazali komilukela bampasi yango bango moko. Bazali kozwa bamaladi na nzela ya kosangisa nzoto to mpe bazali kobuka mbuma mabe ya momeseno ya komela bangi, kolangwa masanga to mpe komela makaya. Bato mosusu bazali kozwa mikakatano na nzoto mpo balingaka kolya malamu te. Nzokande, bato bazali mbala mingi konyokwama na bampasi oyo euti na makambo oyo bango moko bayebi ntina te: bitumba, mobulu kati na bikólo, kobomana, bobola, nzala mpe maladi. Mpasi mosusu oyo bato bakoki kosala eloko te liboso na yango ezali bobange mpe liwa.

Biblia elobi na biso ete “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Kasi, mpo na nini Nzambe ya bolingo atiki nzela ete bampasi eumela ebele ya bambula? Ntango nini akosilisa likambo yango? Mpo na kozwa biyano na mituna yango, tosengeli kotalela mokano oyo Nzambe azalaki na yango mpo na bato. Yango ekosalisa biso na koyeba mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi mpe likambo oyo akosala mpo na kosukisa yango.

Bonsomi ya kopona

Ntango Nzambe akelaki moto ya liboso, asalaki kaka nzoto te mpe na nsima atii bɔɔngɔ kati na yango. Lisusu, Nzambe akelaki Adama na Eva lokola bamasini te oyo ezangi mayele. Apesaki bango likoki ya kopona. Ezalaki likabo moko ya malamu mpenza, mpamba te “Nzambe atalaki biloko nyonso bisilaki ye kozalisa, mpe ezalaki malamu mingi.” (Genese 1:31) Ya solo, “mosala na ye ebongi.” (Deteronome 32:4) Biso nyonso tosepelaka na likabo yango ya kopona, tolingaka te ete báyebisaka biso likambo nyonso to básalisaka biso misala na makasi, kozanga ete biso moko tózala na likoki ya kopona.

Kasi, bonsomi yango ya kopona ezalaki na ndelo te? Na toli oyo bapesaki baklisto ya liboso, Liloba ya Nzambe elobi boye: “Bózala na bonsomi, nde na bonsomi lokola ezipeli na makambo mabe te, kasi bozala baombo ya Nzambe.” (1 Petelo 2:16) Mpo na bolamu ya bato nyonso, mibeko esengeli kozala. Yango wana, bonsomi ya kopona esengelaki kozala na kati ya mibeko. Soki bongo te, elingaki kozala mobulu.

Mibeko ya nani?

Mibeko nini esengelaki kobatela bonsomi yango? Mpo na kozwa eyano na motuna yango, tosengeli koyeba ntina mpenza oyo Nzambe atikaki nzela ete bampasi ezala. Lokola Nzambe akelaki bato, ayebi malamu mibeko nini basengeli kotosa mpo na bolamu na bango moko mpe mpo na bolamu ya basusu. Biblia emonisi yango na maloba oyo: “Ngai nazali [Yehova], Nzambe na yo, ye oyo akolakisa yo mpo na litomba, ye oyo akokamba yo na nzela ekoki na yo kotambola na yango.”​—Yisaya 48:17.

Tomoni ete likambo ya ntina ezali oyo: Nzambe akelaki bato te ete básalaka makambo na ndenge na bango, kozanga kotalela ye. Asalaki bango na boye ete mpo na kolonga mpe kozala na bomoi ya malamu, basengeli kotosa mibeko na ye ya sembo. Mosakoli Yilimia alobaki boye: “Ɛ [Yehova], nayebi ete nzela ya moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.”​—Yilimia 10:23.

Nzambe asalaki bato ete bátosaka mibeko oyo biloko ya mokili elandaka, na ndakisa mobeko oyo esalaka ete eloko nyonso ebwakami likoló ekita na nse. Ndenge moko mpe, asalaki bato ete bátosaka mibeko na ye mpo na etamboli malamu, mibeko oyo esalemaki mpo na kotya boyokani kati ya bato. Yango wana, Liloba ya Nzambe ezali koloba ete: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te.”​—Masese 3:5.

Na bongo, bato bakokaki kolonga te na komitambwisa bango moko soki Nzambe ayangeli bango te. Soki bapesi Nzambe mokɔngɔ mpe basali makambo na ndenge na bango, bato bakosala bibongiseli oyo ekoyokana te kati na yango na makambo ya nkita, ya politiki mpe ya losambo, mpe ‘moto moko akozala na bokonzi likoló ya moto mosusu mpo na kopesa ye mpasi.’​—Mosakoli 8:9.

Likambo nini etambolaki malamu te?

Na ebandeli, Nzambe abongisaki makambo nyonso mpo na baboti na biso ya liboso. Bazalaki na nzoto mpe na elimo ya kokoka mpe atyaki bango na paladiso. Soki batosaki mibeko ya Yehova, balingaki kozala ntango nyonso bato ya kokoka mpe ya esengo. Balingaki kobota bana oyo balingaki kozala bato ya kokoka mpe ya esengo, oyo balingaki kofanda na paladiso awa na mabele. Yango nde mokano oyo Nzambe azalaki na yango mpo na bato.​—Genese 1:27-29; 2:15.

Kasi, bankɔkɔ na biso ya liboso basalelaki bonsomi na bango ya kopona na lolenge ya mabe. Bamikosaki mpe bakanisaki ete bakozala malamu soki batiki Nzambe mpe basali makambo na ndenge na bango. Basalelaki bonsomi na bango ya kopona na ndenge ya mabe: babukaki mibeko ya Nzambe. (Genese, mokapo 3) Lokola baboyaki ete Nzambe azala mokonzi na bango, eloko moko te ezalaki lisusu kosɛngisa ye ete abatela bango na ezaleli ya kokoka. ‘Basalelaki ye mabe, bazali bana na ye lisusu te na ntina na libebi na bango.’​—Deteronome 32:5.

Kobanda na ntango oyo Adama na Eva baboyaki kotosa Nzambe, nzoto mpe elimo na bango ebandaki kobeba. Yehova nde apesaka bomoi. (Nzembo 36:9) Lokola bango moko baponaki kokabwana na Yehova, mobali mpe mwasi ya liboso bakómaki bato ya kozanga kokoka mpe nsukansuka bakufaki. (Genese 3:19) Lokola bazalaki makila na bango, bana na bango basengelaki kaka kozwa oyo baboti na bango bazalaki na yango. Eloko nini oyo bazalaki na yango? Ezalaki ezaleli ya kozanga kokoka mpe liwa. Yango wana, ntoma Paulo akomaki ete: “Mabe ekɔtaki na mokili mpo na moto moko [Adama], mpe kufa ekotaki mpo na mabe. Kufa mpe epalangani epai na bato nyonso mpo ete bato nyonso basali mabe.”​—Baloma 5:12.

Nani azali na lotomo ya kozala mokonzi?

Ntango Adama na Eva batombokelaki Nzambe, batyelaki lotomo na ye ya kozala mokonzi ntembe. Yehova akokaki koboma bango mpe kosala mobali na mwasi mosusu, kasi yango elingaki kopesa eyano te na motuna ya koyeba nani oyo azali mpenza na lotomo ya kozala mokonzi ya bato mpe ayangela bango malamu. Ntango oyo batikelaki bato mpo bámiyangela na ndenge na bango moko emonisi mpenza ete soki bato batiki Nzambe mpe bamiyangeli bango moko, bakolonga te.

Bankóto ya bambula oyo eleki banda moto azali komiyangela emonisi nini? Na bambula wana nyonso, bato bameki bibongiseli ndenge na ndenge mpo na boyokani kati na bango, nkita, politiki, mpe losambo. Nzokande, makambo mabe mpe bampasi ezali kosila te. Kutu, ‘bato mabe mpe bakosi baleki nde na mabe,’ mingimingi na ntango na biso.​—2 Timote 3:13.

Na ekeke ya 20, makambo mingi ya minene esalemaki na mayele ya siansi mpe tekiniki. Kasi yango ezalaki mpe ekeke oyo makambo mabe mpe bampasi emonanaki mingi koleka bikeke nyonso oyo eleká. Atako mayele ya monganga ekoli mingi, mobeko ya Nzambe etikali solo: Lokola bakabwanaki na Nzambe, Moto oyo apesaka bomoi, bato babɛlaka, bakómaka mibange mpe bakufaka. Emonani polele ete bato bakoki te ‘kotambwisa makolo na bango moko’!

Boyangeli ya Nzambe emonisami

Bwale oyo bato bamoni lokola balukaki kosala makambo na ndenge na bango, kozanga kotalela Nzambe emonisi mbala moko mpo na libela ete boyangeli ya bato, kozanga litambwisi ya Nzambe ekoki kolonga ata moke te. Kaka boyangeli ya Nzambe nde ekoki kopesa bolamu, bomoko, bokolɔngɔnɔ mpe bomoi. Lisusu, Biblia Mosantu, Liloba ya Yehova Nzambe oyo ekosaka te, emonisi ete tozali sikoyo na “mikolo ya nsuka” ya boyangeli ya bato bango moko, kozanga Nzambe. (2 Timote 3:1-5) Ntango oyo Yehova atiki nzela ete bato bámiyangela mpe oyo atiki nzela na mabe mpe bampasi elingi kosuka.

Etikali moke Nzambe azwa makambo ya mokili oyo na mabɔkɔ na ye. Makomami elobi na biso boye: “Na mikolo ya mikonzi yango [biyangeli ya bato oyo ezali lelo oyo], Nzambe ya lola akotɛmisa bokonzi [na likoló] bokobebisama soki moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te [bato bakoyangela lisusu mokili te]; ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso [oyo ezali koyangela lelo oyo], mpe ekotikala lobiko na lobiko.”​—Danyele 2:44.

Motó ya likambo ya Biblia ezali kolongisama ya lotomo oyo Nzambe azali na yango ya koyangela bato na nzela ya Bokonzi na ye ya likoló. Yango ezalaki likambo monene oyo Yesu azalaki kolobela na mateya na ye. Alobaki boye: “Nsango malamu oyo ya Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.”​—Matai 24:14.

Ntango bokonzi ya Nzambe ekozwa esika ya biyangeli ya bato, nani akobika mpe nani akobika te? Masese 2:21, 22 elobi boye: “Basembwi [baoyo bandimaki bokonzi ya Nzambe] bakofanda na mokili mpe bato malamu bakotikala na yango. Kasi bato mabe bakolongolama na mokili mpe bato na masumu bakopikolama wana.” Na kopemama na Nzambe, mokomi na Nzembo ayembaki boye: “Nsima ya mwa ntango moke, moto na mabe akozala lisusu te . . . Nde bato na bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo. Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.”​—Nzembo 37:10, 11, 29.

Mokili ya sika mpe ya kitoko

Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela, baoyo bakobika na nsuka ya mokili oyo mabe bakozala na mabele oyo ezangi makambo mabe mpe bampasi. Bato bakolanda malako ya Nzambe, mpe nsukansuka “mokili ekotonda na boyebi ya [Yehova], lokola mbonge ekozipaka mai-na-monana.” (Yisaya 11:9) Mateya wana ya kolendisa mpe ya malamu ekosalisa bato báfanda na kimya mpe na bomoko. Na bongo, bitumba, kobomana, mobulu, kosangisa nzoto na basi na makasi, moyibi; na mokuse, makambo nyonso ya mabe, ekosila.

Bato ya botosi oyo bakofanda na mokili ya sika ya Nzambe bakozala na bomoi ya malamu. Mbuma mabe nyonso oyo bato babuki mpo baboyaki boyangeli ya Nzambe ekolongolama. Kozanga kokoka, maladi, bobange mpe liwa ekozala makambo ya kala. Biblia elobi na biso ete: “Mofandi moko akoloba te ete ‘ngai nazali na malali.’” Lisusu, makomami epesi elaka oyo: “Bongo miso ya bakufeli miso [makofungwama], mpe matoi ya bimimi makozipolama; bongo motɛngumi akopombwa lokola mboloko, mpe lolemo na ebubu ekoyemba na esengo.” (Yisaya 33:24; 35:5, 6) Kanisá esengo tokozala na yango ya kozala nzoto kolɔngɔnɔ mokolo na mokolo, mpo na libela!

Na bolingo nyonso, Nzambe akolakisa bato oyo bakofanda na mokili ya sika ete básalela nguya mpe mayele na bango mpo na kobongisa mabele mobimba ete ekóma paladiso. Bobola, nzala mpe kozanga ndako ekozala lisusu te, mpamba te esakweli ya Yisaya elobi ete: “Bakotonga ndako mpe bakofanda na yango; bakokona bilanga ya miwiti mpe bakolia mbuma na yango. Bakotonga te ete mosusu afanda, bakokona te ete mosusu alya.” (Yisaya 65:21, 22) Ya solo, “bakofanda mpe na nse, moto na moto na nse na miwiti na ye mpe na nzete na ye ya mosuke, moto moko akobangisa bango te.”​—Mika 4:4.

Mabele ekozala malamu mpamba te Nzambe ye moko mpe bato ya botosi bakobatela yango. Makomami elobi na biso boye: “Lisobe mpe esika ekauki ikosepela, lisobe ekoyoka esengo, ekobimisa felele ya habaselete. . . . Zambi mai makopunzwa kati na lisobe, bitima kati na mokili mokauki.” (Yisaya 35:1, 6) “Masango ikotondana na mokili ata kino likolo na nkeka.”​—Nzembo 72:16.

Bongo ebele ya bato oyo bakufá? Baoyo kati na bango Nzambe abombá bango na makanisi na ye bakozonga na bomoi, mpo ete “lisekwa ekozala na bato sembo mpe na bato sembo te.” (Misala 24:15) Bakufi bakozonga na bomoi. Bakoteya bango mateya ya solo etali boyangeli ya Nzambe mpe bakopesa bango libaku ya kozala na bomoi ya seko na paladiso.​—Yoane 5:28, 29.

Na ndenge yango, Yehova Nzambe akosilisa mpo na libela bampasi, maladi mpe liwa oyo ekangaki bato na boombo ebele ya bambula. Maladi ekozala lisusu te! Bibɔsɔnɔ bakozala lisusu te! Liwa ekozala lisusu te! Nzambe “akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi lisusu mpe te, mpo ete makambo na liboso [ekoleka].”​—Emoniseli 21:3, 4.

Na ndenge wana nde Nzambe akosukisa bampasi. Akoboma mokili mabe oyo mpe na esika na yango akosala mokili ya sika mpe “boyengebene ekofanda kati na yango.” (2 Petelo 3:13) Oyo ezali mpenza nsango malamu! Tozali mpenza na mposa ya mokili yango ya sika. Mpe tokozela lisusu ntango molai te mpo na komona yango. Ndenge oyo bisakweli ya Biblia ezali kokokisama ezali komonisa biso ete mokili ya sika ekómi pene, mpe ntango oyo Nzambe atikaki nzela na bampasi elingi kosuka.​—Matai 24:3-14.

[Etanda na lokasa 8]

Biyangeli ya bato ekoki makambo te

Helmult Schmidt, oyo azalaki chancelier to ministre-mokonzi ya Allemagne, alobaki mpo na biyangeli ya bato ete: “Biso bato . . . toyangelaka mokili na mobimba na yango te, mpe mbala mingi toyangelaka yango mabe mpenza . . . Ata mbala moko te biyangeli na biso ememá kimya ya solosolo na mokili.” Lapolo moko (Human Development Report 1999) eyebisi boye: “Na bamboka nyonso tozali koyoka ete makambo ezali se kobeba, kimya ezali te, kobomana ekómi mingi, mobulu na kati ya mabota ezali kobakisama . . . Makama mpo na mokili mobimba ezali se kobakisama, eleki makoki oyo bikólo mpe mokili mobimba ezali na yango mpo na kolonga mpe kosilisa makama yango.”

[Bililingi na lokasa 8]

“Bakosepela mpe na kimya na solo.”​—Nzembo 37:11

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 5]

Fɔtɔ ya misato, mama na mwana: FAO photo/B. Imevbore; na nse, bɔmbi epanzani: U.S. National Archives photo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto