MOKAPO 5
Ndenge oyo tosengeli kokabwana na mokili
“Bozali bato ya mokili te.”—YOANE 15:19.
1. Likambo nini Yesu alobelaki mingi na butu ya mokolo ya nsuka liboso báboma ye?
NA BUTU ya mokolo ya nsuka liboso báboma ye, Yesu amonisaki ete azalaki komibanzabanza mpo na bayekoli na ye. Kutu, abondelaki Tata na ye mpo na bango; alobaki boye: “Nazali kosɛnga yo, olongola bango na mokili te, kasi okɛngɛla nde bango mpo na moto mabe. Bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te.” (Yoane 17:15, 16) Na libondeli yango, Yesu amonisaki bolingo makasi oyo azalaki na yango mpo na bayekoli na ye mpe ntina ya maloba oyo alobaki mwa liboso na butu yango epai ya bamosusu kati na bango ete: “Bozali bato ya mokili te.” (Yoane 15:19) Tomoni ete mpo na Yesu, ezalaki na ntina mingi ete bayekoli na ye bákabwana na mokili!
2. “Mokili” oyo Yesu alobelaki ezali nini?
2 “Mokili” oyo Yesu alobelaki ezali nde bato nyonso oyo bapesi Nzambe mokɔngɔ, oyo Satana azali kotambwisa mpe bazali baombo ya elimo ya moimi mpe ya lolendo oyo euti na Satana. (Yoane 14:30; Baefese 2:2; 1 Yoane 5:19) “Kozala moninga ya mokili [yango] ezali nde kozala monguna ya Nzambe.” (Yakobo 4:4) Kasi, ndenge nini bato nyonso oyo balingi kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe bakoki kokabwana ná mokili, nzokande bafandi na mokili? Tokolobela makambo mitano oyo ekomonisa yango: soki bakangami na Bokonzi ya Nzambe oyo Kristo azali kotambwisa mpe bazali kokɔta na makambo ya politiki te, soki bazali kotɛmɛla elimo ya mokili, soki bazali kolata mpe kosala monzɛlɛ na ndenge oyo ebongi, soki bazali na bomoi ya pɛpɛlɛ, mpe soki balati molato ya etumba ya elimo.
KOKANGAMA NA BOKONZI YA NZAMBE MPE KOKƆTA NA MAKAMBO YA POLITIKI TE
3. (a) Ndenge nini Yesu azalaki kotalela makambo ya politiki ya ntango na ye? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete bayekoli ya Yesu, bapakolami na elimo, bazali baambasadɛrɛ? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)
3 Yesu azalaki kokɔta na makambo ya politiki ya ntango na ye te; amipesaki mobimba na kosakola Bokonzi ya Nzambe, guvɛrnema ya likoló oyo ye asengelaki kokóma Mokonzi na yango. (Danyele 7:13, 14; Luka 4:43; 17:20, 21) Yango wana, ntango asambaki liboso ya Guvɛrnɛrɛ Ponse Pilate, Yesu alobaki boye: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te.” (Yoane 18:36) Bayekoli na ye ya sembo balandaka ndakisa na ye na ndenge bakangamaka epai ya Kristo mpe na Bokonzi na ye mpe basakolaka Bokonzi yango na mokili mobimba. (Matai 24:14) Ntoma Paulo akomaki boye: “Biso tozali baambasadɛrɛ na esika ya Kristo, lokola nde Nzambe azali kobondelabondela na nzela na biso. Na esika ya Kristo, tozali kobondela ete: ‘Bózonga na boyokani elongo na Nzambe.’”a—2 Bakorinti 5:20.
4. Ndenge nini bakristo nyonso ya solo bamonisi ete bazali mpenza na ngámbo ya Bokonzi ya Nzambe? (Talá etanda “Bakristo ya liboso bazalaki kokɔta na politiki te.”)
4 Lokola baambasadɛrɛ bazalaka bamonisi ya ekólo mosusu, bakɔtaka te na makambo ya ekólo epai batindi bango. Nzokande, baambasadɛrɛ balukaka matomba ya guvɛrnema ya ekólo na bango. Ezali mpe bongo mpo na bayekoli ya Kristo, oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazali “bana-mboka ya likoló.” (Bafilipi 3:20) Kutu, lokola basakolaka Bokonzi na molende, basalisi bamilio ya “bampate mosusu” ‘bázonga na boyokani elongo na Nzambe.’ (Yoane 10:16; Matai 25:31-40) Bampate yango bazali lokola batindami ya Kristo mpe bazali kopesa bandeko ya Yesu mabɔkɔ. Lokola bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakómi etonga moko ná “bampate mosusu” mpe bazali kosakola Bokonzi ya Masiya elongo, bango nyonso bakɔtaka ata moke te na makambo ya politiki ya mokili oyo.—Tángá Yisaya 2:2-4.
5. Lisangá ya bokristo ekeseni na ekólo Yisraele na makambo nini, mpe bokeseni yango emonanaka ndenge nini?
5 Bakristo ya solo bakɔtaka na makambo ya mokili te mpo balingaka kotikala sembo epai ya Kristo; kasi basalaka yango mpe mpo na ntina mosusu. Na bokeseni na Bayisraele oyo bazalaki kofanda na mboka moko oyo Nzambe apesaki bango, biso tosali libota ya bandeko na mokili mobimba. (Matai 28:19; 1 Petro 2:9) Na yango, soki tokɔti na mangomba ya politiki ya mboka oyo tozali, tokozala na elobeli ya polele te ntango tokoyebisa bato nsango ya Bokonzi ya Nzambe mpe yango ekobebisa bomoko na biso ya bokristo. (1 Bakorinti 1:10) Lisusu, soki mboka na biso ekómi na bitumba ná mboka mosusu, tokoki kobundisa bandeko na biso bakristo, baoyo Nzambe asɛngi ete tólinga bango. (Yoane 13:34, 35; 1 Yoane 3:10-12) Yango wana, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete basengeli te kosimba mopanga mpo na kobunda. Kutu, ateyaki bango bálingaka banguna na bango.—Matai 5:44; 26:52; talá etanda “Nakɔtaka na makambo ya politiki te?”
6. Lokola omipesi na Nzambe, ndenge nini otalelaka Kaisala?
6 Lokola tozali bakristo ya solo, tomipesi nde epai ya Nzambe, kasi tomipesi te epai ya moto moko, ebongiseli moko, to ekólo moko. Mokapo ya 1 Bakorinti 6:19, 20 elobi boye: “Bozali bato na bino moko te, mpo bosombamaki mpenza na ntalo moko boye.” Yango wana, atako bayekoli ya Yesu bapesaka epai ya “Kaisala” biloko ya Kaisala, elingi koloba bapesaka bakonzi lokumu, bafutaka mpako, mpe batosaka mibeko oyo epekisi bango te kotosa mibeko ya Nzambe, bapesaka mpe “Nzambe biloko ya Nzambe.” (Marko 12:17; Baroma 13:1-7) Biloko ya Nzambe ezali na ndakisa kosambela ye, kolinga ye na molimo mobimba, mpe kotosa ye na motema mobimba. Mpe soki esengeli, bandimaka kobungisa bomoi na bango mpo na Nzambe.—Luka 4:8; 10:27; tángá Misala 5:29; Baroma 14:8.
TÓTƐMƐLA “ELIMO YA MOKILI”
7, 8. “Elimo ya mokili” ezali nini, mpe ndenge nini elimo yango ‘esalaka mosala’ epai ya bato oyo bazangi botosi?
7 Bakristo bakabwanaka mpe na mokili na ndenge batɛmɛlaka elimo na yango. Paulo akomaki boye: “Biso tozwaki elimo ya mokili te, kasi elimo oyo euti epai ya Nzambe.” (1 Bakorinti 2:12) Epai ya Baefese, alobaki boye: “Kala bozalaki kotambola . . . na kolanda makambo ya mokili oyo, na kolanda mokonzi ya nguya ya mopɛpɛ, elimo oyo ezali sikoyo kosala mosala na kati ya bana ya kozanga botosi.”—Baefese 2:2, 3.
8 “Mopɛpɛ” to elimo ya mokili ezali nguya moko oyo etindaka bato báboya kotosa Nzambe mpe elendisaka “mposa ya mosuni mpe mposa ya miso.” (1 Yoane 2:16; 1 Timote 6:9, 10) “Nguya” ya elimo yango esalaka mosala na ndenge etindaka bato bámipesa na bamposa mabe ya nzoto; nzokande, emonanaka polele te, esilaka te, mpe epalangani bipai nyonso lokola mopɛpɛ. Longola yango, ‘esalaka mosala’ epai ya moto na ndenge ekɔtisaka mokemoke na motema na ye bizaleli ya mabe lokola koluka matomba na ye moko, lolendo, mposa ya bokonzi, kosala makambo oyo motema elingi mpe koboya kotosa bokonzi.b Na mokuse, elimo ya mokili ekolisaka mokemoke na mitema ya bato bizaleli ya Zabolo.—Yoane 8:44; Misala 13:10; 1 Yoane 3:8, 10.
9. Ndenge nini elimo ya mokili ekoki kokɔta na makanisi mpe na motema na biso?
9 Elimo ya mokili ekoki nde kokɔta na makanisi mpe na motema na yo? Ɛɛ, soki ozali kokɛngɛla ntango nyonso te. (Tángá Masese 4:23.) Mbala mingi, ndenge oyo elimo yango ebandaka kokɔtela moto emonanaka mbala moko te; ekoki kozala na nzela ya baninga oyo bakoki komonana bato malamu, kasi balingaka Yehova te. (Masese 13:20; 1 Bakorinti 15:33) Elimo yango ekoki mpe kokɔta na makanisi na yo soki ozali kotánga mikanda oyo ebongi te, ozali kotala bililingi ya makambo ya nsɔni, ozali kotanga makambo ya bapɛngwi na Internet, soki ozali kominanola na makambo mabe, mpe soki ozali kolinga masano ya bitumba to ya makasimakasi—na mokuse, na nzela ya moto to eloko nyonso oyo ezali kolendisa makanisi ya Satana to ya mokili na ye.
10. Ndenge nini tokoki kotɛmɛla elimo ya mokili?
10 Boye, ndenge nini tokoki kotɛmɛla elimo ya mokili mpe kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe? Soki tozali kolanda bibongiseli nyonso oyo Yehova azwi mpo na kolendisa biso na elimo mpe tozali kobondela ntango nyonso mpo na kosɛnga elimo santu. Yehova azali na nguya mingi koleka Zabolo mpe mokili na ye. (1 Yoane 4:4) Yango wana, ezali na ntina mingi tótikala penepene na Yehova na nzela ya mabondeli!
TÓZALAKA NA MOLATO OYO EBONGI
11. Ndenge nini elimo ya mokili ezali komonana na molato ya bato?
11 Elimo oyo ezali kotambwisa moto emonanaka na molato na ye, na ndenge na ye ya kosala monzɛlɛ, mpe ndenge oyo atalelaka bopɛto. Na mikili mingi, bato mingi bakómi kolata na ndenge ya mabe mpenza na boye ete, mopanzi-nsango moko na televizyo alobaki ete etikali moke tokoyeba lisusu te kokesenisa basi ya ndumba ná bato mosusu. Ata bilenge basi oyo bazali na mbula mwa moke koleka zomi bakómi kosepela na molato yango. Zulunalo moko elobaki ete bato bazali kolata bilamba oyo ezali “kotika nzoto libándá, mpe oyo ebongi te.” Bato mosusu bazali kolata midɛlɛ ya bongobongo, oyo ezali komonisa elimo ya botomboki mpe ezali kopesa nzoto kilo te.
12, 13. Mitinda nini tosengeli kotalela na likambo etali molato mpe monzɛlɛ?
12 Lokola tozali basaleli ya Yehova, tosengeli kozala na molato ya malamu, elingi koloba kolata bilamba ya pɛto mpe oyo ebongi na kotalela mosala oyo tozali kosala to esika oyo tolingi kokende. Ndenge oyo tozali komonana na miso ya bato esengeli komonisa ntango nyonso ete ‘tolekisaka ndelo te mpe [tozalaka] na makanisi malamu,’ bizaleli oyo, elongo na “misala ya malamu,” esengeli komonana epai ya moto nyonso oyo ‘alobaka ete abangaka Nzambe,’ azala mwasi to mobali. Atako bongo, tolukaka libosoliboso nde “kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe,” kasi te kobenda likebi ya bato likoló na biso. (1 Timote 2:9, 10; Yuda 21) Tosengeli koluka ete monzɛlɛ na biso oyo eleki kitoko ezala “bomoto ebombaná, oyo ya motema . . . , oyo ezali na motuya monene na miso ya Nzambe.”—1 Petro 3:3, 4.
13 Tosengeli mpe kobosana te ete bilamba oyo tosepelaka kolata mpe ndenge oyo tosalaka monzɛlɛ ekoki kotinda bato mosusu básepela na losambo ya solo to mpe bátyola yango. Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kolekisa ndelo te,” ntango esalelami mpo na kolobela etamboli, ezalaka na likanisi ya kopesa lokumu, kobanga, mpe komemya makanisi ya basusu. Yango wana, tosengeli kotalelaka lisosoli ya basusu na esika ya kotalela kaka lotomo na biso. Nzokande, tosengeli libosoliboso koluka kopesa lokumu epai ya Yehova mpe basambeli na ye mpe komilobela lokola basaleli ya Nzambe, oyo basalaka “makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.”—1 Bakorinti 4:9; 10:31; 2 Bakorinti 6:3, 4; 7:1.
Molato na ngai epesaka Yehova nkembo?
14. Mituna nini tosengeli komituna na oyo etali molato mpe bopɛto ya nzoto na biso?
14 Tosengeli kotalelaka molato na biso, ndenge na biso ya kosala monzɛlɛ, mpe tosengeli kozalaka pɛto mingimingi ntango tolingi kobima na mosala ya kosakola to kokende na makita. Osengeli komituna boye: ‘Molato na ngai mpe ndenge na ngai ya kobongisa nzoto ebendaka mingi likebi ya bato epai na ngai? Ebɛtisaka basusu libaku? Namonaka ete lotomo na ngai na makambo yango ezali na ntina koleka mposa na ngai ya kokokisa masɛngami mpo na kozwa mikumba na lisangá?’—Nzembo 68:6; Bafilipi 4:5; 1 Petro 5:6.
15. Mpo na nini Liloba ya Nzambe epesi mibeko kilikili te mpo na molato, monzɛlɛ mpe bopɛto ya nzoto?
15 Biblia epesi bakristo mibeko kilikili te na oyo etali molato, monzɛlɛ, to bopɛto ya nzoto. Yehova azali na mposa te ya kolongola biso bonsomi ya kopona to ya kopekisa biso tósalela makoki na biso ya kokanisa. Alingi nde ete tókóma bato oyo bakɔmɛli, oyo bayebi kosalela mitinda ya Biblia mpe oyo, “makoki na bango ya kososola, lokola basalelaka yango, emesana kokesenisa ná mabe ná malamu.” (Baebre 5:14) Longola yango, Yehova alingi ete bolingo na biso mpo na ye mpe mpo na bazalani na biso nde etambwisaka biso. (Tángá Marko 12:30, 31.) Ata soki tozali kotosa mitinda wana, tokozala kaka na likoki ya kopona molato to monzɛlɛ oyo ekosepelisa biso. Tokoki komona ete ezali bongo soki totali mitindo ndenge na ndenge ya bilamba oyo basaleli ya Yehova balataka ntango bayangani, ezala na mboka nini.
TÓZALA NA BOMOI YA PƐPƐLƐ
16. Na ndenge nini elimo ya mokili eyokani ata moke te na likambo oyo Yesu ateyaki, mpe mituna nini tosengeli komituna?
16 Elimo ya mokili ezali na bokosi mpe ezali kotinda bamilio ya bato bákanisa ete bomɛngo mpe biloko ya mokili nde epesaka esengo ya solosolo. Nzokande, Yesu alobaki boye: “Ata soki moto azali na biloko mingi, biloko na ye ekopesa ye bomoi te.” (Luka 12:15) Atako Yesu alendisaki te likanisi ya komipimela mpenza biloko nyonso, ateyaki ete bato oyo “bayebi bobola na bango ya elimo” mpe oyo bazali na bomoi ya pɛpɛlɛ, elingi koloba bato oyo batyaka makanisi na bango nyonso na makambo ya Nzambe nde bazalaka na bomoi ya malamu mpe ya esengo. (Matai 5:3; 6:22) Omituna boye: ‘Nandimaka mpenza makambo oyo Yesu ateyaki, to nazali nde kolanda makanisi ya “tata ya lokuta”? (Yoane 8:44) Maloba na ngai, mikano na ngai, makambo oyo natyaka na esika ya liboso, mpe lolenge ya bomoi na ngai emonisaka nini?’—Luka 6:45; 21:34-36; 2 Yoane 6.
17. Tángá mwa matomba oyo bato oyo bazalaka na bomoi ya pɛpɛlɛ bazwaka.
17 Yesu alobaki ete: “Bwanya ya moto emonanaka na makambo ya boyengebene oyo asalaka.” (Matai 11:19) Tótalela mwa matomba oyo bato oyo bazalaka na bomoi ya pɛpɛlɛ bazwaka. Mosala ya Bokonzi epesaka bango kimya ya solosolo. (Matai 11:29, 30) Bamitungisaka mpambampamba te, mpe na bongo, bamibatelaka na bamaladi mpe mpasi mosusu ya makanisi. (Tángá 1 Timote 6:9, 10.) Lokola basepelaka na biloko ya ntina na bomoi, bazalaka na ntango mingi ya kolekisa ná mabota na bango mpe bandeko na bango bakristo. Yango wana mpe balalaka mpɔngi ya malamu. (Mosakoli 5:12) Bayokaka esengo mingi ya kopesa mpe bakabelaka basusu na ndenge nyonso oyo bakoki kosala yango. (Misala 20:35) Lisusu, ‘batondaka na elikya,’ bazalaka na kimya ya motema mpe na esengo. (Baroma 15:13; Matai 6:31, 32) Mokomoko na mapamboli yango ezali mpenza na motuya monene!
TÓLATA “MOLATO MOBIMBA YA ETUMBA”
18. Ndenge nini Biblia elobeli monguna na biso, mayele oyo asalelaka, mpe ‘etumba’ oyo tozali na yango?
18 Bato oyo batikalaka na kati ya bolingo ya Nzambe bazwaka mpe libateli ya elimo mpo Satana, oyo alingi kozangisa bakristo esengo mpe bomoi ya seko, alonga bango te. (1 Petro 5:8) Paulo alobaki boye: “Tozali kobunda líbanda ná makila mpe mosuni te, kasi ná baguvɛrnema, ná bakonzi, ná bayangeli ya mokili ya molili oyo, ná mampinga ya bilimo mabe na kati ya bisika ya likoló.” (Baefese 6:12) Maloba “kobunda líbanda” emonisi ete tozali te kobunda na moto oyo azali mosika mpe biso tobombami na ndako moko ya makasi; kasi, na maloba ya elilingi, ezali lokola nde tosimbani na ye na nzoto. Longola yango, maloba “baguvɛrnema,” “bakonzi,” mpe “bayangeli ya mokili” ezali komonisa ete bikelamu ya elimo oyo bazali kobundisa biso, bamibongisi malamu mpenza.
19. Lobelá biteni ya molato ya etumba ya elimo oyo mokristo asengeli kolata.
19 Nzokande, atako tozali bato mpe tozali na bolɛmbu, tokoki kolonga etumba yango. Na ndenge nini? Soki tolati “molato mobimba ya etumba oyo euti na Nzambe.” (Baefese 6:13) Molato yango elobelami na Baefese 6:14-18 na maloba oyo: “Bótɛlɛma ngwi, wana loketo na bino ekangami na solo lokola mokaba, mpe bolati ebateli-ntolo ya boyengebene, mpe makolo na bino elati bisaleli ya nsango malamu ya kimya. Likambo eleki ntina mpenza, bókamata nguba monene ya kondima, oyo na yango, bokokoka koboma mɔtɔ ya mbanzi nyonso oyo ezali kopela ya moto mabe. Lisusu, bózwa ekɔti [to elikya] ya lobiko, mpe mopanga ya elimo, elingi koloba, liloba ya Nzambe, wana na mitindo nyonso ya mabondeli mpe malɔmbɔ bozali kokoba kobondela na libaku nyonso, na elimo.”
20. Na ndenge nini bomoi na biso ekeseni na oyo ya soda?
20 Lokola molato yango ya etumba ya elimo euti na Nzambe, ekobatela biso malamu soki tozali kolata yango ntango nyonso. Na bokeseni na basoda, oyo ntango mosusu balekisaka eleko molai bazali kobunda te, bakristo bazali na etumba moko makasi mpe ya ntango nyonso, oyo ekosila kaka ntango Nzambe akoboma mokili ya Satana mpe akobwaka bilimo mabe nyonso na libulu mozindo. (Emoniseli 12:17; 20:1-3) Yango wana, kolɛmba nzoto te soki ozali kobundisa bolɛmbu to bamposa mabe, mpamba te biso nyonso tosengeli ‘kobɛtabɛta nzoto na biso’ mpo tótikala sembo epai ya Yehova. (1 Bakorinti 9:27) Kutu, tosengeli nde komitungisa soki tozali kobunda te!
21. Ndenge nini tokoki kolonga etumba ya elimo oyo tozali na yango?
21 Lisusu, tokoki te kolonga etumba yango na makasi na biso moko. Yango wana, Paulo ayebisi biso ete tosengeli kobondelaka Yehova “na libaku nyonso, na elimo.” Tosengeli mpe koyokaka Yehova, elingi koloba koyekolaka Liloba na ye mpe koyanganaka elongo ná baninga na biso “basoda” na mabaku nyonso, mpamba te tozali biso moko te na etumba yango! (Filemona 2; Baebre 10:24, 25) Baoyo basalaka makambo nyonso wana bakolonga na etumba ya elimo mpe bakozala na makoki ya kolobela kondima na bango ntango babɛteli yango ntembe.
OMIBONGISA MPO NA KOLONGISA KONDIMA NA YO
22, 23. (a) Mpo na nini tosengeli ntango nyonso kozala pene mpo na kolobela kondima na biso, mpe mituna nini tosengeli komituna? (b) Tokolobela nini na mokapo oyo elandi?
22 Yesu alobaki ete: “Lokola bozali bato ya mokili te, . . . yango wana mokili ezali koyina bino.” (Yoane 15:19) Yango wana, bakristo basengeli ntango nyonso kozala pene mpo na kolongisa kondima na bango, na elimo ya boboto mpe na limemya. (Tángá 1 Petro 3:15.) Omituna boye: ‘Nayebaka ntina oyo mbala mosusu Batatoli ya Yehova basalaka te makambo oyo bato mingi basalaka? Ntango nakutani na likambo oyo esɛngi ete naboya kosala makambo oyo bato mingi basalaka, nandimaka mpenza ete makambo oyo Biblia mpe moombo ya sembo alobi ezali solo? (Matai 24:45; Yoane 17:17) Mpe soki esɛngi nasala likambo oyo ezali malamu na miso ya Yehova, nakondima kokesena na bato mosusu mpe nakoyoka nsɔni te?’—Nzembo 34:2; Matai 10:32, 33.
23 Kasi, mbala mingi, mposa na biso ya kokabwana na mokili emekamaka na makambo oyo, ntango mosusu, emonanaka mabe na mbala moko te. Na ndakisa, ndenge tolobaki yango liboso, Zabolo alukaka kobenda basaleli ya Nzambe na mokili na nzela ya masano. Ndenge nini tokoki kopona masano oyo ekosalisa biso tóminanola malamu mpe oyo ekotungisa lisosoli na biso te? Tokolobela likambo yango na mokapo oyo elandi.
a Kobanda Pantekote ya mobu 33 T.B., Kristo azali Mokonzi ya lisangá ya bayekoli na ye oyo batyami mafuta na elimo awa na mabele. (Bakolose 1:13) Na 1914, Kristo akómaki mokonzi likoló ya “bokonzi ya mokili.” Yango wana, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali mpe baambasadɛrɛ ya Bokonzi ya Masiya.—Emoniseli 11:15.
b Talá buku Ndenge ya kosolola na bato na Makomami, nkasa 182-185, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
c Talá Apɛndisi, lisolo “Kopesa drapo losako, kosala voti, mpe kosala mosala oyo Leta asɛngi.”