Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jr mok. 9 nk. 103-113
  • Tiká “koluka makambo minene”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tiká “koluka makambo minene”
  • Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “MAKAMBO MINENE” YANGO EZALAKI NINI?
  • “NAKOPESA YO MOLIMO NA YO LOKOLA ELOKO OYO EPUNZAMI”
  • OKOLUKA “MAKAMBO MINENE”?
  • “BILOKO YA MOTUYA” EKOKI KOZALA MOTAMBO
  • OKOZWA “MOLIMO NA YO LOKOLA ELOKO OYO EPUNZAMI”?
  • Baluku​—Mokomeli mpe moninga ya Yilimia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Yehova atalaka biso mpo na bolamu na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Salá boninga ya makasi na basusu liboso nsuka eya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Yehova apambolaka mpe abatelaka bato ya botosi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
jr mok. 9 nk. 103-113

MOKAPO YA LIBWA

Tiká “koluka makambo minene”

1, 2. (a) Mokakatano nini Baruke akutanaki na yango na mbula ya minei ya boyangeli ya Yehoyakime? (b) Ndenge nini Yehova asalisaki Baruke?

BARUKE, sɛkrɛtɛrɛ ya sembo ya Yirimia, alɛmbi nzoto. Ezalaki na mobu soki 625 L.T.B., na mbula ya minei ya boyangeli ya mokonzi mabe Yehoyakime. Yirimia asɛngaki Baruke akoma na rulo maloba nyonso oyo Yehova ayebisaki ye na ntina na Yerusaleme mpe Yuda, elingi koloba maloba oyo Yehova ayebisaki Yirimia na boumeli ya mbula 23 oyo asilaki kolekisa na mosala na ye tii na ntango wana. (Yir. 25:1-3; 36:1, 2) Kasi Baruke atángelaki Bayuda maloba yango te mbala moko nsima ya kokoma yango. (Yir. 36:9, 10) Ezali nde na likambo oyo ezalaki kotungisa Baruke?

2 Baruke amilelaki boye: “Mawa na ngai, sikoyo, mpo Yehova abakisi mawa na mpasi na ngai! Nalɛmbi mpo na kokimela na ngai.” Na ntembe te, esilá mpe kokómela yo olɛmba nzoto mpe obanda komilelalela, ekoki kozala omilelaki epai na moto mosusu to kaka yo moko na motema. Ezala Baruke amilelaki ndenge nini, Yehova azalaki koyoka. Moto oyo atalatalaka mitema ya bato ayebaki likambo oyo ezalaki kotungisa Baruke, mpe na boboto nyonso asembolaki ye na nzela ya Yirimia. (Tángá Yirimia 45:1-5.) Mbala mosusu okomituna mpo na nini Baruke alɛmbaki nzoto ndenge wana. Ezali nde mpo mokumba oyo Nzambe apesaki ye ekómelaki ye kilo, to ndenge oyo makambo ezalaki na ntango oyo azalaki kokokisa mokumba na ye? Te, mokakatano eutaki nde na motema na ye moko. Baruke azalaki “koluka makambo minene.” Makambo yango ezalaki nini? Eloko nini Yehova alakaki ete akopesa ye soki andimi toli mpe litambwisi na ye? Mpe mateya nini tokoki kozwa na likambo oyo ekómelaki ye?

“MAKAMBO MINENE” YANGO EZALAKI NINI?

3. Mokakatano oyo Baruke azalaki na yango eutaki mpenza wapi?

3 Na ntembe te, Baruke ye moko ayebaki “makambo minene” yango. Ayebaki ete “miso [ya Nzambe] ezali likoló ya banzela ya moto, mpe azali komona matambe na ye nyonso.” (Yobo 34:21) Ntango Baruke azalaki kokoma bisakweli ya Yirimia, alobaki ete azwi “esika ya kopema te.” Soki alobaki bongo, ezali te mpo mokumba na ye ezalaki kilo; mokakatano eutaki nde na makanisi oyo ezalaki na motema na ye, elingi koloba lolenge oyo azalaki kotalela makambo oyo ye amonaki ete ezali minene. Lokola Baruke azalaki koluka “makambo minene,” abosanaki makambo oyo eleki ntina, elingi koloba makambo oyo etali mokano ya Nzambe. (Flp. 1:10) Mpo na kobimisa ndimbola ya sikisiki ya vɛrsɛ yango, Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika esaleli maloba “kokoba koluka.” Yango emonisi ete Baruke azalaki kokanisakanisa makambo yango. Baruke azalaki koluka “makambo minene” ntango Yehova ayebisaki ye ete atika kosala bongo. Atako sɛkrɛtɛrɛ yango ya sembo ya Yirimia azalaki kosala mokano ya Nzambe, azalaki mpe na mposa makasi ya “makambo minene” mpo na ye moko.

4, 5. Mpo na nini tokoki koloba ete mbala mosusu lokumu mpe koyebana ezalaki na kati ya “makambo minene” oyo Baruke azalaki koluka, mpe mpo na nini ebongaki mpenza ete Yehova asembola ye?

4 Baruke azalaki mpenza koluka nini? Mbala mosusu azalaki koluka lokumu mpe koyebana. Atako Baruke azalaki kosalisa Yirimia mpo na kokoma, azalaki sɛkrɛtɛrɛ ya Yirimia kaka te. Na Yirimia 36:32, Baruke abengami “sɛkrɛtɛrɛ.” Biloko oyo bato ya arkeoloji bakundolaki emonisi ete Baruke azalaki na mokumba moko monene na ndako ya mokonzi. Kutu, Elishama, oyo atángami mpe kati na bankumu ya Yuda, azalaki mpe na titre ya sɛkrɛtɛrɛ lokola Baruke. Yango emonisi ete lokola Baruke azalaki kosala mosala moko ná Elishama, ye mpe azalaki kokɔta na “ndako ya mokonzi, na esika ya kolya ya sɛkrɛtɛrɛ”. (Yir. 36:11, 12, 14) Na yango, emonani ete Baruke azalaki moto oyo atángá mpe azalaki na mokumba na ndako ya mokonzi. Ndeko na ye Seraya azalaki mokonzi ya basoda oyo atalelaka biloko mpe akendaki na Babilone elongo na Mokonzi Zidikiya mpo na mobembo moko ya ntina mingi. (Tángá Yirimia 51:59.) Lokola Seraya azalaki mokonzi ya basoda oyo atalelaka biloko, ekoki kozala ete ye nde azalaki kokipe mokonzi na makambo etali kolya, komɛla mpe esika ya kolala na boumeli ya mobembo. Yango ezalaki mpenza mokumba monene.

5 Lokola Baruke azalaki na mokumba monene ndenge wana, tomoni sikoyo mpo na nini alɛmbaki kokoma nsango ya bitumbu oyo esengelaki kokwela Yuda. Kutu, Baruke akokaki kobebisa mosala mpe esika na ye na ndenge azalaki kosalisa mosakoli ya Nzambe. Kanisá mpe makama oyo akokaki kozwa ntango Yehova asengelaki kobuka oyo atongaki, ndenge tozali kotánga yango na Yirimia 45:4. “Makambo minene” oyo Baruke azalaki kokanisa​—ezala koluka lokumu monene koleka na ndako ya mokonzi to kozala na biloko mingi—​elingaki kozala na ntina moko te. Soki ezali ete Baruke azalaki koluka kozala na bomoi ya malamu na ebongiseli ya Bayuda oyo esengelaki kobomama na ntango wana, Nzambe azalaki mpenza na ntina ya kokebisa ye.

6, 7. Soki “makambo minene” oyo Baruke azalaki koluka ezali biloko ya mokili, tokoki koloba ete ezaleli na ye ekokanaki na oyo ya bato nini ya ntango na ye?

6 Longola yango, mbala mosusu bomɛngo ezali mpe moko ya “makambo minene” oyo Baruke azalaki koluka. Bikólo oyo ezalaki zingazinga na Yuda ezalaki kotya motema na biloko mpe bozwi na yango. Moabe ezalaki kotya motema na ‘misala mpe biloko na yango ya motuya.’ Amone ezalaki mpe kosala bongo. Lisusu, Yehova ayebisaki Yirimia akoma ete Babilone ezali lokola “mwasi oyo azali na biloko mingi ya motuya.” (Yir. 48:1, 7; 49:1, 4; 51:1, 13) Kasi ndenge toyebi yango, Nzambe akweisaki bikólo yango.

7 Na yango, soki Baruke azalaki koluka biloko ya mokili mpe bomɛngo, okoki komona sikoyo mpo na nini Nzambe akebisaki ye mpo na ezaleli yango. Ntango Nzambe ‘asembolaki lobɔkɔ na ye mpo na kotɛmɛla’ Bayuda, banguna na bango babɔtɔlaki bandako mpe bilanga na bango. (Yir. 6:12; 20:5) Kanisá ete na ntango yango ozali kofanda na Yerusaleme. Bana-mboka mingi, ezala mpe bankumu, banganga-nzambe, mpe mokonzi ye moko, bamoni ete basengeli kobundisa mampinga ya Babilone. Nzokande, oyoki Yirimia azali koloba ete: “Bósalela mokonzi ya Babilone mpe bótikala na bomoi.” (Yir. 27:12, 17) Soki ozalaka na biloko mingi na engumba, okanisi ete kotosa etinda wana ya Nzambe ekokaki kozala pɛtɛɛ? Ndenge na yo ya kotalela biloko yango na ntango wana, ekokaki kosalisa yo otosa likebisi ya Yirimia to elingaki kotinda yo olanda nzela ya bato mingi? Nsukansuka, banguna babɔtɔlaki biloko nyonso ya motuya oyo ezalaki na Yuda mpe na Yerusaleme, ezala mpe biloko oyo ezalaki na tempelo, mpe bamemaki yango na Babilone. Na yango, koboma nzoto mpo na koluka biloko ya mokili ezalaki na ntina ata moke te. (Yir. 27:21, 22) Liteya nini tokoki kozwa na likambo yango?

Ndenge nini Yehova asembolaki Baruke na boboto mpenza mpo na ezaleli na ye ya koluka “makambo minene”? Mpo na nini okanisi ete kondima Nzambe asembola yo ekomonisa ete ozali na bwanya?

“NAKOPESA YO MOLIMO NA YO LOKOLA ELOKO OYO EPUNZAMI”

8, 9. Mpo na nini tokoki koloba ete ndenge Baruke azwaki molimo na ye lokola eloko oyo epunzami ezalaki likambo moke te?

8 Sikoyo kanisá likambo oyo: Soki Baruke atosaka etinda ya Nzambe, alingaki kozwa nini? Alingaki kozwa nde molimo na ye! Nzambe apesaki Baruke ndanga ete akozwa molimo na ye “lokola eloko oyo epunzami.” (Tángá Yirimia 45:5.) Kaka bato moke nde babikaki. Banani? Bato oyo batosaki etinda ya Nzambe ya koleka, to komitika epai ya Bakaladea. (Yir. 21:9; 38:2) Basusu bakoki komituna ete, ‘Kaka yango nde eloko bazwaki mpo batosaki Nzambe?’

9 Kanisá naino ndenge oyo Yerusaleme ezalaki ntango mampinga ya Babilone ezingaki yango. Ezalaki lokola nde Yerusaleme ezali kozika malɛmbɛmalɛmbɛ na kati ya mɔtɔ. Nzokande, soki tokokanisi Yerusaleme na Sodoma, tokoloba ete Sodoma ebebisamaki na mbala moko. Na lolenge mosusu, tokoki koloba ete mpasi oyo bato bamonaki na Sodoma ntango ebebisamaki ezalaki eloko te soki tokokanisi yango na oyo ya Yerusaleme. (Bil. 4:6) Baruke akomaki esakweli oyo elobelaki ndenge bafandi ya Yerusaleme bakokufa na mopanga, na nzala, to na maladi mabe. Na nsima amonaki kokokisama ya esakweli yango. Na engumba Yerusaleme biloko ya kolya esilaki. Ezalaki likambo ya nsɔmɔ komona ndenge oyo bamama oyo bazalaka “motema mawa” bazali kolamba bana na bango mpe kolya bango! (Bil. 2:20; 4:10; Yir. 19:9) Kasi Baruke abikaki. Ya solo, na kati ya mobulu ya ndenge wana, kotikala na bomoi ezalaki mpenza lokola kozwa eloko oyo epunzami, oyo bato bazwaka nsima ya kolonga etumba. Emonani polele ete Baruke andimaki mpe atosaki toli oyo Nzambe apesaki ye ete atiká koluka “makambo minene.” Mpe lokola abikaki, yango emonisi ete Yehova asepelaki na ye.​—Yir. 43:5-7.

Elilingi na lokasa 107

OKOLUKA “MAKAMBO MINENE”?

10, 11. Ndenge nini lisolo ya Baruke ezali na boyokani na makambo oyo ezali kosalema lelo, mpe ndenge nini yango ekoki kosalisa mokomoko na biso?

10 Atako Baruke azalaki na mingi ya kosala na mosala ya Nzambe, mposa ya kozala na “makambo minene” etungisaki ye mpo na mwa ntango. Yehova akebisaki ye mpo na likama oyo ezalaki liboso, na yango Baruke abebisaki boyokani na ye na Nzambe te mpe abikaki na liwa. Biso mpe tokoki nde komekama lokola Baruke mpe mbala mosusu motema na biso ekoki kozala na bamposa oyo ezali kotambwisa biso motó, ata soki tozali kosalela Yehova na molende?

11 Mbala mosusu Baruke akómaki mpenza na mposa makasi ya kozala na lokumu. Ntango mosusu amitunaki boye: ‘Nakobatela mosala na ngai ya “sɛkrɛtɛrɛ”? Mokolo mosusu nakokóma na grade monene koleka?’ Ezali boni mpo na biso? Omituna boye, ‘Nazalaka na bamposa makasi, oyo mbala mosusu ebombaná mpenza na kati ya motema na ngai, ya kokóma moto monene na mokili sikoyo to na mikolo ezali koya?’ Bakristo mosusu oyo bazali bilenge bakoki komituna boye: ‘Koluka “makambo minene” ezali kotinda ngai natánga bakelasi ya milaimilai mpo nakóma na lokumu mpe na mbongo mingi?’

12. Ndenge nini ndeko moko alukaki makambo minene mpo na Yehova, mpe okanisi nini mpo na liponi oyo asalaki?

12 Ndeko moko oyo azali kosala lelo na Biro monene ya Batatoli ya Yehova azalaki na mbula 15 ntango bapesaki ye bourse mpo akende kotánga na iniversite. Aboyaki bourse yango mpo aponaki kozala mobongisi-nzela; balakisi na ye bayokaki mabe mpenza. Ata bongo, azalaki kaka na mposa ya koyekola. Na nsima, akómaki misionɛrɛ mpe akendaki kosala mosika na esanga moko. Kuna, ayekolaki monɔkɔ moko oyo kaka bato koleka 10 000 balobaka. Monɔkɔ yango ezalaki ata na diksionɛrɛ moko te, na yango ayanganisaki maloba ya monɔkɔ yango na buku oyo ye moko asalaki. Nsukansuka, ayebaki monɔkɔ yango malamu mpe bapesaki ye mosala ya kobongola mikanda na biso mosusu oyo elimbolaka Biblia. Na nsima, basalelaki buku ya maloba oyo ayanganisaki mpo na kobimisa diksionɛrɛ ya liboso na monɔkɔ yango. Mokolo moko na liyangani ya etúká, ndeko yango alobaki boye: “Soki nandimaka kokende na iniversite, mbɛlɛ nyonso oyo nasalá ememeli ngai lokumu. Kasi lokola nazali na diplome ya iniversite te, nazali kozwa lokumu te mpo na oyo nasalá. Lokumu nyonso ezali ya Yehova.” (Mas. 25:27) Okanisi nini mpo na liponi oyo ndeko yango asalaki ntango azalaki na mbula 15? Na boumeli ya bambula, azwá mikumba mingi na kati ya ebongiseli ya Nzambe. Bongo yo, ndenge nini okosalela makoki na yo? Na esika osalela makoki na yo mpo na komizwela lokumu, ozwi nde ekateli ya kosalela yango mpo Yehova azwa lokumu?

13. Mpo na nini baboti basengeli komanyola likoló ya mokakatano oyo Baruke akutanaki na yango?

13 Kasi ezali mpe na likama mosusu oyo tosengeli kokeba na yango: koluka “makambo minene” mpo na bato oyo tolingaka, to na nzela ya bato oyo tolingaka mpe oyo tokoki kotinda básala bongo. Na ntembe te, osilá komona ndenge oyo baboti mosusu na mokili babomaka nzoto mpo bana na bango básala makambo oyo bango moko bakokaki kosala te to mpo bana na bango bákóma bato minene oyo bakoki kotutela ntolo. Mbala mosusu oyoká baboti yango bazali koloba ete, “Naboyi mwana na ngai amona mpasi oyo ngai namoná” to, “Nalingi mwana na ngai atánga na iniversite mpo azala na bomoi ya malamu.” Baboti mosusu oyo bazali bakristo bakoki mpe kozala na makanisi ya ndenge wana. Kasi moto mosusu akoki koloba ete, “Nazali koluka makambo minene te.” Ata bongo, ekoki nde kozala ete azali koluka makambo minene na nzela ya moto mosusu, na ndakisa na nzela ya mwana na ye ya mobali to ya mwasi? Mbala mosusu Baruke akómaki na mposa makasi ya kozala na lokumu na nzela ya mosala na ye; ndenge moko mpe baboti mosusu na motema na bango bakoki koluka lokumu na nzela ya makambo oyo bana na bango bakosala. Nzokande, omoni te ete “moto oyo atalaka mitema malamumalamu” azali komona makanisi ya baboti yango, kaka ndenge amonaki oyo ya Baruke? (Mas. 17:3) Ekozala malamu koleka tósɛnga Nzambe atala malamumalamu makanisi oyo ezali na kati ya motema na biso, ndenge Davidi asɛngaki, boye te? (Tángá Nzembo 26:2; Yirimia 17:9, 10.) Yehova asalelaka banzela mingi, lokola lisolo oyo ya Baruke, mpo na kokebisa biso na likama ya koluka “makambo minene.”

Mbala mosusu, ndenge nini Baruke azalaki koluka “makambo minene”? Likambo yango ekoki koteya yo nini?

“BILOKO YA MOTUYA” EKOKI KOZALA MOTAMBO

14, 15. Ndenge nini bomɛngo ekoki kokóma “makambo minene” mpo na biso?

14 Tóloba ete “makambo minene” oyo Baruke azalaki koluka ezali bomɛngo. Ndenge tomonaki yango, soki Baruke akangamaka makasi na biloko na ye mpe bozwi oyo azalaki na yango na Yuda, elingaki kozala mpasi atosa etinda oyo Nzambe apesaki ya komitika na mabɔkɔ ya Bakaladea. Na ntembe te omonaka ete mbala mingi moto ya bozwi atyaka motema na “biloko ya motuya” oyo azali na yango, kasi Biblia emonisi ete libateli oyo biloko yango ezali kopesa ye ezalaka kaka na “makanisi na ye.” (Mas. 18:11) Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa basaleli nyonso ya Yehova báyeba kotya biloko ya mokili na esika na yango. (Tángá Masese 11:4.) Kasi bandeko mosusu bakoki kokanisa boye, ‘Mabe ezali wapi soki moto amisepelisi mwa moke na biloko ya mokili?’

15 Soki mokristo akangami makasi na biloko na ye, yango ekoki kotinda ye azala na bolingo makasi mpo na biloko ya mokili oyo ezali koleka. Yirimia ná Baruke basalaki bongo te. Bambula mingi na nsima, Yesu apesaki likebisi mpo na bato oyo bakozala na bomoi ‘na mokolo oyo Mwana ya moto akomonana’; alobaki boye: “Bókanisa mwasi ya Lota.” Ndenge moko mpe, ebongi kolendisa bakristo ‘bákanisa Yirimia ná Baruke.’ (Luka 17:30-33) Soki tokangami makasi na biloko ya mokili, ekozala mpasi mpenza tólanda toli ya Yesu. Kasi kobosana te ete Baruke alandaki toli oyo Nzambe apesaki ye mpe atikalaki na bomoi.

16. Lobelá likambo moko oyo ekómelaki basaleli ya Nzambe, oyo emonisi ete batikaki biloko ya mokili na esika na yango.

16 Kanisá lisusu makambo oyo bandeko na biso bakutanaki na yango na Roumanie, na ntango oyo bakoministe bazalaki koyangela mboka yango. Ntango bapolisi bazalaki kokɔtela Batatoli na bandako, mbala mosusu bazalaki kobɔtɔla bandeko biloko na bango, mingimingi biloko oyo ekoki kotɛkama. (Bil. 5:2) Bandeko mingi ya mibali mpe ya basi bandimaki kobungisa biloko na bango na ntango wana. Bandeko mosusu batikaki biloko mpe bandako na bango ntango bamemaki bango bisika mosusu; ata bongo, bakangamaki kaka na Yehova. Soki okutani na komekama ya ndenge wana, okotika ete kokangama na biloko ya mokili epekisa yo otikala sembo epai ya Nzambe?​—2 Tim. 3:11.

Elilingi na lokasa 111

17. Ndenge nini mbala mosusu basaleli mosusu ya Nzambe na ntango ya Yirimia basalisaki Yirimia ná Baruke?

17 Simbá ete basaleli mosusu ya Nzambe na ntango ya Yirimia basalisaki Yirimia ná Baruke. Sefania asakolaki na boumeli ya boyangeli ya Yosiya, ntango Yirimia azalaki mosakoli. Yirimia akanisaki nini mpo na maloba oyo ezali na Sefania 1:18? (Tángá.) Mbala mosusu Yirimia ná Baruke basololaki makambo oyo ezali na vɛrsɛ yango. Ezekiele, oyo amemamaki na Babilone na 617 L.T.B., azalaki mpe mosakoli na ntango ya Yirimia. Makambo mosusu oyo asalaki mpe nsango oyo asakolaki etalelaki Bayuda oyo batikalaki na ekólo na bango; na yango mbala mosusu Yirimia ayokaki makambo oyo Ezekiele asakolaki mpe Ezekiele ayokaki oyo ya Yirimia. Ntango mosusu makambo oyo ekomami na Ezekiele 7:19 (Tángá.) ezali mpe kati na makambo oyo Yirimia ayokaki. Na ntembe te maloba yango oyo ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe esalisaki Yirimia ná Baruke; ekoki mpe kosalisa yo. Na mokolo ya Yehova, bato bakobelela banzambe na bango mpo bábikisa bango. Kasi, ezala banzambe na bango to bomɛngo na bango, ekobikisa bango te.​—Yir. 2:28.

OKOZWA “MOLIMO NA YO LOKOLA ELOKO OYO EPUNZAMI”?

18. Eloko nini tokolinga kozwa lokola eloko oyo epunzami, mpe ndenge nini tokozwa yango?

18 Tóbosana te ete Yehova alaki biso ete tokozwa “molimo” na biso lokola eloko oyo epunzami. Na “bolɔzi monene,” ntango bibongiseli ya politiki, oyo emonisami na maseke ya nyama mabe, ekobalukela mangomba, ntango mosusu mwa ndambo ya basaleli ya Yehova bakobungisa bomoi na bango; kasi yango elingi koloba te ete na ntango wana basaleli yango ya sembo bakobungisa nyonso. Bazali na ndanga ete bakozwa lisusu “molimo” na bango na lisekwa mpo básepela na “bomoi ya solosolo” na mokili ya sika. (Em. 7:14, 15; 1 Tim. 6:19) Kasi tokoki kondima ete mingi kati na basaleli ya Nzambe oyo bazali sembo lelo bakobika na bolɔzi monene. Yebá ete ntango Nzambe akosopela bikólo bitumbu na ye, ata mosaleli moko te ya sembo akozala kati na ‘baoyo bakobomama na Yehova.’​—Yir. 25:32, 33.

Bililingi na lokasa 113

Poná makambo oyo ezali mpenza na motuya (Talá mpe lokasa 46.)

19. Ndenge nini ndakisa ya Yirimia ná Baruke esalisi yo okóma na ekateli makasi ya koboya kolanda “makambo minene”?

19 Bato mosusu bakoki komona mabe ete ntango moto akobika akozwa kaka “molimo” na ye lokola eloko oyo epunzami, kasi basengeli te kokanisa bongo. Kobosana te ete na ntango oyo bato na kati ya Yerusaleme bazalaki kokufa na nzala, Yehova abatelaki Yirimia. Abatelaki ye ndenge nini? Mokonzi Zidikiya apesaki mitindo ete batyá Yirimia na bolɔko na lopango ya Bakɛngɛli mpe alobaki ete bápesa ye “mokolo na mokolo limpa ya libungutulu, oyo ezalaki kouta na balabala ya basali-mampa, kino mampa nyonso esilaki na engumba.” (Yir. 37:21) Na yango, Yirimia abikaki! Yehova akoki kopona nzela nyonso oyo alingi mpo na kopesa basaleli na ye nyonso oyo esengeli mpo na kobika. Mpe ntembe ezali te ete akosala bongo, mpo apesi bango ndanga ya bomoi ya seko. Baruke abikaki ntango Yerusaleme ebebisamaki mpo atikaki “koluka makambo minene.” Ndenge moko mpe, tozali na mposa makasi tóbika na Armagedone mpo na kosanzola Yehova na “molimo” na biso oyo tokozwa lokola eloko oyo epunzami, oyo tokosepela na yango mpo na libela na libela.

Mpo na nini lelo oyo moto oyo azali na bwanya akoboya koluka “makambo minene,” kasi akoluka nde kozwa “molimo” na ye lokola eloko oyo epunzami?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto