Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • T-34 nk. 1-4
  • Bampasi ekosila mokolo mosusu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bampasi ekosila mokolo mosusu?
  • Bampasi ekosila mokolo mosusu?
  • Masolo mosusu
  • Okanisaka ete bomoi ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya?
    Okanisaka ete bomoi ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya?
  • Bakufi bakozonga mpenza na bomoi?
    Bakufi bakozonga mpenza na bomoi?
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
  • Nani mpenza azali koyangela mokili?
    Nani mpenza azali koyangela mokili?
Makambo mosusu
Bampasi ekosila mokolo mosusu?
T-34 nk. 1-4

Bampasi ekosila mokolo mosusu?

Okanisaka ete . . .

  • ekosila?

  • ekosila te?

  • ntango mosusu ekosila?

BIBLIA ELOBI ETE

“Nzambe . . . akopangusa bango mai nyonso ya miso; liwa ekozala lisusu té, ata matanga, ézala mawa to pe pasi.”​—Emoniseli 21:3, 4, Bible na lingala ya lelo oyo.

BOLAMU NINI OKOZWA?

Okomona mpenza ete Nzambe te moto atindelaka biso bampasi.​—Yakobo 1:13.

Motema ekokita mpo okoyeba ete Nzambe amityaka na esika na biso ntango tozali komona mpasi.​—Zekaria 2:8.

Okoyeba ete bampasi nyonso ekosila.​—Nzembo 37:9-11.

Mobali moko azali kotánga Biblia mpe azali kokanisa ndenge bampasi mpe kozanga bosembo ekosila na mokili

EBONGI MPENZA TÓNDIMA MAKAMBO OYO BIBLIA ELOBI?

Ɛɛ; mpo na ntina mibale oyo:

  • Nzambe ayinaka bampasi mpe makambo ya mabe. Kanisá ndenge Yehova Nzambe ayokaki ntango basaleli na ye ya ntango ya kala bazalaki konyokwama. Biblia elobi ete ayokaki mawa makasi mpo “bazalaki kotindikatindika bango.”​—Basambisi 2:18, Libongoli ya Mokili ya Sika.

    Nzambe ayinaka bato oyo banyokolaka baninga. Na ndakisa, Biblia elobi ete ayiná “mabɔkɔ oyo [esopaka] makila ya moto oyo azali na likambo te.”​—Masese 6:16, 17.

  • Nzambe atyelaka mokomoko na biso likebi. Ya solo, moto na moto ayebi “bolɔzi na ye moko mpe mpasi na ye moko,” kasi Yehova mpe ayebi yango!​—2 Ntango 6:29, 30.

    Etikali moke, Yehova, na nzela ya Bokonzi na ye, asilisa bampasi oyo mokomoko na biso azali komona. (Matai 6:9, 10) Kasi sikoyo, azali kobɔndisa baoyo nyonso bazali kotyela ye motema mobimba.​—Misala 17:27; 2 Bakorinti 1:3, 4.

KANISÁ NAINO

Basi mibale bazali koyekola Biblia

Mpo na nini Nzambe atiki bampasi ezala?

Biblia epesi eyano na motuna yango na BAROMA 5:12 mpe na 2 PETRO 3:9.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto