Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • T-36 nk. 1-4
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
  • Masolo mosusu
  • Okanisaka ete bomoi ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya?
    Okanisaka ete bomoi ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya?
  • Nani mpenza azali koyangela mokili?
    Nani mpenza azali koyangela mokili?
  • Bakufi bakozonga mpenza na bomoi?
    Bakufi bakozonga mpenza na bomoi?
  • Bampasi ekosila mokolo mosusu?
    Bampasi ekosila mokolo mosusu?
Makambo mosusu
Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
T-36 nk. 1-4
Bato ya bikólo nyonso bazali kobondela mpo Bokonzi ya Nzambe eya

Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

Okoloba ete ezali . . .

  • eloko moko na kati ya motema na yo?

  • maloba ya elilingi?

  • boyangeli moko na likoló?

BIBLIA ELOBI ETE

“Nzambe ya likoló akotya bokonzi moko oyo ekobebisama te.”​—Danyele 2:44, Libongoli ya Mokili ya Sika.

“Baboteli biso mwana, bapesi biso mwana mobali; mpe boyangeli ekozala na lipeka na ye.”​—Yisaya 9:6.

BOLAMU NINI OKOZWA?

  • Boyangeli moko ya sembo oyo ekoki komemela yo matomba.​—Yisaya 48:17, 18.

  • Na mokili ya sika oyo ezali koya, bomoi ekozala ya kokoka mpe ya esengo.​—Emoniseli 21:3, 4.

Bato na kati ya paradiso oyo Bokonzi ya Nzambe ezali kotambwisa, bazali kosepela mpe kosala misala na elanga

TOKOKI MPENZA KONDIMA OYO BIBLIA ELOBI?

Ɛɛ, mpo na ntina mibale oyo:

  • Yesu amonisaki makambo oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala. Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka Nzambe ete Bokonzi na ye eya mpe mokano na ye esalema awa na mabele. (Matai 6:9, 10) Yesu amonisaki ndenge oyo Nzambe akoyanola na libondeli yango.

    Ntango Yesu azalaki awa na mabele, aleisaki bato oyo bazalaki na nzala, abikisaki bato ya maladi mpe azongisaki bakufi na bomoi! (Matai 15:29-38; Yoane 11:38-44) Lokola Yesu akozala Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe, amonisaki mwa moke makambo ya malamu oyo Bokonzi yango ekosala mpo na bato.​—Emoniseli 11:15.

  • Makambo oyo ezali kosalema na mokili endimisi biso ete etikali moke Bokonzi ya Nzambe eya. Yesu asakolaki ete mwa moke liboso Bokonzi yango etya kimya na mabele, bitumba, nzala mpe koningana ya mabele ekozala na bisika ndenge na ndenge.​—Matai 24:3, 7.

    Lelo oyo, tozali mpenza komona makambo yango. Na yango, tokoki mpenza kondima ete Bokonzi ya Nzambe ekosukisa mikakatano wana nyonso.

KANISÁ NAINO

Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela mabele kitoko

Bomoi ekozala ndenge nini ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela?

Biblia epesi eyano na motuna yango na NZEMBO 37:29 mpe YISAYA 65:21-23.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto