Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yc liteya 13 nk. 28-29
  • Timote alingaki kosalisa bato

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Timote alingaki kosalisa bato
  • Teyá bana na yo
  • Masolo mosusu
  • Timote—Amilengelaki mpe azalaki na mposa ya kosala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Paulo ná Timote
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Timote—“Mwana na solo kati na kondima”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • “Mwana na ngai ya bolingo mpe ya sembo na kati ya Nkolo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Teyá bana na yo
yc liteya 13 nk. 28-29
Elenge Timote azali koyekola epai ya mama na ye Enise, mpe nkɔkɔ na ye Loisi

LITEYA 13

Timote alingaki kosalisa bato

Timote azalaki elenge mobali oyo azalaki kosepela kosalisa bato. Asalaki mibembo na bisika ebele mpo na kosalisa basusu. Yango wana azalaki na bomoi moko ya esengo mpenza. Olingi koyoka lisolo na ye?​—

Mama ya Timote ná nkɔkɔ na ye ya mwasi bateyaki ye makambo ya Yehova

Timote akolaki na engumba moko nkombo na yango Listra. Ntango azalaki naino mwana moke mpenza, nkɔkɔ na ye ya mwasi Loisi ná mama na ye Enise babandaki koteya ye makambo ya Yehova. Ntango Timote azalaki kokola, akómaki na mposa ya kosalisa basusu báyeba Yehova.

Ntango Timote azalaki naino elenge, Paulo asɛngaki ye básalaka mibembo elongo mpo na kokende koteya na bisika mosusu. Timote andimaki. Amipesaki mpo na kokende kosalisa basusu.

Timote akendaki na Paulo na engumba Tesaloniki, na etúká ya Masedonia. Mpo na kokóma kuna, batambolaki na makolo mpe na nsima bazwaki masuwa. Mpe ntango bakómaki kuna, basalisaki bato ebele báyeba Yehova. Kasi bato mosusu basepelaki te mpe balukaki kosala bango mabe. Na yango, Paulo ná Timote balongwaki kuna mpe bakendaki kosakola na bisika mosusu.

Timote azali kosala mobembo elongo na ntoma Paulo na masuwa

Timote azalaki na bomoi ya malamu mpe ya esengo

Mwa basanza na nsima, Paulo asɛngaki Timote azonga na Tesaloniki mpo na kotala soki bandeko bazali malamu. Timote asengelaki kozala na mpiko mpo azonga na engumba oyo bato balukaki kosala bango mabe! Kasi Timote akendaki kuna mpo azalaki kokanisa bandeko na ye. Ntango autaki kuna, amemelaki Paulo nsango ya esengo. Bandeko ya Tesaloniki bazalaki malamu!

Timote asalaki elongo na Paulo bambula ebele. Paulo akomaki na mokanda moko ete Timote nde moto ya malamu oyo akokaki kotinda mpo akende kosalisa bandeko na masangá. Timote alingaki mpenza Yehova mpe alingaki bato.

Yo mpe olingaka bato mpe olingi kosalisa bango báyeba Yehova?​— Soki ezali bongo, okoki kozala na bomoi ya malamu mpe ya esengo, kaka lokola Timote.

TÁNGÁ NA BIBLIA

  • 2 Timote 1:5; 3:15

  • Misala 16:1-5; 17:1-10

  • 1 Batesaloniki 3:2-7

  • Bafilipi 2:19-22

MITUNA:

  • Timote akolaki na engumba nini?

  • Mpo na nini Timote andimaki kosala mibembo na Paulo?

  • Mpo na nini Timote andimaki kozonga na Tesaloniki?

  • Okoki kosala nini mpo ozala na bomoi ya malamu mpe ya esengo, lokola Timote?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto