Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 100 lok. 232-lok. 233 par. 2
  • Paulo ná Timote

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Paulo ná Timote
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Timote—Amilengelaki mpe azalaki na mposa ya kosala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Timote alingaki kosalisa bato
    Teyá bana na yo
  • Timote—“Mwana na solo kati na kondima”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • “Mwana na ngai ya bolingo mpe ya sembo na kati ya Nkolo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 100 lok. 232-lok. 233 par. 2
Paulo, Silasi ná Timote

LITEYA 100

Paulo ná Timote

Enise, Loisi ná Timote

Elenge Timote azalaki ndeko mobali moko na lisangá ya Listra. Tata na ye azalaki Mogrɛki mpe mama na ye azalaki Moyuda. Mama na ye Enise mpe nkɔkɔ na ye ya mwasi Loisi bateyaki Timote makambo ya Yehova kobanda bomwana na ye.

Ntango Paulo akendaki na Listra na mobembo ya mibale oyo asalaki mpo na kosakola, amonaki ete Timote azalaki mpenza kolinga bandeko mpe azalaki na mposa makasi ya kosalisa bango. Paulo asɛngaki Timote akende na ye elongo na mobembo. Mokemoke, Paulo asalisaki Timote akóma mosakoli mpe moteyi malamu ya nsango malamu.

Elimo santu etambwisaki Paulo ná Timote esika nyonso oyo bakendaki. Na butu moko, Paulo amonaki na emonaneli mobali moko oyo ayebisaki ye aleka na Masedonia mpo na kosalisa bango. Na yango, Paulo, Timote, Silasi ná Luka bakendaki kuna mpo na kosakola mpe kofungola masangá.

Na Tesaloniki, engumba moko ya Masedonia, mibali mpe basi mingi bakómaki Bakristo. Kasi Bayuda mosusu bayokelaki Paulo ná baninga na ye zuwa. Basanganaki elongo na bato mabe mpe bamemaki Paulo ná baninga na ye epai ya bakonzi ya engumba, mpe bagangaki ete: ‘Bato oyo bazali banguna ya guvɛrnema ya Roma!’ Paulo ná Timote bakimaki na Beroya na butu mpo bomoi na bango ezalaki na likama.

Bato ya Beroya bazalaki na mposa makasi ya koyoka nsango malamu mpe kuna Bagrɛki ná Bayuda bakómaki bandimi. Kasi, ntango Bayuda mosusu oyo bautaki na Tesaloniki bayaki mpe batyaki mobulu, Paulo akendaki na Atene. Timote ná Silasi batikalaki na Beroya mpo na kolendisa bandeko. Na nsima, Paulo ayebisaki Timote azonga na Tesaloniki mpo na kosalisa bandeko báyika mpiko na minyoko ya makasi oyo bazalaki na yango. Paulo atindaki mpe Timote na masangá mosusu mpo na kotala bandeko mpe kolendisa bango.

Ntoma Paulo azali koyebisa Timote makambo ya kokoma wana azali na shɛnɛ na mabɔkɔ oyo mokɛngɛli ya bɔlɔkɔ mpe akangi yango na lobɔkɔ na ye

Paulo ayebisaki Timote ete: ‘Baoyo balingi kosalela Yehova bakonyokwama.’ Timote anyokwamaki mpe akɔtaki bolɔkɔ mpo na kondima na ye. Azalaki na esengo mpo minyoko yango epesaki ye libaku ya komonisa ete azali sembo epai ya Yehova.

Paulo alobaki na Bafilipi ete: ‘Natindeli bino Timote. Akoteya bino soki kotambola na solo elimboli nini mpe akopesa bino formasyo na mosala ya kosakola.’ Paulo ayebaki ete akoki kotyela Timote motema. Bazalaki baninga mpe basalaki elongo mbula ebele.

“Nazali na moto mosusu te oyo azali na makanisi lokola ya ye, oyo azali komitungisa mpenza mpo na bolamu na bino. Bamosusu nyonso bazali koluka matomba na bango moko, kasi oyo ya Yesu Kristo te.”​—Bafilipi 2:20, 21

Mituna: Timote azalaki nani? Mpo na nini Paulo ná Timote bazalaki baninga ya motema?

Misala 16:1-12; 17:1-15; Bafilipi 2:19-22; 2 Timote 1:1-5; 3:12, 14, 15; Baebre 13:23

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto