Loyembo 145
Kobima mpo na kosakola
Ya Papye
Ntɔng’o yo
Nakanaki
Kokende kosakola.
Kasi molili,
Mbula mpe ebandi.
Mposa natikala na ndako
kolala!
(MONDIMO)
Soki nabondeli Yehova,
mpe namibongisi;
Nakokóma na makanisi
ya malamu.
Naza’ elongo na b’anzelu.
Yesu nde Mokambi.
Mpe ná moninga ya mosala,
Tokolonga.
Esengo
nakoyoka
Soki nalendendeli.
Nzambe ayebi
Milende na biso,
Akobosana te bolingo
na biso.
(MONDIMO)
Soki nabondeli Yehova,
mpe namibongisi;
Nakokóma na makanisi
ya malamu.
Naza’ elongo na b’anzelu.
Yesu nde Mokambi.
Mpe ná moninga ya mosala,
Tokolonga.
(Talá mpe Mos. 11:4; Mat. 10:5, 7; Luka 10:1; Tito 2:14.)