LOYEMBO 162
Mposa na ngai ya elimo
1. Moto nyonso’alingaka
Akolisa boyebi
Ya bomoi, ya mokili,
Ndenge ya kobika.
Koluka mosika te,
Lilob’a Nzamb’ezali.
Epesaka kimy’a solo,
Elikya, esengo.
(MONDIMO)
Tiká nakumisa Yah
Mpe nalanda pole na ye.
Tata zwá bomoi na nga’!
Soki yo te nani?
Nakokolisa
Elimo na nga’!
2. Nasengeli koluka
Ntango ya komanyola.
Nakolisa kondima mpe
Naboya masumu.
Nakokoba koteya
Atako botɛmɛli.
Mpo nalingi bato bázwa
Esengo mpe kimya.
(MONDIMO)
Tiká nakumisa Yah
Mpe nalanda pole na ye.
Tata zwá bomoi na nga’!
Soki yo te nani?
Nakokolisa
Elimo na nga’!
Tiká nakumisa Yah
Mpe nalanda pole na ye.
Tata zwá bomoi na nga’!
Soki yo te nani?
Nakokolisa
Elimo na nga’!
Tiká nakumisa Yah
Mpe nalanda pole na ye.
Tata zwá bomoi na nga’!
Soki yo te nani?
Nakokolisa
Elimo na nga’!
(Talá mpe Nz. 1:1, 2; 112:1; 119:97; Yis. 40:8; Mat. 5:6; 16:24; 2 Tim. 4:4.)