Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 47 lok. 114-lok. 115 par. 3
  • Yehova apesaki Eliya makasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova apesaki Eliya makasi
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Nzambe na ye abɔndisaki ye
    Mekolá kondima na bango
  • Nzambe na ye apesaki ye makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Esí ekómela yo obanga to ozala lokola mwana ya mawa?
    Teyá bana na yo
  • Okozala sembo lokola Eliya?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 47 lok. 114-lok. 115 par. 3
Eliya atɛlɛmi liboso ya mobenga moko na Ngomba Horebe mpe azali koyoka anzelu ya Nzambe

LITEYA 47

Yehova apesaki Eliya makasi

Ntango Yezabele ayokaki makambo oyo ekómelaki basakoli ya Baala, asilikaki makasi. Atindelaki Eliya nsango oyo: ‘Lobi, okokufa lokola basakoli ya Baala.’ Eliya abangaki makasi mpe akimaki na esobe. Abondelaki Nzambe ete: ‘Yehova, nakokoka lisusu te. Nakufa na ngai kaka.’ Eliya alɛmbaki mpe alalaki na nse ya nzete moko.

Anzelu moko alamwisaki ye mpe alobaki na ye na boboto ete: ‘Tɛlɛmá, lyá.’ Eliya amonaki limpa moko likoló ya mabanga oyo ezalaki na mɔtɔ mpe elokó ya mai. Alyaki, amɛlaki mai mpe alalaki lisusu. Anzelu alamwisaki ye lisusu mpe alobaki: ‘Lyá. Osengeli kozwa makasi mpo na mobembo na yo.’ Na yango, Eliya alyaki lisusu. Na nsima, asalaki mobembo mikolo 40 butu moi, tii na Ngomba Horebe. Kuna, akɔtaki na kati ya mobenga moko mpo na kolala. Kasi Yehova asololaki na ye. Atunaki ye: ‘Eliya, ozali kosala nini awa?’ Eliya azongisaki: ‘Bayisraele batosi te elaka oyo bapesaki yo. Babebisi bitumbelo na yo mpe babomi basakoli na yo. Sikoyo, bazali koluka koboma mpe ngai.’

Yehova alobaki na ye: ‘Kende mpe tɛlɛmá likoló ya ngomba.’ Liboso, mopɛpɛ moko ya makasi elekaki wana. Ya mibale, mabele eninganaki. Na nsima, mɔtɔ epelaki. Na nsuka, Eliya ayokaki mongongo moko ya kimya, ya nse. Azipaki elongi na kazaka na ye mpe abimaki libándá ya mobenga. Yehova atunaki ye ntina oyo akimaki. Eliya alobaki: ‘Natikali kaka ngai moko.’ Kasi Yehova ayebisaki ye: ‘Otikali yo moko te. Ezali na bato 7000 na Yisraele oyo bazali kaka kosambela ngai. Kende mpe tyá Elisha mosakoli na esika na yo.’ Na mbala moko, Eliya akendaki mpe asalaki ndenge Yehova ayebisaki ye. Yehova akoki mpe kosalisa yo soki olingi kosala makambo oyo asɛngi? Ɛɛ, akosalisa yo. Tólobela likambo moko oyo esalemaki ntango mbula ezalaki konɔka te.

“Bómitungisaka ata na likambo moko te. Kasi na likambo nyonso, na libondeli, na lilɔmbɔ mpe matɔndi, bósɛngaka Nzambe lisalisi.”​—Bafilipi 4:6

Mituna: Mpo na nini Eliya akimaki? Yehova ayebisaki Eliya nini?

1 Bakonzi 19:1-18; Baroma 11:2-4

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto