LOYEMBO 17
“Nalingi”
Ya Papye
1. Nani azali boboto,
Bolingo lokola Kristo?
Mpo ayaki na nse,
Kosunga biso;
Alingaki mpenza bato.
Abosani babola te,
Abikisaki babɛli.
Aboyaki te mokumba na ye,
Alobaki nde: “Nalingi.”
2. Biso mpe tómekola ye,
Na bizaleli na biso.
Tózala boboto,
Na moto nyonso;
Tósunga báyeba Nzambe.
Soki omoni moninga
Akeleli, salisá ye.
Soki etike to mama na ye
Basɛngi, lobá: “Nalingi.”
(Talá mpe Yoa. 18:37; Ef. 3:19; Flp. 2:7.)