LOYEMBO 107
Ndakisa ya bolingo ya Nzambe
Ya Papye
1. Yehova Nzambe ateyaka biso
Bolingo, bolingo.
Bolamu na ye elekeli biso,
Tólanda se lokolo n’e.
Azwi Mwana n’e, liso na ye moko,
Mpe apesi ye mbeka mpo na biso
Mpo ngai ná yo tózwa nde lobiko.
Boling’oyo eleki nyonso!
2. Soki tolandi Nzambe tokolinga
Bandeko na solo.
Tokolɛngɛla mpenza bango nyonso,
Tokopona bilongi te.
Soki olingaka Yehova Nzambe,
Osengeli mpe kolingaka bato.
Ndeko na biso azokisi biso?
Na bolingo, tólimbisa ye.
3. Bolingo oyo epesi bomoko,
Bondeko ya solo.
Tata na biso alobi na biso:
“Bólingana, bósungana.”
Ndeko, bolingo ezali esengo;
Liloba na ye ebongisi biso.
Lisangá na ye eteyaka biso:
Yah, bolingo. Nzambe, bolingo.
(Talá mpe Rom. 12:10; Ef. 4:3; 2 Pe. 1:7.)