LOYEMBO 38
Akokómisa yo makasi
Ya Papye
1. Oyebaka ntina Nzambe abendá yo
Pene na ye mpe asikolá yo?
Amonaki mposa ya motema na yo
Ya koluka ye mp’ozala sembo.
Banda olaká kosalela ye,
Atikaka kosalisa yo te.
(MONDIMO)
Na makila ya Yesu,
Nzamb’asombaki yo.
Mpe akosunga yo,
okozwa makasi.
Akobatela yo,
akokamba yo seko.
Ɛɛ, akosunga yo,
okozwa makasi.
2. Nzambe apesá Mwana na ye mpo na yo;
Alingi ozwa mpenza lobiko.
Lokola abombaki mwana na ye te,
Anyokwamaki mp’obikisama.
Akopesa yo elimo na ye;
Asundolaka bato na ye te.
(MONDIMO)
Na makila ya Yesu,
Nzamb’asombaki yo.
Mpe akosunga yo,
okozwa makasi.
Akobatela yo,
akokamba yo seko.
Ɛɛ, akosunga yo,
okozwa makasi.
(Talá mpe Rom. 8:32; 14:8, 9; Ebr. 6:10; 1 Pe. 2:9.)