LOYEMBO 57
Tósakwela bato ya ndenge nyonso
1. Tómekola nde Nzambe na biso,
Oyo aponaka bilongi te.
Alingaka bato’a ndenge nyonso
Bábika mpe báya epai na ye.
(MONDIMO)
At’aza’ n’eloko te,
To atángá mingi te;
Nzambe atalaka nde motema.
Bolingo etindaka
Tóteya bato’a ndenge
Nyonso bákóma baning’a Nzambe.
2. Ata soki bafandaka wapi
To baza’ bato ya ndenge nini.
Nzambe atalaka nde motema;
Eza’ na ntina mingi mpo na ye.
(MONDIMO)
At’aza’ n’eloko te,
To atángá mingi te;
Nzambe atalaka nde motema.
Bolingo etindaka
Tóteya bato’a ndenge
Nyonso bákóma baning’a Nzambe.
3. Nzambe ayambaka moto nyonso
Oy’akimi mokili’a Satana.
Biso toyebi likambo yango,
Tóyebisa yango moto nyonso.
(MONDIMO)
At’aza’ n’eloko te,
To atángá mingi te;
Nzambe atalaka nde motema.
Bolingo etindaka
Tóteya bato’a ndenge
Nyonso bákóma baning’a Nzambe.
(Talá mpe Yoa. 12:32; Mis. 10:34; 1 Tim. 4:10; Tito 2:11.)