LOYEMBO 144
Tyá miso na yo na mbano!
Ya Papye
1. Ɛɛ, Bakufi-miso bamoni,
Matoi ekufá eyoki.
Bana bazali kosakana,
Kimya mokili mobimba.
Mpe talá bakufi basekwi,
Lisumu mpe mpasi esili,
(MONDIMO)
Nyonso wana, mpo ozwa yango,
Tyá miso na yo na mbano.
2. Talá mpate ná mbwa ya zamba,
Mwan’a ntaba pene na nkosi,
Bazali kofanda elongo.
Mwana az’okamba bango,
Makambo ekómi ya sika,
Nsɔmɔ mpe bampasi esili,
(MONDIMO)
Nyonso wana, mpo ozwa yango,
Tyá miso na yo na mbano.
(Talá mpe Yis. 11:6-9; 35:5-7; Yoa. 11:24.)