LOYEMBO 82
“Tiká pole na bino engɛnga”
Ya Papye
1. Yesu alobaki:
‘Pole engɛnga,
Ekóma makasi,
Bato bámona.’
Na nzel’a Biblia,
Bakozwa kimya.
Na misala na biso,
Bámona pole.
2. Teyá na ndenge ya
Malamu mpenza
Nsango ya Bokonzi;
Simbá mitema.
Tokoteya kaka
Lilob’a Nzambe.
Moto nyonso ayoka,
Bongo apona.
3. Maloba na biso
Mpe bizaleli,
Tóbongisa yango,
Pole engɛnga.
Misala na biso
Engɛnga seko,
Ezala ya malamu,
Yah asepela.
(Talá mpe Nz. 119:130; Mat. 5:14, 15, 45; Kol. 4:6.)