LOYEMBO 104
Elimo santu ezali likabo ya Nzambe
Ya Papye
1. Yokelá biso mawa, Yehova.
Y’oleki mitema na biso.
Mitungisi elei biso nzoto,
Bɔndisá biso n’elimo na yo.
2. Ee Tata, toza’ bato’a masumu;
Toza’ kobunga nzela na yo.
Tobondeli yo, Yah, yoká biso.
Elimo n’o etambwisa biso.
3. Na ntango oyo tolɛmbi nzoto,
Pesá biso elimo na yo.
Epesa biso kimya ya Nzambe,
Ebatela mitema na biso.
(Talá mpe Nz. 51:11; Yoa. 14:26; Mis. 9:31.)