Elimo santu ezali likabo na Jéhovah
“Tata oyo azali na likoló akoleka te mpo na kopesa elimo santu epai na baoyo bakosɛngaka ye yango?”—LUKA 11:13, MN.
1, 2. (a) Elaká nini Yesu apesaki na ntina na elimo santu, mpe mpo na nini ezali mpenza kolendisa? (b) Elimo santu ezali nini?
PENE na sanza ya octobre ya mobu 32, wana ezalaki ye kosakola nsango malamu na Yudea, Yesu alobaki na bayekoli na ye na ntina na bokabi na Jéhovah. Nsima na kosalela mwa masese na kosimba mitema na bato, apesaki elaká oyo kitoko ete: “Bongo, soko bino bato mabe boyebi kopesa makabo malamu epai na bana na bino, Tata oyo azali na likoló akoleka te mpo na kopesa elimo santu epai na baoyo bakosɛngaka ye yango?”—Luka 11:13, MN.
2 Oyo nde maloba na kolendisa! Biso baoyo tosengeli koyika mpiko na mobulungano ya mikolo ya nsuka ya mokili oyo, tosengeli kokutana na koyina euti na Satana mpe bilimu mabe na ye, mpe kobundisa makanisi na biso mabe, tolendisami te na koyeba ete Nzambe alingi kokembisa biso na nzela ya elimo na ye? Solo mpenza, soki na lisungi wana te, likoki likozala te mpo na koyika mpiko na mimekamo na bosembo nyonso. Yo moko osili komona nguya ya elimo yango, oyo ezali bongo bokasi na Nzambe bokosalaka mosala? Ozali kososola lisalisi nyonso oyo bokasi wana bokoki komemela yo? Ozali kozwa litomba na yango mpenza?
Nguya ya elimo santu
3, 4. Salela ndakisa moko mpo na komonisa nguya ya elimo santu.
3 Totalela naino nguya ya elimo santu. Tozonga na mobu 1954. Na mbula wana, babwakaki bombe à hydrogène na esanga ya Bikini, kati na Pacifique Sud. Nsima mwa moke, esanga wana kitoko ezikaki na litumbo monene ya mɔtɔ mpe eninganaki na nguya makasi oyo ekokanaki na bamilió 15 na batone ya T.N.T. Nguya nyonso wana ya koboma ezalaki kouta wapi? Eutaki na motindo oyo basalelaki ndambo moke ya uranium mpe ya hydrogène, oyo ezalaki bongo biloko bizwamaki mpo na kosala bombe wana, ete ebongwana nguya. Kasi kanisa naino soki bato na sianse basali likambo likeseni na oyo basalaki na Bikini. Na ndakisa soki bazalaki na makoki ya kozwa nguya wana makasi mpe kobongola yango na mwa bakilo ya uranium mpe ya hydrogène. Mbɛlɛ bakosala likambo moko monene. Boye te? Ezali bobele lolenge moko, kasi Jéhovah asalaki yango na monene koleka wana “na ebandeli azalisaki likoló mpe mabelé.”—Genese 1:1.
4 Jéhovah azali na nguya monene mpenza. (Yisaya 40:26) Wana ezalaki ye kozalisa azwaki ndambo na nguya wana ete asala biloko nyonso oyo bisali molóngó mobimba. Eloko nini asalelaki kati na mosala wana ya kozalisa? Elimo santu. Totangi ete: “Na liloba na Jéhovah, makoló masalemaki mpe na biloko nyonso bizali kati na yango bisalemi na elimo ya monoko na ye.” (Nzembo 33:6, MN) Mpe totangi kati na Genese, oyo eyebisi lisoló ya kozalisama, ete: “Bokasi [elimo santu] na Nzambe bozalaki kotambola likoló na mai.” (Genese 1:2, MN) Elimo santu ezali mpenza bokasi oyo bokokani na mosusu te.
Misala na makamwisi
5. Elimo santu ekosala kati na mikano nini kitoko?
5 Lelo lisusu, elimo santu ezali kokokisa mosala na yango kati na mikano mingi ya kitoko. Ezali kotambwisa mpe kokamba lisangá ya Jéhovah na likoló. (Ezekiele 1:20, 21) Lolenge moko na nguya oyo ebimi longwa na bombe à hydrogène, elimo ekoki kosalelama mpo na koboma, mpo na kokokisa ekateli oyo esili kosakolama na ntina na banguna na Jéhovah. Nzokande, ezali mpe kosala na mitindo mosusu oyo mikoki kokamwisa biso.—Yisaya 11:15; 30:27, 28; 40:7, 8; 2 Batesaloniki 2:8.
6. Lolenge nini elimo santu esungaki Moize mpe bana na Yisraele na makambo bakutanaki na yango na Ezipito?
6 Na ndakisa, pene na mobu 1513 liboso ya ntango na biso, Jéhovah atindaki Moize epai na Farao ya Ezipito mpo na kosɛnga kosikolama ya bana na Yisraele. Na boumeli ya mbula 40 elekaki, Moize azalaki mobateli na mpate na mokili ya Madiana. Mpo na nini Farao asengelaki koyoka mobateli na mpate? Mpo ete Moize akendaki epai na ye na nkombo na Jéhovah, Nzambe bobele moko ya solo. Mpo na kondima ete ezalaki mpenza bongo, Jéhovah apesaki ye nguya ya kosala makamwisi. Yango ezalaki kokamwisa kino banganga ya Ezipito bandimaki, ete: “Ezali mosapi na Nzambe!”a (Exode 8:19) Jéhovah atindaki malózi zomi likoló na Ezipito, mpe oyo na nsuka etindaki Farao ete atika libota na Nzambe ete babima na mokili wana. Ntango mokonzi yango alandaki bango na motó makasi nyonso elongo na limpinga na ye, Bayisraele balóngaki kokatisa la mer Rouge na nzela oyo efungolamaki kati na yango na likamwisi. Limpinga ya Baezipito oyo bakɔtaki nsima na bango kati na nzela yango, bakufaki na mai.—Yisaya 63:11-14; Hagai 2:4, 5.
7. (a) Na ntina nini elimo santu ezalaki kosala makamwisi? (b) Atako makamwisi mazali kosalema lisusu te na nguya ya elimo santu, mpo na nini ezali likambo na kolendisa ete Biblia elobela yango?
7 Bongo, na nzela na elimo na ye, Jéhovah asalaki misala mingi ya makamwisi mpo na kosunga Bayisraele ya ntango na Moize, mpe na bileko mosusu. Makamwisi wana masalamaki mpo na mokano nini? Ekokisaki mikano na Jéhovah, esalaki ete nkombo na ye eyebana mpe emonisaki nguya na ye. Mbala mosusu, lokola mpo na Moize, emonisaki mpenza ete moto azwaki lisungi ya Jéhovah. (Exode 4:1–9; 9:14-16) Nzokande, na boumeli na Lisoló na bato, elimo santu ekokisaki makamwisi mingi te.b Bato mingi ya ntango na kala bamonaki makamwisi yango te, mpe na mikolo na biso ezali kosalema lisusu te. Atako bongo, na ntango tozali kobunda na mikakatano oyo mimonani lokola nde mikoki kolóngama te, ezali mpenza likambo na kolendisa na koyeba ete soki tosɛngi epai na Jéhovah na kondima, akopesa biso elimo oyo esungaki Moize liboso na Farao mpe efungwelaki Bayisraele nzela kati na la mer Rouge.—Matai 17:20.
Makomi mapemami
8. Mokumba ya elimo santu ezalaki nini na kopesama ya Mibeko Zomi?
8 Nsima wana Bayisraele basikolamaki na Ezipito, Moize akambaki bango na ngomba ya Sinai, epai Jéhovah asalaki kondimana elongo na bango mpe apesaki bango Mibeko na ye. Makomi ya ebandeli ya Mibeko Zomi, oyo ezali moboko ya Mibeko nyonso mipesamaki na Moize, mikomamaki likoló na bitánda mibale ya mabanga. Motindo nini? Na nzela na elimo santu. Mpo na yango, Biblia elobi ete: “Wana esilaki ye kolobela Moize likoló na ngomba ya Sinai, apesaki ye bitánda mibale ya Litatoli, bitánda ya mabanga bikomami na mosapi na Nzambe.”—Exode 31:18; 34:1.
9, 10. Elimo santu esalaki nini na ntina etali kokomama ya Makomami na liebele, mpe lolenge nini yango emonisami na maloba masalelami na bayekoli na Yesu?
9 Na kobakisa likoló na Mibeko Zomi, na nzela na elimo na ye, Jéhovah apesaki na Bayisraele ebele na mibeko mpe mitinda mpo na kokamba bomoi ya mibali mpe basi na sembo; mpe asukaki bobele wana te. Bikeke mingi nsima na eleko na Moize, Nehemia amonisaki kati na libondeli oyo asalaki epai na Jéhovah liboso na bato nyonso, ete: “Oyikelaki bango [Bayisraele] mpiko na boumeli ya bambula mingi mpe olandaki kotatwela bango na elimo na yo, na nzela na basakoli na yo.” (Nehemia 9:30) Bisakweli mingi bipemami na Nzambe oyo basakoli yango bayebisaki, bikomamaki. Mpe, elimo santu epusaki bato na sembo na kokoma lisoló na bulee mpe nzembo kitoko ya masanzoli.
10 Ezali mpo na makomi nyonso wana nde Paulo azalaki kokanisa wana akomaki ete: “Makomami nyonso mapemami na elimo na Nzambe.” (2 Timoté 3:16; 2 Samwele 23:2; 2 Petelo 1:20, 21) Na ntango bazalaki kotanga Makomami yango na ekeke ya liboso, bayekoli na Yesu bazalaki mbala mingi koloba na ntina na yango ete: ‘Elimo santu elobaki na monoko na Davidi,’ ‘elimo santu elobaki na sembo nyonso epai na Yisaya’ to bobele, ‘elimo santu elobi.’ (Misala 1:1–6; 4:25; 28:25, 26; Baebele 3:7) Bobele elimo santu oyo epusaki bato na kokoma Makomami Mosantu nde ebatelaki yango mpo ete ekoka kokamba biso mpe elendisa biso na ntango na biso. Oyo nde lipamboli!—1 Petelo 1:25.
Esengeli kotya motema na elimo santu
11. Lolenge nini mosala na elimo santu emonanaki polele na ntango na batongi tabernakle?
11 Wana Bayisraele bafandaki na nsé na ngomba ya Sinai, Jéhovah apesaki bango etonda ya kobonga tabernakle oyo esengelaki kozala moboko ya losambo ya solo. Lolenge nini basengelaki kosala? “Moize alobaki na bana na Yisraele ete: ‘Tala! Na nkombo na ye, Jéhovah asili kobyanga Bezalele, mwana na Uli, mwana na Ulu, na libota na Yuda. Atondisi ye na elimo na Nzambe, na bwanya, mayele mpe na boyebi, mpe na mayele na kosala misala.’” (Exode 35:30, 31, MN) Elimo santu ekólisaki makoki na kobotama ya Bezalele, na motindo boye ete alóngaki mpenza kokamba botongi ya ndako wana kitoko.
12. Nsima na eleko na Moize, makoki nini minene elimo epesaki yango epai na mibali mosusu?
12 Na nsima, elimo na Jéhovah esalaki epai na Samson; epesaki ye makasi oyo maleki nguya na bato mpo ete akoka kosikola Yisraele na mabɔkɔ na Bafilistia. (Basambisi 14:5-7, 9; 15:14–16; 16:28-30) Na nsima lisusu, Salomo azwaki mayele mingi mpenza lokola mokonzi ya libota liponami na Nzambe. (2 Ntango 1:12, 13) Na nsé na boyangeli na ye, Yisraele ezalaki na esengo koleka na liboso, mpe bolamu oyo ezalaki na bango ekómaki elembo ya mapamboli oyo libota na Nzambe likozwa na nsé na Boyangeli ya mbula nkɔto na Yesu Klisto, Salomo Monene.—1 Mikonzi 4:20, 25, 29–34; Yisaya 2:3, 4; 11:1, 2; Matai 12:42.
13. Elendiseli nini tozali kozwa na likambo oyo ete elimo ekembisaki Bezalele, Samson mpe Salomo?
13 Ezali esengo mpenza lokola Jéhovah asili kopesa biso bobele elimo yango moko na ntango biso! Soki tozali komiyoka ete tozali na makoki te na mokumba moko to mpo na kosakola, tokoki bongo kosɛnga na Jéhovah ete apesa biso elimo oyo apesaki na Bezalele. Wana tozali maladi to mpe tonyokwami, elimo oyo epesaki Samson nguya monene ekokembisa biso—kasi ekozala na likamwisi te. Mpe na ntango tokutani na mikakatano to na ntango tolingi kozwa bikateli minene, tokoki kosɛnga na Jéhovah, oyo apesaki mayele mingi epai na Salomo, ete asalisa biso mpo tosala na mayele. Lokola Paulo, tokoki bongo koloba ete: “Nazali na makasi na makambo nyonso mpo na ye oyo azali kopesa ngai nguya,” (Bafilipi 4:13, MN) Mpe elaká na Yakobo oyo elandi, ekokokana mpo na biso ete: “Bongo, soki moko na bino azangi mayele, alanda kosɛnga na Nzambe, mpo ete ye akopesaka bato nyonso na bokabi mpe kozanga kopamela mpe yango ekopesamela ye.”—Yakobo 1:5, MN.
14. Na ntango na kala lokola mpe na ntango na biso, elimo ekosungaka banani?
14 Elimo na Jéhovah ezalaki mpe likoló na Moize wana ezalaki ye kosambisa libota. Wana bato mosusu baponamaki mpo na kosalisa Moize, Jéhovah alobaki ete: “Nakokamata ndambo na elimo oyo ezali likoló na yo mpe nakotya yango na likoló na bango, mpe bakomema mokumba ya bato na yo elongo ete omema yango yo moko te.” (Mituya 11:17) Bato wana basengelaki te kotya motema na makasi na bango moko. Elimo santu esengelaki kosunga bango. Totangi na nsima ete, elimo na Jéhovah ezalaki likoló na bato mosusu. (Basambisi 3:10, 11; 11:29) Engebene lisoló ya Biblia, tala oyo esalemaki wana Samwele apakolaki Davidi mpo akitana na nsima lokola mokonzi na Yisraele: “Samwele akamataki liseke lizali na mafuta mpe apakolaki ye kati na bandeko na ye; mpe elimo na Jéhovah ekitelaki Davidi kobanda mokolo wana.” (1 Samwele 16:13) Na mikolo na biso, baoyo bazali na mikumba minene—na libota, na masangá mike to mpe na lisangá ya mokili mobimba—bakoki kolendisama na koyeba ete, na elimo na ye, Nzambe azali kosunga lelo basaleli na ye mpo ete bakokisa mikumba na bango.
15. Motindo nini elimo santu ekembisaki lisangá ya Jéhovah (a) na mikolo ya Hagai mpe Zakaria? (b) na eleko na biso?
15 Soko mibu nkɔto nsima na Moize, basembwi kati na Bayisraele oyo bazalaki na Babilone bazongaki na Yelusaleme mpo na kokokisa mokumba ya kotonga lisusu tempelo. (Esdrase 1:1–4; Yilimia 25:12; 29:14) Kasi bakutanaki na bipekiseli minene mpe mitema na bango milɛmbaki kati na boumeli ya bambula mingi. Na nsuka, Jéhovah apusaki mosakoli Hagai mpe Zakaria mpo na kolendisa Bayuda ete batya motema na makasi na bango moko te. Lolenge nini mosala mosengelaki kosalema? “‘Ezali na bokasi na basodá te, soko na nguya mpe te, kasi na elimo na ngai,’ Jéhovah na bibelé alobi bongo.” (Zakaria 4:6, MN) Ya solo, mpo na lisungi ya elimo na Nzambe, tempelo etongamaki. Bobele bongo, na eleko na biso, basaleli na Nzambe bazali kokokisa makambo minene. Bazali kosakola nsango malamu na mokili mobimba. Bazali kolakisa solo mpe boyengebene epai na bamilió na bato. Bazali kobongisa ba assemblées. Bazali kotonga ba Salles du Royaume mpe bandako ya ba filiales. Mpe mingi na makambo yango mazali kosalema atako botɛmɛli makasi ezali. Nzokande, ba Témoins de Jéhovah bazali kolɛmba te awa bayebi mpenza ete makambo nyonso bazali kokokisa esalemi na bokasi na basodá te, na nguya na bato te, kasi na elimo na Nzambe.
Elimo na Nzambe na ekeke ya liboso
16. Basaleli na Jéhovah liboso na eleko na Klisto bayebaki nini na ntina na mosala ya elimo na Nzambe?
16 Lokola tomonaki yango, basaleli na Nzambe baoyo bazalaki liboso na eleko na Klisto, bayebaki mpenza nguya ya elimo na Nzambe. Bazalaki kotya motema likoló na elimo yango ete esalisa bango na kokokisa mikumba na bango minene mpe na kosala mokano na Nzambe. Bayebaki lisusu ete Mibeko mpe makomi mosusu na bulee mapemami, makomamaki na bopusi ya elimo na Jéhovah, mpe ezalaki bongo ‘Liloba na Nzambe.’ (Nzembo 119:105) Kasi boni mpo na eleko na Klisto?
17, 18. Wapi bamoko na makamwisi masalemaki na elimo santu na boumeli ya eleko na boklisto, mpe mokano na yango ezalaki nini?
17 Na ekeke ya liboso ya ntango na biso, elimo na Nzambe esalaki mpe makambo minene. Epemisaki bisakweli. (1 Bakolinti 14:1, 3) Yesu akitisaki mitema ya bayekoli na ye ete elimo ekokundwela bango makambo nyonso oyo ye alobelaki bango mpe ekolakisa bango makambo mosusu matali solo. Na boyokani na elaká wana, mikanda mingi mikomamaki na bopusi ya elimo santu. (Yoane 14:26; 15:26, 27; 16:12, 13) Ezalaki mpe na makamwisi oyo tokolobela mingi mpenza kati na lisoló lilandi. Ya solo, ekeke ya liboso ebandaki na likamwisi moko monene. Pene na mobu 2 liboso ya ntango na biso, mwana oyo akesenaki na bana mosusu asengelaki kobotama, mpe esengelaki mpenza kozala likamwisi, mpamba te elenge mama na ye asengelaki kozala ngɔndɔ. Lolenge nini yango ekokaki kosalema? Na nzela na elimo santu. Lisoló liyebisi ete: “Mbotámá na Yesu Klisto ezalaki boye. Wana Maria alakamaki na Yozefe mpo na libala, azwaki zemi na nzela na elimo santu naino babalanaki te.”—Matai 1:18: Luke 1:35, 36.
18 Wana akómaki mokóló, Yesu abimisaki bilimu mabe, abikisaki bamaladi mpe asekwisaki nkutu bakufi na nguya ya elimo santu. Bamoko kati na bayekoli na ye basalaki makamwisi mpe misala na nguya. Nguya wana epesami na moto nyonso te ezalaki bongo makabo ya elimo. Kasi makamwisi wana masalamaki na mokano nini? Lolenge moko na makamwisi na ntango na kala, esalemaki mpo na kokokisama ya mikano na Nzambe mpe emonisaki nguya na ye. Mpe, emonisaki lisusu ete Yesu alobaki solo wana ezalaki ye koloba ete, ye atindamaki na Nzambe; na nsima, makamwisi mandimisaki ete lisangá na boklisto ya ekeke ya liboso ezalaki libota liponami na Nzambe.—Matai 11:2–6; Yoane 16:8; Misala 2:22; 1 Bakolinti 12:4–11; Baebele 2:4; 1 Petelo 2:9.
19. Ndenge nini kondima na biso elendisami na lisoló ya Biblia na ntina na makamwisi masalemaki na Yesu mpe na bantóma na ye?
19 Nzokande,ntóma Paulo alobaki ete makamwisi wana ya elimo mazalaki na ntango lisangá ezalaki lokola mwana moke, kasi makamwisi yango masengelaki koleka. Yango wana, na mikolo na biso, tozali komona lisusu te makamwisi motindo wana salemi na elimo santu. (1 Bakolinti 13:8–11) Makamwisi masalemaki na Yesu mpe bantóma na ye mazali bobele lisoló te kasi mazali na litomba koleka. Ezali kolendisa kondima na biso kati na elaká na Nzambe ete, na mokili ya sika mokambami na Yesu, maladi mpe liwa ekozala lisusu te.—Yisaya 25:6–8; 33:24; 65:20–24.
Lolenge nini kozwa elimo santu na Nzambe
20, 21. Tokoki kosala nini mpo na kozwa elimo santu?
20 Elimo yango ezali bokasi monene. Kasi lolenge nini baklisto bakoki kozwa yango? Libosoliboso, Yesu alobaki ete tosengeli kosɛnga yango. Mpo na nini tokosala yango te? Tobondela Jéhovah ete apesa bino likabo wana kitoko bobele na ntango tokutani na mimekamo te, kasi na mabaku nyonso. Lisusu, tótangaka Biblia mpo ete elimo santu ekoka koloba na biso. (Tala Baebele 3:7.) Tókanisaka likoló na makambo bozali kotanga mpe tosalela yango mpo ete elimo santu ekoka kozala na bopusi likoló na bomoi na biso. (Nzembo 1:1–3) Epai mosusu, tóyanganaka—na makita ya lisangá mpe na ba assemblées—elongo bato mosusu oyo batii motema likoló na elimo na Nzambe. Elimo santu ezali mpenza kokembisa baoyo bakopambolaka Nzambe na bango “kati na koyangana.”—Nzembo 68:26.
21 Jéhovah azali mpenza Nzambe na bokabi. Alobi na biso ete tosɛnga ye elimo santu mpe akopesa biso yango. Tokozala bato bazangi mayele soko tokotya motema likoló na mayele na biso moko mpe likoló na makasi na biso moko nzokande lisalisi na nguya mpenza lisili kolɛngelama mpo na biso. Atako bongo, makambo mosusu na ntina na elimo na Nzambe matali biso baklisto. Tokotalela yango kati na lisoló lilandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mbula mingi, liloba “mosapi na Nzambe” likomonisaka elimo santu.—Tala Luka 11:20 mpe Matai 12:28.
b Makamwisi mingi makomami kati na Biblia masalemaki na eleko na Moize mpe Yosua, na eleko na Eliya mpe Elizé, na eleko na Yesu mpe na bantóma na ye.
Bozongeli
◻ Lolenge nini Jéhovah azalisaki biloko nyonso oyo bizali na molóngó?
◻ Motindo nini elimo santu esalaki na ntango na kala, liboso na eleko na baklisto?
◻ Ndenge nini tolendisami na koyeba misala na elimo santu ekokisaki na ntango na kala?
◻ Tokoki kosala nini mpo na kozwa elimo santu?
[Elilingi na lokasa 10]
Elimo oyo epesaki Samson makasi maleki oyo na bato ekoki kopesa biso nguya mpo na makambo nyonso