Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/1 nk. 3-4
  • Elimo santu ezali nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elimo santu ezali nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Elimo santu kati na Makomami
  • ‘Na nkombo na elimo santu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Litambwisi ya elimo ya Nzambe na ekeke ya liboso mpe na mikolo na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Elimo na Nzambe ekoki kozala na bopusi likoló na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Elimo santu: bokasi na Nzambe bokosalaka mosala
    Osengeli kondima Trinité?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/1 nk. 3-4

Elimo santu ezali nini?

OYEBI ete elimo santu ezali na bopusi likoló na moko na moko kati na biso? Mpe lisusu, oyebi mabongwani na mozindo mpe ya malamu oyo yango ekoki kosala kati na bomoi na biso? Mbala mosusu maloba oyo makoki kokamwisa yo. Mpo na yango, okoki komituna ete: ‘Elimo santu ezali nini?’

Soki ozali kati na moko na mangomba ya boklisto ya lokuta, na ntembe te osila koyoka mokonzi moko ya lingomba kobatisa mwana moko, “o nkómbó ya Tata mpé ya Mwána mpé ya Elimo Sántu.” (Matai 28:19, Liloba lya Nzambe) Soki okotuna bango ete balimbola elimo santu, mingi na bateyi ya mangomba bakoyanolaka kozanga kokakatana ete: ‘Ezali persona ya misato na Trinité, ye oyo akokani na Nzambe Tata mpe na Nkolo Yesu Klisto.’

Likanisi oyo liyebanaki mpenza te na boumeli ya bikeke ya yambo ya ntango na biso. Mpo na yango, tala ndakisa moko: Soko bikeke misato nsima na kufa ya bantoma na Yesu Klisto, Grégoire de Nazianze akomaki ete: “Bamoko bakolobaka ete (elimo santu ezali bokasi (energeia), basusu bakokanisaka ete ezali ekelamu, basusu lisusu bakokanisaka ete ezali Nzambe, nzokande bamosusu bayebi te nini basengeli kondima kati na makanisi nyonso wana.”

Na mikolo na biso, mingi ya mangomba na boklisto ya lokuta bazali kondima ete elimo santu ezali moko na basangani ya Trinité. Kasi, Biblia endimi mpenza likanisi yango? To mpe ezali bobele makanisi na bato? Mpo na koloba solo, Biblia elobeli elimo santu te na lolenge yango ezali kolobela Nzambe to Yesu Klisto. Na ndakisa, kati na Biblia, elimo santu ezali na nkombo te.

Oyo ezali nde ndimbola ezangi ntina? Te, mpamba te kati na Biblia, nkombo ezali na ntina monene. Nzambe alobelaki mingi likoló na nkombo na ye ete: “Ngai nazali Jéhovah. Yango nkombo na ngai; mpe nakopesa nkembo na ngai epai na nzambe mosusu te, kosanzola na ngai epai na bikeko te.” (Yisaya 42:8, MM) Ntina na nkombo na Yesu emonisamaki liboso na kobotama na ye epai na anzelu moko oyo alobaki epai na Maria ete: “Okobyanga nkombo na ye Yesu.” (Luka 1:31) Soki nkombo ya Tata mpe ya Mwana ezali na motuya, mpo na nini elimo santu ezangi nkombo? Bobele ndimbola oyo mpamba esengeli mpenza komema biso na komituna soki elimo santu ekokani mpenza na Tata mpe na Mwana.

Elimo santu kati na Makomami

Makomami na hébreu to “Kondimana na Kala,” elobeli “elimo santu” mpe “elimo na ngai [oyo na Nzambe].” (Nzembo 51:11; Yoele 2:28, 29) Tozali kotanga ete elimo santu ekoki kotónda kati na moto moko, ekoki kokita likoló na moto moko mpe ekoki kozinga ye. (Exode 31:3; Basambisi 3:10; 6:34) Ndambo na elimo santu na Nzambe oyo ezali epai na moto moko, ekoki kolongolama na ye mpo na kopesama na moto mosusu. (Mituya 11:17, 25) Elimo santu ekoki kozala na mosala likoló na moto moko mpe kopesa ye nzela ete akokisa misala oyo akoki kosala na bokasi na ye moko te.​—Basambisi 14:6; 1 Samwele 10:6.

Na oyo touti komonisa, tosengeli mpenza kosukisa nini? Tokoloba te ete elimo santu ezali moto. Ndenge nini ndambo na moto moko ekoki kolongolama mpo na kopesa yango epai na moto mosusu? Epai mosusu, eloko moko te ezali komonisa ete Bayuda na sembo, baoyo na ntango oyo Yesu azalaki na mabelé, bazalaki kotalela elimo santu lokola moto oyo akokani na Tata. Solo ezali ete: Bazalaki kosambela elimo santu te. Na kokesene, losambo na bango lopesamaki bobele epai na Jéhovah, ye oyo Yesu azalaki kobenga “Tata ngai” mpe “Nzambe na ngai.”​—Yoane 20:17.

Lolenge moko na oyo babengi Kondimana na Kala, Makomami na greke na boklisto, to “Kondimana na Sika,” elobi ete elimo santu ekoki ‘kotónda’ kati na moto moko to kozala ‘likoló’ na ye. (Misala 2:4; Luka 2:25-27) Elimo santu ‘ekopesamaka,’ ‘ekosopamaka likoló na’ to mpe ‘ekokabolamaka.’ (Luka 11:13; Misala 10:45; Baebele 2:4) Na Pantekote ya mobu 33, bayekoli bazwaki “ndambo” na elimo na Nzambe. (Misala 2:17) Makomami mazali kolobela lisusu batisimo mpe kopakolama na elimo santu.​—Matai 3:11; Misala 1:5; 10:38.

Maloba wana ya Biblia mamonisi ete elimo santu ezali moto te. Likambo oyo ete elimo santu etangami na molongó ya biloko oyo bizali bato te endimisi esukiseli oyo. Biblia elobi ete Etienne “atóndaki na kondima mpe na elimo santu.” (Misala 6:5) Ntoma Paulo amilobelaki ye moko mosali na Nzambe “kati na makambo na peto, na boyebi, na motema molai, na boboto, na elimo santu, na bolingo bozangi bokosi.”​—2 Bakolinti 6:4-6.

Ezali solo ete, na bisika mosusu, Biblia ezali kolobela elimo santu lokola moto moko. Tozali na ndakisa oyo Yisaya alobaki ete batomboki ‘bayokisaki elimo na Nzambe mawa.’ (Yisaya 63:10) Paulo mpe alobaki ete elimo ekoki ‘koyokisama mawa.’ (Baefese 4:30) Ba versets mingi ya Biblia ezali kolobela elimo santu ete ezali ‘koteya,’ ‘kokamba,’ ‘koloba’ mpe ‘kopesa litatoli.’ (Yoane 14:26; 16:13, 14; 1 Yoane 5:7, 8) Nzokande Biblia elobeli mpe biloko mosusu lokola bato, na ndakisa mayele, kufa, lisumu. (Masese 1:20; Baloma 5:17, 21) Wana ezali lolenge malamu mpenza tosengeli kolimbola makanisi oyo tozali mbala mosusu kokuta yango kati na Makomami.

Na mikolo na biso, tokolobaka motindo moko mpo na Biblia ete, ezali koloba likambo moko, to ezali koteya likanisi moko. Na kosaleláká maloba wana, tolingaka te koloba mpenza ete Biblia ezali moto. Biblia mpe emonisi te ete elimo santu ezali moto na ntango yango ezali kosalela maloba motindo wana.

Bongo, elimo santu ezali nini? Ezali moto te. Ezali nde bokasi na Nzambe bokosalaka mosala, bokasi oyo akosalelaka mpo na kokokisa mokano na ye. (Genese 1:2) Kasi, elimo santu ezali na bopusi nini likoló na bomoi na biso? Mpe tosengeli kosala nini mpo na kozwa litomba na mosala na yango?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto