Litambwisi ya elimo ya Nzambe na ekeke ya liboso mpe na mikolo na biso
“Misala nyonso wana, elimo kaka moko nde esalaka yango.”—1 KO. 12:11.
1. Tokotalela nini na lisolo oyo?
PANTEKOTE ya mobu 33 ezali mokolo oyo makambo ya kokamwa esalemaki. (Mis. 2:1-4) Ndenge Nzambe asopaki elimo santu na mokolo yango emonisaki ete mbongwana monene ekɔti na boyokani na ye ná basaleli na ye. Na lisolo oyo eleki, tomonaki ndenge Nzambe asalelaki elimo na ye mpo na kosalisa basaleli na ye ya sembo ya ntango ya kala mpo bákokisa mikumba ya mpasi to oyo esɛngaki kosala makambo ndenge na ndenge. Kasi, bokeseni nini ezali kati na ndenge oyo elimo ya Nzambe esalaki na ntango wana ya kala liboso lisangá ya bokristo esalema mpe na ndenge oyo esalaki na ekeke ya liboso? Mpe ndenge nini elimo ya Nzambe esalisaka bakristo na mikolo na biso? Tótalela mituna yango.
“Talá! Nazali moombo ya Yehova!”
2. Ndenge nini Maria amonaki mosala ya elimo santu?
2 Ntango Nzambe asopaki elimo santu na shambrɛ moko ya likoló na Yerusaleme, Maria mpe azalaki wana. (Mis. 1:13, 14) Nzokande, mbula koleka 30 liboso likambo wana esalema, Maria amonaki ndenge elimo ya Yehova esalaki na ndenge moko ya kokamwa. Yehova alongolaki bomoi ya Mwana na ye na likoló mpe akɔtisaki yango na libumu ya Maria; na yango, Maria akómaki na zemi atako azalaki naino ngɔndɔ. Zemi oyo azwaki eutaki “na elimo santu.”—Mat. 1:20.
3, 4. Elimo nini Maria amonisaki, mpe ndenge nini tokoki komekola ye?
3 Mpo na nini Nzambe amoniselaki Maria boboto mingi ndenge wana? Ntango anzelu asilisaki kolimbwela ye likambo oyo Yehova akanaki mpo na ye, Maria alobaki boye: “Talá! Nazali moombo ya Yehova! Tiká ekómela ngai ndenge olobi.” (Luka 1:38) Maloba wana ya Maria emonisi ete azalaki na elimo ya malamu mpe Nzambe asilaki komona yango. Ndenge apesaki eyano na mbala moko emonisaki ete akondima mokano ya Nzambe mpo na ye. Atunaki te soki bato ya mboka bakoloba nini mpo na zemi na ye, to soki boyokani na ye ná fianse na ye ekosuka ndenge nini. Ndenge Maria amibengaki moombo, emonisi ete azalaki kotyela Yehova motema mobimba ete azali Nkolo na ye.
4 Oyokaka na bantango mosusu ete mikakatano to mikumba oyo ozwi na mosala ya Nzambe eleki yo motó? Ekozala malamu mokomoko na biso amituna boye: ‘Natyelaka Yehova motema mobimba ete akotambwisa makambo na kolanda mokano na ye? Nazalaka pene ya kondima mosala oyo bapesi ngai? Yebá ete Nzambe apesaka elimo na ye na baoyo batyelaka ye motema mobimba mpe batosaka ye ete azali Mokonzi.—Mis. 5:32.
Elimo santu esalisaki Petro
5. Ndenge nini Petro amonaki mosala ya elimo santu liboso ya Pantekote ya mobu 33 T.B.?
5 Ndenge moko na Maria, ntoma Petro mpe amonaki mosala ya kokamwa ya elimo santu ya Nzambe liboso ya Pantekote ya mobu 33 T.B. Yesu apesaki ye ná bantoma mosusu bokonzi ya kobimisa bademo. (Mrk. 3:14-16) Mpe atako Biblia elobi makambo nyonso te, ekoki kozala ete Petro asalelaki bokonzi yango. Longola yango, ntango Yesu abengaki Petro atambola likoló ya mai ya Mbu ya Galile mpe aya epai na ye, Petro asalaki yango na nguya ya elimo ya Nzambe. (Tángá Matai 14:25-29.) Emonani ete Petro asalaki makambo minene mpo atyaki motema na lisalisi ya elimo santu. Eumelaki te, elimo yango esalisaki Petro ná bayekoli mosusu básala makambo mosusu mingi.
6. Elimo ya Nzambe esalisaki Petro asala makambo nini na Pantekote ya mobu 33 T.B. mpe nsima na yango?
6 Na fɛti ya Pantekote ya mobu 33 T.B., na ndenge ya likamwisi, Petro ná bato mosusu bazwaki likoki ya koloba minɔkɔ ya bapaya oyo bayaki na Yerusaleme. Na nsima, Petro azalaki moto ya liboso mpo na koloba na ebele ya bato. (Mis. 2:14-36) Ɛɛ, mobali yango oyo, na bantango mosusu azalaki motema mɔtɔmɔtɔ to na kobanga, akómaki na mpiko ya kopesa litatoli, atako bazalaki kokanela mpe konyokola bango. (Mis. 4:18-20, 31) Nzambe asalelaki elimo na ye mpo na kosalisa Petro ayeba makambo oyo ebombani. (Mis. 5:8, 9) Kutu elimo yango epesaki ye nguya ya kosekwisa moto.—Mis. 9:40.
7. Mateya nini ya Yesu Petro ayaki kososola malamu kaka nsima ya kotyama mafuta na elimo?
7 Ata liboso ya Pantekote, Petro akangaki ntina ya makambo mingi oyo Yesu ateyaki. (Mat. 16:16, 17; Yoa. 6:68) Kasi na mateya ya Yesu, ezalaki na makambo mosusu oyo Petro asosolaki te liboso ya Pantekote. Na ndakisa, Petro azalaki kokanga ntina te ete Kristo akosekwa na nzoto ya elimo na mokolo ya misato; asosolaki mpe te ete Bokonzi ekozala na likoló. (Yoa. 20:6-10; Mis. 1:6) Koyoka ete bato bakoki kokóma bikelamu ya elimo mpe koyangela na Bokonzi ya likoló ezalaki likambo ya sika mpo na Petro. Kaka ntango ye moko abatisamaki na elimo santu mpe akómaki na elikya ya kokende na likoló nde ayaki kokanga ntina ya mateya ya Yesu na likambo yango.
8. Boyebi nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe “bampate mosusu” bakoki kozwa?
8 Nsima ya kozwa elimo santu, bayekoli ya Yesu basosolaki makambo oyo bazalaki koyeba te liboso. Elimo santu etambwisaki bakomi ya Makomami ya Grɛki ya bokristo mpo bálimbola makambo ya kokamwa oyo etali mokano ya Yehova, mpe yango esalisaka biso. (Ef. 3:8-11, 18) Lelo, bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe “bampate mosusu” balyaka bilei ya elimo ya ndenge moko mpe bakangaka ntina na yango. (Yoa. 10:16) Ozalaka na botɔndi na ndenge elimo ya Nzambe esalisaka yo oyeba Liloba ya Nzambe mpe ososola yango?
Paulo “atondaki na elimo santu”
9. Makambo nini Paulo asalaki na lisalisi ya elimo santu?
9 Mbula soki moko nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B., moto mosusu azwaki likabo ya elimo santu ya Nzambe. Ezalaki Saulo, oyo ayaki koyebana na nkombo Paulo. Makambo oyo elimo ya Nzambe esalisaki ye asala epesaka mpe biso litomba lelo. Elimo santu etambwisaki Paulo mpo akoma mikanda 14 ya Biblia. Mpe ndenge ezalaki mpo na Petro, elimo ya Nzambe esalisaki Paulo akanga ntina mpe akoma polelepolele makambo etali elikya ya bomoi ya kozanga kokufa mpe kopɔla na likoló. Na lisalisi ya elimo santu, Paulo abikisaki bato ya maladi, abimisaki bademo, asekwisa kutu moto! Kasi, nguya oyo azwaki na nzela ya elimo santu ezalaki mpo na mosala moko ya ntina koleka. Ezali mpe bongo mpo na basaleli nyonso ya Nzambe lelo, atako bazwaka nguya yango na ndenge ya likamwisi te.
10. Ndenge nini elimo santu esalisaki Paulo aloba?
10 Lokola Paulo “atondaki na elimo santu,” alobaki na mpiko nyonso mpo na kotɛmɛla nganga-nkisi moko. Mokambi monene ya esanga ya Shipre alandaki lisolo yango mobimba mpe esimbaki mpenza motema na ye. Prokonsule yango andimaki solo “mpo akamwaki na mateya ya Yehova.” (Mis. 13:8-12) Emonani polele ete Paulo ayebaki ete kaka elimo ya Nzambe nde ekokaki kopesa ye mpiko ya kosakola solo. (Mat. 10:20) Na nsima, asɛngaki lisangá ya Efese bákoba kosala malɔmbɔ mpo na ye mpo akoka kozwa “likoki ya koloba.”—Ef. 6:18-20.
11. Ndenge nini elimo ya Nzambe etambwisaki Paulo?
11 Elimo santu esalisaki Paulo aloba; kasi na bantango mosusu epekisaki ye koloba na bisika mosusu. Elimo ya Nzambe etambwisaki Paulo na mibembo na ye na mosala ya misionɛrɛ. (Mis. 13:2; tángá Misala 16:6-10.) Lelo mpe, Yehova azali kosalela elimo na ye mpo na kotambwisa mosala ya kosakola. Lokola Paulo, basaleli nyonso ya Yehova oyo bazali na botosi basalaka makasi básakola solo na mpiko mpe na molende. Atako lelo litambwisi ya elimo emonanaka polele te ndenge ezalaki na ntango ya Paulo, tosengeli koyeba ete Yehova azali kosalela elimo santu na ye mpo bato ya mitema sembo báyoka solo.—Yoa. 6:44.
“Misala ezali ndenge na ndenge”
12-14. Elimo ya Nzambe esalaka ndenge moko epai ya basaleli nyonso ya Nzambe? Limbolá.
12 Masolo oyo emonisi ndenge Yehova apambolaki lisangá ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo na ekeke ya liboso elendisaka mpenza basaleli ya Nzambe lelo, boye te? Tóbosana te makambo oyo elimo ya Nzambe etindaki Paulo akomela lisangá ya Korinti mpo na makabo ya elimo oyo bazwaki na ndenge ya likamwisi na mikolo na ye. Alobaki boye: “Nzokande, makabo ezali ndenge na ndenge, kasi elimo ezali kaka moko; mpe misala ya kosunga bato ezali ndenge na ndenge, mpe atako bongo Nkolo azali kaka moko; mpe misala ezali ndenge na ndenge, mpe atako bongo Nzambe azali kaka moko oyo azali kosala misala nyonso wana na kati ya bato nyonso.” (1 Ko. 12:4-6, 11) Ya solo, elimo santu ekoki kosala misala ndenge na ndenge epai ya basaleli ya Nzambe ndenge na ndenge mpo na ntina moko boye. Ezala “etonga moke,” ezala “bampate mosusu” ya Kristo, bango nyonso batambwisamaka na elimo santu. (Luka 12:32; Yoa. 10:16) Kasi, elimo santu esalaka ntango nyonso ndenge moko te epai ya moto mokomoko na kati ya lisangá.
13 Na ndakisa, bankulutu batyamaka na nzela ya elimo santu. (Mis. 20:28) Kasi, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bango nyonso te nde bazalaka bankulutu. Yango elingi koloba nini? Elingi koloba ete elimo ya Nzambe esalaka ndenge moko te epai ya bato nyonso na kati ya lisangá.
14 Elimo oyo esalisaka bakristo oyo batyami mafuta báyeba ete Nzambe ‘akómisi bango bana na ye’ ezali kaka elimo yango nde Yehova asalelaki mpo na kosekwisa Mwana na ye se moko oyo abotamaki mpo azwa bomoi ezangi kokufa na likoló. (Tángá Baroma 8:11, 15.) Ezali mpe kaka elimo yango nde Yehova asalelaki mpo na kokela molɔ́ngɔ́ mobimba. (Eba. 1:1-3) Kaka na elimo yango, Yehova abakisaki makoki ya Bezalele mpo asala malamu mosala ya tabernakle, apesaki Samsone nguya ya kosala makambo oyo esɛngaki makasi ya kokamwa, mpe asalisaki Petro atambola likoló ya mai. Na yango, tókanisa te ete kozala na elimo ya Nzambe elimboli kotyama mafuta na elimo, mpo kotyama mafuta na elimo ezali kaka mosala mosusu ya ntina mingi oyo elimo esalaka. Kotya moto mafuta na elimo ezali likambo etali Nzambe.
15. Kobatisama na elimo santu ekokoba libela na libela? Limbolá.
15 Elimo santu ya Nzambe esalaka makambo ndenge na ndenge na kati ya basaleli ya sembo ya Nzambe. Esalaki bongo bankóto ya bambula liboso Nzambe abanda kotya bato mafuta na elimo. Na Pantekote ya mobu 33 T.B., kotya bato mafuta na elimo ebandaki, kasi ekokoba seko na seko te. Kobatisama na elimo ekosuka, kasi elimo santu ekokoba kosala na kati ya basaleli ya Nzambe mpo bákoka kosala mokano na ye libela na libela.
16. Basaleli ya Nzambe bazali kosala nini lelo na nzela ya elimo na ye?
16 Likambo nini mpenza ezali kosalema sikoyo na mabele na nzela ya elimo santu ya Yehova? Emoniseli 22:17 eyanoli boye: “Elimo ná mwasi ya libala bazali se koloba ete: ‘Yaká!’ Mpe tiká moto nyonso oyo ayoki aloba: ‘Yaká!’ Mpe tiká moto nyonso oyo azali na mposa ya mai aya; tiká moto nyonso oyo alingi, akamata mai ya bomoi ofele.” Na lisalisi ya elimo ya Nzambe, bakristo lelo bazali koyebisa bato ete Nzambe azali kobenga “moto nyonso oyo alingi” andima kozwa mai ya bomoi. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali kopesa ndakisa na mosala yango. Kasi, baoyo ya bampate mosusu mpe bazali kosangana na bango mpo na kobenga bato. Bituluku yango nyonso mibale etambwisami na elimo santu kaka moko mpo na kokokisa mosala yango. Bango nyonso bamonisaki ete bamipesi na Yehova na ndenge bazwaki batisimo “na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu.” (Mat. 28:19) Mpe bango nyonso bandimaka ete elimo ya Nzambe etambwisa bomoi na bango, batikaka yango ebota mbuma na yango kati na bango. (Gal. 5:22, 23) Ndenge moko na bakristo oyo batyami mafuta na elimo, bampate mosusu mpe batikaka elimo santu esalisa bango. Na lisalisi na yango, basalaka nyonso oyo bakoki mpo bátosa masɛngami ya Yehova na oyo etali bopɛto.—2 Ko. 7:1; Em. 7:9, 14.
Kobá kosɛnga elimo santu
17. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na elimo ya Nzambe?
17 Na yango, ozala na elikya ya bomoi ya seko na likoló to awa na mabele, Yehova akoki kopesa yo “nguya oyo eleki makasi” mpo obatela bosembo na yo tii na nsuka mpo ozwa mbano na yo. (2 Ko. 4:7) Bato bakoki kotyola yo mpo ozali kotika te kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Kasi kobosana te ete ‘soki bazali kofinga yo mpo na nkombo ya Kristo, ozali moto ya esengo, mpo elimo ya nkembo, ɛɛ elimo ya Nzambe, ezali kofanda likoló na yo.’—1 Pe. 4:14.
18, 19. Ndenge nini Yehova akosalisa yo na nzela ya elimo santu na ye, mpe osengeli kokoba kosala nini?
18 Elimo santu ezali likabo ya ofele oyo Nzambe apesaka bato oyo balukaka yango na motema moko. Ekoki kobakisa makoki na yo mpe mposa na yo ya kosala nyonso oyo okoki na mosala na ye. ‘Nzambe nde moto oyo, ndenge asepeli kosala, azali kosala na kati na biso mpo tólinga mpe tósala.’ Likabo kitoko ya elimo santu, bakisá mpe milende na biso ya kokangama “makasi na liloba ya bomoi,” ekosalisa biso tókoba “kosala mpo na lobiko na [biso] moko na kobanga mpe na kolɛnga.”—Flp. 2:12, 13, 16.
19 Na yango, na elikya ete elimo ya Nzambe ekosalisa yo, tyá motema na mosala nyonso oyo bapesi yo, luká koyeba yango malamu, mpe sɛngá Yehova asalisa yo. (Yak. 1:5) Akopesa yo lisalisi oyo osengeli na yango mpo okanga ntina ya Liloba na ye, obundisa mikakatano ya bomoi, mpe osakola nsango malamu. ‘Kobá kosɛnga, mpe bakopesa yo; kobá koluka, mpe okomona; kobá kobɛta kɔkɔkɔ, mpe bakofungolela yo.’ Yango etali mpe kosɛnga elimo santu. (Luka 11:9, 13) Ya solo, kobá kobondela Yehova mpo ozala lokola bato ya sembo—ya ntango ya kala mpe ya mikolo na biso—oyo batambwisamaki na elimo santu ya Nzambe.
Okoki kolimbola?
• Lokola Maria, tokoki komonisa elimo nini oyo ekomemela biso mapamboli?
• Na ndenge nini elimo ya Nzambe etambwisaki Paulo?
• Ndenge nini elimo ya Nzambe etambwisaka basaleli na ye lelo?
[Elilingi na lokasa 24]
Elimo ya Nzambe esalisaki Paulo alonga nguya ya bilimo mabe
[Elilingi na lokasa 26]
Lelo, elimo santu esalisaka bakristo, ezala bazali na elikya ya bomoi na likoló to na mabele