Tambolá na elimo mpe zalá na bomoi oyo eyokani na komipesa na yo
“Bókoba kotambola na elimo mpe bokokokisa ata mposa moko te ya nzoto.”—GAL. 5:16.
1. Babatisimo nini esalemaki na mokolo ya Pantekote?
SOKI bayekoli ya Yesu balobaki na minɔkɔ ndenge na ndenge na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., ezali mpo babatisamaki na elimo santu. Na nsima, bamonisaki likabo ya kokamwa ya elimo santu. (1 Ko. 12:4-10) Likabo yango mpe lisukulu ya Petro esalaki nini epai ya bato? Bato mingi “mitema na bango ezokaki.” Balandaki toli ya Petro, babongolaki mitema mpe babatisamaki. Lisolo elobi boye: “Baoyo bayambaki liloba na ye na motema mobimba babatisamaki mpe na mokolo wana milimo soki nkóto misato (3 000) ebakisamaki.” (Mis. 2:22, 36-41) Ndenge Yesu apesaki etinda, basengelaki kobatisama na nkombo ya Tata, ya Mwana, mpe ya elimo santu.—Mat. 28:19.
2, 3. (a) Limbolá bokeseni oyo ezali kati na kobatisama na elimo santu mpe kobatisama na nkombo ya elimo santu. (b) Mpo na nini baoyo nyonso balingi kokóma bakristo ya solo lelo oyo basengeli kobatisama na mai?
2 Kasi, bokeseni ezali mpenza kati na kobatisama na elimo santu mpe kobatisama na nkombo ya elimo santu? Ee. Baoyo babatisamaka na elimo santu babotamaka lisusu lokola bana ya Nzambe oyo babotami na elimo. (Yoa. 3:3) Batyamaka mafuta na elimo mpo bázala bakonzi elongo na Yesu mpe banganga-nzambe basungi na Bokonzi ya Nzambe, mpe bazali na kati ya nzoto ya Kristo ya elimo. (1 Ko. 12:13; Gal. 3:27; Em. 20:6) Na yango, batisimo yango—kobatisama na elimo santu—ezalaki likambo oyo Yehova asalaki na mokolo ya Pantekote mpe na nsima ntango aponaki bato oyo bakozala bazwi-ya-libula elongo na Kristo. (Rom. 8:15-17) Kasi, ezali boni mpo na kobatisama na mai na nkombo ya elimo santu, likambo oyo mbala mingi esalemaka na mayangani ya Batatoli ya Yehova na mikolo na biso?
3 Batisimo ya mai ezali likambo oyo bakristo ya solo basalaka mpo na komonisa ete bamipesi mobimba na Yehova Nzambe. Ezali mpe bongo mpo na baoyo babengami mpo na kokende na likoló. Kasi, kobatisama na mai ezali mpe na ntina mpo na bamilio ya bato na mikolo na biso oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na mabele. Ata soki moto azali na elikya ya kokende na likoló to ya kozala na bomoi awa na mabele, kobatisama na mai na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, ezali likambo ya ntina oyo moto asengeli kosala mpo andimama na Nzambe. Na yango, bakristo nyonso oyo babatisami basengeli ‘kokoba kotambola na elimo.’ (Tángá Bagalatia 5:16.) Ozali kotambola na elimo to mpe ozali na bomoi oyo eyokani na komipesa na yo?
“Kotambola na elimo” elimboli nini?
4. “Kotambola na elimo” elimboli mpenzampenza nini?
4 “Kotambola na elimo” esɛngaka kondima mosala oyo elimo santu ezali kosala epai na yo, kotika ete elimo yango etambwisa yo. Na maloba mosusu tokoki koloba ete kotika elimo santu etambwisa yo na makambo nyonso ya mokolo na mokolo. Bagalatia mokapo 5, emonisi bokeseni oyo ezali kati na kotambwisama na elimo santu mpe kotambwisama na mosuni.—Tángá Bagalatia 5:17, 18.
5. Kotambwisama na elimo santu ezali kosɛnga koboya misala nini?
5 Soki ozali kotambwisama na elimo santu, okoboya misala ya nzoto. Yango esangisi makambo lokola “pite, mbindo, etamboli ya nsɔni, losambo ya bikeko, misala ya bilimo mabe, koyinana, koswana, zuwa, nkanda makasimakasi, kowelana, bokabwani, mwa mangomba, likunya, kolangwa masanga, bafɛti ya lokoso.” (Gal. 5:19-21) Na maloba mosusu, ezali lokola ‘obomi misala ya nzoto na lisalisi ya elimo.’ (Rom. 8:5, 13) Ekosalisa yo otya makanisi na yo na makambo ya elimo mpe ondima litambwisi na yango na esika otika bamposa ya nzoto etambwisa yo.
6. Lobelá likambo oyo ezali na ntina mpo na komonisa mbuma ya elimo.
6 Ntango elimo santu ezali kosala mosala na bomoi na yo, okomonisa bizaleli ya Nzambe, na ndakisa “mbuma ya elimo.” (Gal. 5:22, 23) Kasi, okomona ete likambo yango ezali kosɛnga osala milende. Tózwa ndakisa: Moloni-bilanga alonaka. Ya solo, moi mpe mai ezalaka na ntina; soki yango ezali te akoki kolikya te kobuka mbuma. Tokoki kokokanisa elimo santu na kongɛnga ya moi. Tozali na mposa ya elimo santu mpo tómonisa mbuma ya elimo. Kasi, nini ekoki kosalema soki moloni-bilanga asali mosala makasi te? (Mas. 10:4) Ya solo, ndenge oyo ozali kolona mabele ya elilingi ya motema na yo, ekosala ete elimo ebimisa mbuma mingi mpe ya malamu epai na yo. Na yango, omituna boye: ‘Nasalaka mpenza elongo na elimo santu mpo napesa yango nzela ebimisa mbuma na yango?’
7. Mpo na nini koyekola mpe komanyola ezali na ntina mingi soki olingi kobimisa mbuma ya elimo santu?
7 Mpo na kobuka mbuma ya malamu, baloni-bilanga basengeli mpe kosopaka mai na milona na bango. Mpo na kobimisa mbuma ya elimo osengeli kosopaka mai ya solo oyo ezali na kati ya Biblia mpe oyo epesamaka na lisangá ya bokristo lelo. (Yis. 55:1) Ekoki kozala omonisá bato mingi ete Makomami Mosantu ekomamá na litambwisi ya elimo santu. (2 Tim. 3:16) Lisusu, moombo ya sembo mpe ya mayele apesaka bandimbola mingi ya mai ya pɛto ya solo ya Biblia oyo tozali na yango mposa. (Mat. 24:45-47) Matomba na yango emonanaka polele. Mpo tókóma kotambwisama na elimo santu, tosengeli kotángaka mpe kokanisaka mozindo na Liloba ya Nzambe. Soki ozali kosala bongo, ozali komekola ndakisa malamu ya basakoli oyo “batunatunaki na molende mpe balukalukaki mpenza” makambo oyo epesamaki. Likambo ya esengo ezali ete ata baanzelu balukalukaka mpe koyeba na mozindo makambo ya elimo oyo etali Momboto oyo alakamaki mpe lisangá ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo.—Tángá 1 Petro 1:10-12.
Kotambwisama na elimo—Ndenge nini?
8. Mpo na nini ezali na ntina osɛngaka Yehova elimo santu na ye?
8 Ezali te kaka likambo ya koyekola Makomami mpe komanyola. Osengeli kokoba kosɛnga Yehova asalisa mpe atambwisa yo. Akoki “kosala mingi mpenza koleka makambo nyonso oyo tosɛngaka to oyo eyelaka biso na makanisi.” (Ef. 3:20; Luka 11:13) Kasi, ndenge nini okoyanola soki moto moko atuni yo: “Soki Nzambe ayebaka ‘makambo oyo nalingi kosɛnga ye liboso kutu nasɛnga ye yango,’ mpo na nini nasengeli kokoba kosɛnga?” (Mat. 6:8) Ntango tozali kosɛnga elimo santu, tokomonisa ete tozali kotyela Yehova motema. Na ndakisa, soki moto moko ayei kosɛnga yo lisalisi, okosala nyonso oyo okoki mpo osalisa ye, okosala bongo mpo oyebi ete asɛngi yo lisalisi mpo atyelaka yo motema. (Talá mpe Masese 3:27.) Ndenge moko, Yehova asepelaka ntango ozali kosɛnga ye elimo na ye, mpe akopesa yo yango.—Mas. 15:8.
9. Ndenge nini koyangana na makita ya bokristo ekoki kosalisa yo okóma kotambwisama na elimo ya Nzambe?
9 Okosepela koyeba ete lolenge mosusu oyo elimo ya Nzambe ekoki kotambwisa yo ezali na nzela ya makita, mpe ya mayangani. Kosala milende mpo na koyanganaka mpe kotyaka likebi na mateya ezali na ntina mingi. Kosala bongo ekosalisa yo okanga ntina ya “makambo mozindo ya Nzambe.” (1 Ko. 2:10) Tokozwa mpe matomba mingi soki tozali kopesa biyano mbala na mbala. Kanisá lisusu makita oyo oyanganaki esili koleka pɔsɔ minei. Mbala boni otombolaki lobɔkɔ mpo na kopesa eyano, mpo na komonisa kondima na yo? Omoni bisika oyo okoki kobongisa? Soki omoni esika oyo osengeli kobongisa, zwá ekateli mpo na oyo okosala na bapɔsɔ oyo ezali koya. Yehova akomona mposa oyo ozali na yango ya kopesa biyano mpe akopesa yo elimo santu na ye, oyo ekosalisa yo ozwa litomba mingi na makita oyo oyanganaka.
10. Kotambola na elimo ezali kosɛnga kopesa libyangi nini epai ya basusu?
10 Kotambola na elimo esɛngi mpe kondima libyangi oyo tozali kotánga na Emoniseli 22:17 ete: “Elimo ná mwasi ya libala bazali se koloba ete: ‘Yaká!’ Mpe tiká moto nyonso oyo ayoki aloba: ‘Yaká!’ Mpe tiká moto nyonso oyo azali na mposa ya mai aya; tiká moto nyonso oyo alingi, akamata mai ya bomoi ofele.” Elimo oyo ezali kosala na nzela ya mwasi, elingi koloba bakristo oyo batyami mafuta na elimo, ezali kobenga ebele ya bato báya kozwa mai ya bomoi. Soki ondimaki libyangi oyo elobaki ete: “Yaka!” Yo mpe ozali na ekateli ya koloba, “Yaká!”? Ezali mpenza libaku malamu ya kozala na likoki ya kosangana na mosala yango ya kobikisa bomoi ya bato!
11, 12. Ndenge nini elimo santu ezali kosalisa na mosala ya kosakola?
11 Lelo oyo elimo santu ezali kotambwisa mosala wana ya ntina mingi. Totángaka ndenge elimo santu esalaki mosala na ekeke ya liboso mpo na kofungola bateritware ya sika mpo na bamisionɛrɛ. Paulo ná baninga na ye, “elimo santu epekisaki bango báloba liloba na etúká ya Azia”; epekisaki bango mpe kokɔta na Bitinia. Toyebi mpenza te ndenge elimo santu epekisaki bango kokende na bisika yango, kasi emonani polele ete elimo santu etambwisaki Paulo tii na Mpoto esika mosala ezalaki mingi. Azwaki emonaneli ya moto moko ya Masedonia oyo azalaki kosɛnga lisalisi.—Mis. 16:6-10.
12 Lelo oyo mpe, elimo ya Yehova ezali kotambwisa mosala ya kosakola na mokili mobimba. Bimonaneli ezali kosalelama te mpo na kopesa litambwisi, kasi na nzela ya elimo na ye, Yehova azali kotambwisa bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Mpe elimo santu ezali kopesa bandeko mibali mpe basi makasi mpo na kosala nyonso oyo bakoki na mosala ya kosakola mpe koteya. Na ntembe te, yo mpe osalaka mosala yango ya ntina mingi. Okoki kobakisa lisusu esengo na yo na mosala yango?
13. Ndenge nini okoki kotika ete elimo santu etambwisa yo? Pesá ndakisa.
13 Okoki kolanda litambwisi ya elimo santu soki ozali kosalela mateya oyo Nzambe azali kopesa basaleli na ye. Tózwa ndakisa ya Mihoko, elenge moko na Japon. Lokola autaki kobanda sika mosala ya mobongisi-nzela, azalaki komiyoka ete akokoka te kozongela bato oyo asololaki na bango na mosala ya kosakola; azalaki komona ete akokoka te koloba makambo oyo ekosepelisa bango. Kaka na ntango yango, makanisi ya ntina mpo na ndenge ya kozongela bato oyo basepelaki, ebimaki na Mosala na biso ya Bokonzi. Na nsima, mwa buku Une vie pleinement satisfaisante: Comment? ebimaki. Ebongaki mpenza mpo na mosala ya kosakola na Japon. Mihoko asalelaki makanisi oyo epesamaki mpo na ndenge ya kosalela mwa buku yango, mingimingi ndenge ya kosala masolo mikuse ntango azongeli bato. Eumelaki te, abandaki koyekola Biblia na bato oyo na mbala ya liboso baboyaki koyekola Biblia. Alobi boye: “Nakómaki na bayekoli ya Biblia ebele—nakómaki na bango 12 na mbala moko—mpe nazalaki koyebisa bamosusu bázela!” Ya solo, ntango ozali kotambola na elimo, kosalela litambwisi oyo ezali kopesama na basaleli ya Yehova, okoki kozwa matomba mingi.
Tyelá elimo ya Nzambe motema
14, 15. (a) Ndenge nini bato ya kozanga kokoka bakoki kozala na bomoi oyo eyokani na komipesa na bango? (b) Ndenge nini okoki kozala na baninga ya malamu?
14 Lokola ozali mosaleli ya Nzambe, ozali na mosala ya kosala. (Rom. 10:14) Ntango mosusu okoki komona lokola okokoka te komema mokumba wana. Kasi, ndenge kaka Nzambe asalaka mpo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo, akobongisa mpe yo. (Tángá 2 Bakorinti 3:5.) Okoki kozala na bomoi oyo eyokani na komipesa na yo soki ozali kosala milende mpe ozali kotyela elimo ya Nzambe motema.
15 Ya solo, ezali pɛtɛɛ te mpo bato ya kozanga kokoka lokola biso tózala na bomoi oyo eyokani na komipesa na biso epai ya Yehova, Nzambe na biso ya kokoka. Mokakatano moko ekoki kozala ete baninga mosusu oyo ozalaki na bango liboso bakoki kokanga ntina te ya lolenge ya bomoi oyo okómi na yango mpe bakoki kobanda ‘kofinga yo.’ (1 Pe. 4:4) Kasi, kobosana te ete obandi boninga ya sika, boninga ya ntina mingi elongo na Yehova mpe Yesu Kristo. (Tángá Yakobo 2:21-23.) Ezali mpe na ntina obanda koyeba bandeko mibali mpe basi ya lisangá na bino, oyo ezali na kati ya “lisangá mobimba ya bandeko” na mokili mobimba. (1 Pe. 2:17; Mas. 17:17) Na nzela ya elimo na ye, Yehova akosalisa yo ozala na baninga oyo bakokoba kosalisa yo ozala na bizaleli malamu.
16. Na ndakisa ya Paulo, mpo na nini yo mpe okoki “kosepela na bolɛmbu”?
16 Ata soki ozali na baninga ya malamu na lisangá, okoki kaka komona ete kolonga mikakatano ya mokolo na mokolo ezali pɛtɛɛ te. Mbala mosusu makambo oyo okoki kokutana na yango ekoki kosala ete oyeba te nini okosala, mpe okoki komona lokola makambo eleki yo motó. Wana nde ntango ebongi ya koluka Yehova mpo na kosɛnga elimo santu na ye. Ntoma Paulo akomaki boye: “Ntango nazali na bolɛmbu, na ntango wana nde nazali mpenza na nguya.” (Tángá 2 Bakorinti 4:7-10; 12:10.) Paulo ayebaki ete elimo ya Nzambe ekoki kolonga ata bolɛmbu ya ndenge nini oyo moto azali na yango. Na yango, nguya ya Nzambe oyo esalaka mosala ekoki kopesa yo makasi ata soki olɛmbi mpe ozali na mposa ya lisalisi. Paulo akomaki ete akokaki “kosepela na bolɛmbu.” Ezalaki ntango oyo azalaki na bolɛmbu nde azalaki koyoka ete elimo santu ezali kosala mosala epai na ye. Yo mpe okoki koyoka bongo!—Rom. 15:13.
17. Ndenge nini elimo santu ekoki kosalisa yo okóma malamu na esika ozali kokende?
17 Tozali na mposa ya elimo ya Nzambe mpo tózala na bomoi oyo eyokani na komipesa na biso epai na ye. Kanisá ete ozali kapitɛni ya masuwa. Mokano na yo ezali ya kosalela Yehova libela na libela. Elimo santu ezali lokola mopɛpɛ oyo osengeli kolanda mpo okóma na esika oyo ozali kokende kozanga likama. Okolinga te elimo ya mokili ya Satana emema yo epai na epai. (1 Ko. 2:12) Osengeli koluka koyeba mopɛpɛ ya malamu mpe kolanda yango. Mopɛpɛ yango ezali elimo santu. Na nzela ya Liloba ya Nzambe mpe ebongiseli na ye oyo etambwisami na elimo na ye, elimo santu ekomema yo na nzela ya malamu.
18. Ekateli na yo ezali nini sikoyo, mpe mpo na nini?
18 Soki ozali koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova mpe oyanganaka na bango, kasi ozwi naino te ekateli ya ntina mingi ya komipesa mpe kozwa batisimo, omituna boye: ‘Mpo na nini nazali kokakatana?’ Soki oyebi mokumba oyo elimo santu ezali kokokisa lelo na mokano ya Yehova, mpe ondimi mosala na yango, boye landá nzela oyo oyekoli ete ezali malamu. Yehova akopambola yo mpenza. Akopesa yo mpenza elimo santu na ye. Soki osilá kozwa batisimo eleki bambula, na ntembe te omoná mpenza makambo oyo elimo santu esalá. Omoná mpe oyoká ndenge Nzambe akoki kolendisa yo na nzela ya elimo na ye. Tiká ete ekoba kozala bongo na mikolo ezali koya—ɛɛ, mpo na libela. Na yango, zalá na ekateli ya kokoba kotambola na elimo santu.
Ozali koyeba lisusu?
• “Kotambola na elimo” elimboli nini?
• Nini ekoki kosalisa yo ‘okoba kotambola na elimo’?
• Ndenge nini okoki kozala na bomoi oyo eyokani na komipesa na yo?
[Elilingi na lokasa 15]
Kolona mabele ya elilingi ya motema na yo esɛngaka milende
[Bililingi na nkasa 16, 17]
Elimo santu ya Nzambe etambwisaka yo?