LOYEMBO 105
“Nzambe azali bolingo”
Ya Papye
1. Yehova aza’ bolingo,
Alobi tólingana.
Tólinga Nzambe mpe bato,
Tokozwa mapamboli.
Bomoi elɛngi mingi,
Soki bolingo eza’.
Bolingo Kristo ateyá,
Tómonisaka yango.
2. Soki olingi mateya
Ya Nzambe, tosá yango.
Lokola tolingi Nzambe,
Tolingaka mpe bato.
Bolingo eza’ boboto,
Nkanda te, zuwa mpe te.
Lingá bandeko makasi,
Okozwa mapamboli.
3. Kopesa nkanda nzela te;
Limbisá mpe bosaná.
Bondelá Yehova Nzambe,
Landá mobeko oyo:
‘Lingá Nzambe mpe moninga,’
Bolingo, yango wana.
Lokola Yehova Nzambe,
Tólinga moto nyonso.
(Talá mpe Mrk. 12:30, 31; 1 Ko. 12:31–13:8; 1 Yoa. 3:23.)