Lingomba ezali kokokisa bamposa na biso?
MARIA azalaki mamelo na boumeli ya bambula 21. Lokola akolaki na esika moko oyo bato bazalaki kobanga Nzambe, uta bomwana na ye azwaki momeseno ya kolamuka na butu mpe kosambela mpo na bato mosusu. Kasi ayaki komona ete ata soko lingomba ezalaki na bopusi na boumeli ya bankoto na bambula, ata bongo, bobola, mpasi mpe kozanga boyengebene esili te. Amitunaki motuna elandi: ‘Lingomba ezali kokokisa bamposa na biso mpenza?’
Mangomba mingi mazali koteya makanisi mpe mitinda ya etamboli oyo ezali malamu. Kasi bato mingi bamoni lokola lingomba ezali kobimisa mikakatano mingi, ezali kobakisa mabanzo na biso na esika ya kokokisa bamposa na biso. Tala na ndakisa makanisi mabimisami na ntina yango: “Soko makambo mabe mpe ya nsomo mazali kosalema, ezali mpo na lingomba.” (National Review) “Ntina ya libosoliboso ya bitumba ezali bilulela te, kasi lingomba.” (Toronto Star) “Moboma ‘esalamaki mingimingi na baklisto’.”—The Tampa Tribune.
Lingomba elobi ete ezali kokokisa bamposa ya moto, kasi esengeli kokamwa na komona ete baoyo bazali komona misala na yango bazali na likanisi yango te? Mpo na komonisa yango, tala likambo oyo mokanda Christian Century elobaki: “Shintoisme, lingomba ya bonkoko na Japon, epesaki maboko na misala mpo na etumba, kasi na koleka endimaki yango.” Mangomba mingi bakomi na ezalela motindo yango: bango mpe, “bapesaki maboko na bitumba”. Kanisa moke na ndenge bato bazali kobomana kati na bitumba oyo ekaboli ba bouddhistes mpe ba hindous na Sri Lanka, kanisa na makambo ya nsomo mpe bato babomami na bakatolike mpe baprotestá na lrlande—mpe tokoki ata kotanga makambo mosusu! Zulunalo U.S.News & World Report, elobaki mokolo mosusu boye: “Eleki bikeke mingi, uta bamusulmans, ba sikhs mpe basangani ya mangomba mosusu bazali kobomana na lnde”.
Ata soko bamoko bazali kokanisa te ete lingomba ezali kopesa nzela na mabe, ata bongo mpo na bango lingomba ezali m e nguya te oyo ezali kotinda bato na kosala malamu. Zulunalo ebengami ete National Catholic Reporter elobeli “kozanga likoki ya Lingomba ya kalakala mpo na kokokisa na ndenge esengeli bilikya mpe bamposa ya bato.” Zulunalo Liberty elobi mpe ete bato bazali komona ministre ya losambo lokola “nganga-mosantisi-mopamboli” oyo bazali na mposa na ye na ntango ya milulu. Zulunalo yango ebakisi: “Na elimo ya bato mingi, sango azali wana mpo na kobatela bindimeli.” Yo mpe otalelaka lingomba ndenge yango? Okanisi ete ezangi bopusi, ezala ya malamu to ya mabe?
Lingomba ya eleko na biso ekokani mpenza na lingomba ya ntango oyo Yesu azalaki awa na nse. Yesu alobaki ete bakonzi na mangomba na eleko na ye bazalaki kokumisa Nzambe bobele na maloba. Na misala na bango, bazalaki sé kobakisa kilo ya bato na esika ya kokokisa bamposa na bango. “Bazali kokanga mikumba na bozito mpe bakotya yango na mapeka na bato.” (Matai 23:4) Lelo oyo, lingomba ezali kopesa bilaka mingi, kasi ezali kopesa mpenza bolamu mingi te. Bantina ezali ya kokanisa ete lingomba ekoki kokokisa bamposa na biso?