Ozalaka kala na lisangá ya Jéhovah?
ELENGE mobali atondaki na nsoni mpe alembaki makasi. Bilamba na ye epasukapasuka ezalaki na mwa bilembo bizalaki komonisa ete bizalaki bilamba kitoko mpenza, kasi sikawa bizalaki komonisa ete azalaki na mpasi uta mwa ntango. Ekanisaki ye ndako, mosika epai azalaki, ayinaki bomoi ya mabe oyo azalaki na yango kino ntango wana mpe na ndenge oyo abebisaki libula oyo akangamaki ete azwa yango nokinoki. Nzala mpe ebakisaki mpasi na ye. Ayokaki mposa ya komona lisusu bandeko na ye. Mpamba te ata basaleli ya tata na ye bazalaki na bomoi malamu koleka oyo ya ye! Alingaki ata kozala na esika na bango!
Kasi, ndenge nini tata na ye alingaki koyamba ye soki azongi sikawa? Na kotalelaka ndenge mabe oyo amitambwisaki na kosalelaka na lolenge mabe boboto ya tata na ye, akokaki kolikya te ete tata na ye akoyamba ye na esengo nyonso to akokotisa ye na ndako na ye. Ata bongo, liyoki mozindo ekotelaki ye na elimo mpe na motema na ye: asengelaki kozonga na ndako.
Kasi elenge oyo azalaki mpenza koyeba mayoki ya tata na ye te! Likambo nini ya kokamwa ezalaki kozela ye wana azalaki kobelema na ndako oyo ezalaki ya ye na kala! Na yango, “nde naino ezalaki ye mosika, tata na ye amonaki ye mpe ayokeli ye mawa; atamboli mbango mpe ayambi ye mpe apwepwi ye”.—Luka 15:20.
Lokola mwana oyo abungaki nzela, yo mpe, otikaki ndako na yo? Osili komitangola na Tata na yo, Jéhovah mpe lisangá na ye? Ozali mpe na mposa ya ‘kozonga na ndako’?
Mingi kati na baoyo basili komitangola na lisangá na Jéhovah balandaki mpenzmpenza te nzela moko lokola mwana oyo abungaki nzela. Mingimingi bazalaki kozonga nsima kozanga koyeba, mokemoke lokola masuwa oyo ekotika mokili malembemalembe. Mingi babendamaki na mikakatano mitali mosolo to libota, batungisamaki na maladi to mposa ya kolonga kati na mokili, mpo na yango batyaki pembeni makambo ya elimo. Bamosusu bapesaki nzela ete bato oyo bazali koyangana na lisangá na Nzambe babetisa bango libaku, to batikaki lisangá ya Jéhovah mpo bakabolaki makanisi na yango te mpo na oyo etali kokanga ntina ya likambo boye to boye kati na Makomami. Bamosusu mpe balembaki mpe batikaki solo mpamba te biloko mabe na ntango oyo esukaki te na ntango oyo bango bazalaki kozela.
Soko ozali moko na baoyo batiki koyangana na molende mpenza na lisangá na Jéhovah, ekoki kozala mpenza mpo na ntina moko to mingi kati na oyo touti kotanga. Ata ndenge nini, okanisi te ete oyo ezali ntango ya kozonga?—Matai 18:12-14.
Moto mosusu abetisaki yo libaku?
Lokola toumeli kati na ezalela ya kozanga kokoka, esengeli komizela ete mwa mindondo ebima mbala mosusu. Likambo yango esili kobetisa bato mingi mabaku. Bamosusu babetaki libaku mpo ete moto moko oyo bazalaki komemya mpenza abandaki na mbala moko komitambwisa na ndenge mabe, elongobani na baklisto te to asalaki mpenza lisumu.
Yango nde likambo ekomelaki yo? Ata boni, ezali Jéhovah te nde abimisi likambo yango. (Tala Bagalatia 5:7, 8.) Na yango, tokoki mpenza kokata boyokani na ye mpamba te moto mosusu asaleli biso mabe? Tosengeli te kosalela Jéhovah na bosembo, na kondimaka ete ayebi likambo oyo ezali kosalema mpe akobongisela biso yango na bolingo nyonso?—Bakolose 3:23-25.
Wana ntango ezali koleka, bamoko bazali komona ete likambo oyo ebetisaki bango libaku na kala ezali lisusu na ntina te; mbala mosusu likambo yango esila na yango. To na kotalelaka likambo yango na motema ya kokita, ekoki komonana ete bango nde bazalaki na libunga. Ezali yango esalemaki mingi soko moto apesameli toli to azwi etumbu, mpe abeti libaku mpo ete aboi kondima makambo oyo bazali koyebisa ye. Ekozonga ye nsima, akoki kondima mbala mosusu ete bapesaki ye etumbu na bolingo ya solo mpe mpo na bolamu na ye. (Baebele 12:5-11) Na makambo motindo boye, ekozala malamu kolanda toli ya ntoma Paulo oyo elobi: “Na bongo, botombola maboko mazali kokita na nse mpe bokembisa mabolongo mazali kolemba. Mpe bobongisa nzela alima mpo na makolo na bino ete motengumi abukana te kasi ete abika.”—Baebele 12:12, 13.
Oboyaki kondima liteya moko?
Mbala mosusu otikaki lisangá ya Jéhovah mpo ozalaki na makanisi mosusu na ntina ya mokapo moko. Lokola Bayisraele, nsima wana basikwamaki na boombo na Ezipito, ‘babosanaki nokinoki misala’ oyo Nzambe asalaki mpo na bango mpe “baboyaki koyoka toli”; bobele bongo, omonaki ete, mpo lisangá eboyaki kondima likanisi oyo yo omonaki ete ezali malamu, osengeli komikabola na lisangá yango. (Nzembo 106:13) Ekoki kozala ete, uta kala, likambo yango ezwaki eyano, mpe likambo oyo ezalaki polele te esila kolimbolama na ndenge mosusu to endimamaki nsima na bolukiluki makasi oyo esalamaki, nyonso wana na litambwisi ya elimo na Nzambe. Ata bongo, ebongaki malamu te ete otikala kati na lisangá na kotyaka elikya na yo epai na Jéhovah?
Ezali malamu na komikundola ete Jéhovah asalelaka ntango nyonso bobele lisangá moko. Na eleko na biso, ezali “moombo na sembo mpe na mayele” ye nde azali kopesa bilei ya elimo “na ntango ekoki”. Eyebisami ete “ekoya nkolo na ye”, akokuta ye ‘kosalaka bongo’. (Matai 24:45-47) Nani sikawa azali mpenza koyeba ete Nkolo azali na nzela? Nani azali komipesa na mosala oyo elobelami awa? Ezali bobele baoyo bazali kosala elongo na lisangá na Jéhovah, batemwe baklisto na ye.
Na eleko moko oyo bayekoli mosusu ya Yesu bazalaki kotika ye, ntoma Petelo alobaki na ye: “Nkolo, tokenda epai na nani? Yo ozali na maloba na bomoi na seko.” Ntembe ezalaki soko moke te mpo na Petelo ete Yesu azalaki Masiya. Na yango, atako Bayuda mingi bazokaki na maloba na Yesu, Petelo ayebaki ete ekozala malamu te na kotika ye oyo azalaki na “maloba na bomoi na seko”. Nsima na mikolo ntembe elingaki kosila mpe ndimbola elingaki koyebana. (Yoane 6:51-68; tala Luka 24:27, 32.) Ezali likambo ezali lisusu kosalema lelo, Jéhovah azali kotambwisa mokemoke basaleli na ye na nzela na solo.—Masese 4:18.
Ntango ya kozonga yango oyo!
Mosakoli Yilimia abondeli boye: “Tika ete tomeka mpe totala nzela na biso mpe tobutwa lisusu epai na Jéhovah.” (Bileli 3:40) Ekoki kozala ete bamoko bazali naino kokakatana, bazali kobanga mbamba lisangá ekoyamba bango malamu te. Kasi ndenge nini mwana abungaki nzela ayambamaki wana ezongaki ye epai na tata na ye? Ndenge tata alimbolaki yango epai na mwana na ye mosusu: “Ekoki . . . tosepela mpo ete ndeko na yo oyo azalaki mokufi mpe azali na bomoi lisusu, azalaki mobungani mpe azwami.” (Luka 15:32) Ndenge moko mpe baoyo ‘bakozonga epai na Jéhovah’ na mposa ya sembo ya kokokisa mokano na ye bakoyambama malamu mpenza.—Luka 15:7.
Nzokande, lisangá ya boklisto ezali se kozela te ete baoyo batika yango bazwa ekateli ya ‘kozonga na ndako’ mpo ete bayamba bango. Kati na elakiseli na Yesu, tata akimaki mbango mpo na kokutana na mwana na ye “wana ezalaki ye naino mosika”. Bobele bongo, ba Témoins de Jéhovah bazali komimona ete bazali na mokumba ya koluka baoyo bazalaki kala na lisangá ya Jéhovah mpe kosalisa bango ete bazongela yango.
Tokosala nini soko moto moko asalaki lisumu monene wana etikaki ye boyokani nyonso na lisangá ya Jéhovah? to soko moto moko abungisaki lotomo na ye ya koyangana na libota ya Nzambe mpo ete asalaki likambo moko ekeseni na mitinda ya boklisto, kasi sikawa atiki etamboli na ye ya mabe? Na boboto nyonso mpe na bolingo, bankulutu bakoyeba ndenge nini bakoki kosalisa moto yango mpo abongisa makambo elongo na Jéhovah. Mpo na yango, moto nyonso oyo azali sikawa na mposa ya kozala na bomoi elongobani na mokano na Nzambe asengeli koyebisa bankulutu. Jéhovah alobi boye: “Boye, tolobana likambo elongo moko; ata masumu na bino ezali motane lokola ngola, ekokoma pee lokola mbula mpembe.”—Yisaya 1:18.
Tata na biso na likolo azali mpenza malamu, mpe azali na bolingo! Ayebi kokanga motema, mpe akosepelaka na moto na moto! Alingi te ete biso tokufa elongo biloko mabe na ntango oyo. (2 Petelo 3:9) Kala alendisaki libota na ye na maloba oyo: “Bobutwa epai na ngai mpe ngai nakobutwa epai na bino”. Libyangami yango moko esalemi mpe lelo oyo.—Malaki 3:7.
Ntango etikali mokuse; na yango, kolekisa ntango te. Elongo na basaleli na Jéhovah, yoka lisusu ‘kimya oyo ezali na bango balingi Mobeko na Nzambe’; lokola mokomi na nzembo alobi yango: “libaku ezali liboso na bango te”. (Nzembo 119:165) Olingaka mpenza mobeko na Jéhovah na motema na yo mobimba? Soko ozali mosaleli na Nzambe, ezali mpenza mpo na yango nde omipesi epai na ye. Kanisa na yango na likebi nyonso mpe kati na libondeli. Soko omoni ete bomoko mpe moto ya libota na Jéhovah ezangi yo, ntango eleki naino te mpo na kozongela lisangá na ye. Zongela yango kozanga kolekisa ntango!