Tósalisa bango bázonga noki!
“Tokokende epai ya nani? Yo ozali na maloba ya bomoi ya seko.”—YOA. 6:68.
1. Petelo alobaki nini ntango bayekoli mingi batikaki Yesu?
MOKOLO moko, bayekoli mingi ya Yesu Klisto batikaki ye mpo basepelaki te na liteya moko oyo ateyaki. Yesu atunaki bantoma na ye ete: “Bino mpe bolingi nde kokende?” Simona Petelo ayanolaki ye ete: “Nkolo, tokokende epai ya nani? Yo ozali na maloba ya bomoi ya seko.” (Yoa. 6:51-69) Bazalaki na esika mosusu ya kokende te. Na ntango wana, Lingomba ya Bayuda ezalaki na “maloba ya bomoi ya seko” te, mpe ata lelo oyo, maloba ya ndenge wana ekoki kozwama mpe te na Babilone Monene, lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba. Mpo na moto nyonso oyo atiká etonga ya Nzambe kasi alingi kosepelisa Yehova, ngonga ya kolamuka na mpɔngi mpe kozonga na etonga esili kokoka.—Lom. 13:11.
2. Likambo nini tosengeli kobosana te soki toyoki likambo moko oyo bankulutu basengeli kotalela?
2 Yehova azalaki komibanzabanza mpo na bampate ebungá ya Yisalaele. (Tángá Ezekiele 34:15, 16.) Ndenge moko, bankulutu bazalaka na mposa mpe na mokumba ya kosalisa mpate oyo atiki etonga ya Nzambe. Mosakoli oyo basɛngi ayekola na moto oyo atiká lisangá kasi azali na mposa ya lisalisi akosala nini soki ayoki ete moto yango asalaki lisumu ya monene? Na esika ya kopesa toli na likambo oyo etali bankulutu, mosakoli yango asengeli nde kosɛnga moto yango akende koyebisa bankulutu. Soki moto yango akei te, mosakoli ye moko asengeli koyebisa bankulutu likambo yango.—Lev. 5:1; Gal. 6:1.
3. Moto oyo azalaki na mpate 100 ayokaki ndenge nini ntango azwaki moko oyo ebungaki?
3 Na lisolo oyo eleki, tolobelaki lisese oyo Yesu apesaki ya moto oyo azalaki na mpate 100. Ntango mpate moko ebungaki, atikaki mpate 99 mpe akendeki koluka oyo ebungaki. Moto yango asepelaki mpenza ntango amonaki mpate yango! (Luka 15:4-7) Biso mpe toyokaka esengo bongo ntango mpate moko oyo atikaki etonga ya Nzambe azongi. Ekoki kozala ete na bolingo na bango mpo na moto oyo atiká lisangá, bankulutu ná bandeko mosusu ya lisangá bakendeki kotala ye. Bazali mpe na mposa ya komona moto yango azongi na etonga, epai Nzambe akosunga, akobatela mpe akopambola ye. (Det. 33:27; Nz. 91:14; Mas. 10:22) Soki bazwi libaku ya kosalisa moto moko azonga na lisangá, bakoki kosala nini?
4. Likambo nini tokoki kosimba na Bagalatia 6:2, 5?
4 Bakoki mbala mosusu kolendisa ye azonga na lisangá soki bamonisi ye na boboto nyonso ete Yehova alingaka bampate na ye mpe asɛngaka bango te makambo oyo eleki bango. Na kati ya makambo oyo asɛngaka bango, tokoki kotánga koyekola Makomami, koyangana na makita mpe kobimaka na mosala ya kosakola. Ekoki kozala malamu kotánga Bagalatia 6:2, 5 mpe koyebisa bango ete baklisto basengeli komemelanaka kilo, kasi na makambo ya elimo, “moto na moto akomema mokumba na ye moko.” Moto moko te akoki kotikala sembo epai ya Nzambe na esika na biso.
“Mitungisi ya bomoi” nde ezongisaki bango nsima?
5, 6. (a) Mpo na nini ezali na ntina tóyokaka na likebi nyonso ntango bandeko oyo batiká lisangá bazali koyebisa biso makambo na bango? (b) Ndenge nini okoki kosalisa bandeko oyo batiká lisangá bámona ete kokabwana na bandeko ya lisangá ezali likama mpo na bango?
5 Mpo na koyeba ndenge bakoki kosalisa bandeko oyo batiká lisangá, bankulutu ná basakoli mosusu oyo bakɔmeli basengeli koyokaka na likebi ntango bandeko yango bazali koyebisa makanisi na bango. Kanisá ete ozali nkulutu mpe okei kotala ndeko moko ná mwasi na ye oyo batiká lisangá mpo na “mitungisi ya bomoi.” (Luka 21:34) Ekoki kozala ete balɛmbi mpo bazangi mbongo to mikumba ya libota ekómi mingi. Bakoki kokanisa ete mikumba na bango ekokita ndambo soki batiki lisangá, kasi okoki koyebisa bango ete komitangola na bandeko ekoki kosalisa bango te. (Tángá Masese 18:1.) Na mayele nyonso, okoki kotuna bango boye: “Esengo na bino ebakisamá banda botiká koyangana na makita? Bokómi malamu sikoyo? Esengo ya Yehova ezali kaka nguya na bino?”—Neh. 8:10.
6 Kotuna bango mituna ya ndenge wana ekoki kosalisa bandeko oyo batiká lisangá bámona ete elimo mpe esengo na bango ekitá mpo bayanganaka lisusu te na makita. (Mat. 5:3; Ebe. 10:24, 25) Ekozala mpe malamu kosalisa bango báyeba ete soki esengo na bango ekitá, ezali mpo batiká kosakola nsango malamu. (Mat. 28:19, 20) Kasi, wapi likambo eleki malamu oyo bato yango bakoki kosala?
7. Tokoki kolendisa bampate oyo batiká etonga básala nini?
7 Yesu alobaki ete: “Bókeba na bino moko ete mitema na bino ekóma kilo ata moke te na kolekisa ndelo na kolya mpe na komɛla mingi mpe na mitungisi ya bomoi . . . Boye, bólala mpɔngi te, kopesáká malɔmbɔ ntango nyonso mpo bólonga kokima makambo nyonso wana oyo esengeli kobima.” (Luka 21:34-36) Tokoki kolendisa bampate oyo batiká etonga kasi bazali na mposa ya kozongela esengo oyo bazalaki na yango liboso ete bábondela Nzambe apesa bango elimo santu mpe asalisa bango básala makambo oyo eyokani na mabondeli na bango.—Luka 11:13.
Babɛtaki nde libaku?
8, 9. Makambo nini nkulutu akoki koloba na moto oyo abɛtaki libaku?
8 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, kowelana ekoki kobima, mpe yango ekoki kobɛtisa moto libaku. Bandeko mosusu babɛtaki libaku ntango bamonaki ndeko moko oyo bazalaki komemya mingi asali likambo moko ya mabe. Soki ndeko moko atiká lisangá mpo na likambo ya ndenge wana, nkulutu oyo akei kotala ye asengeli kosalisa ye ayeba ete Yehova abɛtisaka moto libaku te. Na yango, mpo na nini ndeko akoki kobebisa boyokani na ye na Yehova mpe basaleli na ye? Na esika ya kosala bongo, moto yango asengeli kokoba kosalela Nzambe na elikya ete lokola “Mosambisi ya mokili mobimba” ayebi likambo oyo esalemi, akokata yango na ndenge oyo ebongi. (Gen. 18:25; Kols. 3:23-25) Soki moto abɛti libaku mpe akwei, akotikala kaka na mabelé na nko te kozanga ete asala makasi mpo na kotɛlɛma.
9 Ntango nkulutu moko azali kosalisa ndeko oyo atiká lisangá azonga, akoki komonisa ye ete bamosusu oyo batikaki lisangá, bamonaki na nsima ete likambo oyo ebɛtisaki bango libaku ezali lisusu na ntina te. Kutu, ekoki mpe kozala ete likambo oyo ezalaki kobɛtisa bango libaku ezali lisusu te. Soki mpe moto yango alɛmbaki mpo azwaki etumbu, kokanisa malamu na kati ya libondeli ekoki kosalisa ye amona ete ye moko mpe azalaki na foti, mpe esengelaki te atika etumbu yango ebɛtisa ye libaku.—Nz. 119:165; Ebe. 12:5-13.
Liteya moko nde ebɛtisaki bango libaku?
10, 11. Makanisi nini tosengeli kosalela ntango tozali kosalisa moto oyo asepeli te na mateya mosusu ya Biblia?
10 Bampate mosusu batikaki etonga ya Nzambe mpo basepelaki te na liteya moko. Bayisalaele oyo babimaki na boombo na Ezipito babosanaki misala oyo Nzambe asalelaki bango mpe “bazelaki toli na ye soki moke te.” (Nz. 106:13) Ekozala malamu kokundwela moto oyo akimá lisangá ete “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kopesa bilei ya elimo oyo eleki kitoko. (Mat. 24:45) Yango nde esalisaki ye ayeba solo. Na yango, mpo na nini asengeli te kozwa ekateli ya kotambola lisusu na solo?—2 Yoa. 4.
11 Ntango azali kosalisa bampate oyo batiki etonga ya Nzambe, nkulutu asengeli kotángela bango ndakisa ya bayekoli ya Yesu oyo batikaki ye mpo baboyaki kondima liteya na ye moko. (Yoa. 6:53, 66) Lokola bakataki boyokani na Klisto mpe bayekoli na ye, batikaki kosepela na makambo ya elimo mpe babungisaki esengo na bango. Bampate oyo batiká lisangá bazwá nde esika mosusu epai bakoki kozwa bilei ya elimo ya kitoko? Te, mpo esika ya ndenge wana ezali te!
Basalaki nde lisumu moko ya monene?
12, 13. Soki ndeko moko oyo atiká lisangá andimi ete asalaki lisumu moko ya monene, ndenge nini tokosalisa ye?
12 Bandeko mosusu batikaka kosakola mpe koyangana na makita mpo basalaki lisumu moko ya monene. Bakoki kokanisa ete soki bayebisi bankulutu lisumu oyo basali, bakobimisama na lisangá. Nzokande, soki batiki masumu yango mpe babongoli mpenza motema bakobimisama na lisangá te. (2 Kol. 7:10, 11) Kutu bakoyamba bango malamu mpe bankulutu bakopesa bango lisalisi ya elimo oyo basengeli na yango.
13 Soki ozali mosakoli oyo akɔmeli mpe bapesi yo mokumba ya kosalisa ndeko oyo atiká lisangá, okosala nini soki ndeko yango ayebisi yo ete asalaki lisumu moko ya monene? Ndenge tolobaki yango liboso, na esika ya komikɔtisa na likambo yango, yebisá ye akende kosolola na bankulutu. Soki aboyi kokende, monisá ete ozali komibanzabanza mpo na nkombo ya Yehova mpe bopɛto ya lisangá mpe landá toli oyo Biblia epesi mpo na likambo yango. (Tángá Levitike 5:1.) Bankulutu bayebi oyo basengeli kosala mpo na kosalisa moto nyonso oyo azali na mposa ya kozonga na lisangá mpe kozala na etamboli oyo eyokani na mokano ya Nzambe. Ekoki mpe kosɛnga bápesa ye etumbu na bolingo nyonso. (Ebe. 12:7-11) Soki ndeko yango andimi ete asalaki lisumu na miso ya Nzambe, atiki yango mpe abongoli mpenza motema, bankulutu bakosalisa ye mpe Yehova akolimbisa ye.—Yis. 1:18; 55:7; Yak. 5:13-16.
Kozonga ya mwana epesi esengo
14. Lobelá na maloba na yo moko lisese oyo Yesu apesaki ya mwana ya kilikili.
14 Ndeko oyo azwi mokumba ya kosalisa mpate oyo ebungá, asengeli kotya likebi na lisese ya Yesu oyo ezali na Luka 15:11-24. Na lisese yango, elenge mobali moko abebisaki biloko na ye nyonso na etamboli ya mbindo. Nsukansuka, ayinaki etamboli na ye wana ya mabe. Nzala enyokolaki ye, akanisaki epai na bango mpe azwaki ekateli ya kozonga ndako! Ntango azalaki naino mosika, tata na ye amonaki ye, akimaki mbangu mpe ayambaki mwana na ye mpe apwɛpwaki ye na boboto, mpe atondaki na esengo. Kokanisa lisese yango na mozindo ekoki kosalisa ndeko oyo atiká lisangá azonga. Lokola etikali moke mokili oyo ebebisama, ndeko oyo atiká lisangá asengeli kozongela Yehova noki.
15. Mpo na nini bandeko mosusu batiká lisangá?
15 Bandeko mingi oyo batiká lisangá bakokani mpenza te na mwana ya kilikili. Basusu batikaka lisangá mokemoke, ndenge masuwa oyo etiyoli etikaka libongo malɛmbɛmalɛmbɛ. Mpo na basusu, mitungisi ya bomoi elekelaka bango mpe bazongisaka makambo ya elimo nsima. Basusu babɛtaka libaku mpo na lisumu oyo ndeko moko asali to batikaka lisangá mpo liteya moko ebɛtisi bango libaku. Mwa ndambo mosusu batikaka lisangá mpo basalaki lisumu. Kasi, okoki kosalela batoli nyonso oyo bapesi na lisolo oyo mpo na kosalisa bandeko mosusu oyo batiká lisangá mpo na bantina wana to mpo na bantina mosusu bázonga noki, liboso mokili oyo ebebisama.
“Bozongi malamu, mwana na ngai!”
16-18. (a) Ndenge nini nkulutu moko asalisaki ndeko moko oyo atikaki lisangá bambula ebele? (b) Mpo na nini ndeko wana atikaki lisangá, ndenge nini basalisaki ye azonga, mpe ndenge nini lisangá eyambaki ye?
16 Nkulutu moko alobaki boye: “Bankulutu ya lisangá na biso basalaka nyonso mpo na kokende kotala bandeko oyo batiká lisangá. Mokolo moko, nakanisaki ndeko moko oyo nayekolaki na ye Biblia. Atikaki lisangá mbula soki 25 mpe akómaki na bomoi moko ya mpasi. Na yango, nalimbwelaki ye ete kosalela batoli ya Biblia ekoki kosalisa ye. Nsima ya mwa ntango, azongelaki koyangana na makita ya lisangá mpe azongelaki koyekola Biblia ye moko mpe yango esalisaki ye azonga na etonga.”
17 Mpo na nini ndeko wana atikaki lisangá? Alobi boye: “Nakómaki kopesa makambo ya mokili motuya mingi koleka makambo ya elimo. Yango wana, natikaki koyekola, kosakola mpe koyangana na makita. Kozanga koyeba, natikaki lisangá. Kasi, nazongaki na lisangá mpo na likebi oyo nkulutu wana atyelaki ngai. Mikakatano oyo ndeko wana azalaki na yango ebandaki kokita ntango andimaki koyekola Biblia.” Alobi boye: “Nayaki komona ete eloko oyo nazangaki ezali bolingo mpe litambwisi ya Yehova mpe ya lisangá na ye.”
18 Ndenge nini bandeko ya lisangá bayambaki ndeko yango? Alobi boye: “Namiyokaki lokola mwana ya kilikili oyo Yesu Klisto alobelaki. Kutu, ndeko mwasi moko ya mobange oyo azalaki na lisangá na biso banda mbula 30 mpe azali kaka makasi na mosala ya Yehova alobaki na ngai, ‘bozongi malamu, mwana!’ Maloba wana esimbaki mpenza motema na ngai. Namonaki ete lisangá ezali mpenza esika oyo ebongi nazala. Mpe nazali mpenza kotɔnda nkulutu wana mpe bandeko nyonso ya lisangá mpo na bolingo mpe motema molai na bango mpe mpo na likebi oyo batyelaki ngai. Bolingo na bango mpo na Yehova mpe mpo na mozalani esalisaki ngai nazonga na etonga.”
Lendisá bango bázonga noki!
19, 20. Ndenge nini okoki kosalisa bandeko oyo batiká lisangá bázonga noki mpe ndenge nini okoki komonisa bango ete Nzambe asɛngaka biso kaka oyo tokoki kosala?
19 Tozali na mikolo ya nsuka, mpe mosika te mokili oyo ekolimwa. Yango wana, lendisá baoyo batiká lisangá bázongela koyangana na makita. Lendisá bango básala noki mpenza. Yebisá bango ete Satana azali kosala nyonso mpo na kobebisa boyokani na bango ná Nzambe mpe azali kotinda bango bákanisa ete mitungisi na bango ekosila soki batiki losambo ya solo. Monisá bango ete bakozwa bopemi ya solosolo kaka soki bakobi kolanda Yesu.—Tángá Matai 11:28-30.
20 Kundwelá bandeko oyo batiká lisangá ete Nzambe asɛngaka biso kaka oyo tokoki kosala. Ntango bato basilikelaki Malia, ndeko ya Lazalo, mpo asopelaki Yesu mafuta ya nsolo kitoko ya motuya mingi mwa moke liboso ya liwa na ye, Yesu alobaki boye: “Bótika ye. . . . Asali oyo ekoki na ye.” (Mko. 14:6-8) Yesu akumisaki mwasi akufelá mobali oyo azalaki mobola mpo na likabo ya moke oyo apesaki na tempelo. Ye mpe asalaki oyo akokaki kosala. (Luka 21:1-4) Mingi na kati na biso bazali na likoki ya koyangana na makita mpe kosakola nsango ya Bokonzi. Na lisalisi ya Yehova, bandeko mingi oyo batiká lisangá bakoki kosala yango.
21, 22. Elikya nini okoki kopesa baoyo bazali kozonga na lisangá?
21 Soki mpate moko oyo atiká etonga azali kobanga koyangana lisusu na bandeko, okoki kokundwela ye esengo oyo tata ya mwana ya kilikili ayokaki ntango mwana na ye azongaki. Bandeko basepelaka mpe ndenge wana soki bamoni baoyo batikaki lisangá bazongi. Lendisá bango bázwa ekateli sikoyo ya kotɛmɛla Zabolo mpe kopusana penepene na Nzambe.—Yak. 4:7, 8.
22 Baoyo nyonso bazali kozonga na lisangá basengeli koyeba ete bandeko bakoyamba bango na esengo mpenza. (Bil. 3:40) Na ntembe te, makambo oyo basalaki liboso na mosala ya Nzambe ememelaki bango esengo mingi. Mapamboli beboo ezali kozela baoyo bazali kozonga na lisangá kozanga kozela!
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini okoki kosalisa ndeko moko oyo abɛtaki libaku mpe atiká lisangá?
• Ndenge nini okoki kokanisa na ndeko oyo atiká lisangá mpo asepelaki te na liteya moko ya Biblia?
• Ndenge nini okoki kosalisa ndeko oyo azali kokakatana mpo na kozonga na lisangá?
[Elilingi na lokasa 13]
Yokaká na likebi ntango ndeko oyo atiká lisangá azali koyebisa makanisi na ye
[Elilingi na lokasa 15]
Kokanisa na mozindo lisese oyo Yesu apesaki ya mwana ya kilikili ekoki kosalisa bandeko mosusu oyo batiká etonga bázonga