Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb17 Avril lok. 5
  • Okoki kolendisa ndeko oyo atiká kosakola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki kolendisa ndeko oyo atiká kosakola
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Masolo mosusu
  • Kobosanaka te baoyo batiká kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • “Bózongela ngai”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Tósalisa bango bázonga noki!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Tósalisa baoyo batiká etonga
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
mwb17 Avril lok. 5

BOMOI YA BAKRISTO

Okoki kolendisa ndeko oyo atiká kosakola

Mobateli ya mpate alingi kosalisa mpate oyo ebungaki

Na mokolo ya mibale, mwa 11/04/2017, bandeko mingi oyo batiká kosakola bakoya na Ekaniseli. Bakristo yango babandaki kopota mbangu mpo na bomoi, kasi balɛmbá mpo na makambo ndenge na ndenge, lokola makambo mosusu oyo mwa buku Zongelá Yehova elobeli. (Ebr 12:1) Atako bongo, bandeko oyo batiká kosakola bazali kaka na motuya na miso ya Yehova, mpo asombaki bango na makila ya Mwana na ye. (Mis 20:28; 1Pe 1:18, 19) Ndenge nini tokoki kosalisa bango bázonga na lisangá?

Bankulutu balukaka bakristo oyo batiká kosakola mpo na kosalisa bango kaka ndenge mobateli ya mpate asalaka nyonso mpo na koluka mpate oyo ebungi. (Lk 15:4-7) Yango emonisaka bolingo ya Yehova. (Yir 23:3, 4) Longola bankulutu, biso nyonso tokoki kolendisa bango. Milende na biso mpo na komonisela bango boboto mpe komitya na esika na bango esepelisaka Yehova mpe ekoki kopesa esengo mpenza. (Mas 19:17; Mis 20:35) Yango wana, kanisá baoyo okoki kolendisa, mpe salá yango kozanga koumela!

Laura azali kotala na lininisa, Abbey azali kobondela, Abbey ná Laura bayambani mpe babongami mpo na kokangisa fɔtɔ

TALÁ VIDEO LENDISÁ BANDEKO OYO BATIKÁ KOSAKOLA, NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Makambo nini Abbey ye moko asalaki ntango akutanaki na mwasi oyo azalaka Motatoli kasi bayebanaki te?

  • Mpo na nini tosengeli kosolola liboso na bankulutu soki tozali kokanisa kosalisa ndeko oyo atiká kosakola

  • Ndenge nini Abbey amibongisaki mpo na kokende kotala Laura mbala ya mibale?

  • Ndenge nini Abbey alendendelaki, amonisaki motema molai, mpe bolingo ntango azalaki komeka kolendisa Laura?

  • Mateya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Yesu oyo ezali na Luka 15:8-10?

  • Mapamboli nini emonanaki na milende makasi oyo esalemaki mpo na kosalisa Laura?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto