Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 15/11 nk. 8-12
  • Tósalisa baoyo batiká etonga

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tósalisa baoyo batiká etonga
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nani akoki kosalisa bango?
  • Ezali mokumba na biso nyonso
  • Tókoba komonisa ete tolingaka bango
  • ‘Ngai moko nakoluka bampate na ngai’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Tósalisa bango bázonga noki!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Babateli ya mpate, bómekola babateli minene ya bampate
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Bóbatela na bolingo nyonso bampate ya motuya mingi ya Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 15/11 nk. 8-12

Tósalisa baoyo batiká etonga

“Bósepela elongo na ngai, mpamba te namoni mpate na ngai oyo ebungaki.”​—LUKA 15:6.

1. Ndenge nini Yesu amonisaki ete azali mobateli ya mpate ya bolingo?

YESU KLISTO, Mwana se moko ya Yehova, abengami “mobateli monene ya bampate.” (Ebe. 13:20) Biblia esakolaki koya na ye, mpe amonisaki ete azali mobateli ya mpate ya malamu mpenza, oyo ayaki koluka bampate ya Yisalaele oyo ‘ebungá.’ (Mat. 2:1-6; 15:24) Longola yango, ndenge kaka mobateli ya mpate andimaka ata kokufa mpo na kobatela bampate na ye, Yesu akufaki mpo na kosikola bato oyo bakondima mbeka na ye.​—Yoa. 10:11, 15; 1 Yoa. 2:1, 2.

2. Nini etindaki baklisto mosusu bátika kosakola?

2 Likambo ya mawa, bato mosusu oyo bamonanaki lokola bandimi mbeka ya Yesu mpe bamipesi na Nzambe bakimá lisangá. Ekoki kozala ete molende na bango ekitaki mpe batikaki kosakola mpo likambo moko elɛmbisaki bango, mpo babɛlaki to mpo bakutanaki na mikakatano mosusu. Nzokande, mpo bázala na kimya mpe na esengo oyo Davidi alobelaki na Nzembo 23, basengeli kozala na kati ya etonga ya Nzambe. Na ndakisa, Davidi ayembaki boye: “[Yehova] azali mobateli na ngai, nakozanga eloko te.” (Nz. 23:1) Bato oyo bazali na kati ya etonga ya Nzambe bazangaka eloko te na elimo, kasi ezali bongo te mpo na bampate oyo babungá. Nani akoki kosalisa bango? Ndenge nini tokoki kosalisa bango? Tokoki kosala nini mpo na kosalisa bampate oyo babungá bázonga na etonga?

Nani akoki kosalisa bango?

3. Ndenge nini Yesu amonisaki oyo tosengeli kosala mpo na kosalisa bampate oyo babungá mpo bázonga na elanga ya Nzambe?

3 Esɛngaka milende makasi mpo na kosalisa bampate oyo babungi bázonga na elanga ya Nzambe. (Nz. 100:3) Yesu amonisaki likambo yango ntango alobaki ete: “Soki moto moko azali na bampate monkama mpe moko na yango ebungi, akotika te ntuku libwa na libwa na bangomba mpo na kokende koluka oyo ebungi? Mpe soki ekómi ete amoni yango, nazali koyebisa bino ya solo, akosepela mingi mpo na yango koleka mpo na ntuku libwa na libwa oyo ebungaki te. Ndenge moko ezali likambo ya malamu te mpo na Tata na ngai oyo azali na likoló ete moko ya bana oyo ya mike abeba.” (Mat. 18:12-14) Nani akoki kosalisa bampate oyo babungá bázonga na etonga?

4, 5. Ezaleli nini bankulutu basengeli kozala na yango liboso ya bampate ya Nzambe?

4 Soki bankulutu balingi kosalisa bampate oyo babungá, basengeli kobosana te ete etonga ya Nzambe ezali lisangá ya bato oyo bamipesá na Yehova, ‘bampate ya elanga na ye’ oyo atalelaka na motuya mpenza. (Nz. 79:13) Esengeli mpenza kobatela bampate yango ya motuya, mpe yango elimboli ete babateli ya mpate ya bolingo basengeli mpenza kotyela bango likebi. Soki tozali kozwa bango lokola baninga ntango tokei kotala bango, yango ekoki mpenza kosunga. Bilendiseli oyo mobateli ya mpate akopesa bango na bolingo nyonso ekoki kotonga kondima na bango mpe kolamwisa mposa na bango ya kozonga na kati ya etonga.​—1 Kol. 8:1.

5 Babateli ya mpate ya etonga ya Nzambe bazali na mokumba ya koluka bampate oyo babungá mpo na kosalisa bango. Ntoma Paulo akundwelaki bankulutu ya Efese mokumba na bango ya kobatela bampate na maloba oyo: “Bókeba mpo na bino moko mpe mpo na etonga mobimba, oyo na kati na yango elimo santu etye bino bakɛngɛli, mpo na kobatela lisangá ya Nzambe, oyo ye asombaki na makila ya Mwana na ye moko.” (Mis. 20:28) Ndenge moko mpe, ntoma Petelo alendisaki bankulutu bapakolami boye: “Bóbatela etonga ya Nzambe oyo epesami na mabɔkɔ na bino, na kopusama te, kasi na bolingo malamu; na bolingo ya litomba ezangi sembo te, kasi na mposa makasi; na komikómisáká mpe te bakonzi ya baoyo bazali libula ya Nzambe, kasi nde na kokómáká bandakisa epai ya etonga.”​—1 Pet. 5:1-3.

6. Mpo na nini lelo oyo bampate bazali na mposa ya lisalisi makasi lisusu koleka?

6 Bakɛngɛli baklisto basengeli kolanda ndakisa ya Yesu, “mobateli ya bampate oyo aleki malamu.” (Yoa. 10:11) Azalaki mpenza komitungisa mpo na bolamu ya bampate ya Nzambe, mpe amonisaki ntina ya kobatela bango ntango alobaki na Simona Petelo ‘abatela bampate na ye ya mike.’ (Tángá Yoane 21:15-17.) Lelo oyo, bampate bakómi na mposa ya libateli makasi lisusu koleka, mpo Zabolo abakisi milende na ye mpo na kopɛngwisa bato oyo bamipesi na Nzambe. Satana asalelaka bolɛmbu na biso bampate ya Yehova mpe mokili oyo mpo na kotinda biso tómipesa na masumu. (1 Yoa. 2:15-17; 5:19) Baklisto oyo batiká kosakola nde bazali na likama monene ya kokwea na mabɔkɔ ya Satana, yango wana esengeli mpenza kosalisa bango básalela toli oyo esɛngaka baklisto ‘bátambolaka na elimo.’ (Gal. 5:16-21, 25) Mpo na kosalisa bampate ya ndenge wana, esɛngaka mpenza komitika na mabɔkɔ ya Nzambe na nzela ya libondeli, koluka litambwisi ya elimo santu, mpe kosalela Liloba ya Nzambe na ndenge ebongi.​—Mas. 3:5, 6; Luka 11:13; Ebe. 4:12.

7. Mpo na nini ezali na ntina bankulutu bábatelaka bampate oyo Nzambe apesá bango?

7 Na Yisalaele ya kala, babateli ya mpate bazalaki kosalela mwa nzete moko oyo egumbamá na nsɔngɛ na yango mpo na kotambwisa bampate. Ntango bampate bazali kokɔta to kobima na etonga, basengelaki ‘koleka na nse ya nzete,’ na ndenge yango mobateli ya mpate azalaki kotánga yango. (Lev. 27:32; Mika 2:12; 7:14) Ndenge moko mpe, mokɛngɛli moklisto asengeli koyeba etonga mobimba ya Nzambe mpe koyeba makambo oyo ezali kotungisa mpate mokomoko. (Talá mpe Masese 27:23.) Yango wana, likambo ya kotala bampate ezali moko ya makambo ya ntina mingi oyo bankulutu balobelaka na makita na bango. Na makita yango, bazwaka mpe bibongiseli mpo na kosalisa bampate oyo babungá. Yehova ye moko alobaki ete akoluka bampate na ye mpe akobatela bango. (Ezek. 34:11) Yango emonisi ete Nzambe asepelaka soki amoni bankulutu bazali kosala milende ya ndenge wana mpo na kosalisa bampate oyo babungá bázonga na etonga.

8. Ndenge nini bankulutu bakoki kosalisa mpate mokomoko?

8 Ntango ndeko moko azali kobɛla, akoki koyoka esengo mpe kolendisama soki mobateli moko ya mpate akei kotala ye. Ezali mpe ndenge moko soki bankulutu batyeli ndeko oyo abɛli na elimo likebi. Bankulutu bakoki kotángela ye bavɛrsɛ ya Biblia, kotalela elongo na ye lisolo moko na mikanda na biso, koyebisa ye makambo oyo toyekolaki na makita, kobondela elongo na ye, mpe bongo na bongo. Bakoki koyebisa ye ete bandeko ya lisangá bakozala mpenza na esengo soki bamoni ye azongi na lisangá. (2 Kol. 1:3-7; Yak. 5:13-15) Kokende kotala ndeko ya ndenge wana, kobenga ye na telefone to kokomela ye mokanda ekoki mpenza kolendisa ye! Kosalisa mpate oyo atikaki etonga ekoki mpe kobakisa esengo ya nkulutu oyo asalisaki ye.

Ezali mokumba na biso nyonso

9, 10. Mpo na nini tokoki koloba ete kaka bankulutu te nde bazali na mokumba ya kosalisa bampate oyo babungá?

9 Lelo oyo, tozali na ntango moko ya mpasi mpe moto na moto azali na makambo ebele ya kosala. Yango wana, soki ndeko moko abandi kotika lisangá, ekoki kozala mpasi mpo tómona yango. (Ebe. 2:1) Nzokande, bampate ya Yehova bazali na motuya mingi na miso na ye. Mokomoko na biso azali na ntina, ndenge kaka eteni mokomoko ya nzoto ya moto ezalaka na ntina. Yango wana, biso nyonso tosengeli komibanzabanzaka mpo na bandeko na biso mpe kotyelanaka likebi. (1 Kol. 12:25) Yo mpe osalaka bongo?

10 Atako bankulutu bazali bato ya liboso oyo basengeli koluka mpe kosalisa bampate oyo babungá, mokumba yango ezali ya bango moko te. Baklisto nyonso basengeli kopesa bankulutu mabɔkɔ. Tokoki, mpe tosengeli kolendisa bandeko na biso oyo babungá mpe kosalisa bango bázonga na etonga. Ndenge nini tokoki kosalisa bango?

11, 12. Libaku nini bankulutu bakoki kopesa yo mpo na kosalisa ndeko oyo atiká etonga?

11 Ntango mosusu, bankulutu bakoki kozwa bibongiseli mpo mosakoli moko oyo azali moteyi malamu akende kosalisa ndeko moko oyo atiká kosakola, kasi alingi básalisa ye. Ntina mpenza ya milende wana ezali ya kosalisa bango bázongisa ‘bolingo oyo bazalaki na yango liboso.’ (Emon. 2:1, 4) Bandeko yango bakoki kolendisama na elimo soki totaleli elongo na bango makambo oyo toyekolaki na makita ntango bango batikaki lisangá.

12 Soki bankulutu basɛngi yo osalisa ndeko moko oyo azali na mposa ya lisalisi na elimo, bondelá Yehova atambwisa yo mpe apambola milende na yo. Ɛɛ, “pesá misala na yo epai na [Yehova] mpe mikano na yo [ekolonga].” (Mas. 16:3) Kanisá bavɛrsɛ mpe makanisi ya kolendisa oyo okosalela ntango okosolola na bato oyo bazali na mposa ya lisalisi ya elimo. Kobosana te ndakisa malamu oyo ntoma Paulo atiká. (Tángá Baloma 1:11, 12.) Paulo azalaki na mposa makasi ya kokutana na baklisto ya Loma mpo apesa bango mwa likabo ya elimo mpo bákóma makasi. Ayebaki ete bango mpe bakolendisa ye. Omoni te ete biso mpe tosengeli kozala na elimo wana ntango tozali koluka kosalisa bampate oyo batiká etonga ya Nzambe?

13. Makambo nini okoki kolobela moto oyo atiká etonga?

13 Ntango bozali kosolola, okoki kotuna ye boye: “Ndenge nini oyebaki solo?” Okoki kosalisa ye amikundola makambo ya esengo oyo akutanaki na yango kala, na ndakisa kolendisa ye alobela esengo oyo azalaki koyoka ntango azalaki koyangana na makita, na mosala ya kosakola mpe na mayangani. Okoki kokundwela ye makambo ya esengo oyo bokutaná na yango yo ná ye na mosala ya Yehova. Yebisá ye esengo oyo ozalaka na yango ndenge ozali moninga ya Yehova. (Yak. 4:8) Lobelá botɔndi oyo ozalaka na yango ndenge Nzambe asalisaka basaleli na ye, mingimingi ndenge abɔndisaka mpe apesaka bango elikya na ntango ya mpasi.​—Lom. 15:4; 2 Kol. 1:3, 4.

14, 15. Makambo nini ya esengo okoki kokundwela bampate oyo batiká etonga mpo na kolendisa bango?

14 Na ntembe te, okosunga mpenza moto oyo atiká lisangá soki okundweli ye mapamboli mosusu oyo azalaki kozwa ntango azalaki naino na lisangá. Na ndakisa, azalaki kokola na boyebi ya Liloba ya Nzambe mpe ya mokano na ye. (Mas. 4:18) Na ntembe te, ntango azalaki ‘kotambola na elimo,’ azalaki na mokakatano te mpo na kolonga komekama. (Gal. 5:22-26) Lokola azalaki na lisosoli ya pɛto, azalaki kopusana penepene na Yehova na nzela ya libondeli mpe azalaki na ‘kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso mpe ebatelaka mitema na biso mpe makoki na biso ya kokanisa.’ (Filp. 4:6, 7) Kobosana makanisi wana te, mpe monisá mpenza ete ozali komibanzabanza mpo na ye, mpe na bolingo nyonso, salá makasi olendisa ndeko na yo azonga na etonga.​—Tángá Bafilipi 2:4.

15 Kanisá naino ete ozali nkulutu mpe okei kotala bampate oyo bazali na bolɛmbu. Okoki kosalisa ndeko moko ná mwasi na ye bákanisa lisusu ntango bayebaki solo. Bamonaki na ntango wana ete solo ezali kitoko, epesaka esengo mpe esikolaka bato! (Yoa. 8:32) Bazalaki mpenza na botɔndi mpo na makambo oyo bayekolaki na ntina na Yehova, bolingo na ye mpe mikano na ye ya kitoko! (Talá mpe Luka 24:32.) Salisá bango bákanisa boyokani na Yehova mpe libaku malamu oyo baklisto bazalaka na yango ya kobondela Nzambe na lisosoli ya pɛto. Salá mpenza nyonso olendisa bango bákóma kosepela lisusu na “nsango malamu ya nkembo ya Nzambe ya esengo,” Yehova.​—1 Tim. 1:11.

Tókoba komonisa ete tolingaka bango

16. Pesá ndakisa moko mpo na komonisa ete milende mpo na kosalisa bandeko na elimo efutaka.

16 Makanisi oyo touti kopesa esalisaka mpenza? Ɛɛ. Na ndakisa, elenge moko oyo abandaki kosakola ntango azalaki na mbula zomi na mibale atikaki lisangá ntango akómaki na mbula zomi na mitano. Kasi, na nsima azongaki na etonga, mpe lelo oyo asili kokokisa mbula koleka 30 na mosala ya ntango nyonso. Soki elenge wana akómaki lisusu makasi na elimo, ezali mingimingi mpo nkulutu moko asalisaki ye. Elenge yango azalaka mpenza na botɔndi ndenge nkulutu wana asalisá ye!

17, 18. Bizaleli nini osengeli kozala na yango soki olingi kosalisa moklisto moko oyo atiká etonga ya Nzambe?

17 Bolingo nde etindaka baklisto básalisa bandeko na bango oyo batiká lisangá bázonga. Yesu alobaki mpo na bayekoli na ye boye: “Nazali kopesa bino [mobeko] ya sika, ete bólinganaka bino na bino; ndenge ngai nalingaki bino, mpo bino mpe bólingana bino na bino. Na ndenge wana bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoa. 13:34, 35) Ɛɛ, bolingo ezali mpenza elembo ya baklisto ya solo. Bomoni te ete tosengeli mpe komonisa bolingo ya ndenge wana epai ya baklisto oyo batiká lisangá? Ezali mpenza bongo! Kasi, mpo na kosalisa bango, tosengeli kozala na bizaleli ndenge na ndenge ya malamu.

18 Bizaleli nini osengeli kozala na yango ntango olingi kosalisa ndeko moko oyo atiká etonga ya Nzambe? Longola bolingo, osengeli mpe kozala na motema mawa, motema malamu, boboto mpe motema molai. Ekoki mpe kosɛnga ntango mosusu oyeba kolimbisa. Paulo akomaki boye: “Bólata bolingo ya motema oyo euti na mawa, motema malamu, elimo ya komikitisa, boboto mpe motema molai. Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu. Kaka ndenge Yehova alimbisaki bino na motema moko, bino mpe bósala bongo. Kasi, longola makambo nyonso wana, bólata bolingo, mpo yango ezali ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.”​—Kols. 3:12-14.

19. Mpo na nini ezali mpenza na ntina kosala milende mpo na kosalisa bampate oyo babungá bázonga na etonga?

19 Lisolo oyo elandi ekomonisa bantina oyo bandeko mosusu batiká etonga ya Nzambe. Ekomonisa mpe ndenge basengeli koyambama ntango bazongi na lisangá. Ntango ozali koyekola lisolo yango mpe ozali kokanisa makambo oyo ezali na lisolo oyo, kobosana te ete milende nyonso oyo okosala mpo na kosalisa bampate oyo batiká etonga bázonga ekokende na mai te. Na mokili ya lelo, bato mingi bazali kolekisa ntango na bango nyonso mpo na konduka bozwi, kasi bomoi ya moto moko ezali na motuya koleka mbongo nyonso na mokili. Yesu amonisaki likambo yango na lisese oyo apesaki ya mpate oyo ebungi. (Mat. 18:12-14) Kobosana likambo yango te ntango ozali kosala milende mpo na kosalisa bampate ya Yehova oyo babungá bázonga na etonga.

Okopesa eyano nini?

• Mokumba nini bankulutu bazali na yango liboso ya bampate oyo batiká etonga?

• Ndenge nini okoki kosalisa bato oyo bazali lisusu na lisangá te?

• Bizaleli nini osengeli kozala na yango mpo na kosalisa bampate oyo batiká etonga?

[Elilingi na lokasa 10]

Na bolingo nyonso, babateli ya mpate basalaka nyonso mpo na kosalisa bampate oyo batiká etonga ya Nzambe bázonga

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto