Moto moko asila komona Nzambe?
ABRAHAME, nkoko ayebani malamu oyo azalaki na bomoi bambula koleka 1 900 liboso na kobotama ya Yesu Klisto, asepelisaki Mozalisi na biso mingi na boye ete abengamaki “moninga na Nzambe”. (Yakobo 2:23) Soki Nzambe alingaki ete moto moko amona ye, na ntembe te mbele Abrahame nde moto azwaki libaku yango. Mokolo moko, batindami misato ya Nzambe bamimonisaki epai na ye, mpo na komemela ye nsango. Abrahame asololaki na moko na bango na kobengaka ye Jéhovah. Esengeli kozwa wana likanisi ete Abrahame amonaki mpenza Nzambe?
Genese 18:1-3 elobeli likambo yango na maloba oyo: “Jéhovah amonanaki na ye kati na nzete na Mamele, wana ezalaki ye kofanda na monoko na hema na ye na ntango na moi na midi. Atomboli miso mpe tala, babali misato batelemaki na liboso na ye. Emonaki ye bango, akendeki mbango uta na monoko na hema na ye kozwana na bango mpe akumbamaki na mabele liboso na bango. Alobaki ete, Jéhovah, soki nabongi na miso na yo, nalombi yo ete oleka kozanga kotelema esika na moombo na yo te.”
Mwa ntango moke na nsima, mibale kati na bapaya yango misato, baoyo bazalaki kotala Sodome elongo na Abrahame longwa esika moko ya kotombwama, bakitaki mpo na kotala mboka na penepene. Verset 22 elobi boye: “Nde Jéhovah atelemaki liboso na Abrahame.” Ekoki komonana lokola ete Nzambe azalaki mpenza kotelema liboso na Abrahame, na nzoto ya mosuni. Ezali yango endimami na baoyo bakanisaka ete Nzambe mpe Yesu bazali bobele moto moko.
Tala oyo ekomaki molimboli moko ya Biblia, na nkombo Melancthon Jacobus, mpo na Genese 18:3: “Mpo na mbala ya liboso kati na lisolo, Nzambe amimonisi lokola moto kati na bato mpo na komonisa ete ye azali na bomoi mpe komonisa ndenge azali penepene na bato. Na likambo wana ya elilingi, azali kondimisa nkoko na biso ete azali na bomoko elongo na Nzambe mpe ete azali moninga na ye.” Baoyo bazali kokanisa boye bakoki koloba ete Abrahame amonaki mpenza Jéhovah, mpe lisusu, ete bato oyo bamonaki Yesu Klisto bamonaki mpe Nzambe. Kasi likanisi yango ezali na boyokani na Biblia?
Yesu alobaki nini na likambo yango
Na esika ete amimonisa lokola Nzambe abongwani moto, Yesu Klisto alobaki: “Nazali mwana na Nzambe.” (Yoane 10:36) Na lolenge na ye ya Momonisi na Nzambe oyo akoki, alobi lisusu: “Ngai nakoki kosala mosala ngai moko te, nakosambisa lokola ekoyokaka ngai mpe esambiseli na ngai ezali sembo, mpo ete nakolukaka mokano na ngai moko te, kasi mokano na ye oyo atindi ngai.” (Yoane 5:30) Ntango azalaki likolo na nzete ya mpasi, Yesu asalaki losambo moko epai na Mozalisi aleki monene kati na makoló, kobengaka ye “Nzambe na ngai, Nzambe na ngai”. (Matai 27:46) Nsima na lisekwa na ye, alobaki na Marie Madeleine: “Nazali kobuta epai na Tata na ngai mpe Tata na bino, na Nzambe na ngai mpe Nzambe na bino.” (Yoane 20:1, 17) Na bongo, lokola Yesu Klisto azalaki Nzambe te oyo abongwani moto, moto moko te oyo amonaki ye akokaki komikumisa ete amonaki Nzambe.
Na komonaka Yesu bantoma bamonaki Nzambe te, ezali yango endimisami na Yoane, moko na bango, oyo Yesu alingaki mingi mpenza. Na kopemama na Nzambe, alobi: “Moto te asili komona Nzambe.” (Yoane 1:18) Soki ezali bongo, nani wana Abrahame amonaki? Tokozwa eyano na motuna oyo na kotalelaka oyo eyelaki Moïse.
Na ndimbola nini Moïse amonaki Nzambe?
Na libaku moko boye, Moïse amonisaki mposa ya komona Nzambe. Tala oyo tozali kotanga na Exode 33:18-20: “‘(Mose alobaki ete) monisa ngai nkembo na yo’. Kasi (Nzambe) alobaki ete, ‘Nakolekisa malamu na ngai nyonso liboso na yo, mpe nakosakola liboso na yo nkombo na ngai Jéhovah. Nakozala na ngolu epai na ye oyo ekoyokela ngai ngolu mpe nakomonisa mawa na ye oyo ekoyokela ngai mawa’. Mpe abakisaki ete: “Okoki kotala elongi na ngai te, mpo ete moto akotala ngai mpe kobika te.”
Na bongo, Nzambe apesaki nzela na Moïse ete atala nkembo na ye ntango ezalaki koleka. Versets 21 kino 23 ebakisi: “Mpe Jéhovah alobaki lisusu: ‘Tala esika ezali penepene na ngai kuna ekotelema yo na likolo na libanga. Mpe wana ekoleka nkembo na ngai, nakotya yo na libulu na libanga mpe nakozipa yo na loboko na ngai kino esili ngai koleka. Na nsima nakolongola loboko na ngai mpe okotala mokongo na ngai. Kasi elongi na ngai ekoki kotalama te.’ ”
Na bokokani na maloba wana ya e Jéhovah mpe oyo ya ntoma Yoane, Nzambe alataki nzoto ya mosuni te mpo na komimonisa epai na Moïse, amimonisaki mpe ata na lolenge mosusu nyonso ya mosuni te. Nyonso oyo Moïse amonaki ezalaki bobele elilingi elakisaki ete Nzambe azalaki wana mpe, ata mpo na yango, Nzambe abatelaki ye. Ezali bongo polele ete Moïse akokaki komona Nzambe te.
Ata ntango azalaki kosolola na Nzambe “boye na miso na ye”; lokola elobi yango Exode 33:11, Moïse amonaki mpe Jéhovah te. Liloba yango elakisi lolenge nini Moïse asololaki na Nzambe kasi elakisi te oyo azalaki mpenza komona. Liloba kosolola na Nzambe “boye na miso na ye” emonisi ete ezalaki lisolo ya solo. Ndenge moko mpe likoki ezali ya kosolola na téléfone kozanga komona molobani na yo.
Ntango Moïse azalaki kosolola na Nzambe mpe kozwa mitinda na ye, lisolo yango esalamaki na nzela ya bimononeli te, ndenge ezalaki mpo na ebele ya basakoli mosusu. Ezali likanisi tokoki kozwa na Mituya 12:6-8, epai tozali kotanga: “Ye alobaki ete, ‘Boyoka maloba na ngai. Soki mosakoli azali kati na bino mpo na Jéhovah, na komiyebisa na ye na emononeli. Nakosolola na ye na ndoto. Ezali boye na moombo na ngai Moïse te. Azali likolo na ndako na ngai mobimba. Nakosololaka na ye na miso na ye polele, na mabombami te: mpe ye akotalaka elilingi na Jéhovah.” Na ndimbola nini Moïse azalaki kotala “elilingi na Jéhovah”?
Moïse atalaki “elilingi na Jéhovah” ntango azalaki likolo na ngomba Sinaï elongo na Arona mpe mibali mosusu. Tala oyo Exode 24:10 elobi: “Mpe bamonaki Nzambe na Yisraele. Na nse na makolo na ye ezalaki lokola etando esalemaki na safili, kongenga na yango pelamoko na makoló mpenza.” Ndenge nini Moïse, elongo na mibali yango, akokaki ‘komona Nzambe na Yisraele’, mpamba te Nzambe alobaki na ye: “Moto akoki komona ngai mpe kobika te”? Verset 11 epesi ndimbola: “Ye atiaki loboko na ye na bato na liboso na Yisraele te, kasi bamonaki Nzambe kati na emononeli mpe balyaki mpe bamelaki.” Ezali bongo na nzela ya emononeli nde Moïse mpe mibali balandaki ye bamonaki elilingi ya Nzambe.
Baanzelu-bamonisi na Nzambe
Mozalisi ya molongo azalaki na ntina te ya kotika etelemeli na ye etombwami kati na makoló mpo na kopesa nsango epai na bato. Longola mabaku misato oyo ekomami, oyo mongongo na Nzambe mpenza eyokanaki na boumeli na bomoi ya Yesu na mabelé, Jéhovah atindaka ntango nyonso bansango na ye na nzela na baanzelu. (Matai 3:17; 17:5; Yoane 12:28) Mibeko oyo Nzambe apesaki na libota ya Yisraele na ngomba Sinaï epesamaki mpe na nzela na baanzelu, ata elobami ete Moïse asololaki na Nzambe ye moko. Ntoma Paulo akomaki oyo elandi mpo na yango: “Bongo mibeko ezali mpo na nini? Ebakisami mpo na mabunga kino libota bakokoma na elaka esili kolakama. Epesami na nzela na baanzelu, na maboko ya mobongisi.—Bagalatia 3:19.
Tozali kokuta maloba mosusu emonisi ete Moïse azalaki koloba mpenza na anzelu-momonisi na Nzambe kati na Misala 7:38, oyo elobi: “Ye wana azalaki kati na ngomba na lisobe, elongo na anzelu oyo asololi na ye mpe esika moko na batata na biso.” Anzelu yango azalaki momemi-nsango ya Jéhovah Nzambe, Mozalisi. Azalaki kosolola na Moïse lokola nde Nzambe ye moko azalaki koloba.
Anzelu oyo ayebisaki na Moïse nsango ya Nzambe na nzete moke oyo epelaki moto azalaki mpe momemi-nsango. Biblia ebengi ye anzelu na Nzambe. Na bongo tozali kotanga na Exode 3:2: “Anzelu na Jéhovah abimelaki ye kati na epeleli ya moto katikati na nzete na nzube.” Verset 4 elobi: “Emonaki Jéhovah ete apengwaki mpo na kotala, Nzambe abengaki ye kati na mwa nzete.” Anzelu momemi-nsango yango ya Nzambe alobi na verset 6: “Nazali Nzambe ya tata na yo, Nzambe na Abrahame, Nzambe na Yisaka mpe Nzambe na Yakobo.” Na yango, na kolobanaka na momonisi na Nzambe mpenza, Moïse azalaki kosolola lokola nde na Jéhovah ye moko.—Exode 4:10.
Mokapo 6 ya mokanda na Basambisi epesi biso ndakisa mosusu ya moto oyo asololaki na Nzambe na nzela na anzelu-momonisi na Nzambe. Verset 11 elakisi ete momemi ya nsango ezalaki “anzelu ya Jéhovah”. Tozali kotanga: “Na nsima anzelu na Jéhovah ayaki mpe afandaki na nse na nzete ezalaki na Ofela, yango ezalaki na Yoase Moabiezele, wana ezalaki mwana na ye Gideona kobeta masango kati na ekamelo na vinyo, mpo na kobomba yango ete Bamadiani bamona te.” Momemi-nsango yango “anzelu ya Jéhovah”, amonisami lokola Jéhovah ye moko. Tala oyo tozali kotanga na versets 14 mpe 15: “Jéhovah abongwanaki epai na ye [Gideona] mpe alobaki ete: ‘Kenda na nguya oyo ya yo mpe, na solo, okobikisa Yisraele na loboko na Madiani. Ngai natindi yo te?’ Alobelaki ye ete: ‘E Jéhovah, nakoka kobikisa Yisraele na nzela nini?’ ” Na bongo, lisolo ya Biblia ezali kotya anzelu alataki nzoto ya moto, oyo Gideona amonaki mpe oyo asololaki na ye, na esika ya Nzambe mpenza. Gideona alobi na verset 22: “Namoni anzelu na Jéhovah na miso.” Anzelu yango abimisaki na sikisiki bobele maloba oyo Nzambe apesaki ye ete aloba. Na yango, Gideona asololaki na Nzambe na nzela ya anzelu momemi-nsango yango.
Tolobela likambo mosusu, oyo ya Manoa mpe mwasi na ye, bango baboti na Samson. Awa mpe, lisolo ezali kobenga anzelu momemi-nsango “anzelu na Jéhovah” mpe “anzelu na Nzambe ya solo.” (Basambisi 13:2-18) Na verset 22, Manoa alobi na mwasi na ye ete: “Tokokufa solo mpo ete tosili komona Nzambe.” Ata bamonaki mpenza Jéhovah Nzambe te, Manoa abangaki liwa mpo ete amonaki momemi-nsango ya Nzambe oyo alataki nzoto ya mosuni.
‘Moto te asili komona Nzambe’
Tozali sikawa na likoki ya kokanga ntina oyo Abrahame azalaki kosolola na anzelu momemi-nsango ya Nzambe oyo alataki nzoto ya mosuni lokola nde azali kolobana na Jéhovah Nzambe ye moko. Lokola anzelu yango alobaki na sikisiki bobele makambo Jéhovah alingaki koyebisa na Abrahame mpe lokola azalaki momonisi na ye moko, lisolo ya Biblia ekokaki koloba ete: “Jéhovah abimelaki ye.”—Genese 18:1.
Bomikundola likambo oyo ete anzelu momemi-nsango moko ya Nzambe akoki kopesa bansango na ye na bosembo nyonso lokola téléfone to radio elekisaka maloba na biso epai ya moto mosusu. Tozali kokanga malamu ntina oyo Abrahame, Moïse, Manoa mpe bamosusu bazalaki kosolola na anzelu alati nzoto ya mosuni lokola nde bazali kosolola na Nzambe ye moko. Atako bamonaki baanzelu yango mpe nkembo na Nzambe oyo ezingaki bango, ata bongo, bamonaki Nzambe te. Na motindo wana, yango ezali kotemela ata moke te maloba ya ntoma Yoane: “Moto te asili komona Nzambe.” (Yoane 1:18) Na bongo, bato yango bamonaki baanzelu-bamonisi ya Nzambe, kasi bamonaki Nzambe te.