Kozanga te na assemblée ya distrike “Monoko na peto”
MBULA oyo, na mikili ya Mpoto mpe mikili misusu, mikolo minei mpenza malamu mibongisami mpo na mateya ya Biblia, mizali kozela yo. Zala wana longwa na ebandeli ya assemblée, na Jeudi 13h30. Okoyoka na esengo mpenza lisolo moko ya mozindo oyo na motó ya likambo ’Baninga na yo bazali mpe baninga na jéhovah’, mpe diskur ya ntina na motó ya likambo, ’Monoko na peto mpo na mabota nyonso’. Na nsima na midi, lisolo ya nsuka ‘Makila ekoki kobikisa yo—Lolenge nini?’, ekoyanola na motuna oyo: Makila ezali na ntina mpenza mpo na kobikisa bomoi?
Eteni ya Vendredi na ntongo ekobanda na 9h30. Zala wana mpo na kolanda diskur oyo ezali mpenza kosimba mitema, ’Klisto ‘ayinaki kotyola mibeko’ Bongo yo?’, mpe lisolo moko ya kolendisa ‘Bobwaka makanisi mpamba ya mokili mpe bokangama na makambo na solo ya Bokonzi’. Nsima na midi, moto na moto akozwa batoli malamu likoló na lolenge ya kobika engebene makoki na ye. Baboti bakosalisama na kososola na lolenge nini kokokisa lisusu mikumba na bango malamu mpenza, mpe drame moko ya sika ekopesa batoli kitoko na bilenge na ntina etali kosangana na makambo oyo mazali kobongisama na nsima na programme ya Biteyelo.
Eteni ya Samedi na ntongo ekozala na diskur likoló na komipesa mpe batisimo, mpe kotalelama ya bantina oyo mpo na yango esengeli kosala milende mpo na koyekola Biblia yo moko. Diskur moko ya kafukafu na motó ya likambo ’Likalo ya jéhovah na likoló ezali kotambola’ ekosalama na nsima ya midi. Bakokundwela biso lisusu batoli malamu na ntina etali mokumba na biso na boklisto oyo ya kosalisa baoyo basili kozimbisama na lingomba ya lokuta, mpe tokozwa lisalisi malamu mpo na kokokisa mokumba yango.
Bokolinga kozala wana dimanche na ntongo mpo na koyoka nsango makasi oyo ekotindama epai na boklisto ya lokuta mpe bakonzi na yango. Nsima na yango, drame moko ekosalama na bilateli ya kala oyo bikokundwela biso makambo oyo malekaki na ntango na Yehu mpe Yonadaba. Mpe kozanga te na nsima na midi mpo na koyoka na likebi nyonso, diskur piblike na motó ya likambo ‘Tosangani ngolu na monoko na peto’.
Ebele ya ba assemblées esili kobongisama na lifalansé, ekosalema na juin, na juillet mpe na Août, na mikili ya Mpoto.