Monoko na peto mosangisi ebele monene ya basambeli
MONOKO na peto oyo Nzambe azali kopesa ezali bokasi ya bomoko. Ezali yango nde emonanaki na baoyo nyonso bayanganaki na assemblée ya ba Témoins de Jéhovah oyo esalemaki na Berlin-Ouest kobanda Mardi 24 kino Vendredi 27 Juillet 1990, mpo ete ba Témoins ya mikili 64 bayanganaki wana.
Na ba assemblées ya distrike “Bizaleli ya moto na Nzambe” oyo esalemaki na Pologne na elanga ya mobu 1989, bankóto na bamonisi bautaki longwa na Tchécoslovaquie mpe na U.R.S.S., kasi bobele mwa bankama nde bautaki na Alemanye ya Est. Ezalela ya politike ya mokili esili mpenza kobongwana. Na mbala oyo, pene na bamonisi 30 000 ya Alemanye ya Est bayanganaki elongo na ba Témoins mosusu kati na stade ya masano na Berlin-Ouest. Assemblée yango ezalaki komonisa bankama na ba assemblées mosusu oyo ezalaki kosalema na bisika mingi kobanda Jeudi kino Dimanche.
Kati na diskur na ye ya Mardi mpo na kotómbéla boyei malamu, mokambi akundolaki mosala mokokisami na ba assemblées uta 1919, mpo na kosalisa ba Témoins de Jéhovah na koloba malamu mpenza monoko na peto. Bobele bongo, assemblée wana esengelaki kosalisa bato banso na koloba malamu monoko na peto mpe na kozala na boyokani elongo na yango. Akundolaki na bayangani ete elateli na bango mpe etamboli na bango ezalaki komonisa polele bokóli oyo libota na Jéhovah esili kosala mpo na kosalela monoko na peto.
“Monoko na peto mpo na mabota nyonso”
Mpo na yango, diskur ya ntina mpenza elimbolaki motó na likambo wana. Ezwamaki na Sofoni 3:9 (MN), epai kuna Nzambe apesaki elaká oyo ete: “Boye, nakobongola maloba na bato kino monoko na peto, ete nyonso babelela nkombo na Jéhovah mpe basalela ye na motema moko.” Mpo na koloba monoko na peto, esengeli kozala na bososoli malamu ya solo na ntina na Nzambe mpe mikano na ye. Bobele Jéhovah nde akoki kopesa biso bososoli yango na nzela ya elimo na ye. Ezali bongo bolingo ya solo nde esengeli kopusa biso na koyekola monoko na peto, oyo ezali soko na mbindo moke te kati na bizaleli.
Epai mosusu, mpo na koloba monoko na peto esengeli bobele te kosalela mwa maloba. Kasi esengeli lisusu ete bomoi na biso bozala na boyokani elongo na maloba na biso. Ata mongongo na biso, ezalela ya elongi na biso mpe ba gestes na biso ezali na ntina mingi, mpamba te yango ezali komonisa nini ezali kati na mitema na biso. Mpo na kotikala ntango nyonso na monoko na peto, esengeli na biso kozala na programme ya boyekoli ya mbala na mbala mpe koyangana na makita nyonso ya lisangá.
Toyekola monoko na peto
Diskur ya nsima na midi emonisaki ete, koyekola monoko na peto elingi koloba ‘kokóla kino kotela na elimo.’ Kolanda kokola kati na elimo ezali na ntina mingi. Mpo na kolónga na yango, esengeli kosalela myango nyonso misili kotyama liboso na biso mpo na kokóla na elimo mpe kosalela mitinda na Biblia kati na bomoi na biso ya mokolo na mokolo.
Mpo na koloba malamu mpenza monoko na peto, tosengeli kozala bato “balakisami na Jéhovah” lokola oyo motó na likambo ya diskur symposium emonisaki na ntongo ya Jeudi. Molobi ya liboso amonisaki ete biso tolakisami “na nzela na ndakisa na Yesu.” Maloba mpe misala na Yesu Klisto emonisaki ete alakisamaki na Jéhovah. Yango wana biso tolingi komekola motindo na ye na koteya. Yesu azalaki ntango nyonso kosala mokano ya Tata na ye; biso mpe tosengeli kosala lolenge moko.
Balobi misato oyo balandaki bamonisaki ete Jéhovah azali kolakisa biso na nzela na makita mpe ba assemblées. Tozali na makita mitano kati na lisangá mpe tosengeli kozwa moko na bopotu te. Likita moko na moko lizali na ntina mingi kati bokóli na biso na elimo. Jéhovah azali kolakisa biso lisusu na nzela ya ba assemblées ya Circonscription mpe ya distrike, mpe na ba assemblées sipesiale ya mokolo moko. Mpo na kozwa litomba na nyonso wana, tosengeli koyoka malamu mpe kosalela makambo oyo tozali koyekola.
Symposium elandamaki na diskur oyo ezalaki na motó na likambo, “Boyekoli ya moto na moto esengi milende.” Mpo na kozwa ntango ya koyekola, esengeli kolanda toli oyo ekomami na Baefese 5:15, 16, oyo ezali kosenga biso ete ‘tosomba ntango’ oyo tozali kolekisa na misala mizali na ntina mingi te.
Boyekoli na biso ya monoko na peto ezali kopusa biso mpenza ete tomipesa epai na Nzambe mpe ete tozwa batisimo. Ezali yango nde elobamaki na diskur “Batisimo na baoyo bazali koyekola monoko na peto.” Monoko wana ezali kopusa bato mingi na komipesa epai na Nzambe mpe na kozwa batisimo Nzokande, na nsima esengeli na bango ete bakóba kolanda ndakisa na Yesu na kosakoláká nsango malamu na molende, na kolatáká bomoto na sika mpe na kokabwanáká na mokili.
Bilei makasi ya elimo
Bayangani basepelaki lisusu na kozwa bilei makasi ya elimo oyo bizwaki moboko likoló na kokokisama ya bisakweli. Na nsima na midi ya Jeudi, badiskur mibale ezalaki na motó na likambo, bisakweli na Ezekiele. Diskur ya liboso “Likálo ya Jéhovah na likoló ezali kotambola,” elobelaki likalo monene ya likoló, likálo na nkembo mpe na kokamwa oyo ezalaki kotambola mbango mpenza. Likálo yango emonisi lisangá na Jéhovah oyo ezali na likoló, lisangá oyo azali kotambwisa yango na bolingo mpe azali kosalela yango mpo na kokokisa mikano na ye. Ezekiele amonisami na kelasi ya batikali bapakolami na elimo, mingimingi uta 1919. Ezali mpenza na 1935 nde bayei kosangana na “ebele monene.”—Emoniseli 7:9.
Diskur elandaki ezalaki “Totambola elongo na lisangá na Nzambe oyo ezali komonana.” Ntembe ezali te ete lisangá na Nzambe oyo ezali komonana ezali kolanda lisangá na ye ya likoló likokisami na likálo. Lokola Ezekiele, basaleli na Jéhovah ya eleko na biso basengeli kokokisa mokumba na bango na bosembo nyonso atako bato bazangi kosepela na yango, to bazali koseka to mpe botemeli. Baoyo bazali kotambola elongo na lisangá, bazali uta sikawa kozwa bolamu mingi mpe bakozala na bomoi ya seko kati na mokili na sika molakami na Nzambe.
Vendredi na ntongo, bilei makasi ya elimo bipesamaki na badiskur misato oyo ezwaki moboko likoló na Yisaya mokapo 28. Ya liboso emonisaki na makasi nyonso ete, balangwi na elimo na Yisraele mpe Yuda ya kala, bazalaki komonisa balangwi na elimo na boklisto ya lokuta Lokola bazwaki etumbu na Jéhovah, ekozala motindo moko mpo na balangwi na elimo na boklisto ya lokuta.
Diskur elandaki “Ekimelo na bango ezali mpamba!” ezalaki na likebisi makasi oyo ete: lokola elikya oyo Yuda atyaki epai na Ezipito ekokisamaki te, ekozala bobele bongo mpo na boyokani oyo boklisto ya lokuta ezali na yango elongo na bakonzi ya politike ya ntango oyo. Diskur ya misato ezwami na Yisaya mokapo 28, “Tolanda kosakola mosala na kokamwa na Jéhovah,” elobaki epai na libota na Jéhovah. Oyo Nzambe akosala epai na boklisto ya lokuta ekoki kotalelama lokola likambo na kokamwa, mpamba te ekokamwisa boklisto ya lokuta. Na eleko na biso, Jéhovah azali motolé ya nkembo mpo na batikali baklisto bapakolami mpe mpo na bamilió ya “bampate mosusu.” (Yoane 10:16) Molobi asukisaki na maloba oyo na kolendisa: “Tika ete molende na biso, ekateli na biso mpe bosembo na biso esalema mpo na kosanzola libela Jéhovah, Nzambe na biso.”
Toloba monoko na peto na komonisáká bolingo na biso epai na bandeko
Mercredi na nsima na midi, bamonisaki na bayangani ete koloba monoko na peto elimboli lisusu ‘kosalisa bitike mpe basi-bakufela mibali kati na mpasi na bango.’ Tokoki kosalisa bitike na kopesáká bango formation kati na mosala moko. Tokomonisa bolingo epai na basi-bakufela mibali na kolendisáká bango na maloba, kobengáká bango ete basangana na biso elongo kati na misala na boklisto mpe na masolo kati na baninga, mpe na kosalisáká bango na mosuni soki yango ekoki na bango mpe soki bazali mpenza na bosenga. Mituna oyo mitunamaki epai na bandeko mimonisaki ete ezali yango nde ekosalemaka.
Na nsima na midi ya Jeudi, diskur mosusu ya móto emonisaki ete “baklisto bazali komibanzabanza bamoko mpo na bamosusu.” Ba Témoins de Jéhovah basili komonisa ete bazali komibanzabanza bamoko mpo na bamosusu, mingimingi na ntango ya makama mauti na biloko na kozalisama lokola mopepe makasi to koningana ya mabelé, ntango esengelaka ete bakomela bakonzi ya Leta mikanda na ntina na bandeko na bango, to ntango mposa makasi emonanaka na mboka epai kuna bafandi. Kasi soki matata mabimi likoló na kozanga kokoka, tosalelaka mitinda mizwami na toli oyo Yesu apesaki na Matai 5:23, 24 mpe 18:15-17. Soki bandeko mibale bazali kosala mombongo, ezali ntina mpenza ete bapesana limemya mpe bamonisa bolingo moko epai na mosusu, mpamba te ezala nkolo biloko to mosali, moko te kati na bango azali kozwa litomba na moimi likoló na boyokani na bango ya elimo.
Toloba monoko na peto na kosenzela mpo na etamboli na biso
Mbala mingi, likebi likotyamaka likoló na kosenzela etamboli na biso. Na yango, molobi ya liboso na mokolo ya Mardi alimbolaki motó na likambo “Yoká mpe bombá Liloba na Nzambe.” Amonisaki ete toyanganaki na assemblée mpo na bantina mibale: koyekola mpe kopusama na kosalela boyebi yango.
Diskur ya liboso na ntongo ya Mercredi ebimisaki motuna oyo ete: “Klisto ‘ayinaki ezaleli ya kobuka mibeko!’—Bongo yo?” Kolinga boyengebene mpamba ekoki te. Esengeli lisusu koyina mabe mpo na kobatela lisosoli malamu, kobatela boyokani malamu elongo na Jéhovah mpe kopengola kobwaka nsoni likoló na nkombo na ye likambo oyo likomema yo na kobuka mbuma ya kotyola mibeko—libebi mpe kufa.
Diskur elandi ezali na boyokani elongo na motó ya likambo “Bwaka makanisi mpamba ya mokili mpe kangama na makambo na solo ya Bokonzi.” Satana, Eva mpe baanzelu mabe basili bango nyonso kolanda makanisi mpamba oyo mamemaki bango na mawa. Makanisi mpamba ya mokili, elingi koloba mposa makasi ya mosolo to pite, ekomemaka na bokosi kino kosala mabe monene. Na esika ya kolanda makanisi mpamba, tosengeli kokangama na makambo na solo ya Bokonzi na koyekoláká, na kobondeláká, na koyanganaka na makita mpe kosanganáká na mosala ya kosakola.
Mpo na kozala na etamboli ya sembo, etamboli na boklisto, esengeli na biso kolanda toli oyo epesamaki Mercredi na nsima na midi kati na diskur “Bino baklisto, bozala na bomoi engebene makoki na bino.” Kozanga kotalela toli oyo ekopesaka mpasi monene na elimo mpe na mosuni. Nzela na mayele ezali na komipekisa na bamposa na biso ete tokóma te na banyongo ezangi ntina, kasi na kosaláká budjet malamu, tokomeka kotelema ngwi. Tozali na mposa ya kolona ntango nyonso mbuma oyo ete ezaleli ya kobanga Nzambe mpe likambo oyo etali kosepela na oyo ozali na yango.—1 Timote 6:6-8.
Diskur ya Mardi “Baninga na yo bazali mpe baninga ya Jéhovah?” elobelaki ntina oyo tosengeli kotalela baninga na biso. Baninga na biso basengeli kozala baklisto oyo basili kolata bomoto bokokani na oyo na Klisto mpe baoyo bazali kosakola nsango malamu na molende. Baninga oyo tozali na bango na mokili bazali baninga na Nzambe te mpe tokoki kotambola na bango te kozanga likámá. Ata kati na lisangá, tosengeli kopona baninga malamu soki tolingi ete bazala elendiseli.
Batoli nyonso wana epesami mpo na etamboli na biso ekundolamaki na lolenge malamu mpenza kati na drame oyo ezalaki na motó na likambo “Tokima mitambo ya Diable.”
Batoli mpo na libota
Diskur “Baboti—Bomema mikumba na bino” na yango eyaki na ntango ekoki. Baboti basengeli koyeba mokano na Nzambe mpe kokokisa yango malamu. Ekoki bobele te komema bana na makita na boklisto mpe kati na mosala ya kosakola. Esengeli kolakisa bango ete balinga Jéhovah mpe bayeba ete ezali likambo na mayele na kozala na bomoi engebene mokano na ye.
Na nsima symposium esalemaki na motó na likambo “Libota na mikolo na biso.” Molobi ya liboso amonisaki ete Nzambe azali Mobandisi na libota. Batata basengeli kozala bateyi malamu na ntina etali makambo ya elimo. Bamama basengeli kozala basali na ndako baoyo bakoki mpe bana basengeli komonisa limemya epai na Jéhovah na kondimáká bibongiseli bityami na baboti na bango.
Molobi alandaki, alimbolaki ete libota lisengeli “komibatela na mikakatano.” Mikakatano ya nkita mizali mingi. Komekama na kosala mabe ezali komonana mingi na bisika ya mosala mpe televizyo ezali kolendisa mobulu, pite mpe mposa makasi ya mosolo. Esengeli kobokolo bana malamu uta bomwana, mpe esengeli kosala milende mpo na kolónga bopusi ya mokili. Tosengeli kozwa matomba na bisaleli na bonzambe oyo bipesami na la Société Watch Tower.
Diskur elandaki “Ndenge nini kobatela [libota] kino na mokili ya sika,” elobelaki mokumba monene oyo baboti bazali na yango. Mokumba ya kobokola bana esengeli kozwama na motuya mpenza. Batoli kitoko epesamaki likoló na boyekoli na libota mpe mokanda nini esengeli koyekola, na kozaláká na mokano ya kosimba mitema ya bana. Ezali bobele na nzela wana nde baboti mpe bana bakoki kolikya kokóta kati na mokili ya sika, lokola libota.
Diskur “Ntango libota ekabwani” epesaki batoli kitoko ebongaki mpenza na ezalela na mabota mingi ya ba Témoins de Jéhovah. Baoyo bazali na ezalela wana balendisamaki na kobungisa te elikya oyo ete mokolo moko, babalani na bango bakondima solo. Basengeli kolekisa ntango mingi elongo na babalani na bango mpe kosala nyonso mpo na kokokisa oyo babalani baklisto basengeli kosala. Bakoki kozwa lisalisi ya bankulutu to ya baninga na bango baklisto mosusu oyo bazali na kobika na mabota makabwani.
Tolakisa monoko na peto epai na bazalani na biso
Na lolenge esengeli mpenza, balobelaki mingi likoló na motindo oyo tokoki kosimba mabaku ya kolakisa monoko na peto epai na bazalani na biso. Na yango, na ntongo ya Mercredi, bayangani bayokaki diskur “Ntango na biso ezali na motuya: Tosalela yango na mayele.” Mpo na kosala bongo, tosengeli komityela liboso makambo ya ntina mingi na boyokani elongo na oyo elobami na Matai 6:33 ete: “Bolukaka nde liboso Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na Ye.” Yango elimboli kotya ntango mpo na kosala boyekoli ya moto na moto, koyangana na makita manso mpe kosangana mbala na mbala kati na mosala ya kosakola Tosengeli kosomba ntango kati na misala oyo mizali kosepelisa, nzokande mizali na ntina mingi te. Ebele na bandeko batunamaki mituna bamonisaki lolenge oyo bamoko balóngaki kosala yango.
Tobosana te ete tozali ba Témoins de Jéhovah. Ezali yango nde bilakiseli mingi bimonisaki biso na Jeudi na nsima na midi, na motó na likambo “Toloba monoko na peto na mabaku nyonso.” Bilakiseli yango bimonisaki lolenge nini yango ekoki kosalema na nzela na kosakola na balabala, na litatoli ya libaku malamu mpe na kosalela telefone Bolingo monene oyo tozali na yango mpo na Jéhovah mpe mpo na bazalani na biso ezali kopusa biso na koloba monoko na peto na mabaku manso.
Lisoló lilandaki lizalaki na motó na likambo oyo ete, “Baoyo bazali kokima mikumba te bapambwami.” Lisangá ya ba Témoins de Jéhovah, oyo ezali koteya kati na mokili mobimba, ezali komonisa likeseni monene elongo na boklisto ya lokuta. Biso tosengeli mpenzampenza kotelema ngwi liboso na mimekamo nyonso, lokola epekiseli, bato bazangi kosepela na nsango na biso mpe mikakatano ya nkita. Bilakiseli na lisalisi ya mokanda Comment raisonner à partir des Écritures esili kolakisa biso lolenge nini kolónga mikakatano yango.
Drame “Tosala mokano na Nzambe na molende” elendisaki mpo na kosakola na motó mpenza. Elobelaki Yehu, moto na molende mpo na nkombo na Jéhovah, mpe emonisaki boni ezali ntina mpo na biso ete tomonisa mpiko mpe molende mingi kati na mosala na Jéhovah.
Mikanda mibimaki na assemblée
Na boumeli ya assemblée mikanda mibale mibimaki na Lingelesi mpe na Allemand. Moko na yango molakisamaki na diskur “Ndenge nini makila ekoki kobikisa yo?” Molobi alobelaki liboso naino makama oyo makobimaka mpo na kozongisa makila. Amonisaki ete ebele na bankisi mosusu ekoki kosalelama na esika ya makila. Ba Témoins de Jéhovah bakoboyaka makila mpo ete ezali mabe te, kasi mpo ete makila ezali bulee; ezali te mpo ete mbala mosusu ezali na mbindo, kasi mpo ete ezali na motuya mingi liboso na Nzambe. Makila oyo mazali mpenza kobikisa bomoi ezali makila na Yesu Klisto. Mpo na kosukisa, mpo na esengo monene ya bayangani, molobi ayebisaki kobima ya brochure ya bankasa 32 na titre “Comment le sang peut-il vous sauver la vie?”
Kobima ya mokanda kitoko ya mibale eyebisamaki na diskur “Bolukaka Jéhovah.” Bato mingi bakolukaka Nzambe te. Komonana ya mangomba mingi ezali komonisa kino wapi bato babungi mpo na koluka Nzambe mpo ete baboyi kolanda Liloba na ye. Lokola oyo ekolakisaka ba rapports ya assistance na Ekaniseli na mbula na mbula, bamilió na bato bazali na mposa ya kosalisama mpo ete bazwa etelemelo mpo na Jéhovah. Yisaya 55:6, 7 emonisi ete Jéhovah azali mpenza Nzambe na bolingo mpe na mawa, ye oyo ‘akolimbisaka.’ Epai na biso ba Témoins na ye, asili kopesa monoko na peto oyo tosengeli kosalisa bato mosusu ete basangana elongo na biso mpo na kosalela Jéhovah na motema moko.
Lelo oyo, libota na Jéhovah lizali kokutana na mikakatano ya sika likoló na yikiyiki ya mabota. Nzokande, tokokutaka bato ya mangomba nyonso kati na ba teritware na biso. Mpo ete tokoka kosalisa ba Hindous, ba bouda, ba shinto mpe basangani ya mangomba mosusu, la Société abimisaki mokanda kitoko oyo na bankasa 384, L’humanité à la recherche de Dieu. Mokanda wana mozali kopesa bandimbola mozindo likoló na mateya na moboko ya mangomba minene longola boklisto ya lokuta. Kasi ezali kotalela mpe mangomba ya lokuta oyo makolobaka ete ezali ya boklisto. Na lisalisi ya mokanda wana, tokoki kobanda boyekoli na Biblia elongo na bato ya mangomba makeseni.
Diskur piblike mpe maloba na nsuka
Diskur piblike oyo esalemaki Vendredi ezalaki na motó na likambo “Basangani na nzela na monoko na peto.” Molobi amonisaki ete minoko soko nkóto misato oyo bato bazali koloba lelo oyo mizali kopesa nzela na bomoko te, kasi monoko na peto mozali bokasi na kosala bomoko. Monoko na peto mosili kobatela ba Témoins de Jéhovah longwa na mabunga ya Babilone Monene, mosili kolakisa bango na kotósa ezalela ya bulee na bomoi mpe ya makila mpe esili kosalisa bango na kosalela mitinda na Biblia, eloko oyo ezali kopesa bango bolamu na elimo mpe na mosuni. Biso banso tosengeli koyekola mpe koloba monoko na peto, mpamba te ezali bobele baoyo bakosalaka na lolenge lobongi nde bakobika na Armagedon. Bongo, tolanda toli ya Sofoni 2:1-3 kozanga koumela.
Nsima na kozwa mwa batoli kitoko ya Biblia mpo na ntina ya ‘kosenzela mpo na mabondeli,’ maloba ya nsuka mapesamaki na motó na likambo “Totambola na boyokani na monoko na peto.” Motuya ya baoyo bazali kotambola na boyokani elongo na monoko na peto ezali sé kobakisama. Bayangani bamonisaki ete bazalaki komibanzabanza mpo na monoko na peto na komonisáká bopeto, disipline mpe na ebongiseli malamu na assemblée. Mikanda ya sika mikosalisa ba Témoins nyonso na kopalanganisa monoko na peto na molende nyonso.
Molobi oyo asukisaki assemblée akundolaki ete, biso nyonso tozali na mposa na koyika mpiko. Alobaki ete assemblée oyo esengeli kolendisa ekateli na biso ya kosala emekaneli na mbango na boklisto. Mpe asilisaki na maloba oyo ete: “Tolanda kotambola na boyokani elongo na monoko na peto oyo Nzambe azali kopesa biso, mpo ete tokumisa Jéhovah, Tata na biso ya likoló atondi na bolingo, sikawa mpe libela na libela.”
[Etanda na lokasa 26]
Na assemblée ya Berlin-Ouest, bayangani nyonso bazalaki 44 532 mpe bato 1 018 bazwaki batisimo. Esengelaki minutes 19 mpo ete bakandida babima longwa na stade ya masano mpo na kokende kobatisama, mpe na boumeli ya ntango nyonso wana, bato bazalaki se kobeta maboko. Esika ebongisamaki mpo na bamonisi ya monoko ya Lingelesi. Soko bato 6 000 balandaki programme mobimba na monoko na bango. Mbala mibale na boumeli ya bopemi ya midi, basangani ya Collège central balekisaki ngonga moko na kosalaka badiskur mikuse mpo na kolendisa bamonisi 4 500 ya Pologne baoyo bazalaki mpe na assemblée wana.
[Bililingi na lokasa 24, 25]
1. Sitade ya masano ya Berlin-Ouest
2. Programme ya assemblée
3. Bus nkámá mibale ememaki bamonisi longwa na Allemagne de l’Est
4. Bamonisi ya Pologne bazalaki na esengo ya kozwa mikanda ya sika
5. Kotyama ya bafololo na esika ya assemblée
6. A. Schroeder, mosangani ya Collège central, asanganaki na programme ya assemblée ya Berlin-Ouest