Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/5 nk. 15-20
  • Lobá monoko na peto mpe zala na bomoi na seko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lobá monoko na peto mpe zala na bomoi na seko
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini koyekola monoko na peto
  • Ntango mbindo ekóti
  • Monoko na peto esili koyokana kati na mokili mobimba
  • Tólobaka monoko na peto soko tolingi kobosana yango te
  • Tozala na bomoko
  • Monoko na peto mpo na mabota nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Olobaka ‘monoko ya peto’ malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Tozala na bomoko na nzela na monoko na peto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Tólobaka “monoko na pɛto”
    Nzembo mpo na kokumisa Yehova
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/5 nk. 15-20

Lobá monoko na peto mpe zala na bomoi na seko

“Boluka Jéhovah . . . boluka boyengebene, boluka bopolo, soko nde bokobómbama na mokolo na nkanda na Jéhovah.”​—SOFONI 2:3.

1. (a) Myango nini mikosalelamaka na moto oyo azali koyekola monoko na bapaya? (b) Mpo na nini ezali ntina na koloba monoko na peto?

MOTO oyo alingi koyekola monoko na bapaya, akoki ntango mosusu koyekola grammaire na yango, to kosalela yango na maloba. Boyekoli ya grammaire ekosengaka mingimingi kosalela mikanda oyo mizali kosalisa na koyeba malako ya monoko wana. Mpo na koloba monoko yango, moyekoli akomekolaka mongongo mpe maloba ya molakisi. Myango wana mibale misalelami mpo na koyekola “monoko na peto.” Ezali na ntina ete toloba monoko wana, soki tolingi “kobómbama na mokolo na nkanda na Jéhovah.”​—Sofoni 2:1-3; 3:8, 9.

2. Ndenge nini tokoki koyekola oyo ekoki kobengama ete malako ya grammaire ya monoko na peto?

2 Biblia ezali mokanda ya liboso mpo na boyekoli ya monoko na peto. Na koyekoláká na bozindo elongo na mikanda mikolimbolaka Biblia, okoyeba oyo ekoki kobengama ete malako ya grammaire ya monoko na peto. Mpo na yango, boyekoli na Biblia oyo Témoin de Jéhovah moko azali kotambwisa yo, ezali ebandeli malamu. Mpo na baoyo basilá komipesa na Nzambe, boyekoli ya Makomami na bozindo mpe ya mbala na mbala, ezali mosala ya ntina mingi mpo na bango. Ezali nde na myango mosusu ya malamu mingi mpo na koyekola monoko na peto? Mpe baoyo bakolobaka monoko wana bakozwaka bolamu nini?

Ndenge nini koyekola monoko na peto

3. Tángá moko na mitindo mpo na koyekola monoko na peto?

3 Moko na lolenge ya koyekola monoko na peto etali kosangisa makanisi ya sika na oyo ozali na yango liboso, lokola ekosalaka moto oyo azali koyekola koloba monoko moko, akosanganisaka malako ndenge na ndenge ya grammaire. Na yango, ekoki kozala ete na eleko moko omonaki ete Yesu Klisto azali Mwana na Nzambe, kozanga ete oyeba mpenza mokumba na ye. Uta ntango wana, boyekoli na yo ya Biblia esili mpenza komonisa yo ete Klisto azali koyangela kati na makoló mpe na boumeli na Boyangeli na ye ya mbula nkóto, bato na botósi bakokambama kino ezalela na kokoka. (Emoniseli 20:5, 6) Ezali polele ete bososoli na yo ya monoko na peto ekobakisama na meko oyo yo ozali kosangisa makanisi ya sika na oyo yo ozalaki na yango liboso.

4. (a) Motindo nini mosusu tozali na yango mpo na koyekola ‘malako ya grammaire’ ya monoko na peto, mpe lisoló nini ye Biblia tokoki kotalela lokola ndakisa? (b) Nini esalemaki ntango Gédéon mpe mibali nkámá misato bakokisaki mosala na bango? (c) Liteya nini tozali kozwa na lisoló ya Gédéon?

4 Lolenge mosusu ya koyekola ‘malako ya grammaire’ ya monoko na peto ezali ya kokanisa makambo oyo malobelami kati na Biblia. Na ndakisa, tomeka “komona” mpe “koyoka” lisoló ya Basambisi 7:15-23. Tala ete Gédéon, zuzi ya Yisraele, akabolaki basoda na maboké misato, mibali monkámá mpo na liboké moko. Na butu, bango nyonso bakitaki na ngomba Giliboa mpe bazingaki moláko ya Bamadyanite baoyo balalaki. Mibali yango nkámá misato, bazalaki nde na bibundeli malamu? Te, ezalaki te lokola oyo ya basoda Bamadyanite. Na ntembe te, ezalela na bango ekokaki kobénda maseki ya basoda wana na lolendo. Moko na moko na bango azalaki bobele na kelelo moko mpe na mbeki moko ya kati na yango, ezalaki na mwinda moko. Kasi yoka! Wana, mibali monkámá oyo bazalaki elongo na Gédéon babetaki kelelo oyo bayokanaki mpo na yango, mibali mosusu nkámá mibale, babetaki kelelo mpe babukaki mbeki na bango. Kobimisáká miinda na bango, nyonso bangangaki ete: “Mopangá na Jéhovah mpe na Gédéon!” Bamadyanite babángaki mpenza. Babimaki na hema na bango na kotutáká mabaku. Miso na bango matondi na mpongi mafungwami na bobangi wana bamonaki miloli na móto na miinda, oyo emonanaki na bango lokola bililingi mpe ebangisaki bango. Bato na Gédéon balandaki kobeta kelelo, wana Bamadyanite bazalaki kokima mpe, na kopusama na Nzambe, babomanaki moko na mosusu. Awa, monoko na peto molakisami na lolenge na mozindo: libosoliboso, Jéhovah akoki kobikisa basaleli na ye kozanga lisungi ya limpinga na bato; lisusu, “akotika bato na ye te mpo na lokumu ya nkombo na ye monene.”​—1 Samwele 12:22.

5. Ndenge nini makita na boklisto makoki kopetola elobeli na biso?

5 Moto oyo azali koyekola monoko na bapaya na kolobáká yango, akomekaka kozongela mpenza mongongo mpe maloba ya molakisi. Bobele bongo, makita na boklisto mazali kopesa biso mabaku kitoko ya koloba monoko na peto. Toyokaka bato mosusu koloba monoko na solo ya Biblia, mpe mbala mosusu biso moko mpe tolobaka yango. Tozali nde kobanga noki tokoloba eloko moko elongobani te? Komitungisa mingi te, mpamba te soki libunga libongisami na bobóto na nkulutu oyo azali kokamba likita, na ndakisa, boyekoli ya Mosenzeli na poso na poso, ekoki kopetola elobeli na biso. Na yango, toyanganaka mpe topesaka biyano mbala na mbala na makita na boklisto.​—Baebele 10:24, 25.

Ntango mbindo ekóti

6. Mpo na nini kokesana ezali monene kati na ba Témoins de Jéhovah mpe mangomba na boklisto ya lokuta?

6 Baoyo bazali kosakola mokano na Jéhovah mpe Bokonzi na ye ya likoló, bakolobaka monoko na peto. Bazali ba Témoins na ye, baoyo bazali koyebisa nkombo na ye na bato mpe bazali kosalela ye “na motema moko,” to na likanisi moko. (Sofoni 3:9) Atako bazali na Biblia, mangomba ya boklisto ya lokuta bazali koloba monoko na peto te mpe bazali kobelela nkombo na Nzambe te elongo na kondima. (Yoele 2:32) Bazali na nsango moko elongóbáni te oyo mbele ezwi moboko likoló na Makomami mpo na komemela bato. Mpo na nini bongo? Mpo ete bazali kopesa motuya na malako ya mangomba, na makanisi ya mokili mpe na boyokani ya politike koleka Liloba na Nzambe. Mikano na bango, bilikya na bango mpe lolenge na bango ya kosala, ezali ya mokili oyo etondi na mabe.

7. Kokesena nini emonani na 1 Yoane 4:4-6 kati na ba Témoins de Jéhovah mpe mangomba ya lokuta?

7 Boklisto ya lokuta​—solo mpenza, lisangá ya mangomba nyonso ya lokuta na mokili mobimba​—ezali koloba monoko moko elongo na ba Témoin de Jéhovah te. Tosimba maloba oyo ntoma Yoane akomaki epai na baoyo bazali koloba monoko na peto: “Bino bozali bato na Nzambe mpe bosili kolónga bato wana, mpo ete ye oyo azali kati na bino aleki oyo azali kati na mokili. Bango bazali bato na mokili; yango wana bakolobaka makambo ya mokili mpe mokili ekoyokaka bango. Nde biso tozali bato na Nzambe. Ye oyo ayebi Nzambe akoyoka biso; kasi ye oyo azali moto na Nzambe te, akoyoka biso te.” (1 Yoane 4:4-6) Basaleli na Jéhovah basili kolónga mateya ya lokuta mpo ete Nzambe, ye oyo azali kati na libota na ye, “aleki [Diable,] oyo azali kati na mokili,” elingi koloba kati na lisangá na bato mabe. Lokola bapengwi “bazali bato na mokili” mpe bazali komonisa elimo ya mabe, “bazali koloba makambo ya mokili, mpe mokili ekoyokaka bango.” Na kokesena, bato oyo bakokani na bampate bakoyokaka baoyo bazali bato na Nzambe. Bayebi ete basaleli na ye bazali koloba monoko na peto ya solo na Biblia, monoko oyo ye azali kolakisa bango na nzela ya lisangá na ye.

8. Motyoli na mibeko azali nani?

8 Na ekeke ya liboso ya ntango na biso, lipengwi monene liyebisamaki, wana ‘nguya na kobómbama na motyoli mibeko’ esilaki kobanda kosala mosala. Na nsima, bato oyo bandimaki mokumba ya koteya lisangá​—to mpe baoyo babotolaki yango na makasi​—bakómaki kopalanganisa mateya ya lokuta. Monoko oyo bazalaki koloba ezalaki peto soko moke te. Ezali motindo yango nde ebimaki kelasi moko oyo emitombolaki, ye “motyoli na mibeko.” Ezali bongo bakonzi ya mangomba na boklisto ya lokuta, baoyo basili komipesa na malako ya mangomba, na makanisi ya mokili mpe na mateya makotemelaka Makomami.​—2 Batesaloniki 2:3, 7.

Monoko na peto esili koyokana kati na mokili mobimba

9. Makambo nini mabimaki na mangomba na ekeke ya zomi na libwa?

9 Bobele motuya moke na bato ovo bakobangaka Nzambe nde ‘babundaki na molende mpenza na ntina na kondima oyo epesamaki na babulami.’ (Yuda 3) Bato wana ya kondima bakokaki kozwama epai wapi? Na boumeli ya bikeke, mangomba ya lokuta masilaki kokangisa bibele na bato kati na molili ya elimo, mpe Nzambe ayebaki mwa ndambo moke ya bato oyo bandimamaki epai na ye. (2 Timoté 2:19) Na nsima, na ekeke ya zomi na libwa, kati na mokili oyo mozalaki kobongwana mingi na makambo na mombongo, na bakompanyi mpe na bizaleli na bato, mingongo miyokanaki mpe mimonisaki polele mobulungano mpe lokuta ya mangomba. Bituluku mike na bato bamekaki kotanga bilembeteli ya ntango mpe kosakola koya ya mibale na Yesu; kasi bango nyonso balobaki monoko na peto te.

10. Etuluku nini Nzambe aponaki mpo na koloba monoko na peto mpe kosakola “koya ya mibale” na Yesu, mpe nini endimisi ete loboko na Jéhovah ezalaki elongo na etuluku yango?

10 Nde, na 1879, ekómaki petee na koyeba mongongo ya baoyo baponamaki na Jéhovah lokola ba Témoins mpo na koloba monoko na peto mpe kosakola “koya ya mibale” na Yesu. Na ntango wana, etuluku moke ya boyekoli na Biblia etambwisamaki na charles Russell, ezalaki koyangana na Pittsburgh, na mboka Pennsylvanie (Etats​—Unis). Basangani ya etuluku yango bandimisamaki ete koya ya mibale na Yesu ekozala ebandeli ya bozongi na ye na elimo mpe ete mokili mokozwa eleko ya mpasi monene. Eleko yango ekolandama na Boyangeli ya mbula nkóto ya Klisto, oyo ekozongisa Paradis na mabelé mpe ekomema bato ya botósi kino bomoi ya seko. Na Juillet 1879, Bayekoli wana ya Biblia babandaki kobimisa zulunalo oyo eyebani lelo na nkombo Mosenzeli. Nimero na yango ya liboso, ebimaki bobele na baekzamplere 6 000. Kasi, “loboko na Jéhovah” lozalaki elongo na ba Témoins na ye, mpamba te zulunalo yango ebimisami lelo na minoko 111 mpe baekzamplere enyatámi ezali koleka 15 000 000.​—Tala Misala 11:19-21.

11, 12. Wapi mwa basolo ya Biblia oyo esombami na baoyo bazali koloba monoko na peto?

11 kokaboláká ba Biblia mpe mikanda, mpe mingi mpenza na kosakoláká nsango malamu na molende, ba Témoins de Jéhovah bazali kolakisa monoko na peto na mabelé mobimba. Baoyo bazali koloba monoko yango bazali kozwa bolamu mingi. Na esika ya kosalela libombami ya monoko na mbindo oyo ya Trinité, mpe na koloba ete: ‘Nzambe azali Nzambe, Klisto azali Nzambe mpe Elimo Santu azali Nzambe,’ bato yango bakangami na oyo elobami na Biblia, ete: Jéhovah azali Oyo​—Aleki​—Likoló, Yesu Klisto azali Mwana na ye mpe azali na nsé na ye, mpe elimo santu ezali bokasi na Nzambe boleki monene mpe bokosalaka mosala (Genese 1:2; Nzembo 83:18; Matai 3:16, 17) Baoyo bazali koloba monoko na peto bayebi ete moto abimaki te kolongwa na motindo na bomoi moko ya moke, lokola elakisami na liteya ya évolution, kasi ete azalisamaki na Nzambe na bolingo. (Genese 1:27; 2:7) Bayebi ete molimo ekufaka elongo na bomoi​—likambo oyo lizali kolongola bango na bobangi ya bakufi (Mosakoli 9:5, 10; Ezekiele 18:4) Bazali kososola lisusu ete lifelo ezali nkundá epai bato nyonso bakokendeke, kasi ezali te esika na móto mpe na minyoko oyo esalemi na Diable. (Yobo 14:13) Nzokande, na ntina na bakufi, bazali na elikya ya lisekwa euti na Nzambe.​—Yoane 5:28, 29; 11:25; Misala 24:15.

12 Baoyo bazali koloba monoko na peto bazali na limemya mpo na makila mpe bomoi. (Genese 9:3, 4; Misala 15:28, 29) Bayebi ete bomoi na Klisto awa na mabelé, ezali lisiko lipesamaki mpo na kosomba bato na botósi. (Matai 20:28; 1 Yoane 2:1, 2) Bakobondelaka “basantu” te, mpo bayebi ete mabondeli masengeli kopesama epai na Jéhovah na nzela na Yesu Klisto. (Yoane 14:6, 13, 14) Bazali mpe kosalela bikeko te kati na losambo na bango, mpamba te Liloba na Nzambe lizali kokweisa losambo na bikeko. (Exode 20:4-6; 1 Bakolinti 10:14) Bazali mpe komibatela na makámá ya bilimu mabe na koboyáká boyokani nyonso na bilimu mabe, likambo oyo likweisami na Biblia.​—Deteronome 18:10-12; Bagalatia 5:19-21.

13. Mpo na nini baoyo bazali koloba monoko na peto bazali komitungisa te?

13 Basaleli na Jéhovah, baoyo bazali koloba monoko na peto, bakomitungisaka te mpo na koyeba ntango nini oyo bazali kobika. Mpamba te, Jéhovah asili kolakisa bango ete bazali kobika na “ntango ya nsuka” mpe ete Yesu, kozanga komonana na miso ya mosuni, azali sikawa kati na nkembo na ye. (Danyele 12:4; Matai 24:3-14; 2 Timoté 3:1-5; 1 Petelo 3:18) Na lisungi ya mampinga ya likoló, mosika te Klisto akotambola likoló na mpunda na ye ya etumba ete akweisa ekateli na Nzambe likoló na biloko ya ntango oyo. (Danyele 2:44; Emoniseli 16:14, 16; 18:1-8; 19:11-21) Lisusu, baoyo bakolobaka monoko na peto bazali kosakola nsango malamu na molende ete: Bokonzi na Nzambe boyangelami na Klisto mosika te ekomema bolamu mingi epai na bato nyonso na ya botósi baoyo bakofandaka kati na Paradis na mabelé. (Yisaya 9:6, 7; Danyele 7:13, 14; Matai 6:9, 10; 24:14; Luka 23:43) Nyonso oyo tolobi ezali bobele mwa ndambo na ntina oyo. Mpamba te, solo, monoko na peto ezali monoko oyo mozali na makambo mingi mpe ezali na motuya koleka nyonso mosusu awa na mabelé.

14. Bolamu nini mosusu bozwami na baoyo bakolobaka monoko na peto?

14 Kati na bolamu oyo bozali kozwama na baoyo bazali koloba monoko na peto, totangi “kimya na Nzambe” oyo ekobatelaka mitema mpe makanisi. (Bafilipi 4:6, 7) Bato oyo bazali koloba monoko yango bakotosaka mibeko na Biblia, likambo oyo lizali kopesa bango kolongono malamu na nzoto mpe ekopesaka bolamu mpe esengo ya kosepelisa Jéhovah. (1 Bakolinti 6:9, 10) Longola bolamu wana, bazali mpe na elikya ya kozala na bomoi ya seko kati na mokili ya sika molakami na Nzambe.​—2 Petelo 3:13.

Tólobaka monoko na peto soko tolingi kobosana yango te

15. Bososoli malamu ya monoko na peto ekopesaka bolamu nini?

15 Mpo na koloba monoko na peto kati na mokili ya sika, osengeli koyeba yango kino kokoka kokanisa kati na monoko wana. Moto oyo azali koyekola monoko moko, akokanisaka naino na monoko na ye ya mboka, nsima nde abongoli makanisi na ye na monoko oyo ye azali koyekola. Nzokande, na meko oyo azali komesana, akobanda kokanisa mingi na monoko wana ya sika kozanga ete asalela mabongoli ya makanisi. Bobele bongo, na koyekoláká na mozindo, okoki kozwa bososoli kitoko mpenza ya monoko na peto oyo ekosalisa yo na kotósa mibeko mpe mitinda ya Bíblia, mpo na kolónga mikakatano mpe kotikala na “nzela ya bomoi.”​—Nzembo 16:11.

16. Nini ekoki kokómela moto oyo akosalelaka monoko na pete mbala na mbala te?

16 Soki tolingi kokóba koloba monoko na peto na malamu mpenza, esengeli na biso kosalela yango mbala na mbala. Bambula eleki, bamoko kati na biso bayekolaki monoko moko na bapaya. Mbala mosusu tozali komikundola maloba ya monoko yango, kasi tokoki lisusu koloba malamu te, mpo ete tosalelaka yango mbala na mbala te. Monoko na peto mozali mpe na masengami yango moko. Soko tosaleli yango mbala na mbala te, tokoki mpe koloba malamu monoko yango te, likambo oyo likobimisa mawa likoló na elimo na biso. Na bongo, toloba yango mbala na mbala na ntango na makita mpe kati na mosala na boklisto. Misala wana, bakisa boyekoli ya moto na moto, ekosalisa biso na kolimbola malamu mpenza makanisi na biso kati na monoko na peto, likambo oyo lizali na ntina monene.

17. Nini emonisi ete, makambo oyo tokolobaka ekoki kolimbola bomoi to mpe kufa?

17 Makambo oyo tokolobaka ekoki kolimbola bomoi to mpe kufa. Ezali yango nde emonisami na matáta mabimaki kati na Bayisraele na libota ya Efraime mpe Yefeta, zuzi ya Gilada. Mpo na koyeba Baefraime oyo bazalaki kokima mpo na kokata ngambo ya Yordani, liboso na kolekisa bango, Bagilada basalelaki liloba “Shibolete,” oyo ezali kobanda na elobeli “sh.” Wana batunamaki na bakengeli ya Bagilada oyo batyamaki pene na esika oyo bazalaki kokatisa Yordani na makolo, Baefraime bamifundaki, mpamba te, na esika ya koloba “Shibolete,” bazalaki kokakatana na ekango to syllabe ya liboso, mpe babéngaki yango ete “Sibolete.” Na yango, Baefraime 42 000 babomamaki. (Basambisi 12:5, 6) Bobele bongo, mateya ya bakonzi ya mangomba na boklisto ya lokuta ekoki komonana epai na baoyo bayebi mpenza solo ya Biblia te, lokola ete ezali pene na monoko na peto. Nzokande, baoyo bazali koloba monoko ya mangomba ya lokuta, bakobomama na mokolo na nkanda ya Jéhovah.

Tozala na bomoko

18, 19. Ndimbola ya Sofoni 3:1-5, ezali nini?

18 Kolobeláká Yelusaleme ya kala ezangaki sembo mpe boklisto ya lokuta, oyo emonisi yango na mikolo na biso, mosakoli alobi na Sofoni 3:1-5, ete: “Mawa epai na ye oyo atomboki mpe abebi na mbindo, ye mboka na minyoko. Ayokaki mongongo te, ayambaki mpamela te, atalelaki Jéhovah te. Abelemaki na Nzambe na ye te. Mikóló na kati na ye bazali bankosi na konguluma. Basambisi na ye bazali bambwa ya zámba na ntango na mpokwa, oyo bakotikaka eloko kino ntongo te. Basakoli na ye bazali bato na nkɔ, bato na mayele mabe. Banganga na ye bakobebisaka makambo na bulee, babebisi Mibeko. Kasi Jéhovah azali na boyengebene kati na ye; asali mabe te. Ntongo na ntongo amonisaki bikateli na ye. Mpe yango ekozanga te wana ntongo etani. Kasi moto na mabe akookaka nsoni te.” Maloba oyo malimboli nini?

19 Yelusaleme, na ntango na kala, mpe boklisto ya lokuta na eleko na biso, nyonso mibale basilaki kotombokela Jéhovah mpe basili kobebisama na losambo ya lokuta. Mabe ya bakonzi na bango esili kobota monyoko. Atako Nzambe akebisaki bango mbala na mbala, bayokaki ye te mpe bazongaki epai na ye te. Mikóló na bango bamimonisaki lokola bankosi ekonguluma mpe na lolendo, baoyo bakotyolaka boyengebene. Mpe lokola mbwa ya zamba, basambisi na bango basili kopasola boyengebene na mino. Banganga na bango ‘basili kobebisa makambo na bulee, kobebisáká Mibeko’ na Nzambe. Na yango, Jéhovah alingi ’koyanganisa mabota mpe kosangisa bikonzi ete asopa nkele na ye likoló na bango, ee nkanda na ye nyonso.’​—Sofoni 3:8, MN.

20. (a) Esengeli kosala nini mpo na kobika na mokolo na nkanda na Jéhovah? (b) Tosengeli kosala nini mpo na kolikya kozwa bolamu ya seko bokouta na Nzambe?

20 Mokolo na nkanda na Jéhovah ezali mpenza kobelema. Mpo na kobika na mokolo yango mpe kokóta kati na mokili ya sika na Nzambe, esengeli bongo koyekola monoko na peto mpe koloba yango kozanga koumela. Ezali bobele na likambo wana nde tokoki komibatela uta sikawa na likámá ye elimo, mpe kobatelama na likámá libelemi mpo na mokili mobimba. Ba Témoins de Jéhovah bazali kosakola mokolo na nkanda na Nzambe mpe bazali koyebisa nsango ya kolendisa na ntina na Bokonzi na ye. Bazali na esengo monene na kolobela nkembo na bokonzi na ye. (Nzembo 145:10-13) Sangana na bango, mpe okokoka kozala na elikya ya kozwa bomoi ya seko mpe mapamboli mosusu makouta na Ye oyo asalaki monoko na peto, Jéhovah, Nkolo Moyangeli ya molóngó mobimba.

Bozongeli

◻ Lolenge nini tokoki koyekola monoko na peto?

◻ Mpo na nini baoyo bazali koloba monoko na peto bakozwaka bolamu na yango?

◻ Nini ekoki kokóma soki tokosalela monoko na peto mbala na mbala te?

◻ Tosengeli kosala nini mpo na kobika na mokolo na nkanda na Jéhovah mpo na kozwa bolamu ya seko?

[Elilingi na lokasa 16]

Gédéon mpe bato na ye babetaki kelelo mpe batombolaki miinda na bango

[Elilingi na lokasa 18]

Kobanda 1879, esili komonana polele ete Nzambe asalelaki charles Taze Russell mpe baninga na ye mpo na kolakisa monoko na peto

[Bililingi na lokasa 20]

Osili kosangana na ba Témoins de Jéhovah mpo na koloba monoko na peto?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto