Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/4 nk. 20-25
  • Monoko na peto mpo na mabota nyonso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Monoko na peto mpo na mabota nyonso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Likabo ya liloba
  • Mposa ya monoko na peto
  • Baoyo bazali kondima monoko na peto
  • Likambo esengeli na biso kosala mpo na koyekola monoko yango
  • Tozala na bomoko na nzela na monoko na peto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Olobaka ‘monoko ya peto’ malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Lobá monoko na peto mpe zala na bomoi na seko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Tólobaka “monoko na pɛto”
    Nzembo mpo na kokumisa Yehova
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/4 nk. 20-25

Monoko na peto mpo na mabota nyonso

“Boye, nakobongola maloba na bato kino [monoko] na peto, ete bango nyonso babyanga nkombo na Jéhovah mpe basalela ye na motema moko”​—SOFONI 3:9.

1, 2. (a) Jéhovah azali kosala nini na eleko na biso mpo na kokokisa Sofoni 3:9? (b) Mpo na kososola na nini esakweli ya Sofoni ezali kotalela biso, mituna nini tosengeli komituna?

JÉHOVAH NZAMBE azali kokokisa mosala moko kitoko mingi na mikolo na biso. Azali koyanganisa bato ya mabota nyonso. Lokola asilaki kosakola yango uta kala kati na Liloba na ye mosantu, azali kosala yango na koteyaka bango monoko na sika.​—Sofoni 3:9.

2 Monoko yango ya sika ezali nini? Mpo na nini koyeba monoko yango ezali na ntina? Likambo nini tosengeli kosala mpo na yango?

Likabo ya liloba

3. (a) Likabo nini kitoko Adam azwaki? (b) Adam azalaki koloba monoko nini?

3 Likoki ya kosolola na nzela na liloba ezali likabo na Nzambe oyo ezali kokesenisa moto na banyama nyonso ya mokili. Moto ya liboso, Adam, azalisamaki elongo na boongo oyo ezalaki na makoki ya kobimisa makanisi ya mayele. Apesamelaki mongongo, lolemo mpe bibebu oyo ekopesa ye nzela ete asalela liloba; azalaki lisusu na liboke ya maloba to vokabilere mpe likoki ya kosala maloba mosusu. Ntango Jéhovah alobaki na ye, Adam azalaki koyoka, mpe ye moko akokaki koyebisa mayoki na ye na lisalisi ya maloba. (Genese 1:28-30; 2:16, 17, 19-23) Tozali kokanisa ete monoko oyo epesamaki na Adam ezali oyo, na nsima, ekomaki kobengama hébreu. Emonani lokola ete na boumeli ya bambula 1 757 ya liboso ya boumeli na bango, bato nyonso bazalaki koloba se monoko wana moko.​—Gen. 11:1.

4. Makambo nini mazalaki na bopusi likoló na monoko ya bato na eleko ya Nimerode?

4 Na nsima, na mikolo ya Nimerode, mpo na kokweisa milende na bato mabe, Jéhovah abulunganisaki lokóta na bato nyonso oyo bamikotisaki kati na mosala ya kotonga ndako molai na Babele. (Genese 11:3-9) Emonani lokola ete Jéhovah alimwisaki naino kati na boongo ya bato makanisi nyonso ya lokota na ebandeli ya bato mpe akotisaki minoko ya sika, elingi koloba, bobele ba vokabilere ya sika te, kasi lisusu ba grammaires ya sika mpe lolenge mosusu ya sika ya kokanisa. Uta na minoko oyo Jéhovah abimisaki na Babele, mokemoke minoko misusu misili kosalema kino na mikolo na biso; engebene bato na mayele oyo bakoyekolaka minoko, na eleko na biso bato bazali koloba pene na minoko 3 000 kati na mokili mobimba.

5. Nini ekosalisa biso mpo na koyeba oyo “mbongwana” yango ezali kosenga mpo na “monoko na peto”?

5 Mpo na bato oyo bazali koloba minoko yango, maloba oyo ete, “nakobongola maloba na bato kino monoko na peto,” elimboli ete basengeli kotika monoko na bango ya mboka mpe koyekola monoko ya liboso oyo Nzambe apesaki na Adam? Makambo oyo mapesaki nzela ete esakweli yango eyebisama makosalisa biso na koyanola.

Mposa ya monoko na peto

6-8. (a) Makambo nini ya losambo masalemaki kati na Yuda liboso ete esakweli na Sofoni 3:9 ekoka kopesama? (b) Ezalela ya bato nyonso ezalaki nini kati na mabota zingazinga na Yuda?

6 Mwa bambula liboso, bokonzi na Yuda eyangelamaki na Manasé, na nsima na Amona, bango nde batongaki bitumbelo mpo na Baala, basalelaki maji mpe basambelaki bilimu mabe mpe bapesaki lokumu na misala ya bilimu mabe. (2 Mikonzi 21:1-6; 2 Ntango 33:21-23) Tala ntina nini, na boumeli ya boyangeli na Yosiya, mwana mpe mokitani na Amona, Jéhovah apesaki epai na mosakoli na ye Sofoni mokumba ya kokebisa bato ete ekateli na Nzambe esengelaki kokokisama likoló na mboka.​—Sofoni 1:1, 2.

7 Lisolo na bango mpe Makomami mapemami eteyaki epai na bafandi na Yuda ete Jéhovah azali Nzambe na solo; atako bongo, bazalaki kosalela losambo na mbindo ya Baala. Na kobukaka na nkò nyonso mibeko na Nzambe, bazalaki kokumbama liboso na moi, sanza mpe minzoto nyonso ya likoló. (Deteronome 4:19; 2 Mikonzi 23:5) Mpe mpo na kolekisa ndelo, bazalaki kosangisa losambo ya Jéhovah na losambo ya banzambe mosusu, lokola ete mangomba nyonso mazalaki kokamba na mokano bobele moko, na kokataka ndai mbala moko epai na Jéhovah mpe na nkombo ya nzambe na lokuta Malakama. Bazalaki kokanisa ete “Jéhovah akosala malamu te mpe akosala mabe te.” (Sofoni 1:4-6, 12) Mpo na mabota ya pembeni na Yuda, bango nyonso bazalaki kotemela Jéhovah mpe libota na ye uta kala; tala ntina nini boyengebene na Nzambe esengelaki kokweila bango mpe.​—Sofoni 2:4-15.

8 Ezali kati na makambo oyo nde Jéhovah alobaki ete: “Boye, nakobongola monoko na bato kino monoko na peto, ete bango nyonso babyanga nkombo na Jéhovah mpe basalela ye na motema moko.” (Sofoni 3:9) Na bongo monoko yango ya peto ezali nini?

9. (a) Mpo na nini monoko na peto ezali hébreu te to mpe bobele Liloba na Nzambe te? (b) Monoko na peto ezali nini, mpe bopusi nini ezali kosala likoló na bomoi ya baoyo bazali koloba yango?

9 Ezali nde hébreu? Te, mpamba te bafandi na Yuda bazalaki uta kala na monoko yango, kasi makambo bazalaki koloba mpe kosala mazalaki komonana mpenza peto te mpe alima te liboso na Jéhovah. Lisusu, monoko na peto ezali bobele Liloba na Nzambe te, mpamba te bazalaki na yango lokola. Nzokande, eloko oyo bazalaki na yango mposa, ezalaki nde kozala na boyebi malamu ya solo etali Nzambe mpe mikano na ye, likambo oyo bobele Jéhovah ye moko nde akokaki kopesa bango yango na nzela na elimo na ye. Ntango bato na Yuda bakoyekola monoko wana ya peto, lolenge na bango ya kokanisa, ya koloba mpe ya komitambwisa ekomonisa ete bandimi Jéhovah lokola Nzambe se moko ya solo. (Sofoni 2:3) Bakotya motema na bango epai na ye mpe bakopesa lisungi na bango nyonso kozanga ndelo epai na bokonzi na ye. Yango ezali na litomba monene mpo na biso. Mpo na nini?

Baoyo bazali kondima monoko na peto

10. Na eleko nini esakweli na Sofoni esengelaki kokokisama?

10 Kolobaka na ntina na kokokisama moko oyo esengelaki kosalema na eleko moko oyo elakamaki, Sofoni 3:9 elobi: “Boye, nakobongola maloba na bato kino monoko na peto, ete bango nyonso babyanga nkombo na Jéhovah mpe basalela ye na motema moko.” Ntango nini yango esengeli kokokisama? Verset 8 eyanoli ete ezali na eleko oyo Jéhovah ‘akoyanganisa mabota,’ liboso ete ‘akweisa likoló na bango nkanda na ye,’ nde akopesa epai na basokemi na mokili monoko na peto.

11. (a) Kokokisama nini mibale oyo Sofoni 3:9 ezwaki liboso na eleko na biso? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete esakweli yango ezali kokokisama lelo na lolenge ekeseni?

11 Na mikolo ya mokonzi Yosiya, liboso ete Jéhovah apesa nzela na mampinga na Babilone ete bakokisa ekateli na ye, mingi basilaki kotika losambo na lokuta mpe bazongelaki kosalela Jéhovah. (2 Ntango 34:3-33) Motindo moko, na ekeke na liboso ya ntango na biso, liboso ete Yelusaleme ebomama na Baloma, bankoto na bato bayekolaki solo na ntina na Nzambe mpe mokano na ye, mpe basanganaki mpo na kosalela ye. Na ntango wana, monoko na solo ebongisamaki lisusu koleka na misala na Yesu Klisto oyo mizalaki kokokisa mokano na Jéhovah. Kasi, ezali na ntango na biso nde esakweli na Sofoni ezali kokokisama na mokili mobimba. Mabota nyonso mazali koyanganisama na Armagedon mpo na etumba ya mokolo monene na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. (Emoniseli 16:14, 16) Koyanganisama yango ezali kosalema uta 1914, mbula oyo Bokonzi ebotamaki. Kobanda ntango yango, na kokokisama na esakweli oyo, Jéhovah azali kopesa​—mbongwana monene mpenza​—monoko na peto epai na bato na mokili mobimba. Ezali mpenza likambo ya ntina mingi na koyekola monoko yango, mpamba te babiki ya “bolozi monene” oyo ezali koya bakozala bato oyo bakomisaki monoko na peto monoko na bango mpenza.​—Yoele 2:32.

12. (a) Boyokani nini bozali kati na emonaneli eyebisami kati na Yisaya mokapo 6 mpe esakweli eteli monoko na peto? (b) Mpo na nini batikali bapakolami bazalaki na mposa na lisalisi mpo ete bakoka kokoba kosalela Jéhovah na lolenge oyo ekoki kosepelisa ye?

12 Na kotalela bosembo ya makambo oyo touti koloba, mwa ntango moke nsima na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, Jéhovah abandaki kopesa epai na basaleli na ye bapakolami bososoli ya emonaneli kitoko oyo eyebisami kati na Yisaya mokapo 6. (Yis 6 Versets 1-4) Emonaneli yango ezali komonisa ntina, mpo na biso, kozala na bibebu ya peto mpo na kosalela Jéhovah na lolenge oyo ekosepelisa ye. Ezali komonisa ete Jéhovah azali mpenza peto koleka. Na bongo, basaleli na ye mpe basengeli kozala peto. (1 Petelo 1:15, 16) Nzokande, batikali bapakolami bazalaki na mposa ya lisalisi kati na likambo wana. Mpamba te, na boumeli na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bamikotisaki mwa moke kati na makambo ya mokili, komitikaka bongo kobebisama na yango. “Nsomo na Jéhovah ezali peto,’’ kasi baklisto wana bapesaki nzela na kobanga bato mpe kobanga masangá na bato ete ezala na bopusi likoló na bibebu na bango mpe, na meko moko monene, kokangisa bango monoko mpo na oyo etali kosakola Liloba na Nzambe. (Nzembo 19:9) Lokola bakabwanaki naino malamumalamu te na boklisto ya lokuta, batikali bazalaki kobebisama na mateya na yango mosusu mpe na bizaleli na yango.

13, 14. (a) zalela nini malamu batikali bazwaki, mpe Jéhovah asalaki nini mpo na bolamu na bango? (b) Na ndimbola nini Jéhovah apesaki epai na batikali monoko na peto?

13 Kososolaka ezalela na bango, batikali balobaki, lokola mosakoli Yisaya ete: “Mawa na ngai! Mpamba te nabungi! Nazali moto na bibebu na mbindo mpe nafandi kati na bato na bibebu na mbindo; mpo ete miso na ngai mamoni Mokonzi, Jéhovah na bibele!” (Yisaya 6:5) Batikali basosolaki likambo oyo: ete ezalela na bango endimamaki te. Na bongo, bamonisaki bolembu te, na kokangamaka kati na nzela wana mabe, to mpe motó makasi te, na koboyaka mpamela na Jéhovah. Basanganaki na bakonzi ya mangomba te ntango, komikumisaka ete bazali kosalela Bokonzi na Nzambe, bakonzi yango bapesaki maboko na Société des Nations, lokola ete ezalaki Bokonzi yango.

14 Komonaka ete babongoli motema, Jéhovah, kati na boboto na ye, apetolaki bibebu na basokemi yango ya batikali. Tozali kotanga kati na Yisaya 6:6, 7: “Bongo moko na baserafé apombwaki epai na ngai, wana ezalaki ye na likala na móto na loboko na ye oyo esili ye kolubola na likoló na etumbelo. Amamaki monoko na ngai, alobaki ete: ‘Tala oyo emami bibebu na yo; mabe na yo esili kolongolama mpe masumu na yo malimbisami.’ ” Ezali nsango na kopetola euti na Liloba na Nzambe nde ebomaki, lokola na móto, mimeseno na bonkoko mpe mateya oyo mauti epai na bato. Nsango yango epikolaki kobanga bato kati na motema ya kelasi na Yisaya mpe ekitanaki yango na molende makasi mpo na yango basengelaki kosalela bibebu na bango mpo na kokumisa Jéhovah. Ezali na boye nde Jéhovah akokisaki elaka na ye ya ‘kopesa epai na bato​—ekozala mbongwana​—monoko na peto [mpenzampenza: bibebu na peto], mpo ete bango nyonso babelela nkombo na Jéhovah.’​—Sofoni 3:9.

15. Na kotalela ntina mpo na yango Jéhovah apesaki bango monoko na peto, na nini eyano ya batikali bapakolami ebongaki mpenza?

15 Na yango, ntango kelasi na Yisaya ebandaki koyoka na eleko na biso mongongo na Jéhovah oyo azalaki kotuna, lokola yango eyebisami na Yisaya 6:8 ete, “nakotinda nani? Nani akokende mpo na biso?” Kelasi na Yisaya bayanolaki na esengo nyonso ete: “Ngai oyo! Tinda ngai.” Ezalaki petee te mpo na baklisto wana nyonso na komikotisa kati na mosala ya kosakola na polele, kasi bazalaki na mposa ete Nzambe asalela bango lokola libota moko mpo na nkombo na ye. Uta ntango wana, elimo na ye elendisaki bongo, mpe motuya na bango ebakisamaki

16. (a) Mosala ya kosakola ya batikali esili kobota mbuma nini oyo bamizelaki na yango te? (b) Ndenge nini ebele monene bazali komonisa ete bango mpe, bazali koloba, monoko na peto?

16 Na nsima, emonanaki polele ete mosala na bango ya kosakola ezalaki kobota mbuma oyo bamizelaki na yango te. Na nsima na bango, Jéhovah azalaki kosalisa etuluku mosusu ya baklisto na koyekola monoko na peto. (Yisaya 55:5) Baklisto yango bazalaki na elikya ya bomoi na likoló te, kasi bazalaki kotalela ete ezali libaku malamu mpo na kozala baninga na batikali ya batuki na libula ya Bokonzi mpe kosala na bomoko elongo na bango na kosakolaka Bokonzi na Nzambe. Mokemoke, babimaki kati na “mikili nyonso mpe bikolo nyonso mpe mabota nyonso mpe minoko nyonso” mpo na kokoma lelo “ebele monene” ya bamilió mingi na bato. Na monoko oyo bazali koloba, bato yango bakeseni mpenza na masangá nyonso makabwani ya mokili. Bazali kotya elikya na bango kati na moto moko te to kati na lisangá moko te ya bato. Na esika ete basala bongo, bazali nde “konganga na mongongo makasi, kolobaka ete: ‘Lobiko na biso na Nzambe oyo afandi na kiti na bokonzi, mpe na Mwana na Mpate.”​—Emoniseli 7:9, 10.

Likambo esengeli na biso kosala mpo na koyekola monoko yango

17. Mpo na nini ezali na ntina ete toyekola malamu monoko na peto mpe ete tobongisa likoki na biso ya kosalela yango?

17 Ezala ete bozali kati na lisangá ya Jéhovah uta kala mingi te to uta mibu mingi, tokoki kosala milende mingi mpo na kokolisa boyebi na biso ya monoko na peto mpe lolenge na biso ya koloba yango. Ezali ntina na kosala milende kati na likambo yango. Mpo na nini? Mpamba te milende yango mizali komonisa ete tolingi solo.

18, 19. (a) Mpo na nini ezali ntina na kolona, uta ebandeli, bolingo monene mpo na solo? (b) Mpo na nini ezali ntina na kokoba kobatela bolingo yango?

18 Na ebandeli, bolingo yango ekosalisa moto na kofungola elimo na ye mpe motema na ye mpo na kokanga ntina ya biteni na Makomami oyo bazali kolimbwela ye; ezali kopusa ye na kobelema pene na Jehovah mpe na kolinga lisangá na Ye. Bolingo mpo na solo ezali bongo kopesa nzela na komisikola na mitambo ya mangomba na lokuta. Bamosusu bazali koloba ete bazali kosepela na nsango ya Biblia, kasi bazali komisikola mobimba te na mangomba ya lokuta to na lolenge na bomoi ya mbindo oyo mangomba yango ezali kondima. Mpo na nini bongo? Ezali mpo ete lokola 2 Batesaloniki 2:10 ezali kolimbola yango, “baboyaki koyamba bolingo na solo mpo na lobiko na bango.” Ezali mpenza na ntina mingi ete tozala na bolingo yango.

19 Ntango toyambi solo, tosengeli kobatela bolingo yango mpo na kokola kati na elimo; wana ezali likambo ya ntina mingi koleka. Tobosana te ete Jéhovah azali kolobela solo lokola “monoko.” Ntango tozali koyekola monoko moko, esengeli na biso kosala milende makasi mpo na koyeba malamu vokabilere, koloba malamu maloba, koyekola bosikisiki ya grammaire, mpe bongo na bongo. Ye oyo alingi monoko wana ya sika mpe bato oyo bazali koloba yango azali komiyoka ete abendami na kolendendela kati na milende na ye mpo na bokoli. Ekoki kozala ete na nsima ya mwa basanza akomi ‘komeka nzoto’ kati na monoko yango, kasi ekosengela mibu mingi ya milende makasi mpo akoka koloba yango lokola bankolo monoko bazali koloba yango. Tala lolenge na milende oyo tosengeli kosala mpo na koloba malamu monoko na peto.

20. (a) Nini ezali kokomisa monoko na peto mpenza peto? (b) Mpo na nini esengeli ete moko moko na biso asenzela makasi?

20 Toyeba yango, monoko oyo zambe apesi epai na basaleli na ye ebengami peto. Ezali likambo ya kobongisa grammaire te; monoko yango mozali peto mpo na oyo etali bizaleli mpe elimo. Endimaka lokuta ata moke te to bokosi mpe te. Baoyo bazali koloba yango basengeli ntango nyonso koloba solo. (Sofoni 3:13; Baefese 4:25) Lisusu, Makomami mazali komonisa biso ete nyonso oyo ezali na boyokani na Babilone Monene, lisangá ya mokili mobimba ya mangomba na lokuta, ezali mbindo. (Emoniseli 18:2-4) Banzambe na yango babengami “bikeko na mbindo.” (Yilimia 50:2) Na bongo ebongi ete baoyo nyonso bazali koyekola monoko na peto bakata boyokani nyonso na mosuni elongo na losambo ya lokuta, ete babwaka mateya na yango nyonso ya lokuta, bamisikola na biyenga na yango mpe balongola kati na elobeli na bango liloba nyonso oyo ezali kopesa nzela na kokundola lolenge ya makanisi na yango ya libunga. Epai mosusu, Emoniseli 16:13-16 ezali kokebisa biso ete maloba na propagande oyo ezali koyanganisa mabota mpo na kotemela Bokonzi na Nzambe, yango mpe ezali mbindo, mpamba te epemami na bilimu mabe. Tosengeli bongo kosenzela, mpo ete moko te na mbindo yango ebebisa elobeli na biso.

21. Longola maloba oyo tozali koloba, nini lisusu ezali kati na monoko na peto?

21 Oyo biso tozali koyekola ebengami ete monoko; kasi tokanisa te ete baoyo bazali koloba monoko yango bazali bobele kosepela koyekola na koloba mwa maloba to lolenge na elobeli oyo ezali kosalelama kati na libota na Jéhovah. Mongongo, elongi mpe bikelá to gestes ezalaka mpe na ntina na yango. Mbala mosusu ekobimisaka makambo oyo maloba yango moko ekoki kobimisa yango te. Mbala mingi, ekomonisaka lolenge na moto oyo tozali mpenza kati na motema. Ekoki komonisa soki tosili kolongola zuwa, kowelana mpe nkanda mingi kati na biso, makambo nyonso oyo mazali misala na nzoto ya masumu. Ntango tozali kotika esika na elimo na Nzambe ete ezala na bopusi kati na bomoi na biso, mbuma na yango ekomonana na lolenge oyo tozali kosolola elongo na bazalani.​—Bagalatia 5:19-23; Baefese 4:31, 32.

22. Soki tozali koyekola malamu monoko na peto, bopusi nini yango ekmema likoló na bikateli na biso?

22 Baoyo nyonso bayekolaki monoko moko ya bopaya bayebi ete bakolekaka litambe monene ntango moto abandi kokanisa kati na monoko yango, na esika ete abongola makanisi uta na monoko ya mboka na ye. Biso moko, ntango tozali koyekola solo, ntango tozali kosala milende makasi mpo na kosalela yango kati na bomoi na biso, mpe lisusu ntango tozali koyebisa yango mbala na mbala epai na bamosusu, wana tokomi mokemoke kokanisa kati na monoko ya solo. Tokotelema esika moko te mpo na kokokanisa ntango nyonso monoko ya kala mpe oyo na sika, mpe kobunda mpo na koyeba wapi oyo tosengeli kopona. Ata kati na makambo mike, mitinda na Biblia mizali koyela biso kati na makanisi mpo na kolakisa biso nzela nini tosengeli kolanda.​—Masese 4:1-12.

23. Nini ezali komonisa ete, na mabelé mobimba mpe ata nini ezali monoko na bango ya kobotama ba Témoins de Jéhovah bazali bango nyonso koloba monoko na peto?

23 Ya solo, bato bazali koloba bankoto na minoko, kasi kati na minoko nyonso wana monoko na peto ekoki mpe kolobama. Ba Témoins de Jéhovah, oyo bazali na bomoko kati na mokili mobimba, bazali kosalela malamu monoko na peto na kosalaka na bomoko mpe na kopesaka litatoli na miso ya bato nyonso, litatoli oyo ezali kokumisa Jéhovah, Nzambe na biso ya bolingo.

Bozongeli

◻ Kozala na likabo ya koloba elimboli nini?

◻ Monoko na peto ezali nini?

◻ Likoló na banani Sofoni 3:9 ekokani?

◻ Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingi solo monoko na peto?

[Elilingi na lokasa 23]

Baoyo bayebi monoko na peto bazali koyebisa yango epai na bazalani na bango

[Elilingi na lokasa 25]

Ata monoko na bango ya kobotama ezali nini, na mabelé mobimba ba Témoins de Jéhovah bazali koloba monoko na peto

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto