Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/5 nk. 10-14
  • Tozala na bomoko na nzela na monoko na peto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tozala na bomoko na nzela na monoko na peto
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Monoko oyo Nzambe azali kopesa lelo
  • Monoko na peto ezali nini?
  • Toyekola monoko na peto kozanga koumela
  • Monoko na peto mpo na mabota nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Lobá monoko na peto mpe zala na bomoi na seko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Olobaka ‘monoko ya peto’ malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Tólobaka “monoko na pɛto”
    Nzembo mpo na kokumisa Yehova
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/5 nk. 10-14

Tozala na bomoko na nzela na monoko na peto

“Boye, nakobóngola minoko na bato kino monoko na peto, ete nyonso babelela nkombo na Jéhovah mpe basalela ye na motema moko.”​—SOFONI 3:9, MN.

1. Bato basilá koyoka mongongo ya Jehovah Nzambe?

MONOKO na Jéhovah ezali peto. Kasi, bato basilá koyoka wana Nzambe azali koloba? Na ntembe te! Na ntango Mwana na ye, Yesu Klisto ayaki na mabelé, esili bongo koleka bikeke 9. Na ndakisa, ntango Yesu azwaki batisimo, mongongo na Nzambe moyokamaki, kolobáká ete: “Oyo Mwana na ngai na bolingo, nasepeli na ye mingi.” (Matai 3:13-17) Maloba oyo mazalaki solo mpenza, malobamaki na lokóta na bato. Yesu mpe Yoane Mobatisi bayokaki yango.

2. “Minoko . . . na baanzelu” oyo elobelami na ntoma Paulo, elakisi nini?

2 Mwa bambula na nsima, ntoma Paulo alobelaki “minoko na bato mpe na baanzelu.” (1 Bakolinti 13:1) Yango elakisi nini? Elakisi ete, longola bato, bikelamu ya elimo mpe balobaka. Ya solo, Nzambe mpe baanzelu balobanaka te na kosalela mongongo mpe maloba makoyokamaka oyo biso tokoki kososola yango. Mpo na nini? Mpo ete kopalangana na mongongo mpe lolenge oyo yango ekokótaka na matoi na bato oyo bazali na makoki na kokanga ntina na yango, esengi ebongiseli moko lokola oyo tozali na yango na mabelé, mingimingi mopepe oyo mozali kozinga mabelé.

3. Monoko na bato ebimaki ndenge nini?

3 Ndenge nini monoko na bato ebimaki? Bamoko bakolobaka ete, bankoko na biso basalaki liboso makasi ya kolobana kati na bango na kongánga lokola banyama. Totangi kati na mokanda moko mokomami na bato na mayele (Evolution, Life Nature Library) ete: “Esili koleka pene na bambula nkóto, nde moto​—makako . . . akómaki ntango mosusu na likoki ya kobimisa mwa maloba.” Nzokande, Ludwig Koehler, moto na lokumu oyo ayekoli lolenge lokóta na bato ebimaki, alobaki ete: “Monoko na bato ezali libómbami; ezali likabo na Nzambe, ekamwiseli.” Ee, monoko na bato ezali solo likabo na Nzambe, mpamba te ezali Nzambe nde apesaki monoko epai na Adam, moto na liboso. Mbala mosusu monoko yango ezali oyo eyaki kobéngama na nsima ete, Liebele. Ekómaki monoko na Bayisraele, baoyo bazalaki bakitani na “Abrame Moebele,” tata na mabota na sembo, ye mokitani na Seme oyo azalaki moko na bana na Noa, motongi na masuwa. (Genese 11:10-26; 14:13; 17:3-6) Lokola Seme azwaki lipamboli epai na Nzambe na nzela na esakweli, ekoki na kosukisa ete monoko na ye mobungaki te nsima wana Jéhovah Nzambe amonisaki nkanda na ye na ekamwiseli, esili bongo koleka bikeke 43.​—Genese 9:26.

4. Nimilodi azalaki nani, mpe ndenge nini Satan le Diable asalelaki ye?

4 Na eleko wana, ‘mokili mobimba mozalaki na lokótá to monoko bobele moko mpe na maloba na lolenge moko.’ (Genese 11:1) Ezalaki na mobali moko na nkombo Nimilodi, oyo azalaki “mobomi monene na nyama na kotemela Jéhovah.” (Genese 10:8, 9, MN) Satana, ekelamu ya elimo azangi komonana mpe monguna monene na bato, asalelaki ye mpo na kosala eteni ya lisangá na ye mabe awa na mabelé. Nimilodi alingaki ete akumisama, mpe lolendo na ye ezalaki na bopusi likoló na balandi na ye baoyo bamipesaki na botongi ndako moko molai koleka nyonso mosusu. Yango esalemaki na mokili ya Sineale. Engebene lisoló lizali na Genese mokapo 11, verset 4, balobanaki ete: “Tokende! Totonga mboka mpe ndako molai oyo nsongé na yango ekokóma na likoló, mpe tozalisa nkombo na lokumu mpo na biso mpenza ete topalangana na mokili mobimba te.” Mosala wana motemelaki etinda oyo Nzambe apesaki mpo na ‘kotondisa mabelé,’ esukaki ntango Nzambe abulunganisaki monoko ya batomboki. Lisoló ya Biblia elandi ete: “Jéhovah apanzaki bango longwa na esika wana, na bipai binso na mokili mpe batikaki kotonga mboka yango.” (Genese 9:1; 11:2-9) Mboka yango ebéngamaki Babele, to Babilone (“mobulungano”), “mpo ete ezali na esika wana nde Nkolo atyaki mobulu kati na lokóta na bato.”​—Beaumont.

5. (a) Eloko nini Nzambe apekisaki wana abulunganisaki monoko ma bato? (b) Tokoki koloba nini na ntina na monoko ya Noa mpe ya Seme?

5 Mobulungano ya ekamwiseli wana na monoko bobele moko oyo bato bazalaki koloba, epesaki nzela ete mabelé matonda, na boyokani na etinda oyo Nzambe apesaki epai na Noa. Epai mosusu, ebebisi mokano oyo Satana azalaki na yango mpo na kotya losambo na mbindo oyo bato nyonso basili kotombokela Nkolo Moyangeli na likoló mpe na mabelé, basengelaki kosalela ye. Ezali solo ete bato basili kotyama na nsé na Diable na kosaleláká mangomba na lokuta ndenge nyonso. Lisusu, basili kosalela bilimu mabe na kosaláká banzambe-mibali mpe banzambe-basi, na kopesáká yango nkombo na nkótá na bango mpenza, mpe na kosambeláká yango. (1 Bakolinti 10:20) Nzokande, lolenge oyo Nzambe bobele moko ya solo asalaki na Babele, epekisaki lingomba ya lokuta ezala na bomoko, oyo bato balingaki kopesa losambo na Diable, ye oyo amonani ete azalaki kolula yango. Na ntembe te, moyengebene Noa mpe mwana na ye Seme, bamikótisaki soko moke te na makambo mabe oyo masalemaki na mokili na Sineale. Ebongi bongo na kosukisa ete monoko na bango ebatelamaki, mpe ezali yango oyo mosembwi Abrame (to Abrahame) alobaki​—monoko oyo, na nzela na yango, Nzambe alobaki na Adam na elanga ya Edene.

6. Ndenge nini Jéhovah amonisaki ete akokaki kopesa likoki ya koloba minoko ndenge na ndenge, na mokolo ya Pantekote ya mobu 33?

6 Jéhovah, ye oyo abulunganisaki monoko na ebandeli na bato, akoki mpe kopesa likoki ya koloba na minoko ndenge na ndenge. Ezali yango nde asalaki na mokolo na Pantekote ya mobu 33. Totangi na Misala 2:1-11 ete, bayekoli soko 120 na Yesu Klisto bayanganaki kuna na “likoló na ndako” moko na Yelusaleme. (Misala 1:13, 15) Na pwasa, “lokito lokola lokito na kopepa na mopepe” eyokanaki longwa na likoló. “Ndémo lokola móto,” ebimaki mpe ekabwanaki. Bongo, bayekoli “batondaki na elimo santu mpe babandi kosolola na [minoko] misusu pelamoko elimo epesi bango maloba.” Kosaleláká minoko wana bazwaki na Jéhovah, bakómaki koloba na ntina na “misala minene na Nzambe.” Ezalaki ekamwiseli monene oyo esalaki ete Bayuda mpe bato na mabota mosusu oyo babongwanaki na lingomba ya Bayuda, baoyo bazalaki koloba minoko mikeseni mpe bautaki longwa mosika kuna na Mezopotami, na Ezipito, na Libya mpe Rome, bayokaki nsango ya bomoi!

Monoko oyo Nzambe azali kopesa lelo

7. Matomba nini mbele makozwama, soko bato balobi mpe basosoli monoko bobele moko na mabelé mobimba?

7 Mpo ete na lolenge na ekamwiseli Nzambe akoki kopesa bato likoki ya koloba minoko mikeseni, ekozala malamu te soko akosala ete monoko bobele moko molobama mpe mososolama na mabelé mobimba? Tala eloko ekopesa nzela na boyokani kati na libota na bato. Totangi kati na buku moko monene (The World Book Encyclopedia) ete: “Soki bato banso balobaki bobele monoko moko, mbele boyokani na makambo na nkita mpe na boyekoli mayele ezali mpenza malamu, mpe mabota mbèle bakozalana na boboto.” Ya solo, bato basili kopona soko minoko 600 mpo ete moko na yango ezala monoko mpo na bikólo nyonso ya mokili. Espéranto ezali moko na minoko yango oyo mozalaki na lokumu mingi: uta yango esalemaki na 1887, pene na milió zomi na bato bayekolaki yango. Kasi, bato balongi te mpo na koyokanisa bikólo nyonso na nzela na monoko moko oyo mokoki kolobama na mokili mobimba. Mikakatano mizali sé kokabola mokili na eleko oyo ‘bato mabe bazali sé kosala mabe koleka.’​—2 Timoté 3:13.

8. Ata soki bato bayekoli lelo koloba monoko moko na mokili mobimba, makambo nini makosila te, mpe mpo na nini?

8 Na mangomba, mobulungano mozali monene. Kasi, tosengeli nde kozela eloko mosusu epai na lisangá na mangomba ya lokuta ya mokili mobimba, oyo Biblia ebéngi yango, na sikisiki mpenza kati na mokanda ya Emoniseli ete, “Babilone monene”? (Emoniseli 18:2) Te, mpamba te “Babilone” elimboli “mobulungano.” Ata soki bato bakoyekola koloba monoko moko na mokili mobimba​—ata soki esalemi sika to ezali uta kala, lokola Alemá, Lingelesi, Lifalansé, to Rise​—mokili mokozala bobele na mikabwano kati na mangomba mpe kati na makambo mosusu. Mpo na nini? Mpo ete “mokili mobimba mozali kolala na nsé na nguya na ye oyo mabe,” Satan le Diable. (1 Yoane 5:19, MN) Ya solo, Satana azali ye oyo aleki na moïmi, mpe lokola na eleko na Nimilodi mpe ndako molai na Babele, azali koluka na lokoso nyonso ete bato nyonso basambela ye. Na yango, soko bato bazangi kokoka bakómi koloba monoko moko, wana mbele ekopesa nzela na Satana ete atya losambo mpo na ye na mokili mobimba. Kasi Jéhovah akopesa ye nzela soko moke te; mosika te, Jéhovah akotya nde nsuka na mangomba nyonso ya lokuta mapemami na Diable.

9. Na ndimbola nini bato ya mabota nyonso mpe mposo nyonso bazali koyanganisama?

9 Kasi tozali komona likambo moko: bato balingi malamu, baoyo bauti na mabota nyonso mpe na mposo nyonso, bazali uta sikawa kosangana na bomoko. Likambo yango liyokani na losambo na Nzambe, lizali kokokisama na lolenge oyo ye alingi. Lelo oyo, Nzambe azali kopesa bato likoki ya koyekola mpe koloba monoko bobele moko ya peto oyo mozali na mabelé. Monoko yango molobami mpenza kati na mokili mobimba. Mpe Jéhovah Nzambe azali kolakisa yango epai na ebele na bato bauti na mabota nyonso ya mabelé. Yango ezali kokokana ya elaká oyo Nzambe apesaki na nzela na Sofoni, mosakoli mpe motatoli na ye, ete: “Boye, nakobóngola minoko na bato kino monoko na peto, ete nyonso babelela nkombo na Jéhovah mpe basalela ye na motema moko.” (Sofoni 3:9, MN) Monoko na peto yango ezali nini?

Monoko na peto ezali nini?

10. Monoko na peto ezali nini?

10 Monoko na peto ezali solo ezwami kati na Liloba na Nzambe to Makomami Mosantu. Etaleli mpenzampenza solo na ntina na Bokonzi na Nzambe, oyo kati na bolamu mosusu oyo yango ekomema, ekopesa kimya epai na bato. Monoko na peto ezwi litɔno te na mabunga ya mangomba mpe na losambo ya lokuta. Ezali kosangisa baoyo nyonso bakolobaka yango na losambo na peto mpe na bulee oyo na Jéhovah, Nzambe ya solo mpe na bomoi. Na eleko na biso, pene na minoko 3 000 mizali kokanga nzela na bososoli kati na bato, mpe bankámá na mangomba ya lokuta mazali sé kotya bato ya ntango na biso kati na mobulungano. Yango wana tozali na esengo ete Nzambe apesi bato monoko na peto kitoko. Oyo nde mbongwana!

11. Monoko na peto ezali na bopusi nini likoló na bato ya mabota nyonso mpe mposa nyonso?

11 Ee, bato ya mabota nyonso mpe mposo nyonso bazali koloba malamu monoko na peto, oyo ezali nguya monene ya bomoko, mpo ete yango ezali monoko bobele moko mozali peto na elimo, moye molobami na mokili. Bango nyonso bakolobaka yango bakoki ‘kobelela nkombo na Jéhovah, mpo na kosalela ye na motema moko.’ Na bongo, bazali kosalela Nzambe “na mosala moko.” (TOB) Kati na libongoli Liloba lya Nzambe, Moyangeli na molóngó mobimba alobi boye ete: “Nakopetola mbebu ya bato ba bikolo binso na ntina ete banso bakumisa nkombo ya Yawe , mpe banso basalela ye na motema moko.”Na mokili mobimba mpe kati na minoko mingi, boyokani wana kati na mosala na Nzambe, ezali bobele epai na ba Témoins de Jéhovah. Lelo oyo, kati na mikili 212, koleka bamilió minei ya basakoli na Bokonzi wana, bazali kosakola nsango malamu kati na motuya monene ya minoko na bato. Atako bongo, ba Témoins bakolobaka “na motindo moko” mpe “basangani kati na elimo moko mpe na likanisi bobele moko.” (1 Bakolinti 1:10, MN) Ezali bongo mpo ete, ba Témoins de Jéhovah bakolobaka monoko na peto bobele moko mpo na kosanzola mpe mpo na kokumisa Tata na bango na likoló.

Toyekola monoko na peto kozanga koumela

12, 13. (a) Mpo na nini tosengeli kolinga koyekola monoko na peto? (b) Mpo na nini maloba oyo mazali na Sofoni 3:8, 9, mazali na ntina monene na eleko na biso?

12 Mpo na nini tosengeli kolinga koyekola mpe koloba monoko na peto? Kati na bantina mosusu, ezali mpo ete bomoi na biso etali yango. Jéhovah alobaki te: “Nakóbongola maloba na bato kino monoko na peto,” nzokande, mwa liboso na kopesa elaká wana, alobaki te: “Jéhovah alobi boye: ‘Bozila ngai, kino mokolo nakotelema mpo na kopunza. Mpamba te, nakani koyanganisa mabota, mpo na kosangisa bikonzi, ete nasopa nkele na ngai likoló na bango, ee nkanda na ngai nyonso; mpo ete na móto na zuwa na ngai, mokili mobimba mokozikisama.’”​—Sofoni 3:8, MN.

13 Esili koleka bikeke 26, wana maloba oyo ya Nkolo Moyangeli Jéhovah mayebisamaki mpo na mbala ya yambo na Yuda, mboka oyo Yelusaleme ezalaki kapitale na yango. Kasi, maloba wana matalaki mpenzampenza eleko na biso, mpamba te Yelusaleme ezalaki elilingi ya esakweli mpo na boklisto ya lokuta. “Uta Bokonzi ya likoló etyamaki na 1914, tozali kobika na ntango oyo Jéhovah azali koyanganisa mabota mpe kosangisa bikonzi. Asili koyanganisa bango nyonso liboso na ye na nzela ya mosala monene ya litatoli lipusaki bango na kotemela mokano na ye. Atako bongo, Jéhovah, Nzambe na mawa, azali kopesa bato ya mabota nyonso likoki ya koloba monoko na peto kati na bomoko. Na nzela na monoko wana, baoyo nyonso balingi kozala na bomoi kati na mokili ya sika oyo ye alaki, bakoki kosalela ye na bomoko liboso ete mabota nyonso mazikisama nyee kati na móto ya nkanda na Nzambe, na “etumba ya mokolo monene na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso,” oyo eyebani na nkombo Armagedon. (Emoniseli 16:14, 16; 2 Petelo 3:13) Na esengo mpenza, baoyo bakolobaka monoko na peto mpe bakobelelaka nkombo na Jéhovah elongo na kondima, na kosambeláká ye kati na bomoko mpe na solo, bakozwa libateli na ye wana kufa ekoya likoló na bato na mokili. Nzambe akomema bango na kimya kati na mokili ya sika epai kuna monoko na peto bobele moko mokolobama na bato nyonso.

14. Ndenge nini Jéhovah amonisaki na nzela na Sofoni ete, mpo na kobika na nsuka na biloko ya ntango oyo, esengeli kosala nokinoki?

14 Na nzela na mosakoli na ye, Sofoni, Jéhovah amonisi polele mpenza epai na baoyo balingi kobika na nsuka ya biloko mabe ya ntango oyo ete basengeli kosala noki Na Sofoni 2:1-3, Nzambe alobi ete: “Boyangana mpe bozala esika moko, ɛ libota liyoki nsoni te! Naino mobeko ebimi te, mokolo moleki lokola mpumbulu naino te; naino nkanda monene na Jéhovah eyeli bino te, naino mokolo na nkanda na Jéhovah eyeli bino te. Boluka Jéhovah, bino basokemi nyonso na mokili, baoyo bakosalelaka malako na Ye; boluka boyengebene, boluka bopolo, soko nde bokobómbama na mokolo na nkanda na Jéhovah.”

15. (a.) Kokokana ya yambo ya Sofoni 2:1-3 ezali nini? (b) Nani abikaki na ntango Nzambe apesaki etumbu likoló na Yuda, mpe bokokani nini tokoki kosala na eleko na biso?

15 Na kala, maloba oyo mazwaki kokokana ya yambo likoló na Yuda mpe likoló na Yelusaleme. Mpo ete batondaki na masumu, bato na Yuda bandimaki libyangi na Nzambe te, lokola yango emonisami na etumbu oyo Nzambe apesaki bango na nzela na Babilone, na mobu 607 liboso na ntango na biso. Lokola Yuda, “libota liyoki nsoni te” liboso na Nzambe, boklisto ya lokuta ezali “libota” oyo lizali kooka nsoni te liboso na Jéhovah. Kasi, bamoko kati na bato na Yuda mpe bato mosusu bandimaki liloba na Nzambe mpe babikaki. Kati na bango, totangi Yilimia, mosakoli na sembo na Jéhovah. Ezalaki mpe na Moetiopia moko na nkombo Ebede​—Meleke, lisusu mpe bakitani na Yonadaba. (Yilimia 35:18, 19; 39:11, 12, 16-18) Bobele bongo na eleko na biso, “ebele monene” ya “bampate mosusu” na Yesu, bayanganisami longwa na mabota nyonso. Bakobika na Armagedon mpe bakokóta kati na mokili ya sika ya Nzambe. (Emoniseli 7:9; Yoane 10:14-16) Bobele baoyo bazali koyekola mpe koloba monoko na peto nde bakozala kati na babiki wana na esengo.

16. Esengeli kosala nini mpo na kobómbama “na mokolo na nkanda na Jéhovah”?

16 Lokola apesaki etinda makasi ya koboma Yuda mpe Yelusaleme, Jéhovah asili kokáta ete boklisto ya lokuta esengeli kolimwa. Ya solo, kobomama ya mangomba nyonso ya lokuta ebelemi. Baoyo balingi kobika basengeli bongo kosala noki, “liboso ete mokolo moleka lokola mpumbulu,” epemami nokinoki na mopepe, lokola na ntango bakopupolaka mposo elongolami na mbuma na loso. Mpo na kobika na nkanda na Jéhovah, esengeli na biso koloba monoko na peto mpe kotalela likebisi na Nzambe liboso ete mokolo na nkanda monene na Jéhovah ekita likoló na biso. Na mikolo na Sofoni, lokola mpe na eleko na biso, basokemi bazali koluka Jéhovah, bazali koluka boyengebene mpe bazali koluka bopolo. Koluka Jéhovah elimboli kolinga ye na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na elimo na yo mobimba mpe na makasi na yo mobimba. (Malako 12:29, 30) “Soko nde [baoyo bazali kosala bongo] bokobómbama na mokolo na nkanda na Jéhovah.” “Soko nde” elobami mpo na nini? Mpo ete lobiko etaleli bosembo mpe mpiko ya moto na moto. (Matai 24:13) Baoyo bazali komiyokanisa na mitinda ya boyengebene na Nzambe mpe bazali koloba monoko na peto ntango nyonso, bango bakobómbama na mokolo na nkanda na Jéhovah.

17. Mituna nini misengeli mpe kotalelama?

17 Mpo ete mokolo na nkanda na Jéhovah mobelemi, mpe lokola mpo na kobika esengeli koyekola mpe kosalela monoko na peto, ezali ntango ya komipesa na boyekoli mpe na kosalela monoko na peto. Kasi ndenge nini tokoki koyekola monoko na peto? Mpe bolamu nini tokoki kozwa na yango?

Bozongeli

◻ Ndenge nini monoko na bato ebimaki?

◻ Monoko na peto ezali nini?

◻ Mpo na nini maloba mazali na Sofoni 3:8, 9, mazali na ntina monene na eleko na biso?

◻ Tosengeli kosala nini mpo na kobómbama “na mokolo na nkanda na Jéhovah”?

[Elilingi na lokasa 10]

Na Babele, Nzambe abulunganisaki monoko na bato mpe apalanganisaki bango

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto