Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/12 lok. 3
  • Beteleme elembo ya bolingo mpe ya bomoko na boklisto?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Beteleme elembo ya bolingo mpe ya bomoko na boklisto?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Masolo mosusu
  • Solo likoló na Beteleme mpe Noel
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Babosani Klisto na Noele?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Makambo oyo esalemaka na Noele ezali mpenza ya boklisto?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Kobotama ya Yesu—Ndenge makambo malekaki mpenza
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/12 lok. 3

Beteleme elembo ya bolingo mpe ya bomoko na boklisto?

“BETELEME . . . , ezali litatoli ya bolingo bozangi nsuka, ezali lilako ya komikitisa.”​—Maria Teresa Petrozzi, mokomi ya mokanda Bethléhem.

Beteleme emonani mpe bongo epai na yo? Mbala mosusu, mpo ete kati na mokili mobimba, bankóto na bamilio na bato ya motema sembo mpe ya kimya bazali komipesa na limemya mpenza epai na Beteleme, mingi mpenza na eleko ya Noél. Bakobanzaka likambo oyo ete Yesu Klisto, “Mokonzi na kimya” abotamaki na engumba wana moke ya Moyen-Orient. Na boumeli ya bikeke mingi, bato mingi bazali kokende mpo na kopesa lokumu na engumba yango, mpe mbala mosusu mpo na kosambela moko na bisika mosantu yo lokumu mingi na boklisto ya lokuta. Engebene masapo, Yesu abotamaki na esika oyo bakobengaka lilusu to mobenga ya Mbotamá. Libanga yango lizali na esika monene ya biloko na kala oyo ebengami ndako-nzambe ya Mbotamá.​—Yisaya 9:6; Matai 2:1.

Kasi, bisika wana bitalelami na masapo ete ezali mosantu, ezakaki mpenza ntei ya bomoko, ya bolingo mpe ya komikitisa mpo na boklisto? Okanisi boni mpo na likambo oyo lilandi?

Maria Teresa Petrozzi, ye oyo azali mokatolike, alobaki kati na mokanda Bethléhem ete: “Kobanda ekeke ya zomi-na-motoba, (Bethléhem) esili konyokwama mpenza na bitumba bisopi makila mingi, oyo ba Latins (bakatolike) babundaki elongo na Bagreke (ba orthodoxes) mpo na kowela bokonzi na ndako-nzambe ya Mbotamá.” “Bitumba yango bisopi makila mingi” oyo bizalaki kosalama mbala na mbala, ezalaki kobima likoló na monzoto na palata kati na lilusu to mobenga ya Mbotamá, oyo ezali na nsé na ndako-nzambe. Balobi ete monzoto yango ezali mpenza komonisa esika ya solo oyo Yesu abotamaki. Kati na mokanda L’église de la Nativité, Bethléhem (angl.), R. Hamilton alobi boye: “Toyebi malamu mpenza ete koswana oyo ekótisaki France mpe Russie na etumba makasi, ebimaki kati na makambo mosusu, likoló na makambo mibale oyo: liboso, mpo na kozala na lotomo ya kozwa bafungola ya bikuke minene ya ndako-nzambe (mobenga ya Mbotamá); lisusu mpo na boyibi na kokamwa oyo basalamaki na butu moko ya mobu 1847, oyo bayibaki monzoto na palata oyo mozalaki na makomi ya latin, oyo mobákámáki na linzanza lityamaki na nsé na etumbelo ya Mbotamá.”

Nsima na bikeke mingi ya matáta mazalaki kolandana kati na mangomba mingi oyo mazalaki kowelana likoló na esika yango, “sikawa lotomo esili mpenza kopesama na lingomba moko na moko. Na ndakisa, kati na miinda 53 oyo mizali na lilusu yango, 19 esili kopesama na ba Franciscains. Etumbelo ya Mbotamá ezali mpo na Bagreke, mpe ba latins bapesameli lotomo ya kosala misa na bango te.”​—Sites historiques d’lsraél (angl.)

Na eleko ya Noel, soko makambo ya politike mapesi nzela na yango, lingomba moko na moko ya boklisto ya lokuta oyo ezali na Beteleme, ekosalaka misa ya Noel mpe ekobongisaka lifili na yango mpo na kotambola na engumba mobimba. Le 24 mpe le 25 Décembre, ba latins bakosalaka lifili mpe bakosalaka misa ya katikati na butu na ndako-nzambe Sainte-Catherine, oyo ezali pene na ndako-nzambe ya Mbotamá, oyo ekabolami lelo na mangomba ya orthodoxe ya Bagreke mpe orthodoxe ya ba arméniens. Mangomba na orthodoxe ya Bagreke, ya Basirié mpe ya Baezipito ezali kosala misa na bango ya Noel na le 6 Janvier. Lingomba ya orthodoxe ya ba arméniens ekosalaka yango na le 18 Janvier, mpe lifili na le 19 Janvier.

Oyo touti komona elakisi mpenza ete bisika mosantu wana ya bonkoko na Beteleme, ezali ‘litatoli ya bolingo bozangi nsuka, mpe ya lilako mpo na komikitisa’? Na epai mosusu, ezali nde komonisa solo likoló na makambo malekaki na ntango Yesu abotamaki? Na ndakisa, ntango nini abotamaki? Abotamaki mpenza na esika oyo babengi lelo, mobenga ya Mbotamá? Tosengeli kosambela esika ya mbotama na ye?

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]

Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto