Solo likoló na Beteleme mpe Noel
“WANA tokokanisaka likoló na makambo ya kokamwa ya Beteleme, mituna mpe ntembe ekoyaka na makanisi na biso.”—Bethléhem, ya Maria Teresa Petrozzi.
Mbala mosusu okomituna ete, ‘mpo na nini kozala na mituna mpe na ntembe.’ Nsima na kotalela makambo nyonso, bindimeli ndenge na ndenge na ntina na Noel mpe bisika oyo bizali na boyokani na feti yango ezwi moboko likoló na solo. Boye te?
Ntango nini abotamaki?
Likoló na date ya mbotamá na Yesu, Maria Teresa Petrozzi atuni motuna oyo ete: “Ntango nini Mobikisi abotamaki? Tosengeli koyeba bobele mobu mpamba te, kasi lisusu sanza, mokolo mpe ngonga. Nzokande, biloko wana nyonso bipesameli biso na sikisiki te.” Mokanda Nouvelle Encyclopédie catholique (angl.) endimisi likanisi yango na maloba oyo ete: “Tokoki te kosala mpenza mituya mpo na koyeba date ya kobotama na Yesu na sikisiki.” Mpe likoló na date oyo bapesaki mpo na kobotama na Klisto, totangi ete: “Le 25 Décembre ekokani te na mbotamá na Klisto, kasi nde na feti ya Natalis Solis lnvicti, feti oyo Baloma bazalaki kosala mpo na Moi, na mbula na mbula.”
Mbala mosusu okomituna lisusu ete: ‘Soki Yesu abotamaki na le 25 Décembre te, abotamaki bongo ntango nini?’ Na kotangáká Matai 26 mpe 27, tozali kokanga ntina ete Yesu akufaki na eleko na Pasika ya Bayuda, oyo ebandaki na le l er Avril ya mobu 83 ya ntango na biso. Lisusu, Luka 3:21-28 ezali koyebisa biso ete Yesu azalaki pene na mibu 30 wana abandaki mosala na ye. Lokola mosala na ye awa na mabelé eumelaki mibu misato na ndambo, na bongo azalaki pene na mibu 38 na ndambo na ntango akufaki. Klisto nalingaki kokokisa mibu 34 sanza motoba na nsima, elingi koloba penepene ya le ler Octobre. Soko tokozonga nsima mpo na koyeba ntango oyo Yesu abotamaki, tokokóma na le 25 Décembre te to le 6 Janvier mpe te, kasi pene na le l er Octobre ya mobu 2 liboso ya ntango na biso.
Tosimba lisusu boye ete, na Décembre ezali eleko ya mpio mingi (hiver) na Beteleme, elongo na bambula ya ngalása (glaces) mpe mbala mosusu na mbula mpembe. Na eleko wana, na butu, okoki te kokuta babateli na mpate elongo na bitonga na bango libanda. Ezalela yango ebandi sikawa te. Makomami malobi ete Yoyakimi, mokonzi na Yuda, “azalaki kofanda na ndako-na-mpio, na sanza ya libwa (Kislev, ekokani na Novembre-Décembre), mpe fulu na móto ezalaki kopela liboso na ye.” (Yilimia 36:22, MN) Azalaki na mposa ya móto mpo na koyotola. Na epai mosusu, Esdras 10:9, 13 epesi biso endimiseli mosusu ete sanza ya Kislev ezali “eleko ya mbula mingi, mpe nzela ya kotikala libanda ezali te.” Nyonso wana emonisi ete ezalela ya ntango, oyo ezali na Beteleme na Décembre, ezali na boyokani te elongo na lisolo oyo lisalami na Biblia mpo na makambo oyo malekaki na ntango Yesu Klisto abotamaki.—Luka 2:8-11.
Na esika nini?
Lolenge nini tosengeli kotalela esika oyo ezalaki eloko na kowela oyo ebimisaki etumba makasi (na 1853 kino 1856), matata masopaki makila mingi oyo mabomaki basoda ba Français koleka nkóto nkámá? Ezali mpenza na esika yango nde Yesu abotamaki?
Libosoliboso, Biblia elobeli esika oyo Yesu abotamaki na sikisiki te. Matai mpe Luka balobeli bobele ete, mbotama na Yesu ekokisi esakweli oyo ekomami na Mika 5:2 (MN), oyo esakolaki ete “ye oyo akozala mokoló na Yisraele, oyo ebandeli ezali uta kalakala,” akouta na Beteleme. (Matai 2:1, 5; Luka 2:4) Kasi, lisolo ya Nsango malamu elobeli bobele makambo ya ntina mpenza, elingi koloba ete Yesu abotamaki na Beteleme, mpe, engebene Luka, mwana azingamaki na bilamba mpe alalisamaki na elyelo ya bibwele.—Luka 2:7.
Mpo na nini bakomi na mikanda ya Nsango malamu balobelaki makambo nyonso na bolai te? Maria Teresa Petrozzi amonisi ete: “Na lolenge emonani, soki bakomi na mikanda ya Nsango malamu balobeli makambo nyonso na bolai te, ezali mpo ete batalelaki yango lokola ete ezangi ntina.” Ya solo, emonani ete Yesu ye moko apesaki motuya na makambo matali mbotamá na ye te, mpamba te esika moko te balobi ete apesaki date ya sikisiki to mpe esika. Atako abotamaki na Beteleme, Yesu atalelaki esika yango lokola mboka na ye te; ezali Galilé nde ebengamaki “mboka na ye mpenza.”—Malako 6:1, 3, 4; Matai 2:4, 5; 13:54.
Botangi ya Yoane 7:40-42 emonisi ete bato mingi bayebaki te ete abotamaki na Beteleme, kokanisáká ete azalaki Mogalilé: “Bamoko balobaki ete: ‘Klisto akobima nde na Galilé?”’ Kotaleláká makambo oyo makomami na Yoane 7:41, mokanda L’église de la Nativité, Bethléhem esukisi na maloba oyo ete: “Masolo motindo oyo mazali mpo na kowangana te ete Klisto abotamaki na Beteleme te; kasi masolo yango mazali komonisa ete mwa mingi na baninga na ye bayebaki likambo yango te.”
Emonani polele ete, na boumeli ya mosala na ye awa na mabelé, Yesu alobaki te na bolai mpo na esika oyo ye abotamaki mpe na makambo malekaki na ntango yango. Bongo, endimeli oyo ete mobenga ya Mbotamá ezali esika epai kuna Yosefe amemaki Maria mpo na kobota Yesu, etongami likoló na nini?
Mme Petrozzi alobi na sembo nyonso ete: “Toyebi mpenza malamu te soki mobenga yango ezalaki moko na ebele ya madusu kati na mabanga na esika yango, oyo mazalaki zingazinga ya Beteleme, to mobenga oyo mosalelamaki lokola esika ya kolalisa bibwele. Kasi, masapo ya ndambo na ekeke ya mibale ezalaki koloba na sikisiki; ezalaki mpenza mobenga epai bazalaki kobomba bibwele.”—Biso nde tolalisi liloba masapo.
Lisapo mpamba
Maria Teresa Petrozzi mpe R. Hamilton, mpe bato mosusu oyo bayekolaki lisolo ya Beteleme, bamonisi ete na ekeke ya mibale, Justin azalaki moto ya liboso oyo alobaki ete Yesu abotamaki kati na mobenga to lilusu kati na kozanga mpenza kolobela libanga nini na sikisiki. Tala oyo Hamilton akanisi na ntina na maloba ya Justin: ’’Ezali bobele likanisi mpamba, mpe koloba ete santu Justin azalaki kokanisa libanga moko boye, mpe mingi mpenza, lilusu oyo libengami lelo ete mobenga ya Mbotamá, mbele ekomema biso mosika kati na litatoli ya mbala moko.’’
Kati na mokanda moko, Hamilton akomaki ete: “Lisolo ya Mbotamá oyo tozali kokuta kati na ‘mokanda ya Yakobo,’ to ‘Nsango malamu ya liboso,’ mokanda oyo mopemami te ya eleko wana, ezali mpe kolobela lilusu kati na libangá, kasi elobi boye ete libanga yango lizali na nzela mpo na kokende na Beteleme. Ata soko ezali na motuya nini kati na Lisolo na bato, lisolo oyo limonisi ete lisapo moko esalemaki naino te mpo na esika moko ya sikisiki, mpe esalamaki mpenza te mpo na mobenga ya Mbotamá.”
Origéne mpe Eusèbe, bakomi ya mangomba ya ekeke ya misato, bakokisaki lisapo na lolenge oyo eyebani lelo, na esika moko ya sikisiki. Tala likanisi ya Hamilton: “Nsima wana lisolo oyo likokisamaki mpenza na libanga ya sikisiki, nzela ya kolongola lisusu likanisi yango ezalaki te; tokoki bongo kosukisa kozanga nkaká ete, lilusu na libangá oyo bazalaki kolakisa epai na bapaya nsima na mobu 200 ezali mobenga ya Mbotamá ya mikolo na biso.”
Mokanda Promenades dans Jérusalem et ses environs (angl. 1842), ya W. Bartlett, epesi likanisi oyo na ntina na mobenga yango ete: “Atako lisapo oyo engebene yango ete ezali esika ya mbotama ya Mobikisi na biso eumeli mwa mingi, mpo ete santu Jérôme, ye oyo afandaki mpe akufaki na ndako na basángó oyo ezali mosika te na esika yango, alobelaki yango, nzokande ezalela ya bisika yango endimisi likanisi wana te. Na yango, atako na Palestine bazalaki kosalela malusu kati na mabanga lokola esika ya kobómba bibwele, nzokande mobenga yango moleki mozindo mingi, ekokaki kobonga na mosala wana te. Lisusu, soki tokobanza na likanisi oyo ete basángó bakokomaka makambo ya ntina mingi ya Makomami ete masalelamaki kati na malusu ya mabangá, mbala mosusu mpo ete bisika yango bikobendaka likebi, makanisi oyo mazali kokweisa esika wana ezali ntango mosusu solo.”
Tokosukisa boni na ntina na litatoli na kala oyo tozali na yango lelo, mpe oyo eleki ntina mpenza, likambo oyo ete kati na Makomami ata Yesu, ata bayekoli na ye, bapesaki lokumu te na esika abotamaki? Elobami ete, ntango mokonzi-mwasi Hélène, mama ya constantin le Grand, aponaki esika mpo na kotonga ndako—nzambe ya Mbotamá na mobu 326 ya ntango na biso, engebene Hamilton, mokonzi-mwasi wana alandaki lisapo na kala, kasi alandaki te bilembeteli bizwami na lisolo mpenza to na Biblia.
Tokoki bongo kosukisa ete esika ya solo ya kobotama na Yesu eyebani te. Na yango, ezali mpenza sembo ete bandimi ya mangomba bakendeke kopesa lokumu na bisika lokola mobenga ya Mbotamá mpe kosambela yango? Soki yango esɛngisamaki na baklisto, mbèle Yesu ye moko ayebisaki te lisengami wana to mposa na ye wana epai na bayekoli? Mbèle ekomamaki te kati na Liloba na Nzambe, Biblia, mpo ete bato nyonso bayeba yango? Lokola bilembeteli motindo oyo bizali te kati na Makomami Mosantu, tokoluka koyeba likambo oyo Yesu andimaki ete esalemaka.
Tolukiluki mingi, kasi molulu bobele moko oyo bayekoli na Yesu basengeli kosala mbula na mbula ezali bobele liwa oyo akufaki lokola mbeka. Akufaki na printemps, mwa ntango moke nsima wana asalaki Elekeli ya nsuka elongo na bayekoli na ye. Na libaku yango, apesaki epai na bayekoli na ye ya sembo bilei bizalaki na ntina mingi; ezalaki bongo limpa ezangi mfulu, to limpa lizangi levire, mpe vinyo motané. Kolobáká na ntina na molulu wana mozangi mindondó, oyo masalamaki mpo na mbala ya liboso na le l er Avril ya mobu 33, Yesu apesaki etinda oyo ete: “Bosalaka boye mpo na ekaniseli na ngai.—Luka 22:19, 20.
Kotosáká na etinda wana na Yesu oyo ezali kati na Makomami, na mbula na mbula ba Témoins de Jéhovah ya mokili mobimba bakosalaka Ekaniseli, kokanisa liwa oyo Klisto akufaki lokola mbeka. Bakosalaka eyanganelo wana na boklisto na mboka Yelusaleme te, kati na eteni ya ndako na likoló to étage, mpamba te Yesu alakisaki esika na sikisiki te. Kasi, bipai nyonso na mokili, ba Témoins bakoyanganaka kati na ba Salles du Royaume to na bisika mosusu oyo bimonani malamu. Ekaniseli ya mobu mozali koya ekosalema na le 30 Mars 1991, nsima na kolala na moi. Soki olingi kozanga na molulu yango te, kende na Salle du Royaume ezali pene na esika ofandi.
Mpo na koyangana na molulu wana ya ntina mingi, ozali na mposa te ya kokende na Yelusaleme to na Beteleme. Ezala Yesu ata mpe bayekoli na ye, bayebisaki te bisika ya sikisiki mpo na losambo na boklisto. Na kokesana, Yesu alobaki epai na mwasi mosamarité moko oyo ntei ya losambo na bango ezalaki na ngomba Gerizime, na Samaria, na Nord na Yelusaleme ete: “Mwasi, ndima ngai, ntango ekoya oyo bokosambela Tata na ngomba oyo te to na Yelusaleme mpe te. Kasi ntango ekoya, ee esili koya, oyo basambeli na solo bakosambela Tata na elimo mpe na solo, mpo ete Tata akolukaka motindo na basambeli oyo.”—Yoane 4:21, 23. MN.
Losambo ya baoyo bakosambelaka Tata na elimo mpe na solo etaleli esika ya sikisiki te, lokola Beteleme, etali mpe biloko na losambo te, lokola bikeko. Ntoma Paulo alobaki ete: “Awa ezali biso kati na nzoto, tozali mosika na Nkolo, mpamba te tokotambolaka na kondima, nde na komona te.”—2 Bakolinti 5:6, 7.
Kasi, mbala mosusu okomituna ete, ndenge nini kosambela Nzambe na lolenge oyo lokosepelisa ye? Mbala ya nsima oyo Témoin de Jéhovah moko akoya kotala yo, tuna ye motuna wana.
Na eleko na mpio (hiver), pene na beteleme, ntango mosusu mabelé makozipamaka na mbula mpembe. Babateli na mpate bakokaki nde kolála libanda elongo na bameme na bango?
Ndako-nzambe ya Mbotamá na Beleteme mpe mobenga na yango na nsé na mabelé