Mpo na nini bato mingi bazali kosepela lisusu na mangomba te?
“MOTO oyo azangi lingomba akokani na ndako ezangi lininisa.” Ezali motindo wana nde Mojaponé moko, kolobáká na mwana na ye, amonisaki ntina ya kongengisama na lingomba. Mwana na ye na nkombo Mitsuo, azwaki maloba ya tata na ye na motuya te. Mpe bato bazali sé mingi baoyo bazali kosala lolenge moko na Mitsuo, ezala na Japon to na bipai mosusu. Basepeli bobele kozala ‘bandako ezangi maninisa,’ na koboyáká mpenzampenza ete pole ya lingomba ekota kati na bomoi na bango.
Yango wana, kati na ankete moko esalemaki na etando monene na mokili ya Japon, 69% ya bana-mboka balobaki ete bazali komiyoka kobendama te epai na lingomba Mingi mpenza ezalaki bilenge. Ezali mpe motindo moko na Thaïlande, mokili oyo moyebanaki na ntango na kala mpo na losambo na yango makasi epai na Buda; 75% ya bafandi na bingumba minene bazali kokende lisusu te kati na ba temples ya Buda. Na Angleterre, na boumeli ya mibu 30 oyo miuti koleka, ndambo na mwambe ya bandakonzambe ya mokili wana ekangamaki mpo ete ezalaki kosalelama lisusu te.
Ezali solo ete na Japon, milulu ya mangomba mizali kino lelo oyo. Kasi ezali kokokisa mosala moko na oyo ya esika monene na mombóngo; basalelaka yango bobele na mwa mabaku moke—na ntango ya libala to na milulu ya kokunda ebembe. Bato bazali kokangama na lingomba mpo na pole ya elimo te, kasi mpo ete lingomba ezali kolanda kosalela malako na bonkoko mpe ezali kobatela libula ya libota. Mpo na bato mingi, lingomba ezali bokosi, nkisi mabe oyo esalemi mpo na baoyo bazangi nguya to na bato oyo bazangi makambo ya kosala; na miso na bango, lingomba ekoki kopesa bolamu ya solo soko moke te. Bamosusu bakolobaka ete, ‘lingomba ezali malamu soki ntango emonani mpo na yango to soki mposa eyokani, nzokande moto asengeli kotya elikya bobele epai na ye moko mpo na kozala na bomoi malamu to mpo na kosilisa makambo matali mosolo.’
Makambo nini mazali kobimisa kozanga bosepeli wana? Tokoki kopesa bantina mingi. Yambo mpenza, ezali bopusi ya esika moto afandi. Bilenge mingi bayebi bobele makambo moke na ntina na lingomba, mingi bateyami bobele moke. Lokola bato ya ntango oyo bamipesi mingi na balukiluki na biloko ya mosuni, ezali likambo ya kokamwa te na komona ete wana ezali bango kokola mpo na kokóma mikoló, mingi bakokómaka na mposa makasi ya mosolo.
Na mikili misusu, bato baboyi lingomba likoló na etamboli mabe ya bateyi oyo bakolekaka na télévizio, bango bato na lokósó mpe bato na pite to likoló na bakonzi minene ya mangomba mosusu, mpe likoló na kosangana ya lingomba kati na makambo ya politike mpe molende na bango mpo na bitumba. Oyo ekómelaki lingomba ya Shintō na Japon, ezali komonisa likambo oyo touti kolobela. Mokanda Encyclopédie des religions du Japon (angl.) emonisi ete “lokola etumba [Etumba ya Mibale ya mokili mobimba] esukaki mabe na 1945, bandako-nzambe ya Shintō ezwaki lisusu bato te.” Lingomba ya Shintō oyo epusaki mpenza bato mingi na etumba mpe elakaki bango elónga, elembisaki bato.
Longwa na yango nde filozofi oyo eboyi kondima ete Nzambe azali to mpe Buda azali, epalanganaki nokinoki.
Tosengeli bongo komipesa na makanisi ya moimi mpe makanisi mazangi bososoli na komibanzabanza bobele mpo na makambo oyo tozali komona? Bato mingi bazali na elimo ya koluka koyeba makambo. Balingaka koyeba soko bauti wapi, epai wapi bazali kokende, mpo na nini bazali awa na mabelé mpe ndenge nini basengeli kotambwisa bomoi na bango. Elikya ekoki kopesa bango bolamu mingi mpenza. Moto akoki kosuka te bobele na kopengola makambo oyo mataleli bomoi na ye, to koluka kobosana yango na kolobáká ete “makambo yango mayebani mpenza te.” Ata Bertrand Russell, ye mopakano oyo andimisamaki, alobaki ete “koluka eloko moko oyo ezali komonana te na mokili, ezali mpasi monene, mpe ekonyokolaka mingi mpenza.” Lingomba ya solo ekoki kosilisa bolukiluki wana. Kasi ndenge nini? Ntina nini tozali kokanisa ete ezali na lingomba moko libongi na kotalelama lokola eloko na ntina mingi?