Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/2 nk. 10-14
  • Tokumisa Jéhovah: ndenge nini mpe mpo na nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tokumisa Jéhovah: ndenge nini mpe mpo na nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kopesa lokumu elimboli nini?
  • Mpo na nini Jéhovah abongi kokumisama
  • Lolenge oyo tosengeli kokumisa Jéhovah
  • Tokumisa bato nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Pesáká lokumu na baoyo babongi na yango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Bópesaka basusu lokumu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Ozalaka moto ya liboso na kopesa bandeko bakristo lokumu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/2 nk. 10-14

Tokumisa Jéhovah: ndenge nini mpe mpo na nini?

“Baoyo bakokumisa ngai, ngai nakokumisa bango; bakotyola ngai, ngai mpe nakatanga bango mpamba.”​—1 SAMWELE 2:30.

1. Banani bakozwaka prix Nobel, oyo ezali na lokumu mingi na mokili mobimba, mpe bato bakotalelaka yango lolenge nini?

Mibu nyonso, bibongiseli minei ya mikili ya Scandinavie bikopesaka prix Nobel ‘epai na baoyo, na boumeli ya mbula eleki, basalaki makambo kitoko mpo na bolamu ya bato banso.’ Lifuta yango ezali mbano mpo na milende mpe matomba oyo bakokisaki kati na makambo motoba. Na makanisi ya bato mingi, ezali mpenza lokumu monene mpo na moto na kozala na libaku ya kopesamela prix Nobel.

2. Baoyo bakopesaka prix Nobel bazali kobosana kokumisa Nani, mpe mpo na nini moto yango abongi mpenza na lokumu?

2 Ya solo, mabe moko ezali te na kopesa lokumu epai na bato oyo babongi na yango, kasi baoyo bakopesaka lokumu wana, basila kokanisa kokumisa Mosali monene na malamu epai na bato, oyo aleki bato nyonso? Pene na mibu 6 000 uta azalisaki babalani ya liboso, Moto yango azali sé kopesa bolamu mingi epai na bato. Atako bongo, bobele bato moke nde bazali kokumisa ye; likambo oyo lizali kokundwela biso maloba mabimisamaki na Elihu, moninga na Yobo: “Nzokande moto te asili koloba ete: ‘Wapi Nzambe, Motongi na ngai monene, ye oyo akoyembisaka nzembo kitoko kati na butu?’” (Yobo 35:10, MN) Mosali malamu monene mpo na biso, azali kolanda kosala ‘malamu, mpe kopesa biso mbula longwa na likoló mpe bileko ya kobota mbuma mingi, kotondisáká mitema na biso na bilei mpe na esengo.’ (Misala 14:16, 17; Matai 5:45) Jéhovah azali mpenza Ye oyo akopesaka “makabo manso malamu mpe makabo manso mabongi.”​—Yakobo 1:17.

Kopesa lokumu elimboli nini?

3. Maloba nini ya hébreu mpe ya greke mabongolami na “lokumu,” mpe ndimbola na yango ezali nini?

3 ka·vohdhʹ, liloba ya liboso na hébreu oyo libongolami na lokumu, na polele mpenza, elimboli “bozito.” Na yango, moto akumisami atalelami lokola moto na kilo, moto oyo azali na bopusi, moto oyo azali na ntina monene. Epai mosusu, ka·vohdhʹ, ezali mbala mingi kobongolama kati na Makomami na “nkembo,” likambo oyo likomonisaka lokumu to motuya mopesami na moto oyo akumisami. Ezali na liloba mosusu ya hébreu, yeqarʹ, oyo mbala mosusu likobóngolamaka na “lokumu” kati na Biblia, libongolami mpe lisusu na “motuya mingi” mpe na “biloko na motuya.” Na yango, kati na Makomami na hébreu, liloba oyo lilimboli lokumu lizali na boyokani elongo na nkembo mpe na eloko oyo ezali na motuya mingi. Liloba na greke likokani na “lokumu” kati na Biblia, ezali bongo ti·meʹ; yango mpe elimboli limemya, motuya, ntalo mingi.

4, 5. (a) Kokumisa moto elimboli nini? (b) Lolenge nini lisoló liyebisami na Estere 6:1-9 lizali kosalisa biso na kolimbola yango?

4 “Na yango, bakokumisaka moto na kosepeláká na ye mpe na kozaláká na limemya mozindo mpo na ye. Likambo oyo likómelaki Moledekai, mosembwi oyo lisoló na ye lilobelami kati na Biblia, ezali kosalisa biso na kolimbola likambo yango. Mokolo moko, Moyuda wana abimisaki sekele ya mwango mabe oyo mosalamaki mpo na koboma Asueruse, mokonzi ya Perse ya kala. Na nsima, na butu moko oyo mokonzi azangaki mpongi, amikundolaki likambo ya Moledekai. Mpe atunaki na basali na ye ete: “Nkembo nini, soko lokumu nini epesameli Moledekai mpo na likambo oyo?” Bayanolaki ye ete: “Likambo lisalami mpo na ye te.” Tala likambo na kokamwa. Moledekai abikisaki bomoi ya mokonzi, kasi mokonzi amonisaki botondi te!​—Estere 6:1-3.

5 Wana ntango ekokaki, Asueruse atunaki Hamana, ministre na ye ya yambo soko likambo nini likoki kosalema mpenza mpo na kokumisa moto oyo mokonzi asepeli na ye. Nokinoki, Hamana alobaki kati na motema na ye ete: “Mokonzi akosepela kokumisa nani liboso na ngai?” Hamana ayanoli bongo ete esengelaki kolatisa moto yango “bilamba ya mokonzi” mpe komatisa ye likoló na ‘mbalata to mpunda oyo mokonzi asili kotambola na yango.’ Na nsuka alobaki ete: “Tika mpe ete batambolisa ye likoló na mbalata na nzela monene ya mboka mpe konganga liboso na ye ete: ‘Ekosalema boye epai na moto oyo mokonzi alingi kokumisa ye.’” (Estere 6:4-9) Moto oyo akumisami bongo akozwama na kilo mingi epai na bato banso.

Mpo na nini Jéhovah abongi kokumisama

6. (a) Nani abongi na lokumu koleka bato nyonso? (b) Mpo na nini liloba “monene” libongi mpenza na Jéhovah?

6 Na boumeli ya Lisoló na bato, mbala mingi bato basili kozwa lokumu oyo, nkutu babongaki na yango te. (Misala 12:21-23) Kasi, nani abongi mpenza kokumisama koleka bato nyonso mosusu? Na ntembe te, ezali Jéhovah Nzambe! Ezali bongo mpo ete ye azali mpenza “monene.” Nkutu liloba oyo lizali mbala mingi kosalelama mpo na komonisa ye. Azali Monene, Motongi monene, Mozalisi monene, Mokonzi monene, Molakisi monene, Nkolo aleki monene. (Nzembo 48:2; Mosakoli 12:1; Yisaya 30:20; 42:5; 54:5; Hosea 12:14) Ye oyo azali monene azali mpe na lokumu mingi, akoki, atombwani, azali mozwi, elombe mpe akobangisaka. Jéhovah akokisami na mosusu te mpe akokani na moto te; aleki mpenza likoló. Ye moko amonisi yango na kolobaka ete: “Bokokokanisa ngai na nani? Bokozalisa ngai lolenge moko na nani? Bokomekanisa ngai na nani ete tozala motindo moko?”​—Yisaya 46:5, MN.

7. Soko pene na makambo boni oyo tokoki koloba ete Jéhovah Nzambe akokani na moto moko te, mpe mpo na nini ezali solo na ntina na bokonzi na ye?

7 Jéhovah Nzambe akokani na mosusu te kati na makambo soko nsambo, maye mazali kolakisa biso bantina oyo tosengeli kokumisa ye. Yambo mpenza, abongi na lokumu loleki monene mpo ete bokonzi na ye bokokani na mosusu te. Nkolo Jéhovah azali Moyangeli monene ya molóngó mobimba. Azali Mosambisi na biso, Mokeli na mibeko mpe Mokonzi na biso. Moto nyonso na likoló to na nsé, akosamba liboso na ye, kasi ye akosamba liboso na moto moko te. Makomami mazali komonisa ye na sembo nyonso lokola Moto oyo azali “monene, makasi mpe akobangisaka.”​—Deteronome 10:17; Yisaya 33:22; Danyele 4:35.

8. Mpo na nini tokoki koloba ete (a) etelemelo ya Jéhovah ekokani na oyo ya moto mosusu te? (b) bomoi na ye ya seko ekokani na oyo ya moto mosusu te?

8 Ya mibale, Jéhovah Nzambe abongi na lokumu monene mpo ete etelemelo na ye ekokani na mosusu te. Azali “Ye oyo azali likoló mpe atombwani”; azali Ye oyo aleki likoló. Azali likoló mpenza koleka bikelamu nyonso ya mabelé. (Yisaya 40:15; 57:15; Nzembo 83:18) Ya misato, tosengeli kokumisa Jéhovah Nzambe koleka moto nyonso mosusu mpo ete bomoi na ye ya seko bokokani na mosusu te. Bobele ye nde azangi ebandeli; azali seko na seko.​—Nzembo 90:2; 1 Timote 1:17.

9. Na ndimbola nini Jéhovah akokani na moto mosusu te mpo na oyo etali (a) nkembo na ye? (b) bizaleli na ye minene?

9 Ya minei, Jéhovah Nzambe abongi na lokumu monene na ntina na bonene ya nkembo oyo ezali bobele mpo na ye moko. Azali “Tata na moi.” Kongenga na moi ekoutaka longwa na ye, na boye ete moto akoki komona ye te mpe atikala na bomoi. Azali mpenza kobangisa. (Yakobo 1:17; Exode 33:22; Nzembo 24:10) Ya mitano, tosengeli kopesa lokumu monene epai na Jéhovah Nzambe, mpamba te bizaleli na ye bizali kitoko mingi. Atondi na bokasi, azali na nguya nsuka te; mayele na ye ezali na ndelo te, azali na boyengebene ya kokoka; mpe ye mpenza azali bolingo.​—Yobo 37:23; Masese 3:19; Danyele 4:37; 1 Yoane 4:8.

10. Na ndimbola nini Jéhovah akokani na moto mosusu te mpo na oyo etali (a) kozalisa na ye mpe bozwi na ye? (b) nkombo na ye mpe lokumu na ye?

10 Ya motoba, Jéhovah Nzambe abongi na lokumu monene na ntina na biloko kitoko oyo ye asili kozalisa. Azali Mozalisi, mpe na yango, azali Nkolo monene ya biloko binso, ezala na likoló to awa na nsé. Totangi na Nzembo 89:11 ete: “Lola ezali na yo, mpe nsé lokola.” Ya nsambo, Jéhovah Nzambe na biso abongi kokumisama koleka moto nyonso mosusu mpo ete, nkombo na ye ekokani na mosusu te. Bobele ye nde azali na nkombo Jéhovah, oyo elimboli “Akoyeisaka.”​—Tala Genese 2:4, note na Traduction du monde nouveau, ebimeli ya Lingelesi ya 1984, oyo ezali na références.

Lolenge oyo tosengeli kokumisa Jéhovah

11. (a) Na mitindo nini tokoki kokumisa Jéhovah? (b) Lolenge nini tokoki mpenza kokumisa Jéhovah na kotyáká motema epai na ye?

11 Wana ekotalelaka biso bizaleli nyonso ya Jéhovah, tozali komituna soko tokoki kosala nini mpo na kokumisa ye. Lokola tokomona yango, tokoki kokumisa Nzambe na komonisáká bobangi mpe limemya, na kotósáká ye, na kotaleláká ye kati na banzela na biso nyonso, na kopesáká ye makabo, na komekoláká ye mpe na kotombweláká ye malombo. Tokoki mpe kokumisa ye na kozaláká na kondima epai na ye mpe na kotya motema epai na ye atako likambo nini ekoki kokómela biso. Biblia epesi biso etinda oyo: “Talela Jéhovah na motema na yo mobimba.” Tokokumisa Jéhovah na kotyáká elikya epai na ye. Na ndakisa, alobi ete: “Banga te, mpamba te ngai nazali na yo. Yoka nsomo te mpo ete ngai nazali Nzambe na yo. Nakokembisa yo. Nakosunga yo.” (Masese 3:5; Yisaya 41:10) Ye oyo akotyaka motema mobimba epai na Nzambe te, azali kokumisa ye te.

12. Lolenge nini tokoki kokumisa Jéhovah na botosi mpe na bobangi?

12 Motindo mosusu ya kokumisa Jéhovah Nzambe oyo ekokani na oyo ya liboso, etali kotósa ye. Mpo na kosala yango, ezaleli moko ezali na ntina mingi: esengeli komonisa bobangi ya solo epai na Nzambe, bobangi ya koboya kosala likambo oyo ye aboyi. Maloba oyo alobaki epai na Abrahame, nsima wana amonisaki botosi na ye na kopesáká lsaka, mwana na ye lokola mbeka, ezali komonisa boyokani oyo bozali kati na bobangi mpe botósi. Jéhovah alobaki ete: “Sikawa nayebi ete, ozali kobanga Nzambe.” (Genese 22:12) Kolobeláká mikumba oyo bana bazali na yango epai na baboti na bango, ntoma Paulo amonisaki lisusu ete botosi mpe lokumu ekotambola elongo. (Baefese 6:1-3) Na yango, tokokumisa Nzambe na kotósáká mibeko na ye, yango mpe ezali na bozito te. Na ntembe te, mbele tokozanga kokumisa Jéhovah Nzambe, soko tokoboya kotósa ye.​—1 Yoane 5:3.

13. Soko tozali kokumisa Jéhovah Nzambe, elimo nini tosengeli kozala na yango mpo na oyo etali misala na biso mpe mikano na biso?

13 Lisusu, tokoki kokumisa Jéhovah Nzambe na kolandáká maloba oyo makomami na Masese 3:6 (MN) ete: “Talela ye kati na banzela na yo nyonso, mpe ye akotambolisa yo.” Moyekoli Yakobo apesi biso toli malamu kati na likambo oyo. Na esika ete totya motema epai na biso moko mpe na makoki na biso moko na kosaláká mikano mpo na lobi lokoya, tosengeli nde koloba ete: “Soki ezali mokano ya Jéhovah, tokozala na bomoi, mpe tokosala boye na boye.” (Yakobo 4:15) Esili koleka bambula mingi, Lisangá ya Bayekoli ya Biblia na mokili mobimba (Association internationale des Étudiants de la Bible) lizalaki na momeseno ya kobakisa makomi D.V. na nsuka ya maloba nyonso oyo mataleli mikolo mizali koya, D.V. ezali bokuse ya maloba Deo Volente, oyo elimboli “Soki Nzambe akolinga.”

14. (a) Mpo na kokumisa Jéhovah, lolenge nini tosengeli kotalela milende na biso? (b) Mikanda ya la Société Watch Tower mikomami mpo na mokano nini?

14 Tokokumisa lisusu Jéhovah na kozaláká na bopóló mpe na kopesáká nzela ete akumisama mpo na mosala oyo tozali kokokisa. Ntoma Paulo apesi biso ndakisa wana ezalaki ye koloba na ntina na mosala na ye ete: “Ngai nakónaki, Apolo amwangisaki mai, kasi Nzambe akólisaki. Mokóni azali eloko te, momwangisi na mai eloko mpe te, nde bobele Nzambe mokólisi.” (1 Bakolinti 3:6, 7) Ee, Paulo azalaki komibanzabanza te mpo na lokumu na ye moko to mpe oyo ya moto mosusu, kasi mpo na kokumisa Jéhovah Nzambe. Yango wana, lelo oyo, mikanda ya la Société Watch Tower ezali na bankombo ya bakomi na yango te mpe bakomi na yango bazali koyebisa bato mosusu te makambo oyo bango bakomaki. Na bongo, moto moko te akumisami, ata soko azali nani, kasi nde boyebi oyo bozali kati na mikanda yango oyo ezali na mokano ya kokumisa Jéhovah.

15. Likambo nini limonisi nkaka oyo bato mosusu bazali na yango mpo na kokanga ntina na bopóló ya ba Témoins de Jéhovah?

15 Mbala mosusu bato bakokamwaka na motindo oyo tozali kotika lokumu nyonso epai na Jéhovah. Esili koleka mwa bambula, ba Témoins oyo bazalaki kotya bamasini ya kobeta miziki, bamasini oyo ekoyokisaka mongongo na mosika kati na Central Park, na New York, bamekaki bamasini yango na kotyáká cassette Mélodies du Royaume. Babalani mibale baoyo balataki mpenza kitoko, batunaki bango soki ezalaki miziki nini. Kokanisáká ete bazalaki ba Témoins de Jéhovah, ndeko moko azongiselaki bango ete: “Ezali Mélodie du Royaume No. 4.” Babalani balobaki ete: “Solo, kasi nani asalaki nzembo yango?” Na yango Témoin alobaki ete: “O! moto moko te ayebi yango!” Babalani wana babakisaki ete: “Bato oyo bakosalaka motindo na nzembo oyo bakomibombaka te.” Mpe Témoin azongisaki ete: “Solo, kasi ba Témoins de Jéhovah balukaka koyebana te.” Bazali kosala bongo mpo ete Jéhovah Nzambe azwa lokumu nyonso lobongi na ye.

16. Lolenge nini tokoki kosalela mingongo na biso mpo na kokumisa Jéhovah Nzambe?

16 Motindo mosusu ya kokumisa Jéhovah etali kosalela bibebu na biso mpo na kopesa litatoli. Soki tolingi mpenza kokumisa Jéhovah, tomonisa yango na kosakoláká nsango malamu ya Bokonzi na motema mobimba. Tokoki kosala yango na kokendáká ndako na ndako mpe na kosaleláká mitindo misusu ya mosala ya kosakola oyo ekoki na biso, kozanga kolekisa likoki moko mpo na kopesa litatoli na libaku malamu. (Yoane 4:6-26; Misala 5:42; 20:20) Tokoki lisusu kokumisa Nzambe na biso na koyokisáká mingongo na biso na makita ya lisangá, na kopesáká biyano mpe na koyembaka banzembo ya Bokonzi na molende mpenza. (Baebele 2:12; 10:24, 25) Ata na masoló na biso ya mokolo na mokolo, tokoki kokumisa Jéhovah Nzambe na bibebu na biso. Na kosaláká mwa molende, tokoki kobongola lisoló epai na makambo ya elimo mpe na kolendisa, mpe Jéhovah Nzambe akokumisama na yango.​—Nzembo 145:2.

17. (a) Na likambo nini etamboli na biso ekoki kokumisa Jéhovah? (b) Etamboli mabe ekosala nini kati na likambo oyo?

17 Soki ezali malamu na kokumisa Jéhovah Nzambe na nzela ya bibebu na biso, ezali lisusu ntina na kosala yango na etamboli na biso. Yesu akweisaki baoyo bazalaki kokumisa Nzambe bobele na bibebu, nzokande mitema na bango mizalaki mosika na Ye. (Malako 7:6) Etamboli mabe ekoki kookisa Jéhovah Nzambe nsoni. Na yango totangi na Baloma 2:23, 24 (MN) ete: “Yo oyo okomikumisaka na mibeko, ozali nde kookisa Nzambe nsoni na kobukáká Mibeko? Mpamba te ‘nkombo na Nzambe ezali kotukama epai na Bapakano mpo na bino.’” Na bambula oyo euti koleka, bamilió na bato babimisamaki na masangá ya libota na Jéhovah. Ekoki mpenza kozala ete mingi mosusu bamipesaki na etamboli na nsoni, kasi babimisamaki te mpo ete babongolaki bizaleli na bango. Bato nyonso wana bazalaki kokumisa Jéhovah na bibebu na bango, kasi bazalaki kokumisa ye na etamboli na bango te.

18. (a) Mpo na kopesa Jéhovah lokumu lobongi na ye, baoyo bazali na mikumba minene basengeli koyeba likambo nini? (b) Lolenge nini etamboli ya banganga mosusu na eleko ya Malaki emonisi ete basengeli kozala na lobánzo motindo moko?

18 Baklisto oyo bazali kosala lokola basali ya ntango nyonso na mitindo mikeseni​—ezala na Béthel, bakengeli ya zongazonga to bamisionere, to mpe ba pionniers—​bazali mpenza na esanga bazali mpenza na makoki mingi mpo na kokumisa Jéhovah. Ata mosala nini mopesameli bango, basengeli kokokisa yango malamu na kozaláká ‘sembo kati na likambo lileki moke lokola mpe kati na likambo lileki monene.’ (Luka 16:10) Na lolenge mosusu, etelemelo na bango ezali lokola oyo na banganga mpe Balevi, atako tokoki koloba te ete bazalaki elilingi na bango. Kasi, bopotu ya banganga mosusu, na eleko ya Malaki, etindaki Jéhovah na koloba ete: “Soko nde nazali tata, wapi lokumu na ngai? Mpe soko ngai nazali Nkolo, wapi botosi na kotosa ngai?” (Malaki 1:6) Banganga yango bazalaki kotyola nkombo na Nzambe na kopesáká ye banyama oyo ekufa miso, oyo ezalaki kotɛnguma mpe banyama na malali. Bobele bongo lelo, soko baoyo bazali na mikumba minene bakosala milende te mpo na kokokisa nyonso esengami na bango engebene makoki na bango mpenza, bakopamelama pelamoko Jéhovah Nzambe apamelaki banganga wana. Na yango, bakokumisa Nzambe te lokola esengeli na bango kosala yango.

19. (a) Lokola emonisi yango Masese 3:9, motindo nini mosusu tozali na yango mpo na kokumisa Jéhovah? (b) Lolenge nini mosusu ya ntina mingi tozali na yango mpo na kokumisa Jéhovah?

19 Motindo mosusu ya kokumisa Jéhovah Nzambe etali kopesa makabo ya misolo mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba, mosala oyo ye atindaki yango. Tozwi elendiseli oyo ete: “Kumisa Jéhovah na biloko na yo ya motuya, mpe na mbuma ya liboso ya bozwi na yo nyonso.” (Masese 3:9) Kopesa makabo yango ezali mpenza libaku kitoko mpo na kokumisa Jéhovah Nzambe, libaku oyo moto moko te asengeli kozala na bopotu mpo na yango. Tokoki lisusu kokumisa Jéhovah Nzambe na kobondeláká ye na masanzoli mpe na maloba na botondi. (1 Ntango 29:10-13) Soko tokobelema pene na ye na bopóló mpe na limemya mozindo, na kobondeláká ye, boye tozali kokumisa Nzambe.

20. (a) Mingimingi, bato bakokumisaka banani mpe ndenge nini? (b) Etinda nini tosengeli kotósa ete tokoka kokumisa mingi Jéhovah?

20 Na mikolo na biso, ebele na bato, mpe mingi mpenza bilenge, bakokumisaka bato oyo bango basepelaka na bango na komekoláká makambo oyo bato yango bazali kosala: bakolobaka mpe bakosalaka makambo lokola bango. Bakomekolaka mingi mpenza bayembi na nzembo to basali na masano. Nzokande, baklisto basengeli kokumisa Jéhovah Nzambe na kosaláká milende mpo na komekola ye. Ezali yango nde ntoma Paulo alendisi biso wana alobaki ete: “Bozala bamekoli na Nzambe, lokola bana balingami. Mpe botambolaka kati na bolingo.” (Baefese 5:1, 2) Ee, tozali kokumisa Jéhovah na kosaláká milende na komekola ye.

21. (a) Eloko nini ezali kosalisa biso mpo na kopesa nkembo epai na Jéhovah mpe kokumisa ye? (b) Mbano nini Jéhovah akopesa epai na baoyo bazali kokumisa ye?

21 Ya solo, tokoki kopesa nkembo mpe lokumu epai na Nzambe na mitindo mingi, mpe tosengeli kosalela makoki yango malamu. Tobosana te ete na komileisáká mbala na mbala na Liloba na ye mpe na koyekoláká ntango nyonso mpo na koyeba ye malamu, tokokoka malamu mpenza kokumisa ye. Mbano ekozala nini? Jéhovah alobi ete: “Baoyo bakokumisa ngai, ngai nakokumisa bango.” (1 Samwele 2:30) Mokolo ekoya oyo Jéhovah akokumisa basambeli na ye na kopesáká bango bomoi na seko kati na bolamu, ezala na likoló, mpo na koyangela elongo na Mwana na ye, to kati na Paradis awa na mabelé.

Bozongeli

◻ Bato bakokumisaka mingimingi banani, mpe bazali kobosana kokumisa nani?

◻ Kokumisa moto elimboli nini. mpe na mitindo nini tosengeli kosala yango?

◻ Wapi mwa bantina minene mpo na yango Jéhovah Nzambe abongi kokumisama?

◻ Wapi mwa mitindo oyo tokoki na yango kokumisa Jéhovah?

◻ Lolenge nini Jéhovah akopesa mbano epai na baoyo bazali kokumisa ye?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto