Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/2 nk. 20-24
  • Tokumisa bato nyonso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tokumisa bato nyonso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tokumisa bakonzi ya Leta
  • Tokumisa bakonzi na biso na mosala
  • Lokumu kati libota
  • Kati na lisangá
  • Tosala milende mpo na kopesana lokumu
  • Pesáká lokumu na baoyo babongi na yango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Bópesaka basusu lokumu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Tokumisa Jéhovah: ndenge nini mpe mpo na nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Ozalaka moto ya liboso na kopesa bandeko bakristo lokumu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/2 nk. 20-24

Tokumisa bato nyonso

“Bokumisa bato nyama . . . bobanga Nzambe bokumisa mokonzi.’​—1 PETELO 2:17, “MN.”

1. (a) Longola Nzambe mpe Klisto, bato nini bazali kokumisama lokola esengeli? (b) Engebene 1 Petelo 2:17, kati na makambo nini bato basengeli kokumisama?

TOSILI komona ete tosengeli kokumisa Jéhovah Nzambe mpe Yesu Klisto. Yango eyokani na bosembo, na mayele mpe na bolingo. Nzokande, Liloba na Nzambe lizali komonisa lisusu ete tosengeli mpe kokumisa bato. Elobi ete: “Bokumisa bato nyonso.” (1 Petelo 2:17) Verset esuki na etinda Oyo ete “bokumisa mokonzi,” oyo elimboli ete topesa lokumu na bato oyo babongi na yango mpo na etelemelo na bango. Ezali bongo banani? Ekoki kozala bato mingi koleka motuya oyo mokanisami na bamoko. Tokoki komonisa makambo minei kati na yango tosengeli kokumisa bato mosusu.

Tokumisa bakonzi ya Leta

2. Eloko nini ezali kosalisa biso na koloba ete “mokonzi” oyo elobelami na 1 Petelo 2:17 azali moto: mokonzi na bato to moyangeli nyonso mosusu ya Leta?

2 Ya liboso, etaleli ezaleli na biso epai na biyangeli na bato. Tosengeli kotósa bakonzi ya Leta. Petelo alobeli bango wana apesaki toli ya ‘kokumisa mokonzi.’ Nini endimisi yango? Ezali likambo oyo ete maloba na ye mataleli libándá ya lisangá. Auti koloba ete: “Botósaka myango nyonso na bato . . . : soko mokonzi, lokola oyo aleki liboso; soko bayangeli, lokola baoyo batindami na mokonzi.” Tosimba lisusu ete, wana alobaki: “Bobanga Nzambe, bokumisa mokonzi,” Petelo akesenisaki Nzambe mpe “mokonzi.” (1 Petelo 2:13, 14, MN) Na yango, “mokonzi” oyo Petelo alendisi biso na kokumisa emonisi bakonzi na bato mpe biyangeli na Leta.

3. Banani “bakonzi baleki liboso,” mpe eloko nini ekoki na bango?

3 Bobele bongo, ntoma Paulo apesi etinda oyo: “Tika ete moto na moto atosaka bakonzi baleki liboso.” Awa, “bakonzi baleki liboso” ezali Jéhovah te to Yesu Klisto mpe te, kasi bakonzi ya Leta. Paulo akaniselaki bato yango wana alobaki mwa moke liboso ete: “Bopesa na bango nyonso eloko ekoki na bango: . . . oyo akoki na lokumu, bokumisa ye.” Na bongo, ebongi mpenza kokumisa baoyo Nzambe asili kopesa bango nzela ete báyangela mokili.​—Baloma 13:1, 7, MN.

4. (a) Ndenge nini tokoki kokumisa bakonzi ya Leta? (b) Ndakisa nini ntoma Paulo asila kotika kati na likambo yango?

4 Ndenge nini kokumisa bakonzi ya Leta? Epai moko, na kopesáká bango limemya (Tala 1 Petelo 3:15.) Ya solo, ata soki bazali bato mabe, limemya wana ekoki na bango mpo na etelemelo na bango. Tacite, Moloma oyo azalaki mokomi na makambo na kala, alobaki na ntina na guvernere Félix ete: “Akanisaki ete . . . azalaki na bonsomi ya kosala makambo nyonso mabe.” Kasi yango epekisaki Paulo te na koloba liboso na Félix na limemya nyonso. Bobele bongo, Paulo ayebaki ete mokonzi Hérode Agrippa II abalaki ndeko na ye ya mwasi; kasi alobaki epai na ye na limemya, ete: “Mokonzi Agrippa, nazali komitánga moto na esengo ete nazwi nzela lelo na kozongisa monoko liboso na yo.” Lisusu epai na guvernere Festus, Paulo amonisaki limemya, na kobengáká ye “Moto na lokumu,” nzokande mokonzi yango azalaki mosambeli na bikeko.​—Misala 24:10; 26:2, 3, 24, 25.

5. Motindo nini mosusu tokoki kokumisa bakonzi ya Leta, mpe ndakisa nini malamu ba Témoins de Jéhovah bazali kopesa na likambo yango?

5 Epai mosusu, lokola ntoma Paulo akomaki yango, tokoki kokumisa baoyo bazali koyangela na kopesáká bango eloko ekoki na bango. Alobeli kofuta “mpáko na oyo akofutisaka mpáko; lifuti epai na oyo akoki na lifuti.” (Baloma 13:7, MN) Ezali yango nde ba Témoins de Jéhovah bakosalaka na mokili mobimba, ezala na mboka nini bango bafandi. Kati na La Stampa, zulunalo oyo ekobimaka mokolo na mokolo na mboka ltalie, tokokaki kotanga ete: “Bato wana bazali ba citoyens baleki sembo: bakofutaka mpako na bango nyonso mpe bakoboyaka kotósa mibeko te, ata soko bakozwaka matomba na yango te.” Tala oyo zulunalo moko ya Amérike (Post ya Palm Beach) elobaki na ntina na bango: “Bakofutaka mpako mpe bazali kati na ba citoyens baleki sembo na ekólo.”

Tokumisa bakonzi na biso na mosala

6. Ntoma Paulo mpe ntoma Petelo balobi ete esengeli lisusu kokumisa nani?

6 Ya mibale, tosengeli kokumisa bakonzi na biso na mosala. Ntoma Paulo mpe ntoma Petelo, bango nyonso mibale balobelaki ntina mpo na mosali moklisto ete akumisa bakonzi na ye na mosala. Paulo akomaki boye: “Tika ete baoyo bakangami lokola baombo bakumisaka bankóló na bango na botósi nyonso, ete nkombo na Nzambe mpe mateya na ye etyolama te. Tika ete bango bazali na bankóló bandimi bazanga botosi te mpo ete bazali bandeko. Kasi baleka nde na kosalela bango malamu mpo ete bazali bandimi mpe balingami.” Petelo alobaki ete: “Bino basali na ndako, botosaka bankóló na bino na kobanga nyonso ekoki na bango, bobele baoyo na malamu mpe na boboto te, kasi ata baoyo bazali na matata.”​—1 Timote 6:1, 2; 1 Petelo 2:18, MN; Baefese 6:5; Bakolose 3:22, 23.

7. (a) Ndenge nini tokoki lelo kosalela toli ya Biblia etali lokumu oyo “baombo” basengeli kopesa epai na “bankolo” na bango? (b) Baklisto oyo bazali kosala epai ya baklisto mosusu basengeli kosenzela na likambo nini?

7 Ya solo, boombo bosalelami mingi te na mikolo na biso. Kasi, mitinda oyo moombo azalaki kotósa yango kati na boyokani ya nkóló mpe moombo, ezali kosalelama lelo na boyokani bozali kati na mosali mpe mokonzi na mosala. Esengeli bongo na moklisto ete akumisa mokonzi na ye na mosala, ata soko azali moto na matata mingi. Soki nde mokonzi na ye na mosala azali moninga na ye kati na kondima, na esika ya kozela na yango ete asalela ye faveur koleka bato mosusu to apesa ye matomba mosusu, moklisto asengeli nde kosala mosala na ye na molende mpenza mpe akoluka soko moke te ete abenda matomba na lolenge mabe epai na ndeko na ye oyo azali nkóló na ye na mosala.

Lokumu kati libota

8, 9. (a) Bana basengeli kokumisa banani? (b) Mpo na nini bana basengeli kokumisa baboti na bango, mpe ndenge nini bakoki kosala yango?

8 Ya misato, esengeli na biso komonisa lokumu kati na libota. Na ndakisa, bana basengeli kokumisa baboti na bango. Likambo yango lisengisamaki bobele na Mibeko na Moïse te, kasi lisengisami lisusu epai na baklisto. Ntoma Paulo akomaki ete: “Bino bana, botosaka baboti na bino kati na Nkolo, mpamba te yango ezali sembo: ‘Kumisa tata na yo mpe mama na yo.’”​—Baefese 6:1, 2; Exode 20:12.

9 Mpo na nini bana basengeli kotosa baboti na bango? Mpo ete Nzambe asili kopesa baboti bokonzi likoló na bango, mpe lisusu na ntina na oyo baboti na bango basalaki mpo na bango: basili kopesa bango bomoi, bakoleisaka bango mpe bazali kobokola bango. Bana basengeli kosala nini mpo na kokumisa baboti na bango? Basengeli libosoliboso mpenza komemya mpe kotosa baboti na bango. (Masese 23:22, 25, 26; Bakolose 3:20) Wana bakokóla, bana basengeli mbala mosusu kokumisa baboti na bango bakómi mibange to bankoko na bango, na kosalisáká bango na mosuni mpe na elimo. Lisalisi wana lisengeli kosalelama na bokatikati na kotaleláká mikumba misusu, lokola kobokola bana malamu, koyangana na makita mpe kosangana na mosala ya kosakola.​—Baefese 5:15-17; 1 Timote 5:8; 1 Yoane 3:17.

10. Basi basengeli kokumisa banani, mpe lolenge nini bakoki kosala yango?

10 Epai mosusu, ezali te bobele bana nde basengisami na kokumisa bato mosusu kati na libota. Mpamba te, basi basengeli kokumisa mibali na bango. Ntoma Paulo alobaki lisusu ete, “mwasi atósa mobali na ye.” (Baefese 5:33; 1 Petelo 3:1, 2) Mpo na komonisa “botosi mpenza” epai na mobali na ye, esengeli na mwasi ete akumisa ye. Wana azalaki kobenga Abrahame ete “nkolo,” Sara azalaki kokumisa mobali na ye. (1 Petelo 3:6) Na yango, bino basi, bomekola Sara. Kumisa mobali na yo na kondimáká bikateli na ye mpe na kosaláká nyonso ete bikokisama. Na kosaláká nyonso ekoki na yo mpo na kosalisa mobali na yo ete amema mikumba na ye, na esika ete obakisa bozito mosusu likoló na yango, wana ozali kopesa ye lokumu.

11. Mibali basengeli kokumisa banani, mpe mpo na nini?

11 Tokoloba boni mpo na mibali? Liloba na Nzambe lipesi bango lilako oyo ete: “Bino mibali lokola, bozalana na basi na bino na bososoli, kopesáká bango lokumu lokola mbeki na motau, mpo ete bakozwa libula ya bomoi elongo na bino; boye mabondeli na bino makopekisama te.” (1 Petelo 3:7, MN) Tala likambo oyo mibali nyonso basengeli kokanisa mpo na yango. Ezali lokola nde basi na bango bamemi etikete oyo ete “Motuya mingi. Abongi na bokengi. Petepete. Abongi na lokumu monene!” Mibali basengeli bongo koyeba ete soko bakokumisa basi na bango te na komonisáká bango bolingo bokoki na bango, bakobebisa boyokani na bango elongo na Jéhovah Nzambe, mpamba te mabondeli na bango makopekisama. Solo mpenza, wana mosangani moko na moko na libota akokumisa bamosusu, bango nyonso bakozwa bolamu.

Kati na lisangá

12. (a) Kati na lisangá, esengeli kopesa lokumu epai na nani? (b) Ndenge nini Yesu amonisaki ete, mabe moko ezali te mpo na kondima lokumu?

12 Esika mosusu oyo moto na moto asengeli kokumisa bato mosusu ezali kati na lisangá na boklisto. Tosili kozwa toli oyo elandi ete: “Mpo na kokumisana, bopesa ndakisa.” (Baloma 12:10, MN) Kati na lisese moko, Yesu amonisaki ete mabe moko ezali te na kondima lokumu. Alobaki ete wana tobengami na elambo moko, tosengeli kofanda na esika ya nsima, ete wana mokóló na elambo akobenga biso liboso, tokozwa lokumu liboso na babengami nyonso mosusu. (Luka 14:10) Bongo, mpo ete tolingi kokumisama, tosengeli te komitya na esika ya bato mosusu mpe kokumisa bango lokola? Ndenge nini tokoki kosala yango?

13. Wapi mwa mitindo oyo tokoki kokumisa na yango bazalani na biso kati na lisangá?

13 Ekoki na kokumisa moto oyo asali mosala malamu. Tokoki bongo kokumisana na kopesanáká longonya mpo na eyano to mokumba mosalemi kati na lisangá. Tokoki lisusu kokumisama na ‘kozaláká na bopóló mingi’ epai na bandeko mibali mpe bandeko basi, na komonisáká limemya mozindo epai na bango. (1 Petelo 5:5) Na bongo, tokomonisa ete tozali kotala bango lokola baninga ya lokumu kati na mosala ya Jéhovah Nzambe.

14. (a) Kati na lisangá lolenge nini bandeko mibali bakoki kopesa na bandeko basi lokumu oyo ekoki na bango? (b) Likambo nini limonisi ete tokoki kokumisa moto na makabo ya mosuni?

14 Ntoma Paulo apesaki toli epai na elenge Timoté ete atalela baklisto mibangé basi lokola bamama, mpe bilenge lokola bandeko basi, “na peto nyonso.” Ee, wana baklisto bakosenzela ete bazala na momeseno te ya kosakana elongo na bandeko na bango ya basi kati na kondima​—bakomonisa ete bazali kokumisa bango. Paulo akomaki lisusu ete: “Bokumisa basi-bakufeli-mibali, baoyo bazali sembo.” Lolenge moko ya kosalisa mwasi-akufeli-mobali oyo azali kokelela, etali kosunga ye na mosuni. Kasi, mpo na kozwa lisalisi yango, esengeli lisusu ete mwasi wana “azala na litatoli mpo na misala malamu.” (1 Timote 5:2-10) Na ntina na makabo ya biloko ya mosuni, Luka akomaki na ntina na bafandi na esanga ya Melita ete: “Bakumisi mpe biso na makabo mingi, mpe wana elongwi biso, bakótisi biloko bisengelaki na biso na masua.” (Misala 28:10, MN) Tokoki bongo kokumisa moto moko na makabo ya biloko.

15. (a) Tosengeli mingimingi kopesa lokumu epai na banani? (b) Motindo nini tokoki kokumisa baoyo bazali kokamba biso?

15 Na kolanda mokanda na ye epai na Timoté, Paulo akomi ete: “Tika ete bankulutu oyo bakokambaka lisangá na lolenge malamu bakumisama na lokumu loleki; mingi mpenza, baoyo bakosalaka koleka mpo na kosakola mpe koteya.” (1 Timote 5:17, MN) Lolenge nini tokoki kokumisa bankulutu to bakengeli? Paulo alobaki ete: “Bozala bamekoli na ngai, lokola ngai mpe nazali komekola Klisto.” (1 Bakolinti 11:1, MN) Na kotósáká maloba oyo na Paulo, elingi koloba na kokómáká bamekoli na ye, tozali bongo kokumisa ye. Etinda oyo ezali kosalelama lelo epai na bango bazali kokamba biso. Na meko oyo tozali komekola bango na kolandáká ndakisa na bango, tozali bongo kokumisa bango.

16. Mitindo nini misusu tokoki kokumisa na yango baoyo bazali kokamba biso?

16 Motindo mosusu ya kokumisa bakengeli etali kondima elendiseli oyo ete: “Botósa bango bakokambaka bino mpe [bomikitisa] liboso na bango, mpamba te bazali kokengela milimo na bino lokola bato oyo bakozongisa monoko na ntina na makambo na bango.” (Baebele 13:17) Ee, lokola bana bakokumisaka baboti na bango na kotósáká bango, bobele bongo, na botosi na biso mpe na komikitisa na biso, tokokumisaka bango bazali kokamba biso. Lisusu, lolenge moko Paulo mpe baninga na ye bakumisamaki na makabo ya biloko ya mosuni oyo bato ya Melita bakabelaki bango na boboto nyonso, bakengeli ya zongazonga oyo batindami na la Société bakokumisamaka na makabo. Kasi, basengeli te kosenga makabo yango, soko mpe komonisa na bato ete bazali mpenza na mposa na yango to kopesa likanisi ete mbele bakosepela mingi soko bakozwa yango.

17. Baoyo bazali na mokumba ya bakɛngɛli basengeli kokumisa banani?

17 Epai mosusu, baoyo nyonso bazali na mikumba ya bakengeli kati na lisangá ya Nzambe​—ezala na masangá, kati na circonscription to na distrike, kati na Béthel to mpe kati na libota—​ee, bango nyonso basengeli kokumisa bato oyo bango bazali kokamba. Mpo na yango, basengeli koyeba komitya na esika ya bato mosusu, ete bayeba koyamba bato nyonso mpe, engebene ezalela oyo Yesu apesaki ye moko, bazala na bopóló mpe bato basokemi na motema mpe na elimo.​—Matai 11:29, 30.

Tosala milende mpo na kopesana lokumu

18. (a) Nini ekoki kopekisa biso ete topesa te na bato mosusu, lokumu oyo ekoki na bango? (b) Mpo na nini ezaleli ya kotalela ntango nyonso makambo epai na mabe mpe kolobela mabe ya bato mosusu ebongi te?

18 Biso nyonso tosengeli kosala milende mpo ete tokumisanaka, mpamba te tozali na nkaka monene oyo tosengeli kolónga: motema na biso mozangi kokoka. Totangi na Biblia ete: “Makanisi ya motema na moto mazali mabe longwa na bolenge na ye.” (Genese 8:21) Moko na makanisi yango oyo ekoki kopekisa biso na kopesa moto nyonso lokumu, ezali elimo ya kotalela bobele mabunga ya bato mpe kolobela mabe ya bato mosusu. Biso banso tozali bato na bolembu mpe tozangi kokoka, biso banso tozali na mposa ya mawa mpe ngolu na Jéhovah Nzambe. (Baloma 3:23, 24) Koyebáká likambo yango, tosenzela ete tokaniselaka bango mabe te.

19. Eloko nini ekosalisa biso na kobundisa makanisi nyonso mabe?

19 Bolingo mpe komikanga motema ezali nkisi mpo na kolongola makanisi nyonso mabe. Esengeli na biso kozala na boboto mpe sembo epai na bandeko na biso, kotalela bizaleli na bango kitoko. Soko ezali na likambo moko oyo tozali kokanga ntina te, tosengeli kokanisela bango mabe te, kasi tolanda nde toli na Petelo ete: “Liboso na makambo nyonso, bolinganaka, mpo ete bolingo ekozipaka ebele na masumu.” (1 Petelo 4:8) Mpo na kopesa na bandeko na biso lokumu lobongi na bango, esengeli na biso kozala na bolingo yango.

20, 21. (a) Nini lisusu ekoki kopekisa biso ete topesa te na bato mosusu, lokumu oyo ekoki na bango? (b) Nini ekosalisa biso mpo na kobundisa likanisi yango?

20 Ezaleli mosusu oyo ekoki kopekisa biso na kopesa bato mosusu lokumu lobongi na bango, ezali oyo ya kozokisama noki na motema to na kozala na mayoki maleki ndelo. Ya solo, kozala na mayoki ya nokinoki ezali na ntina kati na bomoi na biso. Na ndakisa, babeti mindule bakoyokaka mingongo noki, mpe basali na bitanda to batablo bakososolaka langi noki; yango ezali na ntina mpo na bango ete bakoka kosala misala na bango malamu. Nzokande, ye oyo akozokisamaka noki na motema to oyo azali na mayoki maleki ndelo kati na boyokani na ye elongo na bato mosusu, akomonisaka ezaleli ya moimi oyo ekoki kolongola ye kimya mpe kopekisa ye ete akumisa bazalani na ye.

21 Kati na likambo oyo, maloba ya Mosakoli 7:9 (MN) mazali kopesa toli ya mayele, ete: “Kowela te mpo na kosilika, mpo ete nkanda ekoumelaka na mitema na bazoba.” Ezali bongo kozanga mayele mpe bososoli​—mpe kozanga bolingo—​soko tokomimonisa bato na mayoki maleki ndelo to bato oyo bakozokisamaka noki na motema. Esengeli na biso kokengela soki tolingi te ete makanisi ya nzoto na biso ezangi kokoka epekisa biso na kopesa na moto na moto lokumu lobongi na ye; ndakisa kotalela ntango nyonso makambo epai na mabe, kolobela mabe ya bato mosusu to kozala na mayoki maleki ndelo.

22. Ndenge nini esukisi likambo litali lokumu oyo tosengeli kopesa na bazalani na biso?

22 Ya solo mpenza, tozali na bantina mingi ya kokumisa bato mosusu. Mpe, lokola touti komona yango, ezali na mitindo mingi oyo tokoki kosala yango. Na mabaku manso, esengeli na biso kosenzela ete tozala te na ezalela ya moimi mpe ya kolobela mabe ya bato mosusu, likambo oyo likopekisa biso kokumisa bato mosusu. Tosengeli kopesa lokumu mpenza koleka epai na basangani ya libota na biso: mibali epai na basi na bango; basi epai na mibali na bango; mpe bana epai na baboti na bango. Kati na lisangá mpe, tosengeli kokumisa baninga na biso baklisto, mingi mpenza, bakengeli oyo bakosalaka mosala mingi katikati na biso. Tokozwa bolamu soki tokokumisa motindo mokomoko na bato oyo batangami awa, mpamba te Yesu alobaki ete: “Esengo na kopesa eleki esengo na kozwa.”​—Misala 20:35.

Bozongeli

◻ Mpo na nini tosengeli kokumisa bakonzi ya Leta, mpe ndenge nini tokoki kosala yango?

◻ Toli nini ya Biblia ekoki kosalelama na boyokani oyo bozali kati na mosali mpe mokonzi na ye na mosala?

◻ Ndenge nini komonisa lokumu kati na libota?

◻ Kati na lisangá, nani abongi na lokumu loleki, mpe mpo na nini?

◻ Ndenge nini kolonga bolembu na bomoto na biso oyo ekoki kopekisa biso ete tokumisa bato mosusu te?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto