Mpo na nini esengelaki ntango molai boye mpo na kokata likambo lileki monene?
ESILI koleka soko mibu 6 000, boyangeli na Jéhovah etyamelaki naino ntembe te. Nsima na kosala biloko na ye kitoko na kozalisama, “Nzambe atalaki biloko nyonso oyo ye asalaki mpe tala ete yango ezalaki malamu mingi.” (Genese 1:31, MN) Ntango molai ya “bopemi” ebandaki mpo na ye. Ezali te ete alembaki, kasi ete asilisaki mosala na ye ya kozalisa awa na mabelé, kondimisamáká ete mokano na ye monene ekokóma na nsuka na nkembo.—Genese 2:1-3; Yisaya 55:11.
Mokano yango mozalaki nini? Nzambe atyaki babalani ya liboso kati na esika oyo ebéngamaki elanga ya Edene. Mosala ya liboso mopesamaki na bato yango etalaki kobongisa efandelo na bango na paradis mpe, na esika yango, mitindo ndenge na ndenge ya banyama bazalaki wana. Basengelaki lisusu kozala na bana mpe kobokola bango. Na boumeli ya ntango, wana libota esengelaki kokóla, bakokaki bongo koyeisa Paradis monene kino na nsuka ya etando na biso. Basengelaki mpe kotósa na etinda na Nzambe oyo etali ‘kotya mokili na nsé na bango.’ Mokili mosengelaki bongo kozala efandelo kitoko efandami na libota ya bomoko mpe ya esengo, oyo likosalela Tata na bango ya likoló. Wana ezali mokano oyo Nzambe azalaki na yango na ebandeli.—Genese 1:27, 28; 2:8, 15, 20-22.
Adam na Eva bakokaki nde kosala mpo na kokokisama ya mokano wana monene na mobimba na yango? Mpo na yango, basengelaki kolanda kosalana elongo na mokano yango na kotósáká Mozalisi na bango. Botósi yango bozalaki ya bongo na bongo te, oyo bozangi bososoli. Bankoko na biso bakelamaki na lotómo ya kosala oyo elingi bango moko, mpamba te Nzambe alingaki ete basalela ye mpo na botondi. Mpo na kokundwela bango boyangeli na ye mpenza, atyaki momekamo mozalaki na mpasi te. Bakokaki kolya biloko nyonso ya elanga, longola bobele moko. Nzambe alobaki na ntina na nzete moko ete: “Mokolo okolya yango, okokufa solo.”—Genese 2:16, 17.
Maloba oyo mazali komonisa biso ete Adam na Eva basalamaki te mpo ete banuna mpe bakufa. Basengelaki kokufa bobele soki batosi te na etinda yango ezalaki mpasi te mpo na kotósa. Soki Adam na Eva batikalaki na botosi epai na Nzambe, mbele batikalaki na bomoi libela mpe kozala baboti ya bato na kokoka, baoyo basengelaki kosala libota monene.—Tala likambo oyo lilobelami na Nzembo 37:29.
Ekelamu moko na Nzambe, anzelu oyo abéngami lelo Satana, abandaki kotónga lolenge oyo Nzambe azali koyangela. Anzelu yango apusaki Eva na kolya mbuma oyo epekisamaki mpe amonisaki ye na bokosi nyonso ete, soki amilongoli na nsé na boyangeli na Nzambe, akozala na bomoi malamu. Eloko oyo epusaki Satana na kosala bongo, ezalaki mpenza mposa ya kokóma nzambe ya libota na bato oyo basengelaki kobotama.—Genese 3:1-5; Matai 4:8, 9; Yoane 8:44.
Eva akokaki kokotela boyangeli na Jéhovah mpe koboya lipesi mabe ya Satana, mpamba te Nzambe apesaki na babalani ya liboso, biloko nyonso oyo bazalaki na yango mposa. Likambo na mawa mpenza, Eva abukaki mobeko na Nzambe na nkɔ mpenza. Adam mpe alandaki ye kati na etamboli wana ezangi mayele. Lokola Satana, babalani wana mpe batombokaki Ezali bongo nde ntembe ebimaki na ntina na boyangeli na Nzambe.—Genese 3:6.
Kokátama ya makambo minene esengi ntango
Jéhovah akokaki na mbala moko koboma batomboki wana misato. Kasi yango ekokaki te kopesa eyano malamu na ntembe oyo ebetamaki na botomboki na bango. Moto akoki nde komitambwisa ye moko kozanga kotalela Nzambe? Ezali likambo na sembo ete Nzambe asengísa moto ete atosa boyangeli na ye? To mpe lisusu: Na kotalela ezaleli ya babalani ya liboso, moto moko akoki mpenza kozwa ekateli ya kosalela Nzambe na bolingo na ye moko, ata soki Satana akotya ye na mimekamo? (Yobo 1:7-11; 2:4) Esengelaki kolekisa ntango mpo na koyanola na mituna oyo. Esengelaki kolekisa lisusu ntango mpo na kolongola mpasi oyo euti na botomboki ya liboso mpe mpo na kokokisa mokano na Nzambe na kosaláká ete mabelé makóma paradis efandami na bato oyo bazangi masumu. Lelo oyo tozali lisusu kozela ete makambo makátama mbala moko mpo na libela.
Kosaleláká ye moko mobeko oyo alobaki, Nzambe alongolaki likoki ya kozala na bomoi ya seko epai na Adam na Eva. Babongaki lisusu te mpo na kosangana na kokokisama ya mokano kitoko ya Nzambe. Nzokande, bazwaki bana mpe babókólaki bango liboso na kokufa. Ezali solo ete, Adam na Eva bakokaki te kopesa lisusu bomoi yango kitoko, bozangi lisumu. (Baloma 5:12) Bakitani na bango babotamaki bongo na kozanga kokoka mpe basengelaki kokufa. Kasi ebele na bato bazwaki libaku ya komonisa ngambo oyo basilaki kozwa kati na likambo monene litali boyangeli
Kokátama ya likambo
Ndenge nini Nzambe akosala mpo na koyanola na mituna oyo mitaleli boyangeli? Ntembe oyo ebimaki na Edene, esili kozwa eyano na yango na ndimbola mosusu. Na boumeli ya bambula mingi, lisoló ya moto limonani na mawa: solo mpenza, Satana akosaki wana alobaki ete Eva akozala na bomoi malamu soki atambwisami na Nzambe te. Boyangeli ya bato oyo bazangi kotalela Nzambe, ezali kolónga te. Lokola Biblia elobi yango, “moto moko azali na bokonzi likoló na mosusu mpo na kopesa ye mpasi.”—Mosakoli 8:9.
Na kokesena, makambo mingi na kolendisa mamonani na boumeli na bambula mingi oyo esili koleka uta Adam na Eva basalaki lisumu. Ebele na bato basili komonisa bokangami makasi na boyangeli na Jéhovah; Yesu Klisto, “Mwana na moto,” azali ndakisa oyo eleki monene. (Matai 20:18; Baebele 11:1 kino 12:8) Baoyo bandimaki boyangeli na Nzambe mpe batosaki mibeko na ye, bamonaki ete, yango ezali nzela malamu oyo basengeli kolanda. Bamonaki bongo bosolo na maloba ya lisese oyo ete: “Mapamboli na Jéhovah makopesaka bozwi, mpe akobakisa mpasi elongo na yango te.” (Masese 10:22, MN) Lisusu, na nsuka, na nzela na lísekwa, bakokoka kosangana na kokokisama ya mokano monene ya Nzambe.—Yoane 5:28, 29.
Jéhovah abosani te mokano oyo azalaki na yango na ebandeli. Akopesa nzela te ete baoyo baboyi boyangeli na ye bayangela mabelé libela na libela; Biblia epesi likebisi ete, na ntango ekoya, Nzambe akoboma bango. Tozali kotanga ete “nkanda na Nzambe ebimi na likoló kokwela makambo nyonso na kotyola Nzambe.” (Baloma 1:18) Nkanda oyo Nzambe akomonisa na ntango ekoya, oyo ebéngami Armagedon kati na Biblia, ekomonisa kozanga ntembe ete azali solo mpenza. Bobele baoyo bandimi boyangeli na Nzambe nde bakobika na etumba wana. “Basembwi bakofanda na mokili mpe bato malamu bakotikala na yango. Kasi bato mabe bakolongolama na mokili mpe bato na masumu bakopikolama wana.”—Masese 2:21, 22.
Likambo lileki monene mpe yo
Nsima na kotalela makambo oyo, moko na moko kati na biso asengeli kopona, lokola Adam na Eva basalaki yango. Tokopona ete totambwisama na Nzambe te? To mpe tokomitya nde na nsé na boyangeli na ye? Yeba ete ezali wana likambo monene mpenza litaleli yo lelo oyo. Makambo mosusu oyo mazali komonana na ntina mingi, matali bobele bomoi na yo ya ntango oyo. Kasi likambo oyo litaleli bomoi ya seko. Avenire na yo ya seko etali ekateli oyo okozwa.
Ndenge nini komonisa ete ozali kondima boyangeli na Nzambe? Na koyekoláká malamu mpenza Liloba na ye, Biblia, mpe na kosaláká milende ya kotósa mokano na ye elongo na baklisto ya solo. (Sofoni 2:2, 3) Sala bongo, mpe okozwa elikya ya esengo ya komona kokokisama ya mokano monene na Nzambe. Okopesamela likoki ya komona kokokisama ya elaká oyo kitoko ete: “Nsima na mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te . . . Nde bato na bopóló bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya na solo.” (Nzembo 37:10, 11) Oyo nde nsuka kitoko mpo na baoyo bazali komitya na nsé na boyangeli na Nzambe!Tala oyo esengeli kopusa biso ete tozwa ekateli ya mayele na ntina na likambo oyo lileki mpenza monene!