Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/8 nk. 8-13
  • “Pole eyei na mokili”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Pole eyei na mokili”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Nzambe azali pole”
  • “Nazali pole na mokili”
  • “Mosaleli na liboso’’ na Nzambe
  • “Mokonzi likoló na biloko nyonso”
  • “Bana na pole”
  • “Bino bozali pole na mokili”
  • “Tolata bibundeli na pole”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Pole ya Nzambe elongolaka molili!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Tolanda pole na mokili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Nani azali kolanda pole na mokili?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/8 nk. 8-13

“Pole eyei na mokili”

“Tala ntina na kosambisama: pole eyei na mokili, nde bato balingi molili koleka pole.”​—YOANE 3:19, “MN.”

1. Mpo na nini bato banso basengeli komibanzabanza na ntina na kosambisama na Nzambe?

LELO oyo, bato mingi bazali komibanzabanza te na ntina na kosambisama na Nzambe. Bamoko bazali na likanisi oyo ete Nzambe akolóngisa bango soki bakosalela mangomba na bango mpe soki bakosalela bazalani na bango mabe te. Mpo na bato mingi, mateya na boklisto ya lokutá na ntina na lifelo mpe epongelo esili kobebisa likanisi ya kosambisama na Nzambe. Kozanga kondima oyo emonani na mokili mobimba mpe lokutá na boklisto ya mokili oyo ekoki kobongola eloko moko te: bato banso bakosambisama na Nzambe. (Baloma 14:12; 2 Timoté 4:1; Emoniseli 20:13) Mpe kosambisama wana ekobimisa makambo minene. Baoyo bakolóngisama bakozwa likabo ya bomoi ya seko epai na Nzambe, nzokande baoyo bakokweisama bakozwa lifuti ya lisumu: liwa.​—Baloma 6:23.

2. Ntina na kosambisama na Nzambe ezali nini?

2 Ezali mpo na yango nde baklisto ya solo bazali komibanzabanza na ntina na kosambisama na Nzambe, mpe balingi mpenza kosepelisa Mozalisi na bango. Lolenge nini bakoki kosala yango? Yesu amonisi biso yango na Yoana 3:19 (MN) ete:’’ Tala ntina na kosambisama: pole eyei na mokili, nde bato balingi molili koleka pole, mpo ete misala na bango mizali mabe.” Ee, kosambisama na Nzambe ekosalema na kotalela likambo oyo: tolingi pole to mpe molili?

“Nzambe azali pole”

3. Molili ezali nini, mpe pole ezali nini?

3 Na ndimbola ya elimo, molili ezali elilingi ya kozanga boyebi mpe na kozanga elikya oyo emonani na mokili ya Satana, atako azali komimonisa lokola “anzelu na pole.” (2 Bakolinti 4:4; 11:14; Baefese 6:12) Nzokande, pole ezali na boyokani na boyebi mpe na bososoli oyo euti na Jéhovah Nzambe. Paulo alobelaki pole yango wana ekomaki ye boye: “Nzambe alobaki ete: ‘Tika ete pole engɛnga kati na molili,’ mpe apesi pole na mitema na bino mpo na kongɛngisa yango na boyebi na nkembo na Nzambe, na elongi na Klisto.” (2 Bakolinti 4:6, MN) Boyokani makasi bozali kati na pole ya elimo mpe Jéhovah Nzambe, kino ntoma Yoane akomaki ete: “Nzambe azali pole.”​—l Yoane 1:5; Emoniseli 22:5.

4. (a) Lolenge nini Jéhovah apalanganisaki pole? (b) Lolenge nini tokoki komonisa bolingo na biso mpo na pole?

4 Jéhovah azali kopalanganisa pole na nzela na liloba na ye, oyo ezwami epai nyonso, mpamba te yango ekomami kati na Biblia Mosantu. (Nzembo 119:105; 2 Petelo 1:19) Mokomi na nzembo amonisaki mpenza bolingo na ye mpo na pole wana akomaki ete: “Nalingi mobeko na yo na bolingo mingi. Nakobanzaka yango mokolo mobimba. Molimo na ngai mobateli bokundoli na yo, mpe nalingi yango na bolingo mingi.” (Nzembo 119:97, 167) Ya solo, emonani ete mokomi na nzembo alingaki pole. Yo mpe olingi yango lokola ye? Otangaka Liloba na Nzambe mbala na mbala, na Kososoláká yango mpe na kosaláká milende mingi mpo na kosalela yango? (Nzembo 1:1-3) Soki ezali bongo, boye ozali koluka kozwa lisambisi malamu na Jéhovah.

“Nazali pole na mokili”

5. Pole na Nzambe ezali kobenda likebi likoló na nani?

5 Pole oyo ezali kopesa bomoi, oyo euti epai na Jéhovah, ezali kobenda likebi likoló na Yesu Klisto. Totangi kati na maloba ya ebandeli ya Evanzile ya Yoane, ete: “Yango ezalisami kati na ye [Yesul ezalaki bomoi, mpe bomoi yango ezalaki pole na bato. Pole ezali kongɛnga kati na molili mpe molili mozimisi yango te.” (Yoane 1:3-5) Ya solo, Yesu azali na boyokani makasi na pole na boye ete abengami “pole na solo oyo akongɛngɛla bato banso.” (Yoane 1:9, MN) Yesu ye moko alobaki ete: “Naino ezali ngai kati na mokili, nazali pole na mokili.”​—Yoane 9:5.

6. Tosengeli kosala nini soki nde tolingi kozwa lisambisi malamu oyo ezali komema na bomoi ya seko?

6 Na yango, baoyo balingi pole balingi Yesu mpe bandimeli ye. Moto oyo alingi Yesu te akoki soko moke te kozwa lisambisi malamu. Bobele na kotalela Yesu, nzela na lobiko oyo elakisami na Nzambe, nde tokoki kozwa lisambisi malamu. Yesu alobaki ete: “Ye oyo andimi Mwana azali na bomoi na seko; ye oyo aboyi Mwana akomona bomoi te, kasi nkanda na Nzambe ekoumela na ye.” (Yoane 3:36) Kasi, kondimela Yesu esangisi makambo nini kati na yango?

7. Kondima Yesu elimboli kozala mpe na kondima epai na nani?

7 Libosoliboso, Yesu ye moko alobaki ete: “Ye oyo akondima ngai azali kondima bobele ngai te, kasi motindi na ngai. Mpe ye oyo amoni ngai amoni mpe motindi na ngai. Nayei na mokili lokola pole, ete moto na moto oyo akondima ngai aumela kati na molili te.” (Yoane 12:44-46) Baoyo balingi Yesu mpe bakondimelaka ye, basengeli mpe kozala na bolingo mingi mpo na Jéhovah mpe kondimela ye, Nzambe mpe Tata na Yesu. (Matai 22:37; 20:17) Ye oyo akosalela nkombo na Yesu kati na losambo na ye, nde akopesa lokumu mingi te epai na Jéhovah, moto wana akozala na bolingo mingi te mpo na pole.​—Nzembo 22:27; Baloma 14:7, 8; Bafilipi 2:10, 11.

“Mosaleli na liboso’’ na Nzambe

8. Lolenge nini pole na Nzambe ebendaki likebi na bato likoló na Yesu, liboso nkutu ete abotama lokola moto?

8 Kondima Yesu esangisi mpe kondima ntango nyonso mokumba oyo azali na yango kati na mikano na Jéhovah. Ntina ya mokumba yango emonisamaki na anzelu oyo alobaki na Yoane ete: “Bisakweli bipemami mpo na kotatola na ntina na Yesu.” (Emoniseli 19:10, MN; Misala 10:43; 2 Bakolinti 1:20) Kobanda na esakweli ya liboso oyo epesamaki na Edene, bisakweli nyonso bipemami na Nzambe bizali mingi kolobela Yesu mpe esika na ye kati na kokokisama na mikano na Nzambe. Bobele bongo, Paulo alobaki epai na baklisto ya Galatia ete kondimana na Mibeko ezalaki “mobateli na biso kino ekoya Klisto.” (Bagalatia 3:24) Kondimana na Mibeko wana ya kala ezalaki na mokano ya kobongisa libota yango mpo na koya na Masiya Yesu. Na bongo, ata liboso ete abotama lokola moto, pole euti na Jéhovah ezalaki kobenda likebi likoló na Yesu.

9. Uta mobu 33, bolingo na pole esengi likambo nini kati na yango?

9 Na mobu 29, Yesu abimaki mpo na kozwa batisimo mpe apakolamaki na elimo santu, akómaki bongo Masiya oyo na elaká. Na mobu 33, akufaki moto na kokoka, asekwaki mpe amataki na likoló, epai kuna alakisaki motuya ya bomoi na ye oyo akabaki lokola mbeka mpo na masumu na biso. (Baebele 9:11-14, 24) Ezalaki likambo monene kati lisoló ya boyokani na Nzambe mpe bato. Uta ntango wana, Yesu azali “Mosaleli na liboso mpo na bomoi,” ‘Mosaleli na liboso mpo na lobiko,’ “Mosaleli na liboso mpo na kondima na biso, ye oyo azali kokokisa yango.” (Misala 3:15; Baebele 2:10; 12:2; Baloma 3:23, 24) Kobanda mobu 33, baoyo balingaki pole basosolaki mpe bandimaki likambo oyo ete “lobiko ezali na moto mosusu te [bobele na Yesu], mpo ete nkombo mosusu te esili kopesama awa nsé kati na bato ete tokoka kobika mpo na yango.”​—Misala 4:12.

10. Mpo na nini ezali ntina na koyoka maloba na Yesu mpe kotósa yango?

10 Kondima Yesu esengi mpe kondima mokumba na ye lokola “Liloba” mpe “Mosungi na kokamwa.” (Yoane 1:1; Yisaya 9:6) Oyo elobami na Yesu ezali komonisa nyonso solo na Nzambe. (Yoane 8:28; Emoniseli 1:1, 2) Tosengeli koyoka ye: Ezali likambo ya bomoi to mpe kufa. Yesu alobaki epai na Bayuda ya eleko na ye ete: “Ye oyo akoyoka liloba na ngai mpe akondima motindi na ngai, azali na bomoi ya seko mpe akosambisama te, kasi asili kolongwa na kufa mpe koingela na bomoi.” (Yoane 5:24) Na ekeke ya liboso, baoyo basalelaki maloba na Yesu basikolamaki na molili ya mokili na Satana mpe, na elobeli mosusu, basili kokóma na bomoi. Basili kotangama bayengebene mpo na kozala basangoli na libula elongo na ye kati na Bokonzi na ye na likoló. (Baefese 1:1; 2:1, 4-7) Na eleko na biso, bato mingi bakoki kotangama bayengebene mpe kozwa elikya ya kobika na Armagedon, mpe kokóma na bomoi ya bato na kokoka kati na mokili ya sika, mpo ete bazali kotósa maloba na Yesu.​—Emoniseli 21:1-4; tala Yakobo 2:21, 25.

“Mokonzi likoló na biloko nyonso”

11. Bokonzi nini monene bopesamaki na Yesu na mobu 33?

11 Nsima na lisekwa na ye, Yesu alakisaki eteni mosusu ya pole epai na bayekoli na ye. Alobaki ete: “Bokonzi nyonso esili kopesamela ngai, na likoló mpe na nsé.” (Matai 28:18) Yesu atombwamaki bongo na etelemelo monene kati na lisangá ya Jéhovah na molɔngɔ mobimba. Paulo apesi biso bandimbola mosusu wana elobaki ye ete: “[Nzambe] asekwisi ye [Yesu] kati na bakufi mpe afandisi ye na lobɔkɔ na ye ya mobali kati na bisika na likoló, mosika mpenza likoló na biyangeli nyonso, na bokonzi nyonso, na nguya nyonso, na bankolo nyonso, mpe likoló na nkombo nyonso na lokumu, bobele kati na biloko ya ntango oyo te, kasi mpe na oyo ya ntango ekoya. Asili mpe kotya biloko nyonso na nsé na makolo na ye mpe azalisi ye mokonzi likoló na biloko nyonso mpo na lisangá, oyo ezali nzoto na ye.” (Baefese 1:20-23, MN; Bafilipi 2:9-11) Uta mobu 33, baoyo balingi pole basengeli kondima etelemelo na Yesu oyo etombwami.

12. Uta ebandeli, likambo nini bapakolami bazali kotósa yango na esengo nyonso, mpe lolenge nini bazali komonisa yango kati na bomoi na bango?

12 Mokolo ekoya, oyo bato banso bakosengela kondima bokonzi na Yesu. (Matai 24:30; Emoniseli 1:7) Nzokande, baoyo balingi pole bazali kotósa bokonzi na ye na esengo nyonso uta ebandeli na yango. Baklisto bapakolami bazali kondima ete Yesu azali “motó na nzoto: lisangá.” (Bakolose 1:18; Baefese 5:23) Wana ezali bango kokóma basangani ya nzoto yango, bazali ‘kobikisama longwa na nkanga na molili mpe bakɔtisami na bokonzi ya Mwana na bolingo na Nzambe.’ (Bakolose 1:13) Uta ntango wana, bazali kolanda litambwisi na Yesu na motema mobimba kati na makambo nyonso ya bomoi na bango mpe, na eleko na biso, bazali kolakisa na “bampate mosusu” ete basala lolenge moko. (Yoane 10:16) Mpo na kozwa lisambisi malamu, esengeli mpenza kondima bokonzi na Yesu.

13. Ntango nini Yesu abandaki koyangela kati na Bokonzi na ye, mpe likambo nini lisalemaki awa na mabelé?

13 Nsima wana amataki na likoló, na mobu 33, Yesu asalelaki bokonzi na ye nyonso na mbala moko te. Atako azali Mokonzi ya lisangá na boklisto, azelaki elaká etyami mpo na kosalela bokonzi nyonso likoló na bato banso. (Nzembo 110:1; Misala 2:33-35) Elaká yango ekokaki na 1914, wana Yesu akómaki Mokonzi na Bokonzi na Nzambe mpe ete “mikolo na nsuka” ya mokili oyo mibandaki. (2 Timoté 3:1) Kobanda 1919, koyanganisama ya batikali bapakolami ebɛlɛmaki na nsuka na yango. Mingi mpenza uta 1935, Yesu azali kokabola bato bakokani na “bampate,” bango bakosangola “bokonzi bobongisami mpo na [bangol,” mpe bato bakokani na “bantaba,’’ baoyo “bakolongolama kino libebi ya seko.”​—Matai 25:31-34, 41, 46.

14. Lolenge nini ebele monene bamonisaki bolingo na bango mpo na pole, mpe nini ekosalema mpo na bango?

14 Tozali na esengo na komona bampate mingi na mikolo oyo ya nsuka. Basali bongo ebele monene ya bamilió na bato oyo bauti “na mabota nyonso, na bikólo nyonso, na mikili nyonso, na minoko nyonso” Lokola baninga na bango bapakolami, bato yango oyo bakokisami na bampate balingi pole. “Basukoli bilamba na bango mpe bayeisi yango mpɛmbɛ kati na makila na Mwana na Mpate”; mpe bazali koloba na mongongo makasi ete: “Lobiko na Nzambe na biso oyo afandi likoló na kiti na bokonzi, mpe na Mwana na Mpate.” Na yango, ebele monene na mobimba na yango ekozwa lisambisi malamu. Basangani na yango “babimi longwa na bolozi monene,” na elobeli mosusu, bakobika na etumba ya Armagedon, wana baoyo balingi molili bakobomama.​—Emoniseli 7:9, 10, 14.

“Bana na pole”

15. Lolenge nini misala na biso mizali komonisa botósi oyo tozali na yango epai na Mokonzi, Yesu Klisto?

15 Kasi, lolenge nini baoyo balingi pole, ezala bapakolami to mpe basangani ya bampate mosusu, bakomonisaka ete bazali kotósa Yesu, Mokonzi oyo atyami na Nzambe mpe apesameli mosala ya kosambisa? Kati na makambo mosusu, na komekáká kozala motindo na bato oyo Yesu azali kondima. Ezalaki ye awa na mabelé, Yesu amonisaki motuya na bizaleli lokola motema sembo, bokangami na motema moko mpe molende mpo na solo, bizaleli oyo ye moko amonisaki yango. (Malako 12:28-34, 41-44; Luka 10:17, 21) Soki tolingi kozwa lisambisi malamu, tosengeli bongo kolona bizaleli oyo.

16. Mpo na nini esengeli mpenza kobwaka misala na molili?

16 Esengeli kosala bongo awa molili ya mokili na Satana ezali sé kokóla na meko oyo nsuka ezali kobɛlɛma. (Emoniseli 16:10) Maloba oyo Paulo atindaki epai na Baloma mayei na ntango na yango, ete: “Butu eumeli, ntɔngɔ elingi kotana. Boye tobwaka misala nyonso na molili mpe tolata bibundeli na pole. Totambola na ezaleli ebongi na moi; na bilambo na lokoso te, na kolangwa masanga te, na pite mpe na etamboli na mbindo te, na kowelana te soko na zúwa mpe te.” (Baloma 13:12, 13, MN) Atako bomoi ya seko ezali likabo na Nzambe, kasi misala na biso mizali komonisa bosembo ya kondima na biso mpe bolingo oyo tozali na yango mpo na pole. (Yakobo 2:26) Na yango, kosambisama oyo tokozwa ekotalela mingi mpenza makoki na biso ya kokokisa misala malamu mpe na kokima misala mabe.

17. ‘Kolata Nkolo Yesu Klisto’ elimboli nini?

17 Nsima na kopesa toli oyo totangi na Baloma 13:12, 13, ntoma Paulo asukisi na maloba oyo ete: “Bolata Nkolo Yesu Klisto lokola elamba, mpe bokanisa te mpo na kosepelisa mposa na nzoto.” (Baloma 13:14) ‘Kolata Nkolo Yesu Klisto lokola elamba’ elimboli nini? Yango elimboli ete baklisto basengeli kolanda Yesu penepene, elingi koloba, kolata ndakisa na ye mpe ezaleli ya elimo na ye, basengeli kosala makasi mpo na kokokana na ye. Petelo alobaki ete: “Bobyangami mpo na bongo, mpamba te Klisto mpe aokaki mpasi mpo na bino, atikeli bino elakiseli ete bolanda matambé na ye.”​—1 Petelo 2:21.

18. Kobongwana nini monene tokoki kosala yango soki nde tolingi kozwa lisambisi malamu?

18 Mpo na yango, moklisto asengeli ntango nyonso kosala mabongwani mingi kati na bomoi na ye. Paulo alobaki ete: “Liboso bozalaki molili, nde sikawa bozali pole kati na Nkolo. Botambolaka lokola bana na pole, mpamba te mbuma na pole emonani na nyonso oyo ezali malamu, na boyengebene mpe na solo.” (Baefese 5:8, 9) Baoyo bazali kokokisa misala na molili balingi pole te; soki bakobongwana te, bakozwa lisambisi mabe.

“Bino bozali pole na mokili”

19. Mitindo nini moklisto akoki komonisa pole?

19 Mpo na kosukisa, kolinga pole esangisi mpenza komonisa pole mpo ete bato mosusu bamona mpe babendama na yango. Yesu alobaki ete: “Bino bozali pole na mokili.” Mpe abakisaki ete: “Tika ete pole na bino engɛnga liboso na bato ete bamona misala na bino malamu mpe bakumisa Tata na bino oyo azali na makoló.” (Matai 5:14, 16) Kati na misala malamu ya moklisto, “nyonso oyo ezali malamu, na boyengebene mpe na solo” etangami kati na yango, koyebáká ete etamboli wana kitoko ezali litatoli monene mpo na solo. (Bagalatia 6:10; 1 Petelo 3:1) Lisusu, kolobela solo ezali mosala kitoko mpenza kati na misala nyonso malamu. Lelo oyo, mosala yango kitoko motaleli kosangana kati na mosala monene ya kosakola “nsango malamu ya bokonzi . . . kati na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso.” Etaleli mpe kozongela na motema pɛtɛɛ bato oyo basepeli na nsango malamu, mpo na koyekola Biblia elongo na bango mpe kosalisa bango ete bakokisa misala na pole lokola.​—Matai 24:14; 28:19, 20.

20. (a) Na kongala nini pole ezali kongɛnga lelo oyo? (b) Mapamboli nini kitoko mazwami na baoyo balingi pole?

20 Mpo na molende ya baklisto na sembo kati na mosala ya kosakola, nsango malamu epalangani lelo na mikili mpe bisanga koleka 200, mpe pole ezali kongɛnga mpenza koleka na liboso. Yesu alobaki ete: “Ngai nazali pole na mokili. Ye oyo akolanda ngai akotambola kati na molili te, kasi akozala na pole ya bomoi.” (Yoane 8:12) Oyo nde esengo na kosangana kati na kokokisama ya elaká oyo! Bomoi na biso bozali malamu mingi sikawa na boye ete tozali lisusu kati na molili ya mokili na Satana te. Lisusu, elikya na biso ezali mpenza kitoko, mpamba te tozali kozela lisambisi malamu epai na Mosambisi oyo aponami na Jéhovah. (2 Timoté 4:8) Oyo nde mawa na kozonga na molili mpe kozwa lisambisi mabe, nsima na komona pole! Kati na lisoló elandi, tokomona lolenge nini tokoki kotikala makasi kati na kondima.

Bozongeli

◻ Ntina na kosambisama ezali nini?

◻ Mokumba nini monene Yesu azali kokokisa kati na mikano na Nzambe?

◻ Lolenge nini tokomonisaka ete tozali kotósa Yesu, Mokonzi oyo aponami na Jehovah?

◻ Lolenge nini tokoki komonisa ete tozali ‘’bana na pole”?

◻ Na ndimbola nini pole ezali kongɛnga koleka na liboso kati na mokili oyo ya molili?

[Elilingi na lokasa 10]

Mokolo ekoya, oyo bato banso bakosengela kondima bokonzi na Yesu

[Elilingi na lokasa 12]

Tokomonisa ete tolingi pole wana ezali biso kongɛngisa yango liboso na bazalani na biso

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto