“Tolata bibundeli na pole”
“Butu eumeli, ntɔngɔ elingi kotana. Boye tobwaka misala nyonso na molili mpe tolata bibundeli na pole.”—BALOMA 13:12, “MN.”
1, 2. Lolenge nini Bayuda mingi ya ekeke ya liboso bayambaki “ Pole na solo,” nzokande makambo nini mbɛlɛ makokaki kosalisa bango na koyamba ye malamu?
YESU KLISTO azali “pole na solo oyo ezali kongɛngɛla bato banso.” (Yoane 1:9, MN) Na ntango ayaki lokola Masiya na mobu 29 ya ntango na biso, amimonisaki epai na libota liponamaki, oyo basangani na yango bazalaki batatoli na Nzambe, mpe ezalaki libota oyo eyebanaki ete, emipesaki epai na Jéhovah. (Yisaya 43:10) Bayisraele mingi bazalaki kozela Masiya, mpe bamoko kati na bango bayebaki ndambo na bisakweli oyo bisengelaki kosalisa bango na koyeba ye. Lisusu, Yesu asakolaki na Palestine, mpe asalaki makamwisi liboso na bato. Bibele na bato bazalaki koya epai na ye mpo na koyoka ye, mpe bakamwaki na makambo bazalaki komona mpe koyoka.—Matai 4:23-25; 7:28, 29; 9:32-36; Yoane 7:31.
2 Nzokande, na nsuka, Bayuda mingi baboyaki Yesu. Kati na Evanzile ya Yoane, totangi ete: “Ayei na ekólo na ye mpenza, nde bato na ye bayambi ye te.” (Yoane 1:11, MN) Mpo na nini? Soki tososoli ntina yango, boye tokopengola libunga wana. Yango ekosalisa biso na ‘kobwaka misala na molili mpe kolata bibundeli na pole’; na bongo, tokozwa lisambisi mabe te oyo lizwamaki likoló na Yisraele ya ekeke ya liboso.—Baloma 13:12, MN; Luka 19:43, 44.
Botɛmɛli bouti na bakonzi ya mangomba
3. Na ndimbola nini bakonzi ya mangomba na Bayuda bamimonisaki ete bazalaki “bakambi bakufi miso”?
3 Bakonzi ya mangomba na Yisraele bazalaki bato na liboso oyo baboyaki pole. Atako bazalaki bateyi, “balakisi na mibeko,” bapesaki bato motindo na malako mazalaki mbala mingi kotɛmɛla Mibeko na Nzambe. (Luka 11:45, 46) Na bongo, ‘bayeisaki mpamba liloba na Nzambe na ntina na malako na bango oyo bazalaki kolakisa.’ (Malako 7:13; Matai 23:16, 23, 24) Bazalaki “bakambi bakufi miso” oyo bazipaki kongɛnga na pole.—Matai 15:14.
4, 5. (a) Bafalisai basalaki nini ntango bamonaki ete bato mingi babandaki komituna soki Yesu azalaki Masiya te? (b) Lolenge nini Bafalisai bamonisaki ete bazalaki na motema mabe?
4 Mokolo moko, Bafalisai oyo bazalaki komitungisa mpo ete Bayisraele mingi bazalaki komituna soki Yesu azalaki Klisto te, batindaki bapolisi na bango ete bakanga ye. Bapolisi bazongi nde bakangi ye te mpe balobi ete: “Naino moto moko te asili koloba lokola moto oyo.” Na esika na kokanisa, Bafalisai batunaki bango ete: “Bino mpe bozimbisami? Moko na mikóló soko na Bafalisai asili kondima ye? Kasi ebele wana na bato bayebi Mibeko te, basili kolakelama mabe.” Nikodeme, ye oyo azalaki mosangani na Sanedrina, azipoli monoko mpe akundoli ete, nzela epesami na Mibeko te ete basambisa moto moko liboso na koyoka maloba na ye. Bafalisai bayanoli ye na nkanda nyonso ete: “Yo mpe outi na Galilai? Luka mpe tala ete mosakoli akobima na Galilai te.”—Yoane 7:46-52.
5 Mpo na nini bakonzi ya mangomba ya libota oyo emipesaki na Nzambe basalaki bongo? Mpo ete mitema na bango mikómaki mabe. (Matai 12:34) Lolendo na bango emonanaki na lolenge oyo bazalaki kotyola bato. Na kotunáká ete: “Moko na mikóló soko na Bafalisai asili kondima ye?”, balingaki koloba na lolendo nyonso ete Masiya asengelaki kozala bobele moto oyo bango bakondima ye ete akoki bongo. Lisusu, bazangaki bosembo: bamekaki kotyola Yesu mpo ete autaki na Galilai, nzokande bakokaki mpenza koyeba ete ye abotamaki na Beteleme, esika oyo Masiya asengelaki kobotama engebene bisakweli.—Mika 5:2; Matai 2:1.
6, 7. (a) Lisekwa ya Lazare ezalaki na bopusi nini likoló na bakonzi ya mangomba? (b) Lolenge nini Yesu amonisaki ete bakonzi ya mangomba balingaki molili?
6 Lisekwa na Lazare limonisaki polele mpenza motindo oyo bakonzi wana ya mangomba batɛmɛlaki pole. Mpo na moto nyonso oyo akobangaka Nzambe, likamwisi lokola oyo wana esengelaki kozala elembeteli ete Yesu andimamaki na Jéhovah. Kasi, bakonzi ya mangomba batalelaki yango ete ezalaki likámá mpo na etelemelo na bango ya lokumu. Balobaki ete: “Tosala nini, mpamba te moto oyo azali kosala bilembo mingi? Soko tokotika ye boye, bato nyonso bakondima ye mpe Baloma bakoya mpe bakobebisa esika na biso mpe libota na biso.” (Yoane 11:44, 47, 48) Bayangaki mwango mpo na koboma bobele Yesu te, kasi na Lazare lokola, kolikyáká mbala mosusu ete bakokaki kozimisa pole na motindo yango.—Yoane 11:53, 54; 12:9, 10.
7 Na yango, bakonzi wana ya mangomba na libota na Nzambe, batangwaki mosika na pole mpo na lofundo na bango, na lolendo, na bokósi mpe mpo na ezaleli ya moïmi makasi oyo bazalaki na yango. Pene na nsuka ya mosala na ye, Yesu amonisaki bango motindo oyo bakweisamaki, ete: “Mawa na bino, bakomeli mpe Bafalisai, bakosi! Mpamba te bokofúnga Bokonzi na likoló liboso na bato. Bino mpenza bokoingela wana te, nde bokotika te ete baoyo balingi baingela.”—Matai 23:13.
Moïmi mpe lolendo
8. Lolenge nini makambo oyo malekaki na Nazarete mamonisaki ete bafandi ma engumba yango bazalaki na motema mabe?
8 Lokola bakonzi na bango ya mangomba, Bayuda ya ekeke ya liboso baboyaki pole mpo ete makanisi ya mitema na bango mazalaki mabe. Mokolo moko, Yesu abyangamaki mpo na kolakisa kati na eyanganelo na Nazarete, epai kuna atangaki mpe alimbolaki mokapo moko ya Yisaya. Na ebandeli, lisangá bayokaki ye. Kasi na ntango abandaki kosala bokokani, na kokanisa makambo na bileko ya kala oyo ezalaki komonisa moïmi na bango mpe kozanga kondima na bango, Bayuda wana basilikaki mpe balukaki nzela ya koboma ye. (Luka 4:16-30) Kati na makambo mosusu, ezali lolendo nde epekisaki bango ete bayamba pole te.
9. Mikano mabe ye ebele na butu na Galilai ebimisamaki lolenge nini?
9 Na libaku mosusu, pene na libéké ya Galilai, Yesu aleisaki ebele na bato na likamwisi. Baoyo bamonaki likamwisi wana bangangaki ete: “Oyo azali solo mosakoli oyo asengelaki koya na mokili!” (Yoane 6:10-14, MN) Na nsima Yesu amataki na masuwa mpo na kokenda na esika mosusu, nde ebele balandi ye. Kasi, Yesu ayebaki ete mingi bazalaki kolanda ye mpo na bolingo na pole te. Alobaki na bango ete: “Bozali koluka ngai te mpo ete bomoni bilembo, kasi mpo ete bolei mampa mpe botondi.” (Yoane 6:26) Nsima mwa moke, makambo mabimaki malóngisi maloba na ye mpamba te bamoko kati bazalaki kolanda ye, bazongaki. (Yoane 6:66) Ezalela ya elimo na bango na moïmi ete: “Nakozwa litomba nini?” ekangani nzela ete pole engɛngɛla bango te.
10. Lolenge nini ntalo monene na Bapakano bayambaki pole?
10 Nsima na liwa mpe lisekwa na Yesu, Bayuda oyo babongwanaki na boklisto balandaki komema pole epai na bato na libota na bango, kasi bobele moke bandimaki yango. Yango wana ntoma Paulo mpe baninga na ye, baoyo baponamaki mpo na kozala “pole na mabota,” bapalanganisaki nsango malamu kati na mikili misusu. (Misala 13:44-47) Soki nde ebele na Bapakano bandimaki nsango malamu na esengo, nzokande ntalo monene na bango bandimaki yango te. Paulo ayebisi biso yango ete: “Biso tokosakolaka Klisto oyo akakisamaki na nzete. Yango ezali, . . . eloko na bolema epai na Bapakano.” (1 Bakolinti 1:22, 23) Ntalo monene bapakano baboyaki pole mpo ete bazalaki bakufi miso na nzela na biyambayamba to na filozofi oyo emonisaki elimo ya mokili.—Misala 14:8-13; 17:32; 19:23-28.
“Babyangami kobima longwa na molili”
11, 12. Banani bandimaki pole na ekeke ya liboso, mpe banani bandimi yango lelo oyo?
11 Na ekeke ya liboso, atako mposa emonisamaki te mpo na solo, nzokande bato mingi na motema sembo ‘babyangamaki kobima longwa na molili mpo na kokɔta na pole na Nzambe.’ (1 Petelo 2:9) Mpo na yango, ntoma Yoane akomaki ete: “Epai na baoyo nyonso bayambi ye [Klisto], apesi bango lotomo ya kokóma bana na Nzambe, mpo ete bandimi na nkombo na ye.” (Yoane 1:12, MN) Kobanda Pantekɔte ya mobu 33, baoyo balingi pole bazwaki batisimo na elimo santu mpe bakómaki bana na Nzambe, kozwáká bongo elikya ya koyangela elongo na Yesu kati na Bokonzi na likoló.
12 Na eleko na biso, bana na nsuka bapakolami na Nzambe basili koyanganisama mpe, na boyokani na esakweli ya mosakoli Danyele, bazali ‘kongenga lokola nkembo na likoló mpe bazali komema bato mingi epai na boyengebene.’ (Danyele 12:3) Bazali mpenza kongɛngisa pole na bango na boye ete bamilió minei ya “bampate mosusu” basili kobendama na solo mpe batangami lokola bayengebene na miso na Nzambe. (Yoane 10:16) Na mokili mobimba, bampate wana bazali kongɛngisa pole, na motindo boye ete pole yango ezali lelo kongɛnga koleka na liboso. Lokola na ekeke ya liboso, tokoki koloba ete na eleko na biso “molili mozimisi [pole] te.”—Yoane 1:5.
‘Kati na Nzambe, molili ezali soko moke te’
13. Likebisi nini ntoma Yoane asili kopesa biso?
13 Tosengeli te kobosana likebisi oyo ntoma Yoane apesaki, ete: “Nzambe azali pole mpe kati na ye, molili ezali soko moke te. Soko tokolobaka ete: ‘Tosangani na ye elongo’ nde tozali naino kotambola kati na molili, tozali kobuka lokutá mpe tozali kosalela solo te.” (1 Yoane 1:5, 6, MN) Ee, baklisto bakoki mpenza komikangisa na motambo ovo Bayuda bamikangisaki—na kozaláká ba Témoins de Jéhovah ya nkombo mpamba—nzokande bakosalaka misala na molili.
14, 15. Misala nini ya molili mimonanaki kati na lisangá na boklisto na ekeke ya liboso, mpe yango eteyi biso nini?
14 Ezali yango nde emonanaki na ekeke ya liboso. Totangi ete mikabwano makasi mizalaki na Kolinti. (1 Bakolinti 1:10-17) Ntoma Yoane akebisaki baklisto bapakolami ete bayinanaka te, mpe Yakobo apesaki toli epai na bamoko mpenza ete bazala na elimo ya koponapona te kati na bazwi mpe babólá. (Yakobo 2:2-4; 1 Yoane 2:9, 10; 3 Yoane 11, 12) Lisusu, ntango alobaki na ntina na masangá nsambo ya Asie Mineure, Yesu amonisaki, engebene mokanda ya Emoniseli, ete misala na molili mizalaki kati na yango, lokola lipengwi, losambo na bikeko, pite mpe mposa ya mosolo. (Emoniseli 2:4, 14, 15, 20-23; 3:1, 15-17) Na ntango wana ya ebandeli ya lisangá na boklisto, bamosusu batikaki pole, ezala na kobimisama na lisangá to na kopengwa epai na “molili ya libanda.”—Matai 25:30; Bafilipi 3:18;Baebele 2:1; 2 Yoane 8-11.
15 Makambo nyonso oyo masalemaki na ekeke ya liboso, mazali komonisa lolenge oyo molili ya mokili na Satana ekoki kokɔta kati na elimo ya moklisto moko soko mpe na elimo ya lisangá mobimba. Tomisenzela ete likambo motindo wana lipengola biso te. Lolenge nini tokoki kosala yango?
Bomoto na sika
16. Toli nini na mayele Paulo apesi epai na Baefese?
16 Paulo apesaki Baefese toli ete bazala “na makanisi na molili te, ete batangwa mosika na bomoi na Nzambe te.” Mpo ete bazongela molili wana te, basengelaki kolóna ezaleli na motema oyo elingi pole. Paulo alobaki ete: “Bolongola bomoto na kala bomonisami na ezaleli na liboso, oyo esili kobeba mpo na mposa mabe; kasi bobongwana bato na sika kati na nguya ekopusa elimo na bino mpe bolata bomoto na sika bozalisami na mokano na Nzambe kati na boyengebene mpe na bosembo na solo.”—Baefese 4:18, 22-24, MN.
17 Tokoki kosala nini mpo topengwa te epai na molili?
17 Toli oyo Paulo apesi biso awa ezali mwango ya ntina mingi, oyo tokoki koloba ete ekokani pene na lipasó to opération: tosengeli kolongola ndambo na nzoto na biso moko, bomoto na biso na kala, ete nguya ya sika ekoka ‘kopusa elimo na biso.’ Epai mosusu, azali koloba na bato na sika te, kasi epai na baklisto. Kobongwana ya bomoto na biso esengeli kosuka te bobele na batisimo. Yango ezali likambo ya ntango. Soki totiki kolóna bomoto na sika, na ntembe te bomoto na kala bomonisami na lolendo, na lofundo mpe na moïmi, ekobima lisusu. (Genese 8:21; Baloma 7:21-25) Tokoki bongo kozongela misala na molili.
“Tokomonaka pole kati na pole na yo”
18, 19. Na boyokani na maloba na Yesu mpe na Paulo, lolenge nini tokoki koyeba “bana na pole”?
18 Tomikundola ete elikya na biso ya kozala na bomoi ya seko etaleli lisambisi malamu na Nzambe, lisambisi litaleli bolingo oyo tozali na yango mpo na pole. Nsima na kolobela likambo yango, Yesu alobaki ete: “Moto na moto oyo akosalaka mabe ayini pole mpe akoya epai na pole te, ete misala na ye miyebana te. Kasi ye oyo akosalaka malamu akoya epai na pole, mpo ete misala na ye mimonana ete akotósaka Nzambe.”—Yoane 3:19-21, MN.
19 Paulo alobeli bobele likanisi yango ntango akómi epai na Baefese mokanda, ete: “Botambolaka lokola bana na pole, mpamba te mbuma na pole emonani na nyonso oyo ezali malamu, na boyengebene mpe na solo.” (Baefese 5:8, 9) Na yango, misala na biso mikomonisaka soko tozali bana na pole to bana na molili. Kasi misala na sembo mikoki kouta bobele na motema malamu. Tala ntina oyo esengeli na biso “kobatela” motema na biso, komibanzabanza na ntina na kolanda kobongola bomoto na biso mpe kotalela nguya oyo ezali kopusa elimo na biso.—Masese 4:23.
20, 21. (a) Likambo nini lizali pɛtɛɛ te epai na bana oyo babotami kati na mabota na boklisto? (b) Mwana mokomoko ya Témoin de Jéhovah asengeli kobunda etumba nini?
20 Mbala mosusu, ezalaka pɛtɛɛ te mpo na bana ya ba Témoins de Jéhovah. Mpo na nini? Epai moko, mpo ete bana wana bazali na lipamboli kitoko. Lokola bayebi solo uta bomwana na bango, bazali na ntina te ete baluka koyeba mokili na molili na Satana. (2 Timoté 3:14, 15) Epai mosusu, bamoko kati na bana yango bakotalelaka solo na motuya oyo mobongi na yango te mpe bazali mpenza koyekola te mpo na kolinga pole. Ezalaki sé bongo mpo na Bayuda mingi na ekeke ya liboso. Bakolaki kati na libota oyo emipesaki epai na Jéhovah mpe bazalaki na boyebi ya solo. Kasi solo yango ekɔtaki mpenza te kati na mitema na bango.—Matai 15: 8, 9.
21 Liboso na Nzambe, baklisto bazali na mokumba ya kobokolo bana na bango kati na pole. (Deteronome 6:4-9; Baefese 6:4) Kasi, na nsuka, ezali mwana nde asengeli kolinga pole koleka molili. Pole ya solo esengeli kozala eloko na ye mpenza. Ekokóla ye, akoki mbala mosusu kobendama na makambo mosusu ya mokili na Satana. Bomoi ya kozanga komibanzabanza mpe kozanga kooka nsoni oyo baninga na ye bazali komonisa, ekoki kobenda ye. Kozanga kondima oyo elakisami na kelasi ekoki mbala mosusu kozimbisa ye. Kasi mwana asengeli kobosana te ete, libanda na pole, ‘molili mozipi mokili.’ (Yisaya 60:2) Na nsuka, mokili oyo na molili mokopesa biso eloko moko te.—1 Yoane 2:15-17.
22. lolenge nini Jéhovah azali lelo kopambola baoyo bazali kokende epai na pole, mpe bolamu nini akopesa bango kati na mokili ya sika?
22 Mokonzi Davidi akomaki ete: “Liziba na bomoi ezali epai na yo [Jéhovah]; tokomona pole kati na pole na yo. Bomba motema malamu na yo mpo na bango bayebi yo.” (Nzembo 36:9, 10) Bato oyo balingi pole bakoyekola mpo na koyeba Jéhovah, yango nde ekopesa bango bomoi. (Yoane 17:3) Mpo na motema malamu na ye, Jéhovah azali lelo kosunga bango mpe, na ntango na bolozi monene, akobatela bango mpe akokɔtisa bango kati na mokili ya sika. Yango nde ekokómela biso soki tokokima lelo mokili na molili oyo na Satana. Na mokili ya sika, na Paradis, bato bakozonga na ezalela ya kokoka. (Emoniseli 21:3-5) Ntango wana, baoyo bakozwa lisambisi malamu bakozala na elikya ya koumela ntango nyonso kati na pole na Jéhovah. Oyo nde elikya kitoko mpo na mikolo mizali koya! Tala likambo oyo lizali kopusa biso na ‘koboya misala na molili mpe kolata bibundeli na pole.’—Baloma 13:12, MN.
Bozongeli
◻ Na eleko na Yesu, mpo na nini ntalo monene na Bayuda baboyaki pole?
◻ Lolenge nini pole ezali kongɛnga na eleko na biso?
◻ Bandakisa ya ekeke ya liboso ezali kopesa biso makebisi nini na ntina na moïmi mpe na lolendo?
◻ Tosengeli kosala nini mpo na kotikala kati na pole? ú
◻ Bolamu nini bobombami mpo na baoyo balingi pole?
[Elilingi na lokasa 14]
Na eleko na Yesu, ntalo monene na Bayuda bandimaki pole te
[Elilingi na lokasa 17]
Na boumeli na bambula mingi, myango ndenge na ndenge misili kosalelama mpo na kongɛngisa pole kati na mosala ya kosakola
[Elilingi na lokasa 18]
“Bolongola bomoto na kala . . . mpe bolata bomoto na sika”