Tosikwami na losambo ya lokuta
“Jéhovah alobi ete, ‘Bobima kati na bango . . . , ‘bosimba eloko na mbindo te’; ‘mpe boye nakoyamba bino.’”—2 BAKOLINTI 6:17, MN.
1. Likambo nini Satana alingaki ete bayokana na yango elongo na Yesu, mpe makanisi nini mibale likambo yango liyebisi biso?
NAKOPESA yo (biloko) oyo nyonso soko okokumbama mpe okosambela liboso na ngai.” Atako yango esalemaki bankoto na bambula nsima na kobima na losambo ya lokuta, lisengi wana esalisi biso na koyeba ye oyo azali komibomba nsima na losambo ya lokuta mpe nini ezali ntina na losambo yango ya lokuta. Pene na nsuka ya mobu 29, Diable apesaki epai na Yesu bikonzi nyonso ya mokili soki akondima kosambela ye. Likambo yango emonisi biso makanisi mibale: ya liboso, ete bikonzi ya mokili oyo bizali ya Satana, mpamba te akoki kopesa yango; ya mibale ete ntina ya mangomba na lokuta ezali mpenzampenza mpo na kosambela Satana.—Matai 4:8, 9
2. Maloba na Yesu oyo mayebisami kati na Matai 4:10 mateyi biso nini?
2 Na eyano na ye, Yesu akweisaki bobele losambo ya lokuta te, kasi lisusu amonisaki ntina ya losambo na solo. Alobaki na ye ete: “Longwa na yo, Satana. Mpamba te ekomami ete: ‘Okokumbamela Jéhovah Nzambe na yo mpe okosalela bobele ye moko.’” (Matai 4:10) Ntina ya kozala ya losambo na solo ezali bongo mpo na kosambela Nzambe na solo bobele moko, Jéhovah. Mpo na yango, esengeli komonisa kondima mpe botosi, esengeli kosala mokano na ye.
Ebandeli ya losambo na lokuta
3. (a) Ntango nini mpe ndenge nini losambo na lokuta ebandaki awa na mabelé? (b) Likambo na liboso ya likunya na losambo oyo liyebisami lizali nini, bongo monyokoli mosukaki bobele wana?
3 Losambo na lokuta ebimaki na mokili ntango baboti ya liboso baboyaki kotosa Nzambe mpe bandimaki likabo na Satana: ekokaki na bango sikawa kopona bango moko kati na “mabe” mpe “malamu.” (Genese 3:5) Na yango, babwakaki boyangeli na sembo ya Jéhovah mpe batikaki losambo na solo. Na bongo, bato na liboso “basenzaki solo na Nzambe mpo na lokuta mpe basanzolaki . . . ekelamu na esika ya Mozalisi.” (Baloma 1:25, MN) Ekelamu oyo baponaki mpo na kosanzola, kozanga koyeba ezalaki mosusu te bobele Satana le Diable, “nyoka na kalakala.” (Emoniseli 12:9) Mwana na bango ya liboso, Kaina, aboyaki kolanda toli malamu na Jéhovah mpe atombokelaki bokonzi na ye. Ezala ayebaki yango to te, Kaina akomaki “mwana na oyo mabe,” elingi koloba mwana na Satana, mpe abandaki kosambela ye. Abomaki ndeko na ye Abele, ye oyo azalaki kosalela losambo na solo. (1 Yoane 3:12, Revised English Bible; Genese 4:3-8; Baebele 11:4) Makila ya Abele mazali makila ya liboso masopamaki likoló na bonguna na makambo matali losambo. Na mawa nyonso, losambo na lokuta ekobaki kosopa makila na boyengebene kino na mikolo na biso oyo.—Tala Matai 23:29-35; 24:3, 9.
4. Mikapo nini ya Biblia mimonisi oyo ezalaki losambo na solo na eleko ya Noa?
4 Liboso na mpela, Satana alongaki kopengola ntalo monene na bato longwa na losambo ya solo. Nzokande, Noa “azwaki ngolu na miso na Jéhovah.” Mpo na nini? Mpo “azalaki kotambola elongo na Nzambe na solo.” Na maloba mosusu, azalaki kosalela losambo na solo. Losambo na solo ezali kosangisama ya milulu te: ezali lolenge na bomoi. Ezali kosɛnga na biso ete tozala na kondima epai na Jéhovah mpe ete tosalela ye na botosi nyonso, ete ‘totambola elongo moko na ye.’ Ezali yango nde Noa asalaki.—Genese 6:8, 9, 22; 7:1; Baebele 11:6, 7.
5. (a) Diable amekaki kosala nini nsima na mpela, mpe ndenge nini? b) Ndenge nini Jéhovah akweisaki mokano ya Diable, mpe yango ebimisaki nini?
5 Mwa ntango moke nsima na mpela, emonani lokola ete Diable asalelaki Nimerode, mobali oyo ayebani mpo na “botomboki” na ye liboso na Jéhovah, mpo ete akoka koyanganisa bato nyonso ya mokili mobimba kati na losambo moko oyo ekotemela Jéhovah. (Genese 10:8, 9; 11:2-4) Lingomba bobele moko wana, losambo na lokuta oyo epesami na Diable, mbele esengelaki kolendisama longwa na engumba mpe na ndako oyo basambeli na Satana bazalaki kotonga. Jéhovah akweisaki mokano yango na kobulunganisaka “lokota bobele moko” oyo lozalaki kolobama na bato nyonso. (Genese 11:5-9) Yango wana engumba yango ebengamaki liboso Babele, mpe na nsima Babilone, nkombo mibale oyo elimboli “mobulungano.” Lokola lokota na bango ebulunganisamaki, bato bapalanganaki na mabelé mobimba.
6. (a) Mateya nini ya Babilone Satana akɔtisaki yango kati na makanisi ya basambeli na ye liboso ete bapalangana? (b) Mpo na nini mangomba ya mokili mobimba mazali na bindimeli motindo moko? (c) Mosala nini ya Satana Babilone ekokisaki yango, mpe mboka wana ya kala ekomaki elembo ya nini?
6 Nzokande, liboso ete Jéhovah apalanganisa bato, emonani ete, engebene bilembeteli ya lisolo na masapo mpe lisolo na mangomba, Satana asilaki kokotisa kati na elimo ya basambeli na ye mwa bilembo ya moboko ya losambo na lokuta. Ezali bongo endimeli ya kobika na molimo nsima na liwa ya moto mpe endimeli ya lifelo na mɔtɔ, bakisa mpe kobanga bakufi; likoló na yango ebongi kobakisa losambo ya ebele na banzambe mpe na banzambe basi, oyo bamosusu babongisamaki na banzambe ya mitó misato. Bindimeli wana bipalanganisamaki kino na nsuka nyonso ya mokili na nzela ya bituluku ya bankota ndenge na ndenge. Nsima na boumeli mingi, ezwaki mbongwana ndenge na ndenge. Na mokuse, ezali bongo, moboko ya losambo na lokuta kati na mokili mobimba. Lokola alongaki te kokokisa mokano na ye ya lingomba bobele moko oyo mboka-mokonzi na yango esengelaki kozala bongo Babilone, Satana asalaki nde mitindo ndenge na ndenge ya losambo louti na Babilone kati na mokano ya kobotola losambo oyo lobongi mpo na Jéhovah. Na boumeli ya bikeke, Babilone ekobaki kosalela bopusi na yango kati na makambo matali losambo na bikeko, maji, bondoki mpe kosalela myoto mpo na koyeba makambo, misala ndenge na ndenge misimbi losambo na lokuta. Ezali bongo likambo na kokamwa te ete mokanda na Emoniseli emonisi lisangá ya mokili mobimba ya losambo na lokuta lokola ndumba monene abengami Babilone Monene.—Emoniseli 17:1-5.
Losambo na solo
7. (a) Mpo na nini kobulungana ya minoko ya bato ebebisaki losambo na solo te? (b) Nani abengamaki “tata na bango nyonso bazali na kondima,” mpe mpo na nini?
7 Atako Jéhovah abulunganisaki monoko na bato, nzokande yango ebebisaki ata mbala moko te losambo ya solo. Liboso na mpela, mibali mpe basi na sembo lokola Abele, Enoka, Noa, mwasi na ye, bana na ye mpe basi ya bana na ye basalelaki losambo na peto. Nsima na mpela, losambo na solo ebatelamaki na nzela na Semi, mwana na Noa. Abalayama, mokitani ya Semi, azalaki kosalela losambo na solo; abengamaki “tata na bango nyonso bazali na kondima.” (Baloma 4:11) Kondima na ye esimbamaki na misala. (Yakobo 2:21-23) Bomoi na ye ezalaki na boyokani na losambo na ye.
8. (a) Na makambo motindo nini, na ekeke ya 16 liboso ya ntango na biso, losambo na peto ebundisamaki na losambo na lokuta, mpe yango ebimisaki nini? (b) Mpo na losambo na ye ya peto, ebongiseli nini ya sika Jéhovah abimisaki?
8 Losambo na solo elandamaki kosalelama na bakitani ya Abalayama: Yisaka, Yakobo (to Yisraele), bakisa mpe bana 12 na Yakobo, baoyo bazali babandisi ya mabota 12 ya Yisraele. Nsuka ya ekeke ya zomi na libwa liboso ya ntango na biso emonaki bakitani na Yisaka, nkoko na Abalayama, kobunda mpo na kobatela losambo na peto kati na mokili moko mabe, oyo na Ezipito na bopakano epai kuna bakangamaki na boombo. Jéhovah asalelaki mosaleli na ye ya sembo Moïze, moto ya libota na Levi, mpo na kosikola basambeli na ye na boombo na Ezipito, epai kuna losambo na lokuta lozalaki makasi. Na nzela na Moïze, Jéhovah asalaki boyokani elongo na Yisraele, kokomisaka bango libota na ye liponami. Ezali na eleko wana nde Jéhovah apesaki mibeko mpo na losambo na ye, oyo esengelaki kosuka naino bobele kati na ebongiseli moko ya kopesa mbeka etambwisami na bonganga. Lisusu, losambo yango losengelaki kozala na ndako moko ya bosantu awa na mabelé (liboso mongombo, oyo bazalaki komema yango bisika nyonso, mpe na nsima tempelo oyo etongamaki na Yelusaleme).
9. (a) Ndenge nini losambo na solo losalemaki liboso na kondimana ya Mibeko? (b) Lolenge nini Yesu amonisaki ete bibongiseli ya mosuni kati na Mibeko bisengelaki koumela libela te?
9 Nzokande, ekoki na biso koyeba ete biloko wana ya mosuni bibongisamaki te mpo ete bizala ntango nyonso libela kati na losambo ya solo. Mibeko mizalaki “bobele elilingi na makambo malingi koya.” (Bakolose 2:17; Baebele 9:8-10; 10:1) Na eleko ya batata na mabota, liboso na kobimisama ya Mibeko na Moïze, emonani ete batata na mabota nde bazalaki komonisa mabota na bango, bazalaki kopesa mbeka likoló na bitumbelo oyo bango moko batongaki yango. (Genese 12:8; 26:25; 35:2, 3; Yobo 1:5) Nzokande, ezalaki ata na bonganga oyo ebongisami te ata na ebongiseli moko te ya kopesa mbeka oyo milulu mizwami kati na yango. Lisusu, Yesu ye moko monisaki ete losambo lotambwisami na mibeko oyo centre na yango ezalaki bongo Yelusaleme esengelaki koumela libela te; ezali yango alobaki na mwasi Mosamaria ete: “Ntango ekoya wana bakosambela Tata na ngomba oyo te (Gerizime, epai kuna kala temple ya basamarité ezalaki) to na Yelusaleme te. . . . Kasi ntango ekoya, ee ezali sikawa nde, wana basambeli na solo bakosambela Tata na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:21-23) Yesu amonisaki na maloba wana ete losambo na solo tosengeli kosalelama na lisalisi ya biloko na mosuni te, kasi na elimo mpe na solo.
Boombo na Babilone
10. (a) Mpo na nini Jéhovah apesaki nzela ete libota na ye limemama na boombo na Babilone? (b) lolenge nini mibale Jéhovah asikolaki batikali na Bayuda na sembo na mobu 587 liboso ya ntango na biso, mpe nini ezalaki ntina ya liboso ya bozongi na batikali yango na Yuda?
10 Uta botomboki na Edene, koyina to likunya ezalaki ntango nyonso kati na losambo na solo mpe losambo na lokuta. Na bileko mosusu, basambeli ya solo na Nzambe bazalaki, na elobeli ya elilingi, bakangami na boombo ya losambo na lokuta, oyo uta eleko na Nimerode emonisami na Babilone. Na mobu 617 mpe na mobu 607 liboso ya ntango na biso, Jéhovah apesaki nzela ete libota na ye limemama na boombo na Babilone; kasi liboso, Bayisraele bamitikaki kobendama na losambo na lokuta ya Babilone. (Yilimia 2:13-23; 15:2; 20:6; Ezekiele 12:10, 11) Na mobu 537, mwa ndambo na batikali basembwi bazongaki ma Yuda. (Yisaya 10:21) Bayanolaki na libyangi ya esakweli: “Bobima kati na Babilone!” (Yilimia 48:20) Kosikolama wana esengelaki kozala bobele ya mosuni te. Esengelaki kozala mpe kosikolama na elimo mpo na libota wana oyo lizwamaki liboso na bopusi ya losambo moko na mbindo mpe na bikeko, losambo na lokuta. Na yango, batikali wana ya sembo bazwaki etinda oyo: “Bolongwa! Bolongwa! Bokima na esika yango, bosimba eloko na mbindo te; bobima na kati na ye, bomibulisa bino mpenza, bino (bato) bokokumbaka biloko na Jéhovah!” (Yisaya 52:11) Ntina monene ya bozongi na bango na Yuda ezalaki mpo na kozongisa losambo na peto, losambo na solo.
11. Longola kozongisama ya losambo na peto na Yuda, likambo nini elekaki lisusu kati na makambo matali losambo na ekeke ya motoba liboso ya ntango na biso?
11 Na ekeke ya motoba liboso ya ntango na biso, losambo na lokuta ebimisaki mangomba mosusu kati na Babilone Monene. Na yango, eleko wana emonaki bongo kobotama na lingomba ya Buda, ya Confucius, ya Zoroastre, ya losambo na Bahindou oyo ekanaka kobikisa molimo ete ekota na nzoto ya moto mosusu te (jaïnisme), kozanga kotanga filozofi ya mayele na bagreke oyo na nsima esengelaki komema bopusi monene likoló na Mangomba ya boklisto na lokuta. Na yango, wana losambo na peto ezongisamaki na Yuda, monguna monene na Nzambe abimisaki ebele na mangomba ya lokuta mpo na kozimbisa bato.
12. Nani esikolamaki ma boombo ya Babilone na ekeke ya liboso ya ntango na biso, mpe likebisi nini Paulo apesaki?
12 Ntango Yesu ayaki na mokili ya Yisraele, ntalo monene na Bayuda bazalaki kosalela mitindo mikeseni ya losambo na boyuda, lingomba oyo lidefaki makambo mingi ya losambo na Babilone. Judaisme to losambo ya bonkoko ya boyuda ekomaki moko na mangomba ya Babilone Monene. Klisto akweisaki yango mpe asikolaki bayekoli na ye na boombo ya Babilone. (Matai mokapo 23; Luka 4:18) Lokola losambo na lokuta mpe filozofi ya bagreke epalanganaki mingi kati na bituka oyo ye azalaki kosakola ntoma Paulo atongaki esakweli na Yisaya mpe akokisaki yango na baklisto, baoyo basengelaki komibatela na bopusi ya mbindo ya Babilone Monene. Akomaki ete: “Boyokani nini bozali kati na tempelo na Nzambe mpe bikeko (ya Babilone)? Mpamba te biso tozali tempelo na Nzambe na bomoi; lokola Nzambe alobi na yango: ‘Nakofanda mpe nakotambola kati na tempelo na bango, nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na ngai.’ ‘“Yango wana bobima na kati na bango, mpe bokabwana. Jéhovah alobi bongo. Bosimba eloko na mbindo te”’; ‘“mpe boya nakoyamba bino.”’”—2 Bakolinti 6:16, 17.
Tosikwami na losambo ya lokuta na ntango ya nsuka
13. Nsango oyo Klisto atindaki na masangá nsambo ya Asie Mineure emonisi nini, mpe likambo nini ebimaki mpo na yango?
13 Nsango oyo Klisto atindaki epai na masangá nsambo ya Asie Mineure, nsango oyo ekomami kati na Emoniseli oyo epesamaki na ntóma Yoane, emonisi polele ete na nsuka na ekeke ya liboso misala mpe etamboli na mangomba mauti na Babilone ezalaki komikɔtisa mokemoke kati na lisangá ya boklisto. (Emoniseli, mikapo 2 mpe 3) Lipengwi ekolaki mingi mpenza kobanda na ekeke ya mibale kino na ekeke ya mitano, likambo oyo libimisaki lingomba na boklisto ya lokuta. Mateya na Babilone, lokola kozanga kokufa ya molimo, límfelo na mɔtɔ mpe Bosato, ekotisamaki kati na mateya ya boklisto oyo epengwaki. Mangomba na katolike, orthodoxe mpe, bileko mingi na nsima, mangomba na protestá, nyonso emekolaki mateya mabe; nyonso ezali bongo kati na Babilone Monene, lisangá ya mokili mobimba ya losambo na lokuta etambwisami na Satana.
14, 15. (a) Yesu amonisaki nini kati na lisese na ye ya blé mpe matiti mabe? (b) Likambo nini lisalemaki pene na nsuka ya ekeke a zomi na libwa, mpe bokoli nini na mateya baklisto ya solo bakokisa yango na 1914?
14 Losambo na solo elimwa naino mobimba te. Na boumeli ya bikeke, ezalaki ntango nyonso na bato oyo balingaki solo; ndambo na bango, nkutu babungisaki bomoi na bango mpo na bokangami na bango makasi epai na Jéhovah mpe na Liloba na ye, Biblia. Nzokande, lokola Yesu amonisi yango kati na lisese na ye ya blé mpe ya matiti mabe, ezali bobele na “nsuka ya biloko mabe” nde blé ya elilingi, elingi koloba bana bapakolami ya Bokonzi, basengeli kokabolama na matiti mabe, bana na (ye) oyo mabe. (Matai 13:24-30, 36-43) Na mibu ya nsuka ya ekeke ya 19, pene na ntango ya nsuka, epai bokabwani bosengelaki kosalema, bayekoli na sembo ya Biblia babandaki komisikola na losambo ya lokuta.
15 Liboso mpenza ya 1914, baklisto yango, baye bazali kobyangama lelo ba Témoins de Jéhovah balonaki kondima moko makasi kati na lisiko. Bayebaki ete kozonga na Klisto esengelaki komonana na miso na mosuni te. Basosolaki ete mobu 1914 ekozala nsuka ya “ntango na mabota.” (Luka 21:24) Kobanda ntango yango bazalaki koyeba polele soko molimo elimboli nini mpe lisekwa elimboli nini. Bangengisamaki mpe likoló na mateya oyo mazali kofinga Nzambe, mpe na ntina ya libunga monene oyo etali límfelo mpe Bosato, mateya oyo malakisami na Mangomba. Bayekolaki ete Nzambe azali na nkombo mpe bakomaki kosalela yango; bayebaki ete liteya ya évolution ezali solo te mpe ete esengeli koboya boyokani nyonso na bilimu mabe.
16. Na libyangi nini baklisto bapakolami bayanolaki na mobu 1919?
16 Basaleli na Nzambe basilaki mpenza komisikola na boombo ya losambo na lokuta. Kasi na 1919, Babilone Monene ebungisaki mpenza nguya nyonso likoló na bango. Motindo mwa ndambo na Bayuda basikolamaki na Babilone na 537 liboso ya ntango na biso, motindo moko mpe batikali na sembo ya baklisto bapakolami bayambaki na libyangi oyo: “Bobima na kati na ye (Babilone Monene).”—Yisaya 52:11.
17 (a) Likambo nini elekaki kobanda ma 1922, mpe basosolaki nini? (b) Etelemelo nini makasi bazwaki, mpe mpo na nini ezalaki malamu na ntango wana?
17 Kobanda na 1922, basaleli na Nzambe basakolaki mpe babimisaki solo mingi ya Biblia oyo ezalaki komonisa polele lokuta ya mangomba na Babilone, mpe mingi mpenza Mangomba na boklisto na lokuta. Tokangaki ntina ya likambo moko: esengelaki kondimisa basaleli na Nzambe, baoyo bautaki kopetolama, ete bakata boyokani nyonso elongo na losambo ya lokuta. Na bongo, na boumeli ya bambula, totikaki ata nkutu kosalela liloba “lingomba” to “religion” mpo na kolobela losambo na peto. Totambolaki na banzela ya bingumba minene elongo na mabaya oyo mazalaki na likomi oyo: “Lingomba ezali motambo mpe moyibi.“ Mikanda lokola Gouvernement (1928) mpe “La vérité vous affranchira” (1943) mizalaki komonisa bokeseni ya solo kati na “boklisto” mpe “mangomba” to “religion.” Etelemelo wana makasi ezalaki malamu na ntango yango, mpamba te esengelaki mpenza kokabwana mobimba na mangomba ya Babilone Monene, oyo ekɔtelaki mpenza makambo nyonso ya bomoi na bato.
Lingomba ya solo mpe lingomba ya lokuta
18. Ndimbola nini ya sika ya liloba “religion“ to lingomba epesamaki na 1951, mpe ndenge nini yango elimbolamaki kati na Annuaire 1975?
18 Na nsima, na 1951, Jéhovah amonaki ete ntango ekokaki mpo ete apesa epai na libota na ye boyebi ya polele na ntina na bokeseni bozali kati na lingomba ya solo mpe lingomba ya lokuta. Tala oyo ekokaki kotangama kati na Annuaire des Témoins de Jéhovah 1975: “Na 1951, balongisi na losambo na solo bayekolaki likambo moko ya ntina mingi mpo na liloba ‘lingomba’ to ‘religion.’ Bamoko kati na bango bazali komikundola lisusu mpo na mobu 1938, na boumeli na yango ekomelaki bango ete balakisaki libaya oyo likomamaki ete ‘lingomba (to religion) ezali motambo mpe moyibi.’ Na kotalela makanisi na bango na eleko wana, ‘lingomba’ nyonso ezalaki ya boklisto te, kasi eutaki na Diable. Kasi kati na La Tour de Garde ya 15 mars 1951 elimbolamaki ete tokoki kosalela maloba ya bobakisi to ba adjectifs ‘solo’ mpe ‘lokuta’ na ntina na lingomba. Epai mosusu, mokanda La religion a-t-elle servi l’humanité? (ebimisamaki na Lingelesi na 1951 mpe emonisamaki na ntango ya Assemblée de ‘l’adoration pure,’ oyo esalemaki na Wembley Stadium de Londres) elobaki boye: ‘Na kotalela ndimbola na yango, liloba “religion” elimboli “lolenge na kosambela, losambo,” ezala nini losambo yango, ya solo to ya lokuta. Nzokande, ezali bongo ndimbola na yango ya petee, nde eyokani, na oyo ya liloba likokani na yango na liebele abohdah, mpenzampenza “mosala,” ezala ata nani oyo bazali kosalela motindo yango.’ Na nsima, maloba ‘lingomba na lokuta’ mpe ‘lingomba na solo’ mabandaki kosalelama epai na ba Témoins de Jéhovah.”—Lokasa 225.
19, 20. (a) Mpo na nini basambeli na solo ya Nzambe basengeli te kobulunganisama mpo na kosalelama ya liloba “religion” to lingomba mpo na kolobela losambo na peto? (b) Na lisalisi ya ndimbola wana ya sika, likambo nini ba Témoins de Jéhovah basalaki?
19 Koyanolaka na motuna moko ya batangi, La Tour de Garde ya lingelesi ya 15 août 1951 (ebimeli na Lifalansé ya 15 avril 1952) elobaki ete: “Moto moko te asengeli kobulunganisama mpo na kosalelama ya liloba ‘religion’ to lingomba. Atako tozali kosalela yango, nzokande etye biso te na molongo ya mangomba na lokuta oyo ezali ntango nyonso kati na boombo ya mateya na bato, ezali mpe lolenge moko atako tozali kobengama baklisto, nzokande elimboli te ete totyami na ngambo na baklisto ya lokuta.”
20 Ndimbola wana ya sika na ntina na liloba “religion” lingomba, oyo ebongaki mpenza te ete ekoka kotalelama lokola lipengwi, epesaki nzela na basaleli na Jéhovah bayeisa monene libulu oyo lizali kokabola lingomba na solo na oyo na lokuta, likambo oyo lisolo lilandi lizali komonisa yango.
Bozongeli
◻ Ntango nini mpe ndenge nini losambo na lokuta ebandaki awa na mabelé?
◻ Satana amekaki kosala nini nsima na mpela, mpe lolenge nini mikano na ye mikweisamaki?
◻ Babilone ekomaki elilingi ya nini?
◻ Kosikwama nini esalamaki na mobu 537 liboso ya ntango na biso, na ekeke ya liboso, mpe na 1919?
◻ Ndimbola nini ya sika ya liloba “lingomba” to “religion” epesamaki na 1951, mpe mpo na nini na eleko wana?
[Etanda/Elilingi na lokasa 11]
Mateya na lokuta oyo mondimami kati na mokili mobimba mautaki na Babilone:
◻ Bosato na banzambe, to trinités
◻ Molimo na moto ekokufaka te
◻ Misala na bilimu mabe: kosolola elongo na “bakufi”
◻ Kosalela bikeko kati na losambo
◻ Mabondeli mpo na kobimisa bilimu mabe
◻ Koyangelama na bokonzi ya nguya kati na lingomba